LISOLO YA BOYEKOLI 3
Mateya oyo tokoki kozwa na mpisoli oyo Yesu abimisaki
“Yesu alelaki, abimisi mpisoli.”—YOA. 11:35.
LOYEMBO 17 “Nalingi”
NA MOKUSE *
1-3. Mikakatano nini ekoki kotinda basaleli ya Yehova bábimisa mpisoli?
OYEBI lisusu mbala ya nsuka oyo olelaki? Na bantango mosusu tobimisaka mpisoli ya esengo. Kasi mbala mingi tolelaka mpo na mpasi oyo tozali na yango na motema. Na ndakisa, tolelaka ntango moto oyo tolingaka akufi. Lorilei, ndeko mwasi moko oyo afandaka na États-Unis, akomaki boye: “Nsima ya liwa ya mwana na ngai ya mwasi, mpasi oyo nazalaki koyoka na bantango mosusu ezalaki makasi mpe nazalaki komona lokola eloko moko te ekokaki kobɔndisa ngai. Na bantango yango, nazalaki komituna ndenge oyo nakokaki kokoba koyika mpiko.” *
2 Tokoki mpe kobimisa mpisoli mpo na bantina mosusu. Hiromi, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela na Japon, alobi boye: “Mbala na mbala nazalaki kolɛmba nzoto mpamba te na mosala ya kosakola, bato bazalaki kosepela na nsango ya Biblia te. Na bantango mosusu, na mai na miso, nazalaki kosɛnga Yehova asalisa ngai nakutana na moto oyo azali koluka koyeba solo.”
3 Ekómelaka yo mpe oyoka lokola bandeko basi yango? Mingi kati na biso toyokaka bongo. (1 Pet. 5:9) Tolingaka ‘kosalela Yehova na esengo,’ kasi ntango mosusu tobimisaka mpisoli mpo na mawa, kolɛmba nzoto, to mpo na mokakatano moko oyo ezali komeka bosembo na biso epai ya Nzambe. (Nz. 6:6; 100:2) Tokoki kosala nini soki tozali komiyoka bongo?
4. Tokolobela nini na lisolo oyo?
4 Tokoki kozwa mateya na ndakisa ya Yesu. Na mabaku mosusu, mayoki ya makasi oyo azalaki na yango etindaki ye ‘alela, abimisa mpisoli.’ (Yoa. 11:35; Luka 19:41; 22:44; Ebr. 5:7) Tótalela lisusu mabaku yango. Tokomona mpe makambo oyo tokoki koyekola mpo na Yesu mpe Tata na ye Yehova. Tokotalela mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tóyika mpiko na makambo oyo ekoki kotinda biso tólela.
ABIMISAKI MPISOLI MPO NA BANINGA NA YE
5. Likambo nini tokoki koyekola mpo na Yesu na lisolo oyo ezali na Yoane 11:32-36?
5 Na eleko ya mpiɔ ya mobu 32 ya ntango na biso, Lazare, oyo azalaki moninga ya Yesu, abɛlaki mpe akufaki. (Yoa. 11:3, 14) Azalaki na bandeko basi mibale, Maria ná Marta, mpe Yesu alingaki libota yango mingi mpenza. Bandeko basi yango mibale bazalaki na mawa makasi mpo ndeko na bango ya mobali akufaki. Nsima ya liwa ya Lazare, Yesu asalaki mobembo na Betania, epai Maria ná Marta bazalaki kofanda. Ntango Marta ayokaki ete Yesu azali koya, apotaki mbangu mpo na kokutana na ye. Kanisá mawa oyo azalaki na yango ntango alobaki: “Nkolo, soki ozalaki awa mbele ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” (Yoa. 11:21) Mwa moke na nsima ntango Yesu amonaki Maria ná bato mosusu bazalaki kolela, ye mpe “alelaki, abimisi mpisoli.”—Tángá Yoane 11:32-36.
6. Mpo na nini Yesu alelaki?
6 Mpo na nini Yesu alelaki na libaku yango? Buku Étude perspicace des Écritures epesi eyano oyo: “Liwa ya moninga na ye Lazare mpe mawa makasi ya bandeko ya Lazare ya basi esalaki ete Yesu ‘abulungana mpe alela, abimisa mpisoli.’” * Ekoki kozala ete Yesu azalaki kokanisa mpasi oyo moninga na ye Lazare ayokaki ntango azalaki kobɛla, mpe ndenge mobali yango amiyokaki ntango amonaki ete mosika te akokufa. Na ntembe te Yesu alelaki mpe ntango amonaki ndenge Maria ná Marta bazalaki na mawa makasi mpo ndeko na bango ya mobali akufaki. Soki obungisá moninga moko ya motema to ndeko moko ya libota na liwa, na ntembe te, oyebi ndenge esalaka. Talá mateya misato oyo okoki koyekola na lisolo yango.
7. Mpisoli oyo Yesu abimisaki mpo na baninga na ye ezali koteya biso nini mpo na Yehova?
7 Yehova ayebi ndenge ozali komiyoka. Yesu azali ‘elilingi mpenza’ ya Tata na ye. (Ebr 1:3) Ntango Yesu alelaki, amonisaki mayoki ya Tata na ye. (Yoa. 14:9) Soki moto moko oyo olingaka mingi akufi, yebá ete Yehova asukaka kaka na komona mpasi na yo te, kasi ayokaka mpe mawa makasi mpo na yo. Alingaka kobikisa motema na yo oyo ebukani.—Nz. 34:18; 147:3.
8. Mpo na nini tokoki komindimisa ete Yesu akosekwisa bato oyo tolingaka?
8 Yesu azali na mposa ya kosekwisa bato oyo olingaka. Mwa moke liboso abimisa mpisoli, Yesu ayebisaki Marta boye: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Marta andimelaki Yesu. (Yoa. 11:23-27) Lokola Marta azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova, na ntembe te ayebaki ndenge mosakoli Eliya mpe mosakoli Elisha basekwisaki bato bankama ya bambula mingi liboso. (1 Bak. 17:17-24; 2 Bak. 4:32-37) Mpe ekoki kozala ete ayokaki masolo ya bato mosusu oyo Yesu asekwisaki. (Luka 7:11-15; 8:41, 42, 49-56) Yo mpe okoki komindimisa ete okomona lisusu bato oyo olingaka. Mpisoli oyo Yesu abimisaki ntango azalaki kobɔndisa baninga na ye oyo bazalaki na mawa emonisi polele ete azali na mposa makasi ya kosekwisa bato oyo bakufá!
9. Ndenge moko na Yesu, ndenge nini okoki kosalisa baoyo bazali na mawa makasi? Pesá ndakisa.
9 Okoki kosalisa baoyo bazali na mawa makasi. Yesu asukaki kaka te na kolela elongo na Maria ná Marta, kasi ayokaki bango mpe abɔndisaki bango na maloba na ye. Tokoki mpe kosala bongo epai ya baoyo bazali na mawa makasi. Ndeko Dan, nkulutu moko oyo afandaka na Australie, alobi boye: “Nsima ya liwa ya mwasi na ngai, nazalaki na mposa ya lisalisi. Bandeko mibali ebele ná basi na bango bazalaki wana ntango nyonso mpo na koyoka ngai. Bazalaki kotika ngai namonisa mawa na ngai, mpe bazalaki koyoka mabe te ntango nazalaki kolela. Basalisaki ngai mpe na makambo mosusu, na ndakisa kosukola motuka na ngai, kosalela ngai wenze mpe kolambela ngai ntango nazalaki kokoka kosala yango te. Mpe mbala mingi bazalaki kobondela elongo na ngai. Bamonisaki ete bazali baninga ya solosolo mpe bandeko oyo ‘babotami mpo na ntango ya mpasi.’”—Mas. 17:17.
ABIMISAKI MPISOLI MPO NA BAZALANI NA YE
10. Lobelá lisolo oyo ezali na Luka 19:36-40.
10 Yesu akómaki na Yerusaleme na mokolo ya 9 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso. Ntango azalaki kopusana na engumba yango, ebele ya bato bayanganaki mpe batandaki bilamba na bango na balabala mpo na komonisa ete bandimi azala Mokonzi na bango. Ezalaki likambo ya esengo mpenza. (Tángá Luka 19:36-40.) Na yango, ekoki kozala ete bayekoli na ye bazalaki kozela te likambo oyo esalemaki na nsima. Biblia elobi: “Ntango [Yesu] akómaki pene, atalaki engumba mpe alelaki mpo na yango.” Na mpisoli na miso, Yesu asakolaki makambo ya mabe oyo ekokómela bafandi ya Yerusaleme mosika te.—Luka 19:41-44.
11. Nini etindaki Yesu alela mpo na bafandi ya Yerusaleme?
11 Yesu ayokaki mpasi mpo ayebaki ete atako bayambaki ye malamu, bato yango mingi basilaki komonisa ete bakondima nsango ya Bokonzi te. Mpo na yango, Yerusaleme ekobebisama mpe Bayuda oyo bakobika nsima ya libebi yango bakomemama bakangami. (Luka 21:20-24) Likambo ya mawa, kaka ndenge Yesu alobaki yango, bato mingi baboyaki ye. Ndenge nini bato mingi batalelaka nsango ya Bokonzi na esika ofandi? Soki bato moke kaka nde bandimaka ete oteya bango solo, liteya nini okoki kozwa na mpisoli oyo Yesu abimisaki? Tótalela mateya mosusu misato.
12. Mpisoli oyo Yesu abimisaki mpo na bato ya Yerusaleme eteyi biso nini mpo na Yehova?
12 Yehova atyelaka bato likebi. Mpisoli ya Yesu ezali kosalisa biso tómona ete Yehova atyelaka mpenza bato likebi. “Alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Pet. 3:9) Lelo oyo, tomonisaka ete tolingaka bazalani na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bándima nsango malamu ya Bokonzi.—Mat. 22:39. *
13-14. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki koyokela bato mawa, mpe ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli yango?
13 Yesu asakolaki na molende mpenza. Amonisaki ete alingaki bato ndenge akobaki koteya bango na libaku nyonso. (Luka 19:47, 48) Nini etindaki ye asala bongo? Yesu azalaki koyokela bango mawa. Na bantango mosusu, bato mingi bazalaki na mposa ya koyoka maloba ya Yesu, mpe ye ná bayekoli na ye “bakokaki ata kolya eloko te.” (Mrk. 3:20) Mpe ntango mobali moko azalaki na mposa ya kosolola na Yesu na butu, Yesu andimaki kokutana na ye na ntango yango. (Yoa. 3:1, 2) Bato mingi oyo na ebandeli bayokaki mateya ya Yesu bakómaki bayekoli na ye te. Kasi apesaki bayoki na ye nyonso litatoli malamumalamu. Lelo oyo, tolingaka kopesa moto nyonso libaku ya koyoka nsango malamu. (Mis. 10:42) Mpo na yango, ekoki kosɛnga tóbongola lolenge oyo tosakolaka.
14 Ndimá kobongola makambo oyo esengeli. Soki tobongoli te ntango oyo tosakolaka, ekoki kozala mpasi kokutana na bato mosusu oyo bakondima koyoka nsango malamu. Ndeko mwasi moko na nkombo Matilda, oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai tomekaka kosakwela bato na bangonga ekeseni. Na ntɔngɔ makasi, tosakolaka na bisika ya mombongo. Na midi, ntango bato mingi bazalaka na babalabala, tosalelaka bashario, totandi mikanda. Na mpokwa, tomoni ete tokutaka bato mingi na bandako na bango.” Na esika tókangama kaka na programɛ oyo tomoni ete ezali malamu mpo na biso, tosengeli kondima kobongola programɛ na biso mpo tósakolaka na bantango oyo tokoki kokutana na bato. Soki tosali bongo, tóyeba ete Yehova akosepela mpenza.
ABIMISAKI MPISOLI MPO AZALAKI KOMITUNGISA MPO NA NKOMBO YA TATA NA YE
15. Ndenge emonisami na Luka 22:39-44, nini esalemaki na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu?
15 Na butu ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso, Yesu akendaki na elanga ya Getesemane. Kuna, asopelaki Yehova motema na ye na libondeli. (Tángá Luka 22:39-44.) Ezalaki na ntango wana ya mpasi nde Yesu “alɔmbaki . . . na koganga makasi mpe na mpisoli.” (Ebr. 5:7) Makambo nini Yesu asɛngaki na libondeli na ye na butu wana ya nsuka liboso akufa? Asɛngaki Yehova apesa ye makasi ya kotikala sembo mpe ya kosala mokano na Ye. Yehova ayokaki mpasi oyo Mwana na ye azalaki na yango ntango azalaki kobondela mpe atindaki anzelu moko mpo apesa ye makasi.
16. Mpo na nini Yesu azalaki komitungisa ntango azalaki kobondela na elanga ya Getesemane?
16 Na ntembe te, Yesu alelaki ntango azalaki kobondela na elanga ya Getesemane mpo azalaki komitungisa ndenge bato bakotalela ye lokola moto oyo afingi Nzambe. Ayebaki mpe mokumba monene oyo azalaki na yango: kotikala sembo mpo na kolongisa nkombo ya Tata na ye. Soki ozali na mitungisi oyo ezali komeka bosembo na yo epai ya Yehova, mateya nini okoki kozwa na mpisoli oyo Yesu abimisaki? Tótalela mateya mosusu misato.
17. Ndenge Yehova ayanolaki na mabondeli ya Yesu oyo eutaki na motema eteyi biso nini mpo na Ye?
17 Yehova ayokaka malɔmbo na yo. Yehova ayokaki mabondeli ya Yesu oyo eutaki mpenza na motema. Mpo na nini? Mpo mposa ya libosoliboso ya Yesu ezalaki ya kotikala sembo epai ya Tata na ye mpe ya kolongisa nkombo na Ye. Soki mposa na biso ya libosoliboso ezali ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe ya kolongisa nkombo na ye, akoyanola na mabondeli na biso soki tosɛngi ete asalisa biso.—Nz. 145:18, 19.
18. Na ndenge nini Yesu azali lokola moninga moko oyo amityaka na esika na biso?
18 Yesu amityaka na esika na yo. Ntango totungisami, toyokaka esengo ntango moninga oyo azali komitya na esika biso alendisi biso, mingimingi soki ye mpe akutaná na mikakatano lokola oyo ya biso. Yesu azali moninga ya ndenge wana. Ayebi ndenge oyo moto amiyokaka soki azali na bolɛmbu mpe soki azali na mposa ya lisalisi. Ayebi bolɛmbu na biso mpe akosala nyonso mpo tózwa lisungi “ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (Ebr. 4:15, 16) Kaka ndenge Yesu andimaki lisalisi ya anzelu na elanga ya Getesemane, biso mpe tosengeli kondima lisalisi oyo Yehova azali kopesa biso, ezala na nzela ya mokanda moko ya moombo ya sembo, ya video, ya diskur, to na nzela ya nkulutu to moninga moko oyo akɔmɛli na elimo, oyo ayei kolendisa biso.
19. Ndenge nini okoki kozwa makasi ntango okutani na mokakatano oyo ezali komeka bosembo na yo epai ya Nzambe ? Pesá ndakisa.
19 Yehova akopesa yo “kimya ya Nzambe.” Ndenge nini Yehova akopesa biso makasi? Ntango tobondeli, tokozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Flp. 4:6, 7) Kimya oyo Yehova apesaka ekokitisa motema na biso mpe ekosalisa biso tókanisa malamu. Yango nde esalemaki mpo na ndeko mwasi moko na nkombo Luz. Alobi boye: “Mbala mingi na miyokaka ete nazali kaka ngai moko. Na bantango mosusu, mayoki yango etindaka ngai nakanisa ete Yehova alingaka ngai te. Kasi na ntango yango, nayebisaka mbala moko Yehova ndenge oyo nazali komiyoka. Libondeli esalisaka ngai namiyoka malamu.” Ndenge ndakisa ya ndeko Luz emonisi yango, tokoki kozwa kimya na nzela ya libondeli.
20. Mateya nini tozwi na mpisoli oyo Yesu abimisaki?
20 Tozwi mateya ya kobɔndisa mpe ya malamu na ndenge oyo Yesu abimisaki mpisoli na mabaku mosusu! Toyekoli ete tosengeli kosunga bandeko oyo bazali na mawa mpe kotya motema ete Yehova ná Yesu bakosunga biso ntango moto moko oyo tolingaka akufi. Motema mawa etindaka biso tósakola mpe tóteya bato, mpo Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo bamonisaka ezaleli yango ya malamu. Mpe tolendisami koyeba ete Yehova Nzambe mpe Mwana na ye ya bolingo bayebaka ndenge oyo tozali komiyoka, bamityaka na esika na biso ntango tozali na bolɛmbu mpe ete balingaka kosalisa biso tóyika mpiko. Tókoba kosalela makambo nyonso oyo toyekoli tii mokolo oyo Yehova akokokisa elaka na ye ya kitoko, ya ‘kopangwisa mpisoli nyonso na miso na biso’!—Em. 21:4.
LOYEMBO 120 Tómekola motema pɛtɛɛ ya Kristo
^ par. 5 Biblia emonisi ete na bantango mosusu mayoki ya makasi etindaki Yesu abimisa mpisoli. Na lisolo oyo, tokolobela mabaku misato oyo Yesu abimisaki mpisoli, mpe mateya oyo tokoki kozwa.
^ par. 1 Topesi bango bankombo mosusu.
^ par. 6 Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, lok. 34.
^ par. 12 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mozalani” na Matai 22:39 esuki kaka te na bato oyo tofandaka na bango esika moko. Kasi ekoki mpe kozala moto nyonso oyo tokoki kosolola na ye.
^ par. 58 ELILINGI: Yesu abɔndisaki Maria ná Marta. Tokoki mpe kosala bongo mpo na bato oyo babungisi moto oyo balingaka na liwa.
^ par. 60 ELILINGI: Yesu andimaki koteya Nikodeme na butu. Tosengeli koyekola Biblia na bato na ntango oyo ebongi mpo na bango.
^ par. 62 ELILINGI: Yesu abondelaki Yehova apesa ye makasi atikala sembo. Biso mpe tosengeli kosala bongo ntango tokutani na komekama.