Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 4

Ntina oyo toyanganaka na Ekaniseli

Ntina oyo toyanganaka na Ekaniseli

“Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”​—LUKA 22:19.

LOYEMBO 20 Opesá Mwana na yo ya bolingo

NA MOKUSE *

1-2. (a) Ntango nini tokanisaka mingimingi moto tozalaki kolinga oyo akufá? (b) Yesu abandisaki nini na butu liboso akufa?

 ATA soki bato oyo tozalaki kolinga bakufá banda kala, tobosanaka bango te. Tokanisaka bango mingimingi na dati oyo bakufaki.

2 Mbula na mbula, tozalaka na kati ya bamilio ya bato na mokili mobimba oyo bayanganaka mpo na kokanisa liwa ya moto oyo tolingaka mingi, Yesu Kristo. (1 Pe. 1:8) Toyanganaka mpo na kokanisa moto oyo apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na kobikisa biso na lisumu mpe na liwa. (Mat. 20:28) Kutu, Yesu alingaki ete bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye. Na butu liboso akufa, abandisaki molulu moko ya ntina mingi mpe ayebisaki bayekoli na ye: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” *​—Luka 22:19.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Mwa motángo moke kati na baoyo bayanganaka na Ekaniseli ya liwa ya Kristo bazali na elikya ya bomoi na likoló. Kasi bamilio ya bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bayanganaka mpe na Ekaniseli yango. Na lisolo oyo, tokolobela bantina oyo bituluku yango nyonso mibale basepelaka koyangana na Ekaniseli mbula na mbula. Tokolobela mpe matomba oyo tozwaka ntango toyanganaka na Ekaniseli. Tólobela naino mwa bantina oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayanganaka na Ekaniseli.

NTINA OYO BAKRISTO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO BAYANGANAKA NA EKANISELI

4. Mpo na nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli?

4 Mbula na mbula, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bayanganaka na Ekaniseli balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo. Mpo na nini babongi kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli? Mpo na koyanola na motuna yango, tótala makambo oyo esalemaki na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Nsima ya fɛti ya Elekeli, Yesu abandisaki molulu oyo na nsima ekómaki kobengama Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Alekisaki limpa mpe vinyo epai ya bantoma na ye ya sembo 11 mpe ayebisaki bango bálya mpe bámɛla. Yesu alobelaki mpe kondimana mibale: kondimana ya sika mpe kondimana mpo na Bokonzi. * (Luka 22:19, 20, 28-30) Kondimana yango mibale epesaki bantoma yango mpe na mwa ndambo ya bato mosusu libaku ya kokóma bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló. (Em. 5:10; 14:1) Kaka batikali kati na bakristo oyo batyami mafuta na elimo *, oyo bazali na kati ya kondima yango mibale, nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli.

5. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebaka likambo nini mpo na elikya na bango?

5 Tólobela ntina mosusu oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayanganaka na Ekaniseli: Molulu yango epesaka bango libaku ya kokanisa elikya na bango. Yehova apesi bango elikya moko kitoko mpenza​—kozala na bomoi kozanga kokufa mpe ya kozanga kopɔla na likoló, kosala elongo na Yesu Kristo oyo asekwá mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo basilá kokende likoló, mpe oyo eleki nyonso, likoki ya komona mpenza Yehova Nzambe! (1 Ko. 15:51-53; 1 Yoa. 3:2) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebaka ete bazwá libyangi ya kokende likoló mpo na kosepela na makambo yango ya kitoko. Kasi mpo bákɔta kuna, basengeli kotikala sembo tii na liwa na bango. (2 Tim. 4:7, 8) Ntango bakanisaka elikya na bango ya kozala na bomoi na likoló, yango epesaka bango esengo mpenza. (Tito 2:13) Bongo “bampate mosusu”? (Yoa. 10:16) Wapi mwa bantina oyo etindaka bango báyangana na Ekaniseli?

NTINA OYO BAMPATE MOSUSU BAYANGANAKA NA EKANISELI

6. Mpo na nini bampate mosusu bayanganaka na Ekaniseli mbula na mbula?

6 Bampate mosusu bayanganaka na Ekaniseli lokola batali mpamba, kasi te lokola bato oyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo. Mbala ya liboso oyo baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele babengisamaki polele mpo na koyangana na Ekaniseli ezalaki na 1938. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1938 elobaki boye: “Ezali malamu mpe ebongi mpenza [bampate mosusu] báyangana na likita yango mpe bátala makambo oyo esalemaka. . . . Esengeli kozala, kutu ezali ntango ya esengo mpo na bango mpe.” Ndenge moko na bato oyo babengisami na fɛti ya libala, oyo bayaka mpo na kotala ndenge ekoleka, bampate mosusu mpe basepelaka koya na Ekaniseli lokola batali mpamba.

7. Mpo na nini bampate mosusu bazelaka na mposa makasi diskur ya Ekaniseli?

7 Bampate mosusu mpe bakanisaka elikya na bango. Bazelaka na mposa makasi diskur ya Ekaniseli, mpo diskur yango elobelaka mingimingi oyo Kristo ná bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye bakosala mpo na bato ya sembo na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Na nse ya litambwisi ya Yesu Kristo, baoyo bakoyangela kuna na likoló bakosalisa na kokómisa mabele paradiso, bakosalisa mpe bato ya botosi bákóma bato ya kokoka. Bamilio ya bato oyo bayaka na Ekaniseli lokola batali mpamba basepelaka mpenza ntango bakanisaka ndenge bisakweli ya Biblia ekokokisama na mikolo ezali koya, na ndakisa oyo elobelami na Yisaya 35:5, 6; 65:21-23; mpe na Emoniseli 21:3, 4. Ntango bamimonaka na mokili ya sika elongo na bato oyo balingaka, yango ekómisaka elikya ba bango makasi mpo na mikolo ezali koya, mpe bakómaka na ekateli makasi ya kokoba kosalela Yehova.​—Mat. 24:13; Gal. 6:9.

8. Wapi ntina mosusu oyo bampate mosusu bayanganaka na Ekaniseli?

8 Tólobela ntina mosusu oyo bampate mosusu bayanganaka na Ekaniseli. Balingaka komonisa ete balingaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bapesaka bango mabɔkɔ. Biblia esakolaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele bakosala elongo, na bomoko. Na ndenge nini? Tótalela mwa bandakisa.

9. Ndenge nini esakweli oyo ezali na Zekaria 8:23 emonisi ndenge bampate mosusu bayokaka mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

9 Tángá Zekaria 8:23. Esakweli yango elobeli malamu ndenge bampate mosusu bayokaka mpo na bandeko na bango oyo batyami mafuta na elimo. Maloba “Moyuda moko” mpe “bino” ezali kaka eloko moko, elobeli bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino na bomoi awa na mabele. (Rom. 2:28, 29) “Bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikolo” ezali komonisa bampate mosusu. ‘Basimbi mpenza’ bakristo oyo batyami mafuta na elimo, elingi koloba bakangami na bango na bosembo mpenza na losambo ya pɛto. Na yango, bampate mosusu bamonisaka ete bakangami makasi na bakristo oyo batyami mafuta na elimo na ndenge bayanganaka elongo na bango na Ekaniseli.

10. Ndenge nini Yehova akokisi esakweli oyo ezali na Ezekiele 37:15-19, 24, 25?

10 Tángá Ezekiele 37:15-19, 24, 25. Yehova akokisi esakweli yango na ndenge asali ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo básala elongo na bampate mosusu na bomoko mpenza. Esakweli yango elobeli mwa biteni mibale ya nzete. Baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló bazali lokola mwa eteni ya nzete “mpo na Yuda” (libota epai bakonzi ya Yisraele bazalaki koponama). Mpe baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bazali lokola mwa eteni ya nzete “ya Efraime.” * Yehova asengelaki kosangisa biteni yango mibale mpo ekóma “eteni kaka moko ya nzete.” Yango elingi koloba basalaka na bomoko na litambwisi ya Mokonzi na bango kaka moko, Yesu Kristo. Mbula na mbula, ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná bampate mosusu bayanganaka na Ekaniseli, bazalaka te bituluku mibale oyo ekeseni, kasi lokola “etonga kaka moko” na nse ya “mobateli kaka moko.”​—Yoa. 10:16.

11. Wapi lolenge ya libosoliboso oyo “bampate” oyo Matai 25:31-36, 40 elobeli, bapesaka bandeko ya Kristo mabɔkɔ?

11 Tángá Matai 25:31-36, 40. “Bampate” oyo Yesu alobelaki ezali bato ya sembo oyo bazali kobika na ntango ya nsuka, oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, elingi koloba, bampate mosusu. Na bosembo nyonso, bapesaka batikali kati na bandeko ya Kristo mabɔkɔ libosoliboso na ndenge basalisaka bango bákokisa mokumba moko monene: mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na mokili mobimba.​—Mat. 24:14; 28:19, 20.

12-13. Ndenge nini bampate mosusu bapesaka bandeko ya Kristo mabɔkɔ?

12 Mbula na mbula, mwa bapɔsɔ liboso Ekaniseli esalema, bampate mosusu bapesaka bandeko ya Kristo mabɔkɔ na ndenge bamipesaka na kosala kampanye na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na Ekaniseli. (Talá etanda “ Ozali komibongisa mpo na eleko ya Ekaniseli?”) Bapesaka mpe mabɔkɔ na ndenge bazwaka bibongiseli nyonso oyo esengeli mpo Ekaniseli esalema na masangá nyonso na mokili mobimba, atako masangá mingi ezalaka ata na moto moko te oyo alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo. Bampate mosusu basepelaka kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ na ndenge wana. Bampate yango bayebi ete Yesu amonaka makambo nyonso oyo basalaka mpo na bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo, lokola nde basalaka yango mpo na ye moko.​—Mat. 25:37-40.

13 Wapi mwa bantina mosusu oyo biso nyonso ata soki tozali na elikya nini, toyanganaka na Ekaniseli?

NTINA OYO BISO NYONSO TOYANGANAKA

14. Ndenge nini Yehova ná Yesu bamoniselá biso bolingo monene?

14 Tozalaka na botɔndi mpo na bolingo oyo Yehova ná Yesu bamoniselá biso. Yehova amoniselá biso bolingo na ye na ndenge mingi, kasi ezali na lolenge moko oyo eleki misusu nyonso. Nzambe na biso amoniselá biso bolingo oyo eleki monene na ndenge atindaki Mwana na ye oyo alingaka mingi anyokwama mpe akufa mpo na biso. (Yoa. 3:16) Toyebi ete Yesu mpe amonisaki bolingo monene na ndenge andimaki kopesa bomoi na ye mpo na biso. (Yoa. 15:13) Tozali na eloko moko te oyo tokoki kofuta Yehova ná Yesu mpo na bolingo oyo bamoniselá biso. Kasi tokoki komonisa botɔndi na makambo oyo tosalaka na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Kol. 3:15) Toyanganaka mpe na Ekaniseli mpo na kokanisa bolingo oyo bamoniselaki biso mpe komonisa bolingo na biso mpo na bango.

15. Mpo na nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bazalaka na botɔndi mpo na lisiko?

15 Tozalaka mpenza na botondi mpo na lisiko. (Mat. 20:28) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaka lisiko na motuya mingi mpo yango nde esali ete elikya na bango ekokisama. Lokola bamonisaka kondima na mbeka ya Kristo, Yehova atángi bango bayengebene mpe akómisá bango bana na ye. (Rom. 5:1; 8:15-17, 23) Bampate mosusu mpe bazalaka na botɔndi mpo na lisiko. Lokola bamonisaka kondima na makila oyo Yesu asopá, bazalaka pɛto na miso ya Yehova, bakoki kosalela ye mosala mosantu, mpe bazali na elikya ya ‘kouta na bɔlɔzi monene.’ (Em. 7:13-15) Lolenge moko oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bamonisaka botɔndi mpo na lisiko ezali ndenge bayanganaka mbula na mbula na Ekaniseli.

16. Wapi ntina mosusu oyo toyanganaka na Ekaniseli?

16 Ntina mosusu oyo toyanganaka na Ekaniseli ezali mpo tolingaka kotosa Yesu. Ezala tozali na elikya nini mpo na mikolo ezali koya, mokomoko na biso alingaka kotosa etinda oyo Yesu apesaki na butu oyo abandisaki Ekaniseli; alobaki boye: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”​—1 Ko. 11:23, 24.

MATOMBA OYO BISO NYONSO TOZWAKA

17. Ndenge nini Ekaniseli esalisaka biso tópusana lisusu penepene na Yehova?

17 Topusanaka lisusu penepene na Yehova. (Yak. 4:8) Ndenge touti komona yango, Ekaniseli epesaka biso libaku ya kokanisa elikya oyo Yehova apesá biso, mpe ya kokanisa na mozindo na bolingo monene oyo amoniselá biso. (Yir. 29:11; 1 Yoa. 4:8-10) Ntango tokanisaka elikya na biso oyo ekozanga te kokokisama na mikolo ezali koya mpe bolingo monene ya Nzambe mpo na biso, tokómaka mpe kolinga Ye mingi mpe boyokani na biso ná Ye ekómaka lisusu makasi.​—Rom. 8:38, 39.

18. Komanyola ndakisa ya Yesu etindaka biso tósala nini?

18 Yango etindaka biso tólanda ndakisa ya Yesu. (1 Pe. 2:21) Mwa mikolo liboso ya Ekaniseli, totángaka masolo oyo elobeli pɔsɔ ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele, liwa na ye, mpe lisekwa na ye. Mpe na mpokwa ya mokolo ya Ekaniseli, diskur oyo esalemaka ekundwelaka biso bolingo oyo Yesu amoniselaki biso. (Ef. 5:2; 1 Yoa. 3:16) Ntango tózali kotánga ndakisa ya Yesu na oyo etali komipimela mpe tozali komanyola likambo yango, etindaka biso ‘tókoba kotambola ndenge atambolaki.’​—1 Yoa. 2:6.

19. Ndenge nini tokoki kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe?

19 Tokómaka na ekateli makasi ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. (Yuda 20, 21) Tokotikala na kati ya bolingo ya Nzambe soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa ye, kosantisa nkombo na ye, mpe kosepelisa motema na ye. (Mas. 27:11; Mat. 6:9; 1 Yoa. 5:3) Ekaniseli etindaka biso tókóma na ekateli makasi ya kosalela bomoi na biso ya mokolo na mokolo lokola nde tozali koloba na Yehova: ‘Nalingi kotikala na kati ya bolingo na yo mpo na libela!’

20. Wapi mwa bantina oyo toyanganaka na Ekaniseli?

20 Tózala na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele, tozali na bantina mingi ya koyangana na Ekaniseli. Mbula na mbula, ntango toyanganaka na Ekaniseli, tokanisaka liwa ya moto oyo tolingaka, Yesu Kristo. Oyo eleki nyonso, tokanisaka bolingo eleki monene oyo Yehova amoniselá biso na ndenge apesaki Mwana na ye lisiko mpo na biso. Na mbula oyo, Ekaniseli ekosalema na mpokwa ya mwamitano, 15/04/2022. Lokola tolingaka Yehova mpe Mwana na ye, na mokolo oyo tokokanisa liwa ya Yesu, likambo moko te ekoki kozala na ntina mpo na biso koleka koyangana na Ekaniseli.

LOYEMBO 16 Bókumisa Yah mpo na Mwana na ye oyo atyami mafuta

^ par. 5 Tózala na elikya ya bomoi na likoló to na paradiso awa na mabele, tozelaka na mposa makasi koyangana na Ekaniseli mbula na mbula. Na lisolo oyo, tokolobela bantina oyo Makomami epesi biso ya koyangana na Ekaniseli mpe matomba oyo tozwaka soki tozali kosala bongo.

^ par. 2 Maloba yango ebongolamá “Sala boye mpo na ekaniseli na ngai” (Biblia haut fleuve).

^ par. 4 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali kondimana ya sika mpe kondimana mpo na Bokonzi, talá lisolo “Bokokóma, ‘bokonzi moko ya banganga-nzambe’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2014, nk. 15-17.

^ par. 4 NDIMBOLA YA MALOBA: Batikali kati na bakristo oyo batyami mafuta na elimo ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino na bomoi awa na mabele.

^ par. 10 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali esakweli ya mwa biteni mibale ya nzete oyo ezali na Ezekiele mokapo 37, talá buku Le culte pur de Jéhovah enfin rétabli!, nk. 130-135, par. 3-17.