Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 10

Okoki ‘kolongola bomoto ya kala’

Okoki ‘kolongola bomoto ya kala’

“Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango.​—KOL. 3:9.

LOYEMBO 29 Tófingisa nkombo na biso te

NA MOKUSE *

1. Bomoi na yo ezalaki ndenge nini liboso obanda koyekola Biblia?

 BOMOI na yo ezalaki ndenge nini liboso obanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova? Mingi kati na biso tolingaka kutu kokanisa yango te. Na ntembe te ndenge na biso ya kotalela bomoi mpe bomoto na biso ezalaki kolanda mibeko ya mokili na oyo etali mabe ná malamu. Soki bongo, ‘tozalaki na elikya te mpe tozalaki na Nzambe te na mokili.’ (Ef. 2:12) Kasi koyekola Biblia ebongolaki nyonso wana!

2. Likambo nini oyebaki ntango okómaki koyekola Biblia?

2 Ntango okómaki koyekola Biblia, oyaki koyeba ete ozali na Tata moko na likoló oyo alingaka yo mingi mpenza. Omonaki ete mpo osepelisa Yehova mpe okɔta na libota ya basambeli na ye, ekosɛnga obongola mpenza bomoi na yo, ndenge na yo ya kotalela makambo, mpe makanisi na yo. Ekosɛnga otosa mibeko na ye na oyo etali mabe ná malamu.​—Ef. 5:3-5.

3. Na kotalela Bakolose 3:9, 10, Yehova alingi ete tósala nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Yehova, Mozalisi mpe Tata na biso ya likoló, azali na lotomo ya kokata soki bizaleli nini bato oyo bazali na libota na ye basengeli komonisa. Mpe asɛngi ete liboso tózwa batisimo, tósala makasi mpenza mpo na ‘kolongola bomoto ya kala elongo na misala na yango.’ * (Tángá Bakolose 3:9, 10.) Lisolo oyo ekosalisa baoyo balingi kozwa batisimo bázwa biyano na mituna misato oyo: (1) “Bomoto ya kala” ezali nini? (2) Mpo na nini Yehova asɛngi biso tólongola yango? (3) Ndenge nini tokoki kosala yango? Mpo na biso baoyo tosilá kozwa batisimo, boyekoli oyo ekosalisa biso tóyeba ndenge ya kopekisa bizaleli ya bomoto ya kala ezongela biso.

“BOMOTO YA KALA” EZALI NINI?

4. Makambo nini moto oyo azali na “bomoto ya kala” asalaka?

4 Mbala mingi moto oyo azali na “bomoto ya kala” akanisaka mpe asalaka makambo na ndenge ya mosuni. Akoki kozala na ezaleli ya moyimi, asilikaka noki, azalaka na botɔndi te, mpe azalaka na lolendo. Mbala mosusu mpe asepelaka na pornografi, mpe atalaka bafilme oyo elakisaka makambo ya mbindo to makambo ya mobulu. Na ntembe te azali na bizaleli mosusu ya malamu, mpe ntango mosusu akoki komitungisa mpo na makambo ya mabe oyo alobi to asali. Kasi azalaka na mposa makasi te ya kobongola makanisi mpe bizaleli na ye.​—Gal. 5:19-21; 2 Tim. 3:2-5.

Ntango tolongoli “bomoto ya kala,” bizaleli mpe mimeseno ya mabe ekotambwisa biso te (Talá paragrafe 5) *

5. Na oyo etali kolongola bomoto ya kala, likambo nini tosengeli kobosana te? (Misala 3:19)

5 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, moko te kati na biso akoki kolongola makanisi nyonso mpe bamposa nyonso ya mabe na motema mpe na bɔɔngɔ na biso. Na bantango mosusu, tokosala to tokoloba makambo mosusu oyo ekopesa biso mawa na nsima. (Yir. 17:9; Yak. 3:2) Kasi ntango tolongoli bomoto ya kala, makanisi mpe misala ya nzoto ekotambwisa biso lisusu te. Tokokóma bato ya ndenge mosusu.​—Yis. 55:7; tángá Misala 3:19.

6. Mpo na nini Yehova asɛngi biso tólongola makanisi ya mabe mpe tótika mimeseno ya mabe ya bomoto ya kala?

6 Yehova asɛngi biso tólongola makanisi ya mabe mpe tótika mimeseno ya mabe mpo alingaka biso mingi mpenza mpe alingi ete tósepela na bomoi. (Yis. 48:17, 18) Ayebi ete bato oyo bakokisaka bamposa ya mabe bamipesaka mpasi, bapesaka mpe baoyo bazali zingazinga na bango mpasi. Soki esalemi bongo, Yehova ayokaka mpasi.

7. Na kotalela Baroma 12:1, 2, tosengeli kopona nini?

7 Na ebandeli, baninga mpe bandeko mosusu ya libota bakoki kotyola biso mpo tozali kosala makasi tóbongola bomoto na biso. (1 Pe. 4:3, 4) Bakoki koloba ete tozali na lotomo ya kosala nyonso oyo tolingi mpe ete tosengeli kotika te ete bato mosusu báyebisa biso oyo tosengeli kosala. Kasi baoyo baboyaka kotosa mibeko ya Yehova bazalaka na bonsomi ya solosolo te. Kutu, balandaka nde mokili oyo eyangelami na Satana. (Tángá Baroma 12:1, 2.) Biso nyonso tosengeli kopona: Kobatela bomoto na biso ya kala, oyo elandaka lisumu mpe mokili ya Satana, to kotika Yehova abongola biso mpo tókóma bato ya malamu ata sikoyo.​—Yis. 64:8.

NDENGE NINI OKOKI ‘KOLONGOLA’ BOMOTO YA KALA?

8. Nini ekosalisa biso tóboya makanisi mpe mimeseno ya mabe?

8 Yehova ayebi ete ekosɛnga ntango mpe milende mpo tóboya makanisi mpe mimeseno ya mabe. (Nz. 103:13, 14) Kasi, na nzela ya Liloba na ye, ya elimo na ye, mpe ya ebongiseli na ye, Yehova apesaka biso bwanya, makasi, mpe lisalisi oyo tosengeli na yango mpo tóbongola bomoto na biso. Na ntembe te, asili kosalisa yo. Tólobela sikoyo mwa makambo mosusu oyo okoki kosala, oyo ekosalisa yo osala lisusu milende mingi mpo na kolongola bomoto ya kala mpe okokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.

9. Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo osala nini?

9 Salelá Biblia mpo omitalela malamumalamu. Liloba ya Nzambe ezali lokola talatala mpe ekoki kosalisa yo mpo otalela makanisi na yo, maloba na yo, mpe misala na yo. (Yak. 1:22-25) Ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia mpe bandeko mosusu ya lisangá oyo bakɔmɛli bakoki kosalisa yo. Na ndakisa, bakoki kosalela Makomami mpo na kosalisa yo oyeba bisika oyo ozali makasi mpe bisika oyo ozali na bolɛmbu. Bakoki kolakisa yo ndenge ya kosala bolukiluki na mikanda ya moombo ya sembo mpo na komona masolo oyo elobeli ndenge ya kolonga mimeseno ya mabe. Mpe Yehova azali ntango nyonso pene mpo na kosalisa yo. Ayebi malamu ndenge ya kosalisa yo mpo ayebi makambo oyo ezali na kati ya motema na yo. (Mas. 14:10; 15:11) Yango wana, zalá na momeseno ya kobondela ye mpe ya koyekola Liloba na ye mokolo na mokolo.

10. Ndakisa ya Elie eteyi yo nini?

10 Ndimá na motema moko ete mibeko ya Yehova eleki malamu. Makambo nyonso oyo Yehova asɛngaka biso tósala ezalaka mpo na matomba na biso. Baoyo batosaka mibeko ya Nzambe bamipesaka nzoto kilo, bayebaka ntina ya bomoi, mpe bazalaka na esengo ya solosolo. (Nz. 19:7-11) Nzokande, baoyo baboyaka kotosa mibeko ya Yehova babukaka mbuma mabe mpo bamipesaka na misala ya nzoto. Tótala makambo oyo mobali moko na nkombo Elie alobi na likambo etali koboya kotosa mibeko ya Nzambe. Abɔkwamaki na baboti oyo balingaka Yehova. Kasi na bolenge na ye, azwaki baninga ya mabe. Na yango, akómaki kosalela drɔgɛ, kosala pite, mpe koyiba. Elie alobi ete azalaki se kokóma moto ya nkanda makasi mpe ya mobulu. Abakisi boye: “Naloba kaka nasalaki makambo nyonso oyo bateyá ngai ete mokristo asengeli kosala te.” Kasi, Elie abosanaki te makambo oyo ayekolaki na bolenge na ye. Nsukansuka, azongelaki koyekola Biblia. Asalaki milende mingi, atikaki mimeseno ya mabe, mpe azwaki batisimo na mobu 2000. Matomba nini azwi lokola akómi kotosa mibeko ya Yehova na bomoi na ye? Elie alobi boye: “Sikoyo nazali na kimya ya makanisi mpe na lisosoli ya pɛto.” * Ndenge ndakisa yango emonisi, baoyo baboyaka kotosa mibeko ya Yehova bamipesaka mpasi kaka bango moko. Atako bongo, Yehova azali pene ya kosalisa bango mpo bábongwana.

11. Makambo nini Yehova ayinaka?

11 Yekolá koyina makambo oyo Yehova ayinaka. (Nz. 97:10) Biblia elobi ete Yehova ayinaka “miso ya lolendo, lolemo ya lokuta, mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te.” (Mas. 6:16, 17) Ayinaka mpe “moto oyo asopaka makila [to moto ya mobulu] mpe oyo akosaka.” (Nz. 5:6) Yehova ayinaka mpenza bizaleli mpe misala yango; yango wana abomaki bato mabe nyonso na mikolo ya Noa mpo batondisaki mabele na mobulu. (Eba. 6:13) Tótala ndakisa mosusu. Na nzela ya mosakoli Malaki, Yehova alobaki ete ayinaka baoyo basalaka makambo na kozanga bosembo mpo na koboma libala na molongani oyo asali likambo te. Yehova andimaka losambo ya bato yango te mpe akosambisa bango mpo na etamboli na bango.​—Mal. 2:13-16; Ebr. 13:4.

Tosengeli koboya kosala likambo oyo Yehova alobi ete ezali mabe kaka ndenge toboyaka kolya biloko epɔlá (Talá paragrafe 11-12)

12. ‘Koyina oyo ezali mabe’ elimboli nini?

12 Yehova alingi ete ‘tóyina oyo ezali mabe.’ (Rom. 12:9) Liloba ‘koyina’ na vɛrsɛ yango emonisaka mayoki ya makasi mpenza; elimboli koboya eloko na motema mobimba, koyoka yango mabe mpenza. Kanisá ndenge oyo okoyoka soki basɛngi yo olya biloko epɔlá. Ata kokanisa kaka likambo yango ekoki kopesa yo nzoto malili. Ndenge moko mpe, tosengeli koyoka mabe mpenza ntango kaka tokanisi kosala likambo moko oyo Yehova ayiná.

13. Mpo na nini tosengeli kobatela makanisi na biso?

13 Batelá makanisi na yo. Makambo oyo tokanisaka nde etindaka biso tósala likambo boye to boye. Yango wana Yesu ateyaki biso tóboya makanisi oyo ekoki komema biso na lisumu moko ya monene. (Mat. 5:21, 22, 28, 29) Na ntembe te, tolingaka kosepelisa Tata na biso ya likoló! Yango wana, ezali na ntina mingi tóboya mbala moko likanisi nyonso ya mabe oyo eyeli biso na bɔɔngɔ!

14. Maloba na biso emonisaka nini, mpe mituna nini tosengeli komituna?

14 Kebá na maloba na yo. Yesu alobaki: “Makambo oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema.” (Mat. 15:18) Ya solo, maloba na biso emonisaka lolenge ya bato oyo tozali. Yango wana, omituna boye: ‘Naboyaka kokosa, ata soki koloba solo ekobendela ngai mindɔndɔ? Lokola nabalá, nakebaka ete nakangamakangama te na moto oyo azali molongani na ngai te? Naboyaka kobimisa maloba ya mbindo, oyo ezalaka lokola maladi mabe? Ntango moto moko apesi ngai nkanda, nazongiselaka ye maloba na boboto?’ Ekozala malamu okanisa na mituna yango na likebi. Maloba na yo ezali lokola babutɔ ya elamba. Soki ofungoli babutɔ nyonso, ekozala mpasi te olongola elamba oyo olataki. Ndenge moko mpe, soki osali makasi otika maloba mabe, lokuta, mpe maloba ya mbindo, ekozala mpasi te olongola bomoto ya kala.

15. Kobaka bomoto na biso ya kala “na nzete” elimboli nini?

15 Ndimá kosala mbongwana. Ntoma Paulo asalelaki maloba ya elilingi ya makasi mpenza mpo na koteya biso ete tosengeli te kozwa na lisɛki likambo etali kobongola bomoto na biso. Akomaki ete tosengeli kobaka bomoto na biso ya kala “na nzete.” (Rom. 6:6) Na maloba mosusu, tosengeli komekola Yesu oyo andimaki kobakama na nzete mpo na kosepelisa Yehova. Biso mpe tosengeli kotika bizaleli mpe mimeseno oyo Yehova ayinaka mpo na kosepelisa ye. Kaka soki tosali makambo yango nde tokozala na lisosoli ya pɛto mpe tokozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko. (Yoa. 17:3; 1 Pe. 3:21) Tóbosana te ete Yehova akobongola te mibeko na ye mpo na kosepelisa biso. Kasi, biso nde tosengeli kobongola bomoto na biso mpe koyokanisa yango na mibeko na ye.​—Yis. 1:16-18; 55:9.

16. Mpo na nini osengeli kozala na ekateli ya kokoba kobundisa bamposa ya mabe?

16 Kobá kobundisa bamposa ya mabe. Ata nsima ya kozwa batisimo, ekosɛnga ete okoba kobundisa bamposa ya mabe. Talá ndakisa ya mobali moko na nkombo Maurício. Ntango Maurício azalaki elenge, akómaki kosangisa nzoto mibali na mibali. Na nsima, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe abandaki koyekola Biblia. Asalaki bambongwana na bomoi na ye, mpe azwaki batisimo na mobu 2002. Atako Maurício asalelaka Yehova banda bambula mingi sikoyo, Maurício alobi boye: “Nasengeli kondima ete na bantango mosusu esɛngaki nabundisa bamposa ya mabe.” Atikaka te ete yango elɛmbisa ye nzoto. Kutu, alobi boye: “Nazalaka na mpiko mpo nayebi ete soki naboyi kokokisa bamposa yango ya mabe, Yehova akosepela na ngai.” *

17. Ndakisa ya Nabiha elendisi yo na nini?

17 Bondelá Yehova asalisa yo, mpe tyá motema na elimo na ye, kasi na makasi na yo moko te. (Gal. 5:22; Flp. 4:6) Tosengeli kosala makasi mpo na kolongola bomoto ya kala mpe kozongela yango te. Tótalela ndakisa ya mwasi moko na nkombo Nabiha. Tata ya Nabiha asundolaki ye ntango azalaki na mbula motoba mpamba. Alobi boye: “Likambo yango enyokolaki ngai mingi na makanisi.” Ntango azalaki kokola, Nabiha azalaki se kokóma moto ya nkanda mpe ya nkanza. Akómaki kotɛka drɔgɛ, bakangaki ye mpe alekisaki mwa bambula na bolɔkɔ. Batatoli ya Yehova oyo bakendaki kosakola na bolɔkɔ yango babandaki koyekola na ye Biblia. Nabiha akómaki kosala bambongwana minene. Alobi boye: “Ezalaki mpasi te mpo natika mimeseno mosusu ya mabe. Kasi kotika komɛla makaya ezalaki mpasi mingi.” Nabiha abundaki etumba koleka mbula mobimba mpe nsukansuka alongaki kolongwa na boombo ya komɛla makaya. Nini esalisaki ye? Alobi boye: “Libosoliboso, kobondela Yehova ntango nyonso nde esalisaki ngai nalonga.” Lelo oyo ayebisaka bato boye: “Nandimi ete soki nalongaki kosala bambongwana mpo na kosepelisa Yehova, moto nyonso akoki kosala yango!” *

OKOKI KOKOKISA MASƐNGAMI MPO NA KOZWA BATISIMO!

18. Na kotalela 1 Bakorinti 6:9-11, basaleli mingi ya Nzambe balongaki kosala nini?

18 Na siɛklɛ ya liboso, mibali mpe basi mosusu oyo Yehova aponaki mpo na koyangela elongo na Kristo bazalaki liboso kosala makambo ya mabe. Na ndakisa, bazalaki bato ya ekobo, mibali oyo balalaka na mibali mpe basi oyo balalaka na basi, mpe miyibi. Kasi elimo santu ya Nzambe esalisaki bango básala bambongwana na bomoto na bango. (Tángá 1 Bakorinti 6:9-11.) Lelo oyo mpe, Biblia esalisi bamilio ya bato bábongola bomoi na bango. * Balongaki kotika mimeseno na bango ya mabe oyo epikamaki makasi. Ndakisa na bango emonisi ete yo mpe okoki kosala bambongwana na bomoto na yo mpe otika mimeseno ya mabe mpo okokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.

19. Lisolo oyo elandi ekolobela nini?

19 Baoyo balingi kozwa batisimo basengeli kosuka kaka te na kolongola bomoto ya kala, basengeli mpe kosala makasi mpo na kolata bomoto ya sika. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki kosala yango mpe ndenge oyo basusu bakoki kosalisa biso.

LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai

^ Mpo na kokokisa masɛngami ya kozwa batisimo, tosengeli kondima kosala mbongwana na bomoto na biso. Lisolo oyo ekosalisa biso tómona bizaleli nini ezali kati na bomoto ya kala, mpo na nini tosengeli kolongola yango, mpe ndenge oyo tokoki kosala yango. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki kokoba kolata bomoto ya sika, ata nsima ya kozwa batisimo.

^ NDIMBOLA YA MALOBA: ‘Kolongola bomoto ya kala’ elimboli kokabwana na bizaleli mpe bamposa oyo esepelisaka Yehova te. Tosengeli kobanda kosala yango liboso ya kozwa batisimo.​—Ef. 4:22.

^ Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Biblia ebongolaka bato​—‘Nasengelaki kozongela Yehova,’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2012.

^ Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Biblia ebongolaka bato​—‘Bamoniselaki ngai boboto mingi,’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2012.

^ Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Biblia ebongolaka bato​—‘Nakómaki nkandankanda mpe mobulu,’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2012.

^ Talá etanda “ Biblia ebongolaka bato.”

^ ELILINGI: Kotika bizaleli mpe mimeseno ya mabe ezali lokola kolongola elamba moko ya kala.