Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 8

Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya mikakatano

Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya mikakatano

“Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge.”​—YAK. 1:2.

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

NA MOKUSE *

1-2. Na kotalela Matai 5:11, ndenge nini tosengeli kotalelaka mikakatano?

YESU alakaki bayekoli na ye ete bakozala na esengo ya solosolo. Ayebisaki mpe baoyo balingaka ye ete bakokutana na mikakatano. (Mat. 10:22, 23; Luka 6:20-23) Kozala bayekoli ya Kristo epesaka biso esengo. Kasi, toyokaka ndenge nini soki bato ya libota na biso bazali koluka kopekisa biso kosalela Yehova, soki baguvɛrnema ezali konyokola biso, to mpe soki baninga na biso ya mosala to mpe ya kelasi bazali koluka kotinda biso tósala likambo moko oyo ezali mabe? Na ntembe te, tokoki kobanga soki tokanisi makambo yango nyonso.

2 Mpo na bato mingi, minyoko ezali te likambo oyo ekoki kopesa moto esengo. Nzokande Liloba ya Nzambe esɛngi biso tótalelaka minyoko ndenge wana te. Na ndakisa, Yakobo akomaki ete tosengeli te komitungisa koleka ndelo ntango tokutani na mikakatano. Tosengeli nde komona yango lokola likambo ya esengo. (Yak. 1:2, 12) Mpe Yesu alobaki ete tosengeli kosepela ata ntango bazali konyokola biso. (Tángá Matai 5:11.) Tokoki kosala nini mpo tóbatela esengo na biso atako tozali kokutana na mikakatano? Mwa makanisi oyo ezali na mokanda oyo Yakobo akomelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso ekoki koteya biso makambo mingi. Tólobela naino mikakatano oyo bakristo wana bakutanaki na yango.

MIKAKATANO NINI BAKRISTO YA SIƐKLƐ YA LIBOSO BAKUTANAKI NA YANGO?

3. Ntango Yakobo akómaki moyekoli ya Yesu, makambo nini esalemaki mwa moke na nsima?

3 Ntango Yakobo akómaki moyekoli ya Yesu, mwa moke na nsima, bakristo ya Yerusaleme bakutanaki na minyoko. (Mis. 1:14; 5:17, 18) Mpe ntango babomaki moyekoli Stefano, bakristo mingi bakimaki engumba mpe bapanzanaki na bitúká ya Yudea, mpe ya Samaria, mpe nsukansuka, bakómaki mosika na Shiprɛ mpe na Antiokia. (Mis 7:58–8:1; 11:19) Meká kokanisa minyoko oyo bakristo wana bakutanaki na yango. Atako bongo, basakolaki na esengo nsango malamu na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, mpe bafungolaki masangá na bisika mingi na Ampire ya Roma. (1 Pe. 1:1) Kasi na nsima na yango, bakutanaki mpe na mikakatano mosusu mingi.

4. Wapi mikakatano mosusu oyo bakristo basengelaki koyikela yango mpiko?

4 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basengelaki koyika mpiko na mikakatano ya ndenge na ndenge. Na ndakisa, na mobu soki 50 ya ntango na biso, Klode oyo azalaki amperɛrɛ ya Roma apesaki mitindo ete Bayuda nyonso bálongwa na Roma. Na yango, Bayuda oyo bakómaki bakristo basengelaki kotika bandako na bango mpe kokende kofanda na bisika mosusu. (Mis. 18:1-3) Na mobu soki 61 ya ntango na biso, ntoma Paulo akomaki ete bafingaki bakristo liboso ya bato nyonso, batyaki bango na bolɔkɔ, mpe bayibaki biloko na bango. (Ebr. 10:32-34) Ndenge moko na bato nyonso, bakristo basengelaki koyika mpiko na bobola mpe na maladi.​—Rom. 15:26; Flp. 2:25-27.

5. Tokoyanola na mituna nini?

5 Ntango Yakobo akomaki mokanda na ye liboso ya mobu 62 ya ntango na biso, ayebaki malamu minyoko oyo bakristo bazalaki kokutana na yango. Na litambwisi ya elimo ya Yehova, Yakobo akomelaki bakristo yango mokanda mpe apesaki bango batoli oyo esengelaki kosalisa bango bákoba kobatela esengo na bango atako bazalaki kokutana na minyoko. Tótalela mokanda oyo Yakobo akomaki mpe tóluka biyano na mituna oyo: Yakobo alobeli esengo ya ndenge nini? Makambo nini ekoki kotinda mokristo abungisa esengo na ye? Mpe ndenge nini bwanya, kondima, mpe mpiko esalisaka biso tóbatela esengo na biso ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini?

MAKAMBO OYO EPESAKA BAKRISTO ESENGO

Ndenge kaka vɛrɛ ya mwinda ebatelaka lolemo ya mɔtɔ mpo ekufa te, esengo oyo Yehova apesaka epelaka na kati ya mitema na biso mpe ebatelami malamu (Talá paragrafe 6)

6. Na kotalela Luka 6:22, 23, mpo na nini mokristo akoki kozala na esengo ata ntango azali kokutana na minyoko?

6 Bato bakoki kokanisa ete bakozala na esengo kaka soki bazali nzoto kolɔngɔnɔ, bazali na mbongo mingi, mpe soki bazali na boyokani malamu elongo na bato ya libota na bango. Kasi, esengo oyo Yakobo alobeli ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe, mpe tokoki kozala na esengo yango ata soki tokokutani na likambo nini na bomoi na biso. (Gal. 5:22) Mokristo akoki kosepela to mpe kozala na esengo ya solosolo soki ayebi ete azali kosepelisa Yehova mpe kolanda ndakisa ya Yesu. (Tángá Luka 6:22, 23; Kol. 1:10, 11) Esengo na biso ezali lokola lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kopela na kati ya vɛrɛ ya mwinda ya petrole. Kaka ndenge vɛrɛ ya mwinda ebatelaka mɔtɔ yango mpo ekufa te, esengo na biso mpe epelaka na kati ya mitema na biso mpe ebatelami malamu. Ekufaka te ata soki tozali kobɛla to tozali na mbongo mingi te. Esilaka mpe te ata soki bato bazali kotyola biso, to ntango bato ya libota na biso bazali kotɛmɛla biso. Kutu, esengo na biso ebakisamaka ata soki bato baluki kosilisa yango. Minyoko oyo tokutanaka na yango mpo na kondima na biso, emonisaka ete tozali bayekoli ya solo ya Kristo. (Mat. 10:22; 24:9; Yoa. 15:20) Yango wana Yakobo akomaki ete: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge.”​—Yak. 1:2.

Mpo na nini tokoki kokokanisa mikakatano na mɔtɔ oyo basalelaka mpo na konyangwisa ebende? (Talá paragrafe 7) *

7-8. Mpo na nini kondima na biso ekómaka makasi ntango tozali kokutana na komekama?

7 Yakobo alobeli ntina mosusu oyo bakristo bandimaka koyika mpiko ata ntango bazali kokutana na minyoko ya makasi. Alobi boye: “Kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.” (Yak. 1:3) Tokoki kokokanisa minyoko na mɔtɔ oyo basalelaka mpo na konyangwisa ebende. Soki ebende yango ezwi mɔtɔ makasi, na nsima ekómi malili, ebende yango ekómaka lisusu makasi koleka. Ndenge moko mpe, ntango tozali koyika mpiko na minyoko, kondima na biso ekómaka lisusu makasi. Yango wana Yakobo akomaki ete: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso.” (Yak. 1:4) Ntango minyoko ekómisi kondima na biso lisusu makasi, yango ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na esengo.

8 Na mokanda oyo Yakobo akomaki, alobeli mpe makambo mosusu oyo ekoki kotinda biso tóbungisa esengo na biso. Makambo yango nini? Mpe ndenge nini tokoki kolonga yango?

NDENGE YA KOLONGA MIKAKATANO OYO EKOKI KOSILISA ESENGO NA BISO

9. Mpo na nini tozalaka na mposa ya bwanya?

9 Mokakatano: Ntango tozali koyeba te oyo tosengeli kosala. Ntango tokutani na mikakatano, tozalaka na mposa ete Yehova asalisa biso mpo tózwa bikateli oyo ekosepelisa ye, oyo ekozala mpo na litomba ya bandeko na biso bakristo, mpe oyo ekosalisa biso tóbatela bosembo na biso. (Yir. 10:23) Tozalaka na mposa ya bwanya mpo na koyeba oyo tosengeli kosala, mpe oyo tosengeli koloba na baoyo bazali kotɛmɛla biso. Soki tozali koyeba te oyo tosengeli kosala, yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto, mpe tokoki mbala moko kobungisa esengo na biso.

10. Yakobo 1:5 esɛngi biso tósala nini mpo tózwa bwanya?

10 Oyo okoki kosala: Sɛngá Yehova apesa yo bwanya. Mpo tóyikela mikakatano na biso mpiko na esengo, tosengeli naino kobondela Yehova apesa biso bwanya oyo tosengeli na yango mpo tózwa bikateli ya malamu. (Tángá Yakobo 1:5.) Tosengeli kosala nini soki Yehova ayanoli mbala moko te na libondeli na biso? Yakobo alobi ete tosengeli ‘kokoba kosɛnga Nzambe.’ Yehova amonaka mabe te soki tokobi kosɛnga ye bwanya. Akosilikela biso te. Tata na biso ya likoló ‘apesaka na motema mobimba’ soki tosɛngi ye bwanya mpo tóyika mpiko na mikakatano na biso. (Nz. 25:12, 13) Amonaka mikakatano na biso, ayokaka mawa ntango tozali konyokwama, mpe azalaka na mposa ya kosalisa biso. Na ntembe te, yango epesaka biso esengo mpenza! Kasi ndenge nini Yehova apesaka biso bwanya?

11. Makambo nini mosusu tosengeli kosala mpo tózwa bwanya?

11 Yehova apesaka biso bwanya na nzela ya Liloba na ye. (Mas. 2:6) Mpo na kozwa bwanya yango, tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mpe mikanda na biso. Kasi, tosengeli kosuka kaka te na kozwa boyebi. Tosengeli mpe kosala makambo oyo Nzambe asɛngi biso. Yakobo akomaki boye: “Bókóma batosi ya liloba kasi bayoki kaka te.” (Yak. 1:22) Soki tozali kosalela batoli oyo Nzambe apesaka biso, tokokóma mpenza bato oyo batyaka kimya, bato ya makambo makasimakasi te, mpe bato ya motema mawa. (Yak. 3:17) Ezaleli yango esalisaka biso tóyika mpiko ata na minyoko ya ndenge nini kozanga ete tóbungisa esengo na biso.

12. Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyeba Biblia malamu?

12 Liloba ya Nzambe ezali lokola talatala. Esalisaka biso tómona bisika oyo tosengeli kobongisa mpe ndenge oyo tokoki kosala yango. (Yak. 1:23-25) Na ndakisa, nsima ya koyekola Liloba ya Nzambe, tokoki komona ete tosengeli kosala makasi tósilikaka nokinoki te. Na lisalisi ya Yehova, toyekoli ndenge ya kozala na boboto ntango bato basilikisi biso to mpe ntango tokutani na makambo oyo epesi biso nkanda. Ezaleli ya boboto esalisaka biso tólonga mikakatano oyo tokutani na yango. Yango esalisaka biso tókanisa malamumalamu mpe tózwa bikateli ya bwanya. (Yak. 3:13) Koyeba Biblia malamu ezali mpenza na ntina mingi mpo na biso!

13. Mpo na nini tosengeli koyekola bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli?

13 Na bantango mosusu, tozwaka mayele kaka nsima ya kosala libunga. Kasi, kosala bongo ezali malamu te. Lolenge malamu ya kokóma na bwanya ezali ya kozwa mateya na makambo malamu mpe na makambo mabe oyo basusu basalaki. Yango nde ntina oyo Yakobo alendisi biso tótalela ndakisa ya Abrahama, Rahaba, Yobo mpe Eliya oyo Biblia elobeli. (Yak. 2:21-26; 5:10, 11, 17, 18) Basaleli wana ya sembo ya Yehova bayikaki mpiko na makambo oyo ekokaki kosilisa esengo na bango. Bandakisa na bango ya koyika mpiko emonisi ete, na lisalisi ya Yehova, biso mpe tokoki kosala bongo.

14-15. Mpo na nini tosengeli kokangaka miso te na bantembe na biso?

14 Mokakatano: Ntango tozali na mwa bantembe na mateya oyo tondimaka. Na bantango mosusu, tokoki kokanga malamu te ntina ya mateya mosusu ya Biblia. To mpe Yehova akoki koyanola na mabondeli na biso te na ndenge oyo tokanisaki. Yango ekoki kosala ete tókóma na mwa bantembe. Soki tokangi miso na bantembe yango, yango ekoki kolɛmbisa kondima na biso mpe kobebisa boyokani na biso elongo na Yehova. (Yak. 1:7, 8) Kutu yango ekoki kosala ete tóbungisa ata elikya na biso mpo na mikolo ezali koya.

15 Ntoma Paulo akokanisaki elikya na biso mpo na mikolo ezali koya na longo. (Ebr. 6:19) Longo etɛlɛmisaka masuwa na ntango ya mopɛpɛ makasi mpe esalisaka yango mpo etutana na mabanga te. Kasi longo ezalaka na ntina kaka soki nsinga oyo ekangisaka yango na masuwa ekatani te. Soki totiki bantembe ezwa esika na motema na biso, yango ekoki kolɛmbisa kondima na biso ndenge kaka mwa koguga elɛmbisaka nsinga ya longo. Soki moto oyo azali na bantembe akutani na mikakatano, akoki kobungisa kondima na ye epai ya Yehova ete akokokisa bilaka na ye. Soki tobungisi kondima na biso, tobungisi mpe elikya na biso. Ndenge kaka Yakobo alobaki ete, “moto oyo azali kobɛta ntembe azali lokola mbonge ya mbu oyo mopɛpɛ ezali komema mpe kotindika epai na epai.” (Yak. 1:6) Moto ya ndenge wana akoki kozala na esengo ata moke te.

16. Tosengeli kosala nini soki tozali na mwa bantembe?

16 Oyo okoki kosala: Silisá bantembe na yo mpe kómisá kondima na yo makasi. Koumisa makambo te. Na mikolo ya mosakoli Eliya, basaleli ya Yehova bakómaki kotya bantembe na makambo oyo bazalaki kondima. Eliya ayebisaki bango boye: “Kino ntango nini bokokakatana na makanisi? Soki Yehova azali Nzambe ya solo bólanda ye, kasi soki ezali nde Baala, bólanda ye!” (1 Bak. 18:21) Lelo oyo, biso mpe tosengeli koumisaka makambo te. Tosengeli kosala mwa bolukiluki mpo na komindimisa ete Yehova azali Nzambe, ete Biblia ezali Liloba na ye, mpe ete biso Batatoli ya Yehova tozali basaleli na ye. (1 Tes. 5:21) Kosala makambo nyonso wana ekosilisa bantembe na biso mpe ekokómisa kondima na biso makasi. Soki tozali na mposa ya kosilisa bantembe na biso, tokoki koluka lisalisi epai ya bankulutu. Tosengeli koumisa makambo te mpo tóbungisa esengo na biso te wana tozali kosalela Yehova.

17. Nini ekosalema soki tobungisi mpiko na biso?

17 Mokakatano: Kolɛmba nzoto. Liloba ya Nzambe elobi: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” (Mas. 24:10) Liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘kolɛmba nzoto’ ekoki mpe kolimbola “kobungisa mpiko.” Soki obungisi mpiko na yo, ekoumela te mpo obungisa esengo na yo.

18. Koyika mpiko elimboli nini?

18 Oyo okoki kosala: Tyelá Yehova motema mpo apesa yo mpiko mpo okanga motema. Tosengeli kozala na mpiko mpo tókanga motema ntango tokutani na mikakatano. (Yak. 5:11) Maloba oyo ebongolami na “koyika mpiko” oyo Yakobo asaleli awa ezali kopesa likanisi ya moto oyo atɛlɛmi ngwi na esika oyo azali. Tokoki kokanisa ndakisa ya soda oyo atɛlɛmi ngwi na esika oyo azali mpe azali kokima te ata liboso ya monguna oyo azali koya mpo na kobundisa ye.

19. Ndakisa ya ntoma Paulo ekoki koteya biso nini?

19 Ntoma Paulo azali ndakisa malamu na likambo etali komonisa mpiko mpe koyika mpiko. Na bantango mosusu azalaki kolɛmba. Kasi ayikaki mpiko mpe atyelaki Yehova motema ete akopesa ye makasi oyo asengelaki na yango. (2 Ko. 12:8-10; Flp. 4:13) Tokoki kozala na makasi mpe na mpiko ya ndenge wana soki na komikitisa nyonso, toyebi ete tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova.​—Yak. 4:10.

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE MPE BATELÁ ESENGO NA YO

20-21. Tosengeli kondima likambo nini?

20 Tosengeli koyeba ete mikakatano oyo tozali kokutana na yango ezali bitumbu ya Yehova te. Yakobo ayebisi biso ete: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te, mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yak. 1:13) Koyeba likambo yango ekosalisa biso tópusana penepene na tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo.​—Yak. 4:8.

21 Yehova “abongwanaka te.” (Yak. 1:17) Asalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso ntango bakutanaki na mikakatano. Lelo oyo mpe akosalisa mokomoko na biso. Bondeláká Yehova na motema mobimba mpo apesa yo bwanya, kondima mpe mpiko. Akoyanola na mabondeli na yo. Soki osali bongo, okoki kondima ete akosalisa yo obatela esengo na yo ntango ozali koyika mpiko na mikakatano.

LOYEMBO 128 Tóyika mpiko tii na nsuka

^ par. 5 Mokanda oyo Yakobo akomaki ezali na batoli ebele ya ntina oyo elobeli makambo oyo tokoki kosala ntango tokutani na mikakatano. Lisolo oyo elobeli na mokuse mwa batoli oyo Yakobo apesaki. Batoli yango ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano kozanga ete tóbungisa esengo na biso na mosala ya Yehova.

^ par. 59 NDIMBOLA YA BILILINGI: Bakangi ndeko mobali moko epai na ye. Mwasi ná mwana na ye ya mwasi bazali kotala ndenge bakonzi ya bapolisi bazali kokende na ye. Ntango azali na bolɔkɔ, bandeko ya lisangá bayei kosala losambo na kati ya libota elongo na ndeko mwasi mpe mwana na ye ya mwasi. Ndeko mwasi yango mpe mwana na ye ya mwasi bazali kosɛnga Yehova mbala na mbala apesa bango makasi ya koyikela mokakatano yango mpiko. Yehova apesi bango kimya ya motema mpe mpiko. Yango esali ete kondima na bango ekóma makasi mpe bazali koyika mpiko na esengo nyonso.