LISOLO YA BOYEKOLI 11
Kobá kolata “bomoto ya sika” nsima ya kozwa batisimo
“Bólata bomoto ya sika.”—KOL. 3:10.
LOYEMBO 49 Tósepelisa motema ya Yehova
NA MOKUSE *
1. Nini ezalaka mpenza na bopusi likoló ya bomoto na biso?
EZALA tozwi batisimo eleki mwa mikolo to eleki bambula mingi, mposa na biso nyonso ezalaka ete tózala na bomoto oyo Yehova alingaka. Mpo tózala na bomoto ya ndenge wana, tosengeli koyeba kobatela makanisi na biso. Mpo na nini? Mpo makanisi na biso ezalaka na bopusi mingi likoló ya bomoto na biso. Soki tokanisaka mbala nyonso makambo oyo esepelisaka nzoto, tokobanda koloba mpe kosala makambo ya mabe. (Ef. 4:17-19) Nzokande, soki totondisi bɔɔngɔ na biso na makanisi ya malamu, mbala mingi tokobanda koloba mpe kosala makambo na ndenge oyo ekosepelisa Tata na biso, Yehova.—Gal. 5:16.
2. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
2 Ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, tokoki te kopekisa makanisi nyonso ya mabe ekɔta na bɔɔngɔ na biso. Kasi tokoki koboya kosala makambo oyo eyokani na makanisi ya ndenge wana. Liboso ya kozwa batisimo, tosengeli kotika koloba mpe kosala makambo oyo Yehova ayinaka. Yango ezali likambo ya liboso mpe oyo eleki ntina mpo na kolongola bomoto ya kala. Kasi mpo tósepelisa Yehova malamumalamu, tosengeli mpe kotosa etinda oyo: “Bólata bomoto ya sika.” (Kol. 3:10) Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo: “Bomoto ya sika” ezali nini? Ndenge nini tokoki kolata bomoto ya sika mpe kobatela yango?
“BOMOTO YA SIKA” EZALI NINI?
3. Na kotalela Bagalatia 5:22, 23, “bomoto ya sika” ezali nini, mpe moto oyo alati yango azalaka ndenge nini?
3 “Bomoto ya sika” ezali lolenge ya kokanisa mpe ya kosala makambo oyo eyokani na bomoto ya Yehova. Moto oyo alati bomoto ya sika amonisaka mbuma ya elimo ya Nzambe; atikaka elimo santu etambwisa makanisi na ye, mayoki na ye, mpe misala na ye. (Tángá Bagalatia 5:22, 23.) Na ndakisa, alingaka Yehova mpe basaleli na Ye. (Mat. 22:36-39) Moto ya ndenge wana abatelaka esengo na ye ata ntango azali na mikakatano. (Yak. 1:2-4) Azali moto oyo atyaka kimya. (Mat. 5:9) Azalaka na motema molai mpe na boboto na boyokani na ye na basusu. (Kol. 3:13) Alingaka makambo ya malamu mpe asalaka yango. (Luka 6:35) Amonisaka na misala na ye ete azali na kondima makasi epai ya Tata na ye ya likoló. (Yak. 2:18) Atombokaka te ntango bapesi ye nkanda mpe amipekisaka ntango amekami.—1 Ko. 9:25, 27; Tito 3:2.
4. Mpo na kolata bomoto ya sika, tosengeli nde komonisa bizaleli oyo Bagalatia 5:22, 23 elobeli kaka mokomoko na ngala na yango? Limbolá.
4 Mpo na kolata bomoto ya sika, tosengeli kokolisa bizaleli nyonso oyo ezali na Bagalatia 5:22, 23 mpe na mikapo mosusu ya Biblia. * Tosengeli komonisa bizaleli yango nyonso nzela moko. Mpo na nini? Moko ya bantina ezali ete makambo mosusu ya bizaleli yango ekokani. Na ndakisa, soki olingi mpenza mozalani na yo, okozala na motema molai mpe na boboto epai na ye. Mpo na kozala mpenza moto malamu, osengeli kozala na motema pɛtɛɛ mpe na komipekisa.
NDENGE NINI OKOKI KOLATA BOMOTO YA SIKA?
5. ‘Kozala na makanisi ya Kristo’ elimboli nini, mpe mpo na nini tosengeli koyekola bomoi ya Yesu? (1 Bakorinti 2:16)
5 Tángá 1 Bakorinti 2:16. Mpo na kolata bomoto ya sika, tosengeli kozala na “makanisi ya Kristo.” Na maloba mosusu, tosengeli koyekola ndenge oyo Yesu akanisaka, mpe na nsima komekola ye. Yesu amonisaki mbuma ya elimo ya Nzambe na ndenge ya kokoka. Ndenge moko na talatala oyo ezangi mbeba, Yesu amonisaka bizaleli ya Yehova kaka ndenge ezali mpenza. (Ebr. 1:3) Soki tozali kokanisa mingi lokola Yesu, tokobanda mpe kosala makambo mingi lokola ye mpe tokolonga kozala na bomoto lokola oyo ya ye.—Flp. 2:5.
6. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kosala makasi tólata bomoto ya sika?
6 Tokoki mpenza kolanda ndakisa ya Yesu? Mbala mosusu tokoki kokanisa boye: ‘Yesu azali moto ya kokoka. Nakokoka ata moke te kozala lokola ye!’ Soki okanisaka bongo, kobosana makambo oyo te: Ya liboso, okelamaki na likoki ya kozala lokola Yehova mpe Yesu. Na yango, okoki kopona komekola bango, mpe okoki kolonga, ata soki ekozala na ndenge ya kokoka te. (Eba. 1:26) Ya mibale, elimo santu ya Nzambe ezali nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́. Na lisalisi ya elimo yango, okoki kolonga kosala makambo oyo okokoka kosala na makasi na yo moko te. Ya misato, Yehova azali kozela te ete omonisa mbuma ya elimo na ndenge ya kokoka banda sikoyo. Kutu, Tata na biso ya bolingo atyeli bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele mbula 1 000 mpo bákóma bato ya kokoka. (Em. 20:1-3) Mpo na sikoyo, Yehova asɛngi biso tósala oyo tokoki mpe tótyela ye motema mpo asalisa biso.
7. Makambo nini tokotalela sikoyo?
7 Ndenge nini tokoki mpenza komekola Yesu? Tokolobela na mokuse bizaleli minei ya mbuma ya elimo ya Nzambe. Tokomona ndenge oyo Yesu amonisaki bizaleli yango mokomoko, mpe mateya oyo tokoki koyekola. Lisusu, tokotalela mituna mosusu oyo ekoki kosalisa biso tóyeba soki tokómi wapi na oyo etali kolata bomoto ya sika.
8. Ndenge nini Yesu amonisaki bolingo?
8 Kolinga makasi oyo Yesu alingaka Yehova etindaki ye amipimela makambo mosusu mpo na Tata na ye mpe mpo na biso. (Yoa. 14:31; 15:13) Yesu amonisaki ete alingaka bato mingi na lolenge ya bomoi oyo aponaki kozala na yango awa na mabele. Mokolo na mokolo, azalaki komonisa bolingo mpe motema mawa, ata ntango bato mosusu bazalaki kotɛmɛla ye. Lolenge ya libosoliboso oyo amonisaki ete alingaki bato ezalaki ndenge ateyaki bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43, 44) Yesu amonisaki mpe bolingo oyo ezangi moimi mpo na Nzambe mpe mpo na bato na ndenge andimaki konyokwama mpe kokufa liwa ya mpasi na mabɔkɔ ya basumuki. Na ndenge yango, afungolelaki biso nyonso nzela ya kozwa bomoi ya seko.
9. Ndenge nini tokoki komekola Yesu na oyo etali komonisa bolingo?
9 Tomipesaki na Yehova, Tata na biso ya likoló, mpe tozwaki batisimo mpo tolingaka ye. Na yango, ndenge moko na Yesu, tomonisaka ete tolingaka Yehova na nzela ya makambo oyo tosalelaka basusu. Ntoma Yoane akomaki: “Moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki kolinga Nzambe te, oyo ye amoni te.” (1 Yoa. 4:20) Na yango, tosengeli komituna boye: ‘Nalingaka bato na motema moko mpenza? Nayokelaka basusu motema mawa, ata ntango bazangi limemya epai na ngai? Bolingo etindaka ngai nasalela ntango mpe biloko na ngai mpo na kosalisa bato mosusu báyeba Yehova? Nandimaka kosala yango ata ntango bato mingi bazali kosepela na milende na ngai te to mpe bazali kotɛmɛla ngai? Nakoki koluka ndenge ya kopesa ntango mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli?’—Ef. 5:15, 16.
10. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali moto oyo atyaka kimya?
10 Yesu azalaki moto oyo atyaka kimya. Ntango bato basalaki ye makambo ya mabe, azongisaki mabe na mabe te. Kasi asukaki kaka wana te. Azalaki moto ya liboso mpo na kotya kimya mpe alendisaki bato básilisaka matata na bango. Na ndakisa, ateyaki bango ete basengeli koyokana na bandeko na bango soki balingi ete Yehova andima losambo na bango. (Mat. 5:9, 23, 24) Mpe asalisaki bantoma mbala na mbala mpo bátika kowelana mpo na koyeba soki nani aleki baninga.—Luka 9:46-48; 22:24-27.
11. Ndenge nini tokoki kozala bato oyo batyaka kimya?
11 Mpo na kozala moto oyo atyaka kimya, tosengeli kosuka kaka te na koboya kobimisa kowelana. Tosengeli kozala bato ya liboso mpo na kotya kimya ntango makambo ebebi mpe tosengeli kolendisa bandeko básilisaka matata na bango. (Flp. 4:2, 3; Yak. 3:17, 18) Tokoki komituna boye: ‘Makambo nini nandimaka komipimela mpo na kotya kimya ná basusu? Ntango ndeko moko azokisi ngai, nabombelaka ye nkanda na motema? Nazelaka ete moto oyo tozwani na ye matata nde aya mpo tózongisa kimya, to ngai nde nazalaka moto ya liboso mpo na kotya kimya, ata soki emonani lokola ete moto yango nde alukaki makambo? Soki esengeli, nalendisaka baoyo bazwani matata bázongisa kimya?’
12. Ndenge nini Yesu amonisaki boboto?
12 Yesu azalaki na boboto. (Mat. 11:28-30) Amonisaki boboto na ndenge azalaki makambo makasimakasi te, ata ntango ezalaki mpasi kosala yango. Na ndakisa, ntango mwasi moko Mofenisia asɛngaki ye abikisa mwana na ye, na ebandeli Yesu aboyaki kosala likambo oyo asɛngaki, kasi ntango mwasi yango amonisaki kondima monene, na boboto nyonso, Yesu abikisaki mwana yango. (Mat. 15:22-28) Atako Yesu azalaki na boboto, azalaki kokanga miso na mabe te. Na bantango mosusu, amonisaki boboto na ndenge asembolaki baoyo azalaki kolinga. Na ndakisa, ntango Petro alukaki kopekisa Yesu asala mokano ya Yehova, Yesu apamelaki ye na miso ya bayekoli mosusu. (Mrk. 8:32, 33) Asalaki yango mpo na kosambwisa ye te, kasi nde mpo na koteya ye mpe kokebisa bayekoli mosusu báboya ezaleli ya lofundo. Na ntembe te, Petro ayokaki mwa nsɔni, kasi disiplini yango esalisaki ye.
13. Ndenge nini tokoki komonisa boboto ya solosolo?
13 Mpo na komonisela bato oyo olingaka boboto, na bantango mosusu ekosɛnga ete oyebisaka bango makambo polele. Ntango ozali kosala bongo, mekolá Yesu mpe pesá batoli oyo euti na Liloba ya Nzambe. Lobá na mayele. Moná ete balingi kosala oyo ezali malamu, mpe zalá na elikya ete baoyo balingaka Yehova mpe balingaka yo bakosalela toli oyo opesi bango na bolingo. Omituna boye: ‘Nazalaka na mpiko ya koloba ntango namoni ete moto oyo nalingaka azali kosala likambo moko ya mabe? Soki esɛngi ete napesa toli, nalobaka na boboto, to nalobaka na nkanza? Nini etindaka ngai napesa toli? Napesaka moto toli mpo apesi ngai nkanda, to mpo nazali koluka bolamu na ye?’
14. Ndenge nini Yesu amonisaki bolamu?
14 Yesu ayebaki oyo ezali malamu kasi asukaki kaka wana te; azalaki mpe kosala yango. Yesu alingaka Tata na ye; na yango asalaka ntango nyonso makambo ya malamu na makanisi ya malamu. Bolamu emonanaka polele na matomba oyo ememelaka bato mosusu. Moto malamu alukaka ntango nyonso mabaku ya kosalisa basusu. Tosengeli kosuka kaka te na koyeba ete likambo ya malamu ya kosala yango oyo; kasi tosengeli kosala yango mpe kozala na makanisi ya malamu ntango tozali kosala yango. Moto mosusu akoki komituna boye: ‘Moto akoki nde kosala likambo ya malamu, kasi na makanisi ya mabe?’ Ɛɛ, ekoki kosalema. Na ndakisa, Yesu alobelaki baoyo bazalaki kopesa babola makabo mpe kosala nyonso mpo bato bámona likambo oyo basali mpo bákumisa bango. Atako makambo oyo bazalaki kosala ezalaki komonana malamu, Yehova azalaki kosepela na yango te.—Mat. 6:1-4.
15. Ndenge nini tokoki komonisa bolamu ya solosolo?
15 Tokomonisa bolamu ya solosolo soki tozali kosala makambo ya malamu kozanga koluka matomba na biso moko. Na yango, okoki komituna boye: ‘Nasukaka kaka na koyeba makambo ya malamu, to nasalaka yango mpenza? Nini etindaka ngai nasalela basusu makambo ya malamu?’
NDENGE NINI TOKOKI KOBATELA MALAMU BOMOTO NA BISO YA SIKA?
16. Tosengeli kosala nini mokolo na mokolo, mpe mpo na nini?
16 Tosengeli kokanisa te ete mosala ya kolata bomoto ya sika esukaka ntango tozwi batisimo. Bomoto ya sika ekokani na elamba ya sika oyo tosengeli kobatela malamu. Mpo na kosala yango, tosengeli koluka ndenge ya komonisa mbuma ya elimo ya Nzambe mokolo na mokolo. Mpo na nini? Mpo Yehova Nzambe asalelaka elimo na ye mpo na kosala misala. (Eba. 1:2) Na yango, ezaleli nyonso ya mbuma ya elimo ekoki mpe esengeli kopusa biso na misala. Na ndakisa, moyekoli Yakobo akomaki: “Kondima oyo ezali na misala te ekufi.” (Yak. 2:26) Tokoki mpe koloba bongo mpo na bizaleli mosusu nyonso ya mbuma ya elimo ya Nzambe. Mbala nyonso oyo tomonisi bizaleli yango, tolakisaka ete elimo ya Nzambe ezali kosala kati na biso.
17. Tosengeli kosala nini soki tolongi te komonisa mbuma ya elimo?
17 Ata bakristo oyo bazwá batisimo banda bambula mingi na bantango mosusu balongaka te komonisa mbuma ya elimo. Kasi likambo eleki ntina ezali ete tosengeli kolɛmba te. Tózwa ndakisa oyo: Soki elamba oyo olingaka mingi epasuki, okobwaka yango mbala moko? Te. Na ntembe te okobongisa yango na likebi, soki likoki ezali. Mpe na nsima, okozala mpenza ekɛngɛ. Ndenge moko mpe, soki na bantango mosusu olongi te komonisa boboto, motema molai, to mpe bolingo epai ya moto moko boye, kolɛmba nzoto te. Soki osɛngi bolimbisi na motema mobimba ekobongisa makambo, mpe ekosalisa yo ozongisa boyokani malamu na moto yango. Mpe zwá ekateli ya kosala malamu mbala ya nsima.
18. Likambo nini tosengeli koyeba?
18 Tozali na botɔndi ndenge Yesu atikelá biso ndakisa! Soki tozali komekola lolenge na ye ya kokanisa, ekozala mpenza mpasi te tósala makambo ndenge azalaki kosala. Soki tozali kosala makambo lokola Yesu, yango ekosalisa biso mingi na kolata bomoto ya sika. Na lisolo oyo, tolobeli kaka bizaleli minei ya mbuma ya elimo ya Nzambe. Mpo na nini te ozwa mwa ntango mpo na koyekola bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo mpe okanisa ndenge oyo ozali komonisa bizaleli yango? Okomona molɔngɔ ya masolo oyo elobeli bizaleli ya mbuma ya elimo na Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova na motó ya likambo “Bomoi ya bokristo” mpe na nsima “Mbuma ya elimo.” Yebá ete soki osali oyo okoki, Yehova akosalisa yo olata bomoto ya sika mpe obatela yango.
LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala
^ Ata soki tobɔkwamá ndenge nini, tokoki kolata “bomoto ya sika.” Mpo na kosala yango, tosengeli kokoba kobongisa ndenge na biso ya kokanisa, mpe kosala makasi tózala lokola Yesu. Lisolo oyo ekolobela bandakisa oyo emonisi ndenge oyo Yesu azalaki kokanisa mpe kosala makambo. Ekomonisa mpe ndenge oyo tokoki kokoba komekola ye nsima ya kozwa batisimo.
^ Bagalatia 5:22, 23 elobeli te bizaleli nyonso ya malamu oyo elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tókolisa. Mpo na koyeba likambo yango malamu, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 06/2020.