Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 16

Okoki kozala na esengo soki opesi Yehova oyo eleki malamu

Okoki kozala na esengo soki opesi Yehova oyo eleki malamu

“Moto na moto ameka mosala na ye moko.”​—GAL. 6:4.

LOYEMBO 37 Nakosalela Yehova na molimo mobimba

NA MOKUSE *

1. Nini epesaka biso esengo mingi?

 YEHOVA alingaka ete tózala na esengo. Toyebi yango mpo esengo ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo na ye. (Ga. 5:22) Lokola esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa, toyokaka esengo mingi ntango tomipesaka mobimba na mosala ya kosakola mpe tosalisaka bandeko na biso na makambo ndenge na ndenge.​—Mis. 20:35.

2-3. (a) Ndenge emonisami na Bagalatia 6:4, makambo nini mibale ekosalisa biso tóbatela esengo na biso na mosala ya Yehova? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Ndenge emonisami na Bagalatia 6:4, ntoma Paulo alobeli makambo mibale oyo ekosalisa biso tóbatela esengo na biso. (Tángá.) Ya liboso, mokano na biso esengeli kozala ya kopesa Yehova biloko na biso oyo eleki malamu. Soki tozali kopesa ye biloko na biso oyo eleki malamu, tokozala na esengo. (Mat. 22:36-38) Ya mibale, tosengeli koboya komikokanisa ná basusu. Tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo na makambo nyonso oyo tosalaka mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto, formasyo tozwá to makoki na biso. Mpo na nini? Mpamba te nyonso oyo tozali na yango euti epai na ye. Kasi, soki mosala ya kosakola oyo bandeko mosusu bazali kosala ezali kobota mbuma koleka oyo ya biso, tosengeli kosepela mpo bazali kosalela makoki na bango mpo na kokumisa Yehova, kasi te mpo na komikumisa to mpo na matomba na bango moko. Yango wana na esika tómikokanisa ná bango, tosengeli nde koyekola epai na bango.

3 Na lisolo oyo, tokomona oyo tokoki kosala ntango tolɛmbi nzoto mpo tozali te na likoki ya kosala nyonso oyo tolingi na mosala ya Yehova. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki kosalela malamu makoki nyonso oyo tokoki kozala na yango mpe mateya oyo tokozwa na bandakisa ya bato mosusu.

NTANGO TOLƐMBI NZOTO

Ntango tozali kosala nyonso oyo tokoki na bomoi na biso, tosepelisaka Yehova (Talá paragrafe 4-6) *

4. Likambo nini ekoki kosala ete tólɛmba nzoto? Pesá ndakisa.

4 Basaleli mosusu ya Yehova bazali na likoki ya kosala te makambo nyonso oyo balingi na mosala na ye mpo na bobange, maladi mpe yango esalaka ete bálɛmba nzoto. Yango nde ekómelaki ndeko mwasi Carol. Azwaki libaku ya kosala na esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Na ntango yango, azalaki koyekola Biblia na bato 35, mpe asalisaki mingi na bango bámipesa mpe bázwa batisimo. Mosala ya kosakola ya Carol ebotaki mbuma! Na nsima akómaki kobɛla mpe akɔtaki ndako. Carol alobi boye: “Lokola nazali lisusu te na makasi ya nzoto, nakokaka te kosala makambo oyo basusu bakoki kosala, kasi namiyokaka ete nazali sembo te lokola bango. Nakoki te kosala makambo nyonso oyo basusu bakoki kosala, mpe yango esalaka ete nalɛmba nzoto.” Carol alingaka kosala nyonso oyo akoki mpo na Yehova. Ezali na yango mabe te! Tondimi ete Nzambe na biso ya motema mawa azwaka na motuya elimo na ye wana ya komipesa.

5. (a) Tosengeli komikundwela nini soki tomoni ete tokómi kolɛmba nzoto mpo tozali kosala mingi te na mosala ya Yehova? (b) Ndenge tomoni yango na bililingi, ndenge nini ndeko mobali oyo azali kokoba kopesa oyo eleki malamu na mosala ya Yehova?

5 Soki mbala mosusu ozali kolɛmba nzoto mpo ozali lisusu kosala mingi te na mosala ya Yehova, omituna boye: ‘Yehova azali kosɛnga nini epai na ngai?’ Yehova alingi osala nyonso oyo okoki na kotalela makambo ya bomoi na yo. Tózwa ndakisa moko: Ndeko mwasi moko ya mbula koleka 80 alɛmbi nzoto mpo azali kokoka te kosala mingi na mosala ya kosakola ndenge azalaki kosala ntango azalaki na mbula koleka 40. Akanisi ete atako azali kopesa oyo eleki malamu, Yehova azali kosepela na yango te. Likanisi yango ebongi? Kanisá naino. Soki ndeko mwasi yango azalaki kopesa oyo eleki malamu ntango azalaki na mbula koleka 40 mpe sikoyo azali kopesa oyo eleki malamu wana azali na mbula koleka 80, na ntembe te atiki te kopesa oyo eleki malamu. Soki tobandi kokanisa ete mosala na biso ezali mpenza te kosepelisa Yehova, tosengeli komikundwela ete Yehova nde aponaka makambo oyo esepelisaka ye. Soki tozali kosala nyonso oyo tokoki, na ntembe te Yehova akoloba na biso: “Longonya!”​—Talá mpe Matai 25:20-23.

6. Ndakisa ya Maria ekoki koteya biso nini?

6 Tokozwa esengo soki totye likebi na makambo oyo tokoki kosala, kasi te na makambo oyo tokoki te kosala. Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Maria, oyo azali na maladi oyo epekisaka ye asakola mingi. Na ebandeli, azalaki komitungisa mingi mpe komimona ete azali na ntina te. Kasi na nsima, akanisaki ndeko mwasi moko na lisangá oyo akɔtá ndako, mpe Maria azwaki ekateli ya kosalisa ye. Maria alobi boye: “Nazwaki bibongiseli mpo na kosakola na ye na nzela ya telefone mpe kokoma mikanda. Ntango nyonso tozalaki kosala elongo, soki nazongi na ndako nazalaki koyoka esengo mpe komona ete nazalaki na likoki ya kosalisa ndeko na ngai ya mwasi.” Biso mpe tokoki kobakisa esengo na biso ntango tozali kotya likebi na makambo oyo tokoki kosala, kasi te na makambo oyo tokoki te kosala. Kasi ezali boni soki tokoki kosala lisusu mingi to tosalaka malamu makambo mosusu na mosala ya Yehova?

SOKI OZALI NA LIKABO MOKO​—‘SALELÁ YANGO’!

7. Toli nini ntoma Petro apesaki bakristo?

7 Na mokanda na ye ya liboso oyo ekomamaki na litambwisi ya Nzambe, ntoma Petro alendisaki bandeko na ye básalela makabo mpe makoki nyonso oyo bazalaki na yango mpo na kolendisa bandeko na bango. Ntoma Petro akomaki boye: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe.” (1 Pe. 4:10) Tosengeli te kokakatana mpo na kosalela mpenza makabo oyo tozali na yango mpo na kobanga ete basusu bakoki kokóma na zuwa to kolɛmba nzoto. Soki tozali kosala te oyo tokoki kosala mpo tozali kobanga ete basusu bakokóma na zuwa to bakolɛmba nzoto, tokopesa Yehova te oyo eleki malamu.

8. Na kotalela 1 Bakorinti 4:6, 7, mpo na nini tosengeli te komikumisa mpo na makoki oyo tozali na yango?

8 Tosengeli mpenza kosalela makoki oyo tozali na yango, kasi tosengeli kokeba ete tómikumisa te mpo na yango. (Tángá 1 Bakorinti 4:6, 7.) Na ndakisa, okoki kozala na makoki ya kobanda koyekola Biblia na bato. Kokakatana te mpo na kosalela likoki yango! Kasi ezali na ntina obosana te ete osengeli te komikumisa mpo na yango. Kanisá ete okutanaki na likambo moko ya kitoko na mosala ya kosakola oyo epesaki yo libaku ya kobanda boyekoli ya Biblia. Ozali na mposa makasi ya koyebisa bandeko ya etuluku na yo ya mosala ya kosakola likambo yango. Kasi, ntango okutani elongo na bandeko ya etuluku na yo, ndeko mwasi moko azali kolobela likambo moko oyo akutanaki na yango na mosala ya kosakola, oyo epesaki ye nzela apesa moto moko zulunalo. Ndeko mwasi apesaki zulunalo, kasi yo obandisaki boyekoli ya Biblia. Na ntango wana, okosala nini? Oyebi ete bandeko ya etuluku bakolendisama na likambo oyo okutanaki na yango, kasi osengeli kozwa ekateli ya kozela mpo na kolobela yango na libaku mosusu, mpo yango ekitisa te esengo ya ndeko mwasi oyo apesaki zulunalo. Yango nde likambo malamu ya kosala. Kasi yango epekisa yo te koyekola na bato Biblia. Likabo oyo ozali na yango​—Salelá yango!

9. Ndenge nini tosengeli kosalela makoki oyo tozali na yango?

9 Tóbosana te ete makoki nyonso oyo tokoki kozala na yango euti epai ya Nzambe. Tosengeli kosalela makoki yango mpo na kolendisa bandeko ya lisangá, kasi te mpo na komikumisa. (Flp. 2:3) Tokozwa esengo mingi ntango tozali kosalela makasi mpe makoki na biso mpo na kosala mokano ya Nzambe, kasi te mpo tozali kosala mingi koleka basusu to komimona ete toleki bango, kasi nde mpo tozali kosalela makoki oyo tozali na yango mpo na kokumisa Yehova.

10. Mpo na nini ebongi te tómikokanisa ná basusu?

10 Soki moto akebi te, akoki kokwea na motambo ya kokokanisa makasi oyo azali na yango ná bolɛmbu ya moto mosusu. Na ndakisa, ndeko mobali moko azali molobi malamu. Wana ezali likabo oyo azali na yango. Atako na motema na ye akoki kobanda kotyola ndeko oyo abundaka mpo na kosala badiskur. Nzokande ndeko oyo abundaka mpo na kosala badiskur akoki kozala makasi na likambo etali koyamba bapaya, kopesa bana na ye formasyo to azali na molende na mosala ya kosakola. Tozalaka na esengo mingi ndenge tozalaka na bandeko basi mpe mibali oyo bazali na makoki mpe basalelaka yango mpo na kosalela Yehova mpe kosalisa basusu!

ZWÁ MATEYA NA BANDAKISA YA BASUSU

11. Mpo na nini tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu?

11 Atako tosengeli te komikokanisa ná basusu, tokoki kozwa matomba soki tozali kozwa mateya na bandakisa ya bato ya sembo. Mpo tókanga ntina na yango, tózwa ndakisa ya Yesu. Atako azalaki moto ya kokoka, tokoki koyekola bizaleli na ye mpe makambo oyo osalaki. (1 Pe. 2:21) Ntango tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kolanda malamumalamu ndakisa na ye, tokómaka lisusu kosalela Yehova malamu mpe tozwaka matomba na mosala na biso ya kosakola.

12-13. Mateya nini tokoki kozwa epai ya Mokonzi Davidi?

12 Na Liloba ya Nzambe, tozali na bandakisa mingi ya basi mpe mibali ya sembo oyo tokoki komekola atako bazalaki bato ya kozanga kokoka. (Ebr. 6:12) Tózwa ndakisa ya Mokonzi Davidi, oyo Yehova abengaki ye “moto moko oyo azali kosepelisa motema na ngai” to, ndenge libongoli mosusu ya Biblia ebongoli yango, “lolenge ya moto oyo asepelisaka ngai mingi.” (Mis. 13:22) Kutu, Davidi azalaki moto ya kokoka te mpe asalaki mabunga mosusu ya minene. Kasi, azali ndakisa malamu mpo na biso. Mpo na nini? Mpo ntango bazalaki kosembola ye, azalaki te koluka komilongisa. Kutu, andimaki toli ya makasi oyo bapesaki ye mpe asɛngaki bolimbisi mpenza mpo na makambo oyo asalaki. Yango wana, Yehova alimbisaki ye.​—Nz. 51:3, 4, 10-12.

13 Tokoki kozwa mateya epai ya Davidi soki tomituni boye: ‘Nasalaka nini soki bapesi ngai toli? Nandimaka nokinoki mabunga na ngai, to nalukaka komilongisa? Napesaka nokinoki basusu foti? Nasalaka makasi mpo nabandela lisusu te mabunga na ngai?’ Okoki komituna mituna ya ndenge wana ntango ozali kotánga masolo etali basi mpe mibali ya sembo ya ntango ya kala. Mikakatano nini bakutanaki na yango oyo ekokani na oyo ozali na yango? Bizaleli nini ya malamu bamonisaki? Na likambo mokomoko, omituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kozala lokola mosaleli oyo ya sembo ya Yehova?’

14. Matomba nini tokoki kozwa soki tozali kotya likebi epai ya bandeko na biso bakristo?

14 Tokoki kozwa mateya epai ya Davidi soki tozali kotya likebi epai ya bandeko na biso bakristo, ezala bilenge to mibange. Na ndakisa, okoki kokanisa ndeko moko na lisangá oyo azali koyikela mokakatano moko mpiko na bosembo nyonso, na ndakisa, mbamba ya baninga, bazali kotɛmɛla ye na libota to azali kobɛla? Ozali komona bizaleli oyo ebongi oyo okosepela komonisa lisusu mingi koleka? Soki otaleli ndakisa na ye ya malamu, okoki koyekola makambo oyo ebongi mpo na koyikela mikakatano na yo mpiko. Tozali na botɔndi mpe na esengo mpenza ndenge tozali na bandakisa ya kondima oyo tozali komona mpo na komekola yango!​—Ebr. 13:7; Yak. 1:2, 3.

ZALÁ NA ESENGO NA MOSALA YA YEHOVA

15. Toli nini ntoma Paulo apesaki oyo ekoki kosalisa biso tókoba kosepela na mosala na biso mpo na Yehova?

15 Mokomoko na biso asengeli kosala nyonso oyo akoki mpo na kosala ete kimya mpe bomoko ezala na lisangá. Tótalela ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Bazalaki na makabo mpe mikumba ndenge na ndenge. (1 Ko. 12:4, 7-11) Kasi yango esalaki te ete báwelana to bákabwana. Kutu, ntoma Paulo asɛngaki mokomoko na bango asala nyonso oyo esengeli mpo na “kotongama ya nzoto ya Kristo.” Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Efese boye: “Na kolanda mosala ya enama mokomoko na meko oyo ekoki, ezali kosalisa na bokoli ya nzoto mpo emitonga yango moko na bolingo.” (Ef. 4:1-3, 11, 12, 16) Baoyo basalaki bongo, basalaki ete kimya mpe bomoko ezala, mpe tomonaka bizaleli yango na masangá na biso lelo oyo.

16. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini? (Baebre 6:10)

16 Zalá na ekateli ya koboya komikokanisa ná basusu. Kasi, zwá mateya epai ya Yesu mpe salá makasi omekola bizaleli na ye. Zwá matomba na bandakisa ya kondima ya bato ya ntango ya kala mpe ya mikolo oyo. Wana ozali kokoba kosala nyonso oyo okoki, yebá ete Yehova “azangi boyengebene te mpo abosana mosala na [yo].” (Tángá Baebre 6:10.) Kobá kosepela na kosalela Yehova mpe yebá ete azali kosepela ntango azali komona yo ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na kosepelisa ye.

LOYEMBO 65 Kende liboso!

^ Biso nyonso tozwaka bolamu ntango tomekolaka ndakisa ya basusu. Kasi, ezali na makama oyo tosengeli kokima. Lisolo oyo ekosalisa biso tóbatela esengo na biso mpe tókima motambo ya kozala na lolendo to kolɛmba nzoto ntango tozali kotala makambo oyo basusu bazali na likoki ya kosala.

^ ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kosala na Betele wana azali naino elenge. Na nsima abali mpe ye ná mwasi na ye bazali babongisi-nzela. Ntango bana na bango babotami, bapesi bango formasyo na mosala ya kosakola. Sikoyo akómi mobange, azali kokoba kosala nyonso oyo akoki, mpe azali kosakola na nzela ya kokoma mikanda.