Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 5

“Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo”

“Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo”

“Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo.”​—1 KO. 11:3.

LOYEMBO 12 Yehova, Nzambe monene

NA MOKUSE *

1. Makambo nini ekoki kotinda mobali asalela mwasi to bana na ye makambo boye to boye?

LILOBA “bokonzi” oyo tokolobela na lisolo oyo elimboli nini mpo na yo? Mibali mosusu basalelaka basi mpe bana na bango makambo na kotalela bonkɔkɔ na bango, mimeseno ya mboka na bango, to mpe esika oyo bautá. Talá oyo Yanita, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Mpoto alobi: “Na esika oyo nafandaka, bato bandimaka mpenza ete basi bazali na nse ya mibali, mpe mibali basengeli kotalela bango lokola basali.” Ndeko mobali moko na nkombo Luke oyo afandaka na États-Unis alobi boye: “Batata mosusu bateyaka bana na bango ya mibali ete, makambo oyo basi balobaka ezalaka na ntina te. Yango wana, mibali basengeli kotyaka likebi te na makambo oyo basi balobaka.” Nzokande, Yehova alingaka te ete mibali básalelaka basi na bango makambo ndenge wana. (Talá mpe Marko 7:13.) Kasi ndenge nini mobali akoki koyekola kozala mokonzi malamu ya libota?

2. Makambo nini Tata ya libota asengeli koyeba, mpe mpo na nini?

2 Mpo azala mokonzi ya malamu, mobali asengeli liboso koyeba makambo oyo Yehova asɛngaka ye. Asengeli mpe koyeba ntina oyo Yehova apesá bato mosusu bokonzi likoló ya bamosusu, mpe ndenge oyo akoki kolanda ndakisa oyo Yehova ná Yesu batiká. Mpo na nini ezali na ntina mobali ayeba makambo yango? Mpo Yehova apesá batata ya mabota mwa bokonzi mpe alingi ete básalelaka yango na ndenge ya malamu.​—Luka 12:48b.

BOKONZI EZALI NINI?

3. Mokanda ya 1 Bakorinti 11:3 eteyi biso nini na likambo etali bokonzi?

3 Tángá 1 Bakorinti 11:3. Vɛrsɛ yango ezali komonisa ndenge oyo Yehova abongisá libota na ye, ezala na likoló to mpe awa na mabele. Yehova azali na bokonzi oyo eleki nyonso. Na kotalela ndenge oyo abongisá makambo, apesá bato mosusu mwa bokonzi. Kasi bato yango bakozongisa monɔkɔ epai na ye na kotalela ndenge oyo basalelaka bokonzi yango. (Rom. 14:10; Ef. 3:14, 15) Yehova atyá Yesu mokonzi ya lisangá. Kasi Yesu akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na ndenge oyo asalelaka biso makambo. (1 Ko. 15:27) Yehova apesá mpe mobali bokonzi likoló ya mwasi mpe bana na ye. Kasi mobali akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpe Yesu na kotalela ndenge oyo asalelaka bato ya libota na ye makambo.​—1 Pe. 3:7.

4. Bokonzi nini Yehova ná Yesu bazali na yango?

4 Lokola Yehova azali Mokonzi ya libota na ye oyo ezali na likoló mpe oyo ezali awa na mabele, azali na lotomo ya kotya mibeko mpo na ndenge oyo bana na ye basengeli komitambwisa, mpe komindimisa ete bazali kotosa mibeko yango. (Yis. 33:22) Lokola Yesu mpe azali mokonzi ya lisangá, azali mpe na lotomo ya kotya mibeko mpe ya kosɛnga bato bátosa yango.​—Gal. 6:2; Kol. 1:18-20.

5. Bokonzi nini tata ya libota azali na yango, mpe bokonzi na ye esuki wapi?

5 Ndenge moko na Yehova mpe Yesu, tata ya libota mpe azali na bokonzi ya kotyela bato ya libota na ye mibeko. (Rom. 7:2; Ef. 6:4) Atako bongo, bokonzi na ye ezali na ndelo. Na ndakisa, mibeko oyo akotya esengeli koyokana na mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Mas. 3:5, 6) Mpe tata ya libota azali na bokonzi te ya kotyela bato oyo bazali na libota na ye te mibeko. (Rom. 14:4) Lisusu, soki bana na ye bakoli mpe balongwe na ndako, bakokoba kotosa ye, kasi bazali lisusu te na nse ya bokonzi na ye.​—Mat. 19:5.

MPO NA NINI YEHOVA ATYÁ EBONGISELI YA BOKONZI?

6. Mpo na nini Yehova atyá ebongiseli ya bokonzi?

6 Yehova atyá ebongiseli ya bokonzi mpo alingaka libota na ye. Yango ezali likabo oyo euti epai na ye. Ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá, esalaka ete makambo etambola na kimya mpe na molɔngɔ na kati ya libota na ye. (1 Ko. 14:33, 40) Soki Yehova amonisaka polele te nani nde azali mokonzi, libota na ye elingaki kozala na esengo te mpe makambo elingaki kotambola na mobulu. Na ndakisa, moto moko te alingaki koyeba soki nani nde asengeli kozwa bikateli ya nsuka mpe soki nani nde asengeli kolandela mpo ete bikateli yango etosama.

7. Na kotalela Baefese 5:25, 28, Yehova alingaki ete mibali bányokolaka basi na bango? Limbolá.

7 Soki ezali malamu ete mibali bázala na bokonzi na kati ya libota, mpo na nini basi mingi bamonaka ete mibali na bango banyokolaka bango mpe bakonzaka bango? Ezali mpo mibali mingi batosaka te mibeko oyo Yehova atyá mpo na libota, kasi baponaka kolanda mimeseno to bonkɔkɔ ya mboka na bango. Mibali mosusu mpe banyokolaka basi na bango mpo bámiyoka malamu. Na ndakisa, mobali akoki kokonza mwasi na ye mpo atosa ye to mpo amonisa basusu ete azali mpenza “mobali ya solosolo.” Akoki kokanisa ete lokola akoki te kotinda mwasi na ye na makasi ete alinga ye, akoki kosala ete mwasi yango abanga ye. Mpe akoki kosalela kobanga yango mpo na kokonza mwasi na ye.  * Mibali oyo bakanisaka mpe basalaka makambo ndenge wana, bazali mpenza na libunga. Bapesaka te basi lokumu oyo babongi na yango; yango eyokani te ná likanisi ya Yehova.​—Tángá Baefese 5:25, 28.

NDENGE NINI MOBALI AKOKI KOYEKOLA KOZALA MOKONZI MALAMU YA LIBOTA?

8. Ndenge nini mobali akoki koyekola kozala mokonzi malamu ya libota?

8 Mobali akoki koyekola kozala mokonzi malamu ya libota soki amekoli ndenge oyo Yehova ná Yesu basalelaka bokonzi na bango. Tótalela kaka bizaleli mibale oyo Yehova ná Yesu bamonisaka, mpe tótalela ndenge oyo tata ya libota akoki komonisa bizaleli yango ntango azali kosalela bato ya libota na ye makambo.

9. Ndenge nini Yehova amonisaka komikitisa?

9 Komikitisa. Yehova azali na bwanya koleka moto nyonso. Atako bongo, ayokaka makanisi ya basaleli na ye. (Eba. 18:23, 24, 32) Atikelaka bato oyo bazalaki na nse ya bokonzi na ye bápesa makanisi na bango. (1 Bak. 22:19-22) Atako Yehova azali Nzambe ya kokoka, asɛngaka biso te tósala makambo na ndenge ya kokoka. Kutu, asalisaka bato ya kozanga kokoka oyo basalelaka ye bálonga na makambo oyo basalaka. (Nz. 113:6, 7) Lisusu, Biblia ebengi Yehova “mosungi.” (Nz. 27:9; Ebr. 13:6) Mokonzi Davidi alobaki ete asalaki makambo ya minene kaka mpo Yehova azali na komikitisa mpe asalisaki ye.​—2 Sa. 22:36.

10. Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa?

10 Tótalela ndakisa ya Yesu. Asukolaki makolo ya bayekoli na ye atako azali Nkolo mpe Mokonzi na bango. Mpo na nini Yehova akomisá lisolo yango na Biblia? Ezali mpo na kopesa moto nyonso, ata mpe batata ya mabota, ndakisa oyo basengeli kolanda. Yesu ye moko alobaki ete: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoa. 13:12-17) Atako azalaki na bokonzi mingi, Yesu alingaki te ete bato básalela ye. Kutu, ye nde azalaki kosalela basusu.​—Mat. 20:28.

Tata ya libota akoki komonisa komikitisa mpe bolingo soki azali kosala misala ya ndako, mpe soki azali kokokisa bamposa ya elimo ya bato ya libota na ye (Talá paragrafe 11, 13)

11. Ndakisa ya komikitisa ya Yehova mpe ya Yesu ekoki koteya tata ya libota nini?

11 Mateya mpo na biso. Tata ya libota akoki komonisa komikitisa na makambo mingi. Na ndakisa, azelaka te ete mwasi mpe bana na ye básalaka makambo na ndenge ya kokoka. Ayokaka makanisi ya bato ya libota na ye ata soki eyokani te na oyo ya ye. Marley, ndeko mwasi moko oyo afandaka na États-Unis alobi boye: “Na bantango mosusu, ngai ná mobali na ngai tozalaka na makanisi ekeseni. Kasi, nayebi ete azwaka ngai na motuya mpe apesaka ngai lokumu ndenge asɛngaka ete napesa makanisi na ngai, mpe atalelaka yango liboso azwa ekateli moko.” Lisusu, mobali oyo azali na komikitisa, andimaka kosala misala ya ndako, ata soki na esika oyo bafandi bato bamonaka ete ezali misala ya basi. Yango ekoki kozala mokakatano. Mpo na nini? Ndeko mwasi moko na nkombo Rachel alobi boye: “Na mboka na biso, soki mobali azali kosalisa mwasi na ye na kosukola basaani to na kokɔmbɔla ndako, bato ya kartye mpe bandeko na ye ya libota bakoki kokanisa ete azali mpenza ‘mobali ya solosolo’ te. Bakoki kokanisa ete mwasi na ye akonzaka ye.” Soki na esika oyo ofandi bato bakanisaka bongo, kobosana te ete Yesu asukolaki makolo ya bayekoli na ye atako bato bazalaki komona yango ete ezali mosala ya baombo. Tata ya malamu alukaka te bato mosusu bámona ete azali makasi mpe na ntina mingi. Kasi asalaka nyonso mpo mwasi mpe bana na ye bázala na esengo. Longola komikitisa, wapi ezaleli mosusu ya ntina oyo tata ya libota asengeli komonisaka?

12. Bolingo etindaki Yehova ná Yesu básala nini?

12 Bolingo. Bolingo nde etindaka Yehova asala likambo boye to boye. (1 Yoa. 4:7, 8) Na bolingo nyonso, akokisaka bamposa na biso ya elimo na nzela ya Biblia Liloba na ye, mpe na nzela ya ebongiseli na ye. Amonisaka biso ete alingaka biso; yango esalisaka biso tómiyoka ete atyelaka biso likebi. Kasi tokoloba nini mpo na oyo etali bamposa na biso ya mosuni? Yehova “apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.” (1 Tim. 6:17) Soki tosali mabunga, asembolaka biso kasi atikaka te kolinga biso. Bolingo nde etindaki ye apesa lisiko mpo na biso. Yesu mpe alingaka biso mingi. Yango wana, apesaki bomoi na ye mpo na biso. (Yoa. 3:16; 15:13) Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova ná Yesu bátika kolinga baoyo bazali sembo epai na bango.​—Yoa. 13:1; Rom. 8:35, 38, 39.

13. Mpo na nini ezali na ntina ete tata ya libota alingaka bato ya libota na ye? (Talá mpe etanda “ Makambo nini mobali oyo auti kobala sika akoki kosala mpo mwasi na ye amemyaka ye?”)

13 Mateya mpo na biso. Bolingo nde esengeli kotinda tata ya libota asalaka likambo boye to boye. Mpo na nini yango ezali na ntina? Ntoma Yoane ayanoli boye: “Moto oyo azali kolinga ndeko na ye te [to libota na ye] oyo ye amoni, akoki kolinga Nzambe te, oyo ye amoni te.” (1 Yoa. 4:11, 20) Na yango, mobali oyo alingaka libota na ye mpe oyo alingi komekola Yehova ná Yesu, akosalisa bato ya libota na ye bázala na boyokani ya malamu ná Yehova, akomonisa bango ete alingaka bango, mpe akokokisa bamposa na bango ya mosuni. (1 Tim. 5:8) Akoteya mpe akopesa bana na ye disiplini. Lisusu, akokoba kozwa bikateli oyo ekokumisa Yehova mpe oyo ekozala mpo na bolamu ya bato ya libota na ye. Tólobela sikoyo likambo yango mokomoko mpe tómona ndenge nini tata ya libota akoki komekola Yehova mpe Yesu.

OYO TATA YA LIBOTA ASENGELI KOSALA

14. Ndenge nini tata ya libota akoki kosalisa bato ya libota na ye bápusana penepene na Yehova?

14 Kosalisa bato ya libota na ye bázala na boyokani malamu ná Yehova. Yesu amonisaki ete azali lokola Tata na ye, mpo alingaki kosalisa bayekoli na ye bábatela kondima na bango makasi. (Mat. 5:3, 6; Mrk. 6:34) Ndenge moko mpe, Tata ya libota asengeli libosoliboso kosalisa bato ya libota na ye bápusana penepene na Yehova. (Mib. 6:6-9) Akosala yango soki ye ná bato ya libota na ye bazali kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe, koyangana na makita, kosakola nsango malamu, mpe soki bazali kokoba kobatela boyokani malamu ná Yehova.

15. Tata ya libota akoki kosala nini mpo bato ya libota na ye bámona ete alingaka bango?

15 Komonisa bato ya libota na ye ete alingaka bango. Yehova amonisaki polele ete alingaka Yesu. (Mat. 3:17) Mbala mingi, Yesu mpe azalaki komonisa bayekoli na ye ete alikanga bango na makambo oyo azalaki koloba mpe kosala. Bayekoli na ye mpe bazalaki koyebisa ye ete balingaka ye. (Yoa. 15:9, 12, 13; 21:16) Tata ya libota akoki komonisa ete alingaka mwasi mpe bana na ye na makambo oyo asalaka, na ndakisa, koyekola Biblia elongo na bango. Asengeli koyebisaka bango ete alingaka bango mpe ete bazali na motuya na miso na ye. Asengeli mpe kopesaka bango longonya na miso ya bato mosusu soki esengeli.​—Mas. 31:28, 29.

Mpo na kosepelisa Yehova, tata ya libota asengeli kokokisa bamposa ya mosuni ya bato ya libota na ye (Talá paragrafe 16)

16. Makambo nini mosusu tata ya libota asengeli kosala, mpe asengeli kokeba na likambo nini?

16 Kokokisa bamposa ya mosuni ya bato ya libota. Yehova azalaki kokokisa bamposa ya mosuni ya Bayisraele ata ntango oyo apesaki bango etumbu mpo baboyaki kotosa ye. (Mib. 2:7; 29:5) Lelo yo mpe akokisaka bamposa na biso ya mosuni. (Mat. 6:31-33; 7:11) Yesu mpe aleisaki bato oyo bazalaki kolanda ye. (Mat. 14:17-20) Abikisaki mpe bato mingi oyo bazalaki kobɛla. (Mat. 4:24) Mpo na kosepelisa Yehova, tata ya libota asengeli kokokisaka bamposa ya mosuni ya bato ya libota na ye. Kasi asengeli kokeba na likambo moko: asengeli te kolekisaka ntango mingi na mosala ya mosuni, mpo yango ekopekisa ye akokisa bamposa ya elimo ya bato ya libota na ye mpe ekozala mpasi amonisela bango bolingo.

17. Ndenge nini Yehova ná Yesu bateyaka mpe bapesaka biso disiplini?

17 Koteya bato ya libota. Yehova ateyaka mpe apesaka biso disiplini mpo na matomba na biso. (Ebr. 12:7-9) Ndenge moko ná tata na ye, na bolingo nyonso, Yesu ateyaka baoyo bazali na nse ya bokonzi na ye. (Yoa. 15:14, 15) Apesaka toli ya makasi, kasi asalaka yango na boboto. (Mat. 20:24-28) Ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe mbala mingi tosalaka mabunga.​—Mat. 26:41.

18. Makambo nini tata ya libota asengeli kobosanaka te?

18 Tata ya libota oyo amekolaka Yehova mpe Yesu, ayebaka ete mwasi mpe bana na ye bazali bato ya kozanga kokoka. Ayokelaka mwasi mpe bana na ye “nkanda makasi te.” (Kol. 3:19) Kasi asalelaka nde toli oyo ezali na Bagalatia 6:1, mpe asalaka makasi asembola bango na “elimo ya boboto” mpo ayebi ete ye mpe azali moto ya kozanga kokoka. Lokola Yesu, ayebaka ete lolenge eleki malamu ya koteya bango ezali ya kozala ndakisa malamu.​—1 Pe. 2:21.

19-20. Ntango tata ya libota azali kozwa bikateli, ndenge nini akoki komekola Yehova mpe Yesu?

19 Kozwa bikateli mpo na bolamu ya bato mosusu. Yehova azwaka bikateli mpo na bolamu ya bato mosusu. Na ndakisa, akelaki bomoi mpo na litomba ya ye moko te, kasi mpo alingaki ete biso mpe tósepela na yango. Moto moko te akokaki kotinda ye na makasi apesa mwana na ye mpo na kozipa masumu na biso. Ye moko nde andimaki kopesa mbeka yango mpo na bolamu na biso. Yesu mpe azwaki bikateli mpo na matomba ya bato mosusu. (Rom. 15:3) Na ndakisa mokolo moko, na esika apema mpo alɛmbaki makasi, andimaki koteya ebele ya bato.​—Mrk. 6:31-34.

20 Tata ya libota ya malamu ayebaka ete moko ya makambo oyo eleki mpasi ezali ya kozwa bikateli mpo na bato ya libota na ye, mpe azwaka mokumba yango na lisɛki te. Aboyaka kozwa bikateli oyo ezangá motó ná makolo. Azwaka mpe te bikateli kaka na kotalela ndenge azali komiyoka. Kasi atikaka ete Yehova ateya ye ndenge ya kozwa bikateli ya malamu. * (Mas. 2:6, 7) Kosala bongo ekosalisa ye akanisa matomba ya bato mosusu, kasi oyo ya ye moko te.​—Flp. 2:4.

21. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

21 Yehova apesá batata ya mabota mokumba moko ya lisɛki te, mpe bakozongisa monɔkɔ mpo na ndenge oyo bazali kokokisa mokumba yango. Kasi, soki tata ya libota asali makasi alanda ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu, akozala tata ya libota moko ya malamu. Mpe soki mwasi na ye akokisi mokumba na ye malamu, libala na bango ekozala na esengo. Ndenge nini mwasi asengeli kotalela mokumba oyo mobali na ye azali na yango ya kozala mokonzi ya libota? Mpe mikakatano nini mwasi akoki kokutana na yango? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.

LOYEMBO 16 Bókumisa Yah mpo na mwana na ye oyo atyami mafuta

^ par. 5 Ntango mobali abali, akómaka mokonzi ya libota ya sika. Na lisolo oyo, tokolobela soki bokonzi ezali nini, mpo na nini Yehova atyaki yango, mpe mateya nini mibali bakoki kozwa na ndakisa oyo Yehova ná Yesu batiká. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo oyo mwasi ná mobali bakoki koyekola epai ya Yesu, mpe epai ya bato mosusu oyo Biblia elobeli. Mpe na lisolo ya misato, tokolobela makambo etali bokonzi na kati ya lisangá.

^ par. 7 Mbala mingi bafilme, masano, ata mpe babuku oyo ezali na makambo ya kosɛkisa emonisaka likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ete mobali asengeli konyokola mwasi na ye ata mpe kobɛta ye. Yango wana, bato mingi bakoki kokanisa ete ezali mabe te ete mobali anyokola mwasi na ye.

^ par. 20 Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali kozwa bikateli ya malamu, talá lisolo “Bikateli na yo ekumisa Nzambe,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2011, nkasa 13-17.