LISOLO YA BOYEKOLI 3
Ebele mpenza ya bampate mosusu bazali kokumisa Nzambe mpe Kristo.
“Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.”—EM. 7:10.
LOYEMBO 14 Tókumisa Mokonzi ya sika ya mabele
NA MOKUSE *
1. Diskur oyo esalemaki na liyangani moko ya etúká na 1935, etindaki elenge mobali moko asala nini?
ELENGE mobali moko azalaki na mbula 18 ntango azwaki batisimo na 1926. Baboti na ye bazalaki Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Bazalaki na bana mitano: ya basi mibale mpe ya mibali misato. Bateyaki bana yango ndenge ya kosalela Yehova mpe ya kolanda ndakisa ya Yesu Kristo. Ndenge moko na Bayekoli ya Biblia nyonso ya ntango wana, elenge mobali yango ya sembo azalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli mbula na mbula. Kasi, elikya na ye ebongwanaki mbala moko ntango ayokaki diskur oyo etiká nsango, oyo ezalaki na motó ya likambo “Ebele monene.” Ndeko Joseph Rutherford nde asalaki diskur yango na liyangani moko ya etúká oyo esalemaki na 1935 na engumba Washington, na États-Unis. Likambo nini Bayekoli ya Biblia bakangaki ntina na liyangani yango?
2. Liteya nini ya Biblia ndeko Rutherford alimbolaki na diskur moko oyo asalaki?
2 Na diskur yango, ndeko Rutherford alimbolaki soki banani bazali “ebele monene” (Biblia haut fleuve), to “ebele mpenza ya bato,” oyo Emoniseli 7:9 elobeli. Tii na ntango wana, Bayekoli ya Biblia bazalaki kokanisa ete “ebele mpenza ya bato” ezali etuluku ya mibale ya bato oyo bakokende mpe na likoló, kasi bazalaki sembo mingi te lokola bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Ndeko Rutherford asalelaki Biblia mpo na komonisa ete “ebele mpenza ya bato” wana baponamaki te mpo na kokende na likoló, kasi bazali nde bampate mosusu * ya Kristo oyo bakobika na “bolɔzi monene” mpe bakozala na bomoi ya seko awa na mabele. (Em. 7:14) Yesu apesaki elaka oyo: “Nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te; yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” (Yoa. 10:16) “Bampate mosusu” yango ezali Batatoli ya Yehova oyo bazali sembo, oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele. (Mat. 25:31-33, 46) Tótala ndenge boyebi yango ya sika ebongolaki bomoi ya ebele ya basaleli ya Yehova, ata mpe ya elenge mobali wana ya mbula 18.—Nz. 97:11; Mas. 4:18.
BOYEBI YA SIKA EBONGOLI BOMOI YA BATO EBELE
3-4. Na liyangani ya etúká ya mobu 1935, bankóto ya bato bayebaki ete bazali na elikya nini, mpe mpo na nini?
3 Ntango ya esengo mpenza na liyangani yango ezalaki ntango molobi atunaki bayangani ete: “Baoyo nyonso bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele bakoki kotɛlɛma?” Ndeko moko oyo azalaki na liyangani yango alobi ete bato koleka 10 000 kati na bato soki 20 000 oyo bazalaki na liyangani yango batɛlɛmaki. Na nsima, ndeko Rutherford alobaki ete: “Bótala! Ebele monene!” Bongo bato nyonso oyo bazalaki na liyangani yango bagangaki na esengo. Baoyo batɛlɛmaki bamonaki ete Yehova aponá bango te mpo bákende kofanda na likoló. Bayebaki ete Nzambe atyaki bango mafuta na elimo te. Na mokolo oyo elandaki, bato 840 bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova, kasi mingi kati na bango bazalaki bampate mosusu.
4 Nsima ya diskur yango, elenge mobali oyo tolobelaki liboso mpe bankóto mosusu ya bandeko batikaki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli. Bandeko mingi bazalaki na likanisi ndenge moko na oyo ya ndeko mobali moko ya komikitisa oyo alobaki ete: “Mbala ya nsuka oyo nalyaki limpa mpe namɛlaki vinyo na Ekaniseli, ezalaki na mobu 1935, mpo nayaki koyeba ete Yehova asalelaki elimo santu na ye te mpo na kopesa ngai elikya ya kokende na likoló. Kasi nazalaki nde na elikya ya kofanda na mabele mpe ya kopesa mabɔkɔ mpo na kokómisa yango paradiso.” (Rom. 8:16, 17; 2 Ko. 1:21, 22) Kobanda na ntango wana, ebele yango ya bato babakisami mpenza mpe bazali kosala na bomoko elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele.
5. Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo batiká kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli?
5 Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo batikaki kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli nsima ya mobu 1935? Bongo Yehova akanisaka nini mpo na Motatoli oyo, na bosembo mpenza, alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo ya Ekaniseli kasi na nsima ayei koyeba ete azali mpenza mokristo oyo atyami mafuta na elimo te? (1 Ko. 11:28) Bato mosusu balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo ya Ekaniseli mpo bayebi elikya na bango malamu te. Kasi soki bandimi mpenza ete basalaki libunga, batiki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, mpe bakobi kosalela Yehova na bosembo, akotánga bango na kati ya bampate mosusu. Ata soki batiki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, bakokoba kaka koyangana na Ekaniseli mpo bazali na botɔndi mpo na oyo Yehova ná Yesu basalá mpo na bango.
ELIKYA MOKO KITOKO MPENZA
6. Yesu apesi baanzelu mitindo ya kosala nini?
6 Lokola bolɔzi monene ekómi pene, ekozala malamu tótalela lisusu makambo oyo Emoniseli mokapo 7 elobi mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe mpo na ebele mpenza ya bampate mosusu. Yesu apesi baanzelu mitindo bákoba kosimba mipɛpɛ minei ya libebisi. Bakokoba kosimba yango tii ntango bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo bakosilisa kotyama elembo, elingi koloba, tii ntango oyo Yehova akomona mpenza ete bazali sembo. (Em. 7:1-4) Mpo na bosembo na bango, Yehova akopesa bango mbano mpe bakokóma bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Kristo kuna na likoló. (Em. 20:6) Yehova, Yesu, mpe baanzelu bakosepela mingi ntango bakomona ete bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo bazwi mbano na bango na likoló.
7. Na Emoniseli 7:9, 10, Yoane amoni banani, mpe bazali kosala nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)
7 Nsima ya kolobela makambo etali bakonzi mpe banganga-nzambe yango 144 000, Yoane amonaki likambo mosusu oyo esepelisaki ye mingi, “ebele mpenza ya bato” oyo babiki na Armagedone. Na kokesana na etuluku ya bato 144 000, etuluku ya “ebele mpenza ya bato” bazali mingi koleka mpe motángo na bango eyebani te. (Tángá Emoniseli 7:9, 10.) “Balati bazambala ya mpɛmbɛ,” yango emonisi ete bamibateli mpe bazali na ‘litɔnɔ te’ oyo euti na mokili ya Satana mpe batikali sembo epai ya Nzambe mpe Kristo. (Yak. 1:27) Bazali koganga ete babiki mpo na makambo oyo Yehova ná Yesu, Mwana-Mpate ya Nzambe, basali. Lisusu, basimbi mandalala, oyo emonisi ete bazali kondima na esengo mpenza ete Yesu azali Mokonzi oyo Yehova atye mafuta na elimo.—Talá mpe Yoane 12:12, 13.
8. Emoniseli 7:11, 12 elobi nini mpo na libota ya Yehova kuna na likoló?
8 Tángá Emoniseli 7:11, 12. Baoyo bafandaka na likoló basalaki nini ntango bamonaki ebele mpenza ya bato? Yoane amoni libota ya Yehova mobimba kuna na likoló batondi na esengo ntango bamoni ebele mpenza ya bato bazali kokumisa Nzambe. Bakotonda lisusu na esengo ntango bakomona kokokisama ya emonaneli ya ebele mpenza ya bato oyo bakobika na bolɔzi monene.
9. Na kotalela Emoniseli 7:13-15, ebele mpenza ya bato bazali kosala nini lelo oyo?
9 Tángá Emoniseli 7:13-15. Yoane akomi ete ebele mpenza ya bato yango “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate.” Yango emonisi ete bazali na lisosoli ya pɛto mpe bazali sembo na miso ya Yehova. (Yis. 1:18) Bazali bakristo oyo bamipesi na Nzambe mpe bazwi batisimo, bazali na kondima makasi na mbeka ya Yesu, mpe bazali na boyokani malamu mpenza ná Yehova. (Yoa. 3:36; 1 Pe. 3:21) Yango wana, babongi mpo na kotɛlɛma liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe kosalela ye “mosala mosantu butu moi” awa na mabele. Lelo oyo, bazalaka na molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli mpo Bokonzi ya Nzambe ezali likambo oyo eleki ntina na bomoi na bango.—Mat. 6:33; 24:14; 28:19, 20.
10. Ebele mpenza ya bato bandimaka likambo nini, mpe elaka nini bakomona kokokisama na yango?
10 Ebele mpenza ya bato yango oyo bauti na bolɔzi monene bandimaka ete Nzambe akokoba kobatela bango mpo “Oyo afandi na kiti ya bokonzi akotanda hema na ye likoló na bango.” Bampate mosusu bakomona kokokisama ya elaka oyo bazelaka banda kala, oyo elobi ete: ‘Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.’—Em. 21:3, 4.
11-12. (a) Na kotalela Emoniseli 7:16, 17, mapamboli nini ebele mpenza ya bato bakozwa na mikolo ezali koya? (b) Bampate mosusu bakoki kosala nini na Ekaniseli, mpe nini esengeli kotinda bango básala bongo?
11 Tángá Emoniseli 7:16, 17. Lelo oyo, basaleli mosusu ya Yehova bazali konyokwama na nzala mpo bazali na mbongo mingi te ya kosomba biloko ya kolya oyo basengeli na yango, to mpo na mikakatano oyo ebimaka mpo na mobulu ya bana-mboka to bitumba. Bamosusu bazali kokɔta bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Nzokande, ebele mpenza ya bato yango bazali na esengo mpo bayebi ete, nsima ya kobika ntango mokili oyo mabe ekobomama, bakozala ntango nyonso na biloko ebele ya kolya mpe Yehova akoteya bango makambo mingi. Ntango mokili mabe ya Satana ekobomama, Yehova akosala ete ebele mpenza ya bato yango bábatelama, mpo nkanda na ye oyo ezali lokola “molunge makasi,” oyo akosopela bikólo ezwa bango te. Na nsuka ya bolɔzi monene, Yesu akomema bato oyo bakobika awa na mabele na “mai ya bomoi” ya seko. Kanisá naino: Ebele mpenza ya bato bazali na elikya moko kitoko mpenza. Na bamilio ya bato oyo bafandá awa na mabele, ebele mpenza ya bato bazali na likoki ya kokufa soki moke te!—Yoa. 11:26.
12 Bampate mosusu bazali na elikya moko kitoko mpenza, yango wana bazali kopesa Yehova ná Yesu matɔndi mpo na yango! Atako Yehova aponi bango te mpo bákende kofanda na likoló, azwaka bango na motuya kaka ndenge azwaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Ezala bakristo oyo batyami mafuta na elimo to mpe bampate mosusu, bango nyonso bakoki kokumisa Nzambe mpe Kristo. Lolenge moko oyo basalaka yango, ezali ndenge bayanganaka na Bilei ya mpokwa ya Nkolo.
KUMISÁ NZAMBE NA MOTEMA MOBIMBA NA EKANISELI
13-14. Mpo na nini bakristo nyonso, ezala batyami mafuta na elimo to te, basengeli koyanganaka na Ekaniseli ya liwa ya Kristo?
13 Mikolo oyo, soki bato 1 000 bayangani na Ekaniseli, ntango mosusu ata moto moko te alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo. Yango elingi koloba ete, na masangá mingi, bato oyo bayanganaka na Ekaniseli balyaka limpa te, mpe bamɛlaka vinyo te. Bato mingi oyo bayanganaka na Ekaniseli bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele. Kasi, mpo na nini bayanganaka na Bilei ya mpokwa ya Nkolo? Basalaka yango kaka ndenge bato bakendaka na fɛti ya libala ya moninga moko. Bakendaka na fɛti ya libala mpo na komonisa ete balingi mwasi ná mobali oyo babalani mpe balingi kopesa bango mabɔkɔ. Ndenge moko mpe, bampate mosusu bayaka na Ekaniseli mpo na komonisa ete balingaka Yesu ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe balingi kopesa bango mabɔkɔ. Bampate mosusu bayanganaka mpe na Ekaniseli mpo na
komonisa ete bazali na botɔndi mpo na mbeka oyo Yesu apesaki; mbeka oyo epesi bango likoki ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele.14 Bampate mosusu bayanganaka mpe na Ekaniseli mpo na kotosa mitindo oyo Yesu apesaki. Ntango Yesu abandisaki molulu ya Ekaniseli, ayebisaki bantoma na ye ya sembo ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (1 Ko. 11:23-26) Na yango, bampate mosusu bakokoba koyangana na Ekaniseli ntango nyonso oyo bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bakozala awa na mabele. Mpe bampate mosusu babengisaka moto nyonso aya koyangana na Ekaniseli elongo na bango.
15. Tokoki kosala nini mpo tókumisa Nzambe mpe Kristo na Ekaniseli?
15 Na Ekaniseli, tozalaka na libaku ya kokumisa Nzambe mpe Kristo ntango toyembaka mpe tobondelaka. Motó ya likambo ya diskur ya Ekaniseli mpo na mbula oyo ezali: “Monisá ete ozali na botɔndi mpo na oyo Nzambe mpe Kristo basalaki mpo na yo!” Ekobakisa botɔndi na biso mpo na Yehova mpe Kristo. Ntango limpa ná vinyo ya Ekaniseli ekoleka, ekokundwela biso ete yango elakisi nzoto mpe makila ya Yesu. Tokokanisa lisusu bolingo oyo Yehova amoniselaki biso, na ndenge atikaki Mwana na ye akufa mpo biso tókoka kozwa bomoi ya seko. (Mat. 20:28) Moto nyonso oyo alingaka Tata na biso ya likoló mpe Mwana na ye akosepela koya na Ekaniseli.
PESÁKÁ YEHOVA MATƆNDI MPO NA ELIKYA OYO APESÁ YO
16. Na makambo nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bazali kaka ndenge moko?
16 Na makambo mingi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bazali kaka ndenge moko. Bango nyonso bazali na motuya ndenge moko na miso ya Yehova. Toyebi yango mpo asombaki bango nyonso kaka na ntalo moko: bomoi ya Mwana na ye ya bolingo. Bakeseni kaka mpo bituluku yango nyonso mibale bazali na elikya ndenge moko te. Kasi bango nyonso basengeli kotikala sembo epai ya Nzambe mpe epai ya Kristo. (Nz. 31:23) Mpe kobosana te, elimo ya Nzambe ekoki kosala ndenge moko epai ya moto nyonso, ezala atyami mafuta na elimo to te. Yehova apesaka elimo na ye na kotalela bamposa ya moto na moto.
17. Makambo nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino awa na mabele, bazelaka na mposa makasi?
17 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo babotamaka te na elikya ya kokende na likoló. Nzambe nde atyaka elikya yango na mitema na bango. Bakanisaka elikya na bango, babondelaka mpo na yango, mpe bazalaka na mposa makasi ya kozwa mbano na bango na likoló. Bayebaka mpenza te ndenge nzoto na bango ekozala ntango bakokóma kuna na likoló. (Flp. 3:20, 21; 1 Yoa. 3:2) Atako bongo, bazelaka na mposa makasi kokutana ná Yehova, Yesu, baanzelu mpe bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo mpe kozwa bisika na bango na bokonzi ya likoló.
18. Makambo nini bampate mosusu bazelaka na mposa makasi?
18 Bampate mosusu bazwaka na motuya elikya oyo moto nyonso azalaka na yango, ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele. (Mos. 3:11) Bazelaka na mposa makasi mokolo oyo bakopesa mabɔkɔ mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso. Bazelaka mpe na mposa makasi mokolo bakotonga bandako na bango moko, bakolona bilanga na bango moko, mpe bakobɔkɔla bana na bango oyo bakozala na nzoto ya kokoka. (Yis. 65:21-23) Lisusu, bazelaka na esengo kosala mibembo na mokili mobimba, kotala bangomba, bazamba, bibale minene, mpe koyekola ebele ya biloko oyo Yehova akelá. Oyo eleki nyonso, basepelaka koyeba ete boninga na bango ná Yehova ekokóma lisusu makasi koleka.
19. Ekaniseli epesi mokomoko na biso libaku ya kosala nini, mpe na mbula oyo ekosalema na dati nini?
19 Yehova apesá basaleli na ye nyonso oyo bamipesá na ye, elikya moko kitoko mpenza mpo na mikolo ezali koya. (Yir. 29:11) Ekaniseli ya liwa ya Kristo epesaka biso nyonso libaku moko ya malamu mpenza ya kokumisa Nzambe mpe Kristo mpo na oyo basalelá biso mpo tókoka kosepela na bomoi oyo ezangá nsuka. Mbula na mbula, Ekaniseli ezalaka likita oyo eleki ntina mpo na bakristo nyonso ya solo. Na mbula oyo, ekosalema nsima ya kolala ya moi, na mokolo ya pɔsɔ, mwa 27/03/2021. Na mbula oyo, bato mingi bazali kofanda na bisika oyo bazali na bonsomi nyonso ya koyangana na likita yango. Bamosusu bakoyangana atako bazali kotɛmɛla bango. Bamosusu mpe bakosala yango na kati ya bolɔkɔ. Lokola Yehova, Yesu, baanzelu mpe bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo oyo basili kosekwisama bazali kotala biso, totombeli lisangá mokomoko, etuluku mokomoko, mpe moto mokomoko Ekaniseli malamu!
LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika
^ par. 5 Mokolo ya pɔsɔ, mwa 27/03/2021 ezali mokolo ya ntina mingi mpo na Batatoli ya Yehova. Na mpokwa ya mokolo yango, tokosala Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Bato mingi oyo bakoyangana na Ekaniseli yango, ezali baoyo Yesu abengaki “bampate mosusu.” Liteya nini ya ntina mpenza Batatoli ya Yehova bayekolaki na mobu 1935 mpo na bampate mosusu? Mapamboli nini bampate mosusu yango bakozwa nsima ya bolɔzi monene? Mpe ndenge nini bampate mosusu bakoki kokumisa Nzambe mpe Kristo ntango bayangani na Ekaniseli?
^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Bampate mosusu ezali bato oyo bazali kolanda Kristo mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Bamosusu kati na bango babandaki kosambela Yehova na boumeli ya mikolo ya nsuka. Ebele mpenza ya bato ezali bato oyo bazali na kati ya bampate mosusu, oyo bakozala na bomoi ntango Kristo akosambisa bato na bolɔzi monene, mpe bakobika na bolɔzi monene yango.