Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Soki mokristo moko abomi libala na mwasi na ye mpo na ntina oyo Biblia endimi te mpe abali moto mosusu, ndenge nini lisangá etalelaka libala na ye ya kala, mpe libala na ye ya sika?

▪ Na likambo ya ndenge wana, lisangá ekotalela libala ya kala ete ekufi ntango moto abali lisusu mpe ekotalela libala ya sika lokola endimami na mibeko ya Leta. Mpo tóyeba ntina oyo tolobi bongo, tótala makambo oyo Yesu alobaki na oyo etali koboma libala mpe kobala lisusu.

Ndenge Matai 19:9 emonisi yango, Yesu amonisaki ntina kaka moko oyo Makomami endimi mpo libala ekufa. Alobaki boye: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” Na maloba wana ya Yesu, tomoni (1) ete pite ezali ntina kaka moko oyo Makomami endimi mpo libala ekufa mpe (2) ete moto oyo abomi libala na mwasi na ye mpo na ntina oyo Makomami endimi te mpe abali moto mosusu azali kosala ekobo. *

Maloba ya Yesu elingi nde koloba ete mobali oyo asali pite mpe abomi libala na mwasi na ye azali na bonsomi ya kobala lisusu? Ezali mpenza bongo te. Ntango ekobo esalemi na libala, molongani oyo asali likambo te akoki kozwa ekateli ya kolimbisa mobali na ye to te. Soki aboyi kolimbisa ye mpe azwi mokanda ya koboma libala, bango nyonso bazali na bonsomi ya kobala lisusu mpo libala esili kokufa.

Longola yango, molongani oyo asali likambo te akoki kozala na mposa ya kotikala na libala mpe komonisa ete alingi kolimbisa mobali na ye. Kasi, ezali boni soki mobali oyo asali ekobo aboyi ete mwasi na ye alimbisa ye mpe azwi mokanda ya koboma libala na kolanda mibeko ya Leta na ndenge na ye moko? Lokola mwasi na ye andimi kolimbisa ye mpe kokoba kozala na libala na ye, mobali azali na bonsomi te ya kobala lisusu na kotalela Makomami. Soki atingami kaka na ekateli na ye oyo eyokani na Makomami te mpe abali moto mosusu ntango azali na bonsomi te ya kosala bongo na kotalela Makomami, mpe soki asali lisusu ekobo, bankutulu basengeli kosala komite ya kosambisa mpo bátalela likambo na ye.​—1 Ko. 5:1, 2; 6:9, 10.

Ntango mobali oyo azali na bonsomi te ya kobala lisusu na kotalela Makomami abali moto mosusu, ndenge nini lisangá esengeli kotalela libala na ye ya kala mpe oyo ya sika? Na kotalela Biblia, libala na ye ya kala ezali kaka? Molongani oyo asali likambo te akoki kaka kolimbisa to koboya mobali na ye ya kala? Esengeli kotalela libala ya sika lokola libala ya ekobo?

Kala, lisangá ezalaki kotalela libala ya sika lokola libala ya ekobo soki molongani oyo asali likambo te azali na bomoi, abali te, mpe asalaki pite te. Kasi, ntango Yesu azalaki kolobela koboma libala mpe kobala lisusu, alobelaki te molongani oyo asalaki likambo te. Nzokande, alimbolaki ete mobali oyo abomi libala mpo na ntina oyo Makomami endimi te mpe abali moto mosusu, azali kosala ekobo. Soki esalemi bongo, koboma libala mpe kobala lisusu, oyo Yesu alobelaki emonisi ete mobali yango asalaki ekobo, oyo esengelaki kotya nsuka na libala ya liboso.

“Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.”​—Mat. 19:9

Ntango mobali abomi libala na mwasi na ye mpe abali moto mosusu, ezali na ntina te ete molongani oyo asali likambo te alimbisa ye to te. Na yango, molongani yango asengeli te kozwa ekateli ya monene ya kolimbisa to koboya kolimbisa mobali na ye ya kala. Longola yango, ata soki molongani oyo asali likambo te akufi, abali lisusu, to asali pite, yango ekobongola te ndenge oyo lisangá esengeli kotalela libala ya sika ya mobali yango. *

Na ndakisa oyo tolobeli likoló, mobali asalaki ekobo, oyo esalaki ete libala ekufa. Ezali boni soki mobali asalaki ekobo te, kasi abomaki libala mpe abali lisusu? To ezali boni soki mobali asalaki pite te liboso ya koboma libala, kasi asalaki yango nsima ya koboma libala mpe abali moto mosusu atako mwasi na ye azali na mposa ya kolimbisa ye? Na bandakisa wana nyonso, koboma libala mpe kobala lisusu, etye nsuka na libala ya kala. Libala ya sika endimami na mibeko ya Leta. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/1980, nkasa 31-32 na Français elobaki boye: “Na ntembe te, lokola abali moto mosusu, akoki lisusu te kozongela molongani na ye ya kala, mpo libala na ye ya kala esí ekufi.”

Mbongwana oyo emonisi te ete bakristo basengeli kokanisa ete libala ezali lisusu mosantu te to ekobo ezali lisumu ya monene te. Mobali oyo abomi libala na mwasi na ye mpo na ntina oyo Makomami endimi te mpe abali moto mosusu asengeli kokɔta komite ya kosambisa mpo bátalela likambo na ye. (Soki molongani ya sika azali mokristo, asengeli mpe kosambisama na komite ya kosambisa mpo na ekobo.) Atako libala ya sika esengeli te kotalelama lokola libala ya ekobo, mobali akozwa te mikumba minene na lisangá na boumeli ya bambula mingi mpe tii ntango bato mosusu bakotika kobɛta libaku na likambo ya mabe oyo asalaki kala to tii ntango bakotika kotalela ye lokola moto oyo abongi te. Liboso ya kopesa moto ya ndenge wana mokumba, bankulutu basengeli mpe kotalela makambo oyo ezali koleka na bomoi ya molongani na ye ya kala oyo asalelaki ye makambo na bokosi mpe mikumba ya bana ya mike oyo asundolelá molongani na ye ya kala.​—Mal. 2:14-16.

Na kotalela makama minene ya koboma libala mpo na ntina oyo Makomami endimi te mpe kobala lisusu, bakristo bakosala na bwanya soki bamekoli Yehova mpe bazali kotalela libala ete ezali mosantu.​—Mos. 5:4, 5; Ebr. 13:4.

^ Na mokuse, tokobenga moto oyo azali kosala ekobo mobali mpe molongani oyo asali likambo te mwasi. Kasi, ndenge Marko 10:11, 12 emonisi yango, Yesu amonisaki yango polele ete toli yango etaleli basi mpe mibali.

^ Yango esemboli ndenge oyo tozalaki kotalela libala ya ndenge wana ete ezali libala ya ekobo, soki molongani oyo asali likambo te akufi te, abali lisusu te, to asali pite te.