LISOLO YA BOYEKOLI 9
Bilenge: Bokoki kosala nini mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema?
“Ozali na etuluku na yo ya bilenge, lokola matánga ya mamwɛ ya kotana ya ntɔngɔ.”—NZ. 110:3.
LOYEMBO 39 Tómisalela nkombo malamu epai ya Nzambe
NA MOKUSE *
1. Bandeko mibali oyo bazali naino bilenge bakoki kosalisa lisangá na makambo nini?
BANDEKO mibali oyo bozali naino bilenge, bokoki kosalisa lisangá na makambo mingi. Mingi kati na bino bozali na makasi mingi ya nzoto. (Mas. 20:29) Bosalaka makambo mingi mpo na kosalisa bandeko ya lisangá na bino, mpe ntango mosusu bozalaka na mposa makasi ya kokóma basaleli na misala. Nzokande, bokoki kokanisa ete bato mosusu bamonaka bino kaka lokola bana mike. To mpe boyebi naino makambo mingi te mpo bápesa bino mokumba moko ya ntina mingi. Ata soki bozali naino bilenge, ezali na makambo oyo bokoki kosala sikoyo mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema mpe bámemyaka bino.
2. Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Na lisolo oyo, tokolobela mingimingi makambo yo esalemaki na bomoi ya mokonzi Davidi. Tokolobela mpe na mokuse makambo oyo esalemaki na bomoi ya bakonzi mibale ya Yuda; elingi koloba, mokonzi Asa mpe Yehoshafate. Tokolobela mwa mikakatano oyo mibali yango misato bakutanaki na yango, makambo oyo basalaki mpo na kolonga mikakatano yango, mpe mateya oyo bandeko mibali oyo bazali naino bilenge bakoki kozwa na bandakisa na bango.
ZWÁ MATEYA NA NDAKISA YA MOKONZI DAVIDI
3. Wapi lolenge moko oyo bilenge bakoki kosalisa bandeko oyo bakómi mibange na kati ya lisangá?
3 Ntango Davidi azalaki elenge, ayekolaki makambo mingi oyo bato mosusu bamonaki ete ezali na ntina mingi. Na ntembe te, azalaki na boyokani ya malamu ná Yehova. Asalaki makasi mpo akóma alanga-nzembo moko monene, mpe asalelaki makoki yango 1 Sa. 16:16, 23) Bilenge mibali, ezali na makambo oyo boyebi oyo ekoki kosalisa bandeko mosusu na lisangá? Mingi kati na bino bozali na yango. Na ndakisa, bandeko oyo bakómi mibange basepelaka mingi soki bilenge balakisi bango ndenge ya kosalela batablɛti mpe baaparɛyi mosusu mpo na boyekoli na bango moko, to mpo na makita ya lisangá. Bokoki kosalela boyebi yango mpo na kosalisa bandeko oyo bakómi mibange.
mpo na kosalisa Saulo, mokonzi oyo Nzambe atyaki. (4. Ndenge moko na Davidi, bizaleli nini bilenge mibali basengeli kokolisa? (Talá elilingi ya ezipeli.)
4 Ntango azalaki na bomoi, Davidi azalaki kozwa mikumba na ye na lisɛki te mpe azalaki moto oyo abongi kotyelama motema. Na ndakisa, ntango azalaki elenge, asalaki mosala makasi mpo na kobatela bampate ya tata na ye. Mosala yango ekómaki mpenza likama mpo na bomoi na ye. Kutu mokolo moko, Davidi ayebisaki mokonzi Saulo ete: “Mosaleli na yo akómaki mobateli ya mpate na etonga ya tata na ye, mpe nkɔsi moko eyaki, ná urse moko, mpe mokomoko na yango ememaki mpate moko ya etonga. Mpe nabimaki, nalandaki yango, nabomaki yango mpe nabikisaki mpate na monɔkɔ na yango.” (1 Sa. 17:34, 35) Davidi ayebaki ete azalaki na mokumba ya kobatela bampate. Yango wana, na mpiko nyonso, abundaki mpo na kobatela bampate yango. Bandeko mibali oyo bazali naino bilenge bakoki komekola Davidi soki bazali kosala nyonso mpo na kokokisa mokumba oyo bapesi bango.
5. Na kotalela Nzembo 25:14, wapi likambo eleki ntina oyo bandeko mibali oyo bazali naino bilenge basengeli kosala?
5 Ntango Davidi azalaki naino elenge, azalaki na boyokani ya malamu elongo ná Yehova. Boyokani ya Davidi elongo ná Yehova ezalaki na ntina mingi koleka mpiko oyo azalaki na yango mpe makoki oyo azalaki na yango ya kobɛta nzɛnzɛ. Mpo na Davidi, Yehova azalaki kaka te Nzambe na ye, kasi azalaki mpe moninga na ye ya motema. (Tángá Nzembo 25:14.) Bandeko mibale oyo bozali naino bilenge, likambo ya ntina oyo bosengeli kosala ezali ya kokómisa makasi boyokani na bino elongo na Tata na bino ya likoló, mpe yango ekoki kosalisa bino mpo bózwa mikumba mosusu na kati ya lisangá.
6. Makanisi nini ya mabe bato mosusu bazalaki na yango mpo na Davidi?
6 Davidi asengelaki kolonga makanisi mabe oyo bato mosusu bazalaki na yango mpo na ye. Na ndakisa, ntango Davidi andimaki kokende kobunda na Goliate, Mokonzi Saulo alukaki kolɛmbisa ye nzoto; alobaki na ye ete: “Ozali 1 Sa. 17:31-33) Liboso, yaya ya Davidi alobaki na ye ete akokisaka mokumba na ye malamu te. (1 Sa. 17:26-30) Kasi Yehova azalaki kotalela Davidi ndenge wana te mpe amonaki te ete azalaki kaka mwana moke. Ayebaki Davidi malamu. Mpe Davidi abomaki Goliate mpo atyelaki Yehova, moninga na ye motema.—1 Sa. 17:45, 48-51.
naino mwana.” (7. Mateya nini okoki kozwa na likambo moko oyo ekómelaki Davidi?
7 Makambo oyo ekómelaki Davidi ekoki koteya yo nini? Yango eteyi biso ete tosengeli kozala na motema molai. Ekoki kosɛnga ntango mpo bato oyo bayebaki yo lokola mwana moke bábanda komona yo ete okɔmeli. Kasi yebá ete, Yehova atalelaka yo te ndenge bato batalelaka yo. Ayebi lolenge ya moto oyo ozali, mpe makambo oyo ozali na likoki ya kosala. (1 Sa. 16:7) Na yango, kómisá makasi boyokani na yo elongo ná Nzambe. Mpo na kosala bongo, Davidi azalaki kotala na likebi mpenza biloko oyo Yehova akelá. Azalaki kokanisa na mozindo na mateya oyo akoki kozwa na nzela ya biloko yango. (Nz. 8:3, 4; 139:14; Rom. 1:20) Likambo mosusu oyo okoki kosala, ezali ya kosɛnga Yehova apesa yo makasi oyo osengeli na yango. Na ndakisa, baninga na yo mosusu ya kelasi batyolaka yo mpo ozali Motatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, bondelá Yehova mpo asalisa yo olonga mokakatano yango. Mpe saleláká batoli oyo ezali na Liloba ya Nzambe, na mikanda mpe na bavideo na biso. Mbala nyonso oyo omoni ndenge Yehova asalisi yo olonga mokakatano moko, okokóma lisusu kotyela ye motema mingi koleka. Oyo eleki ntina, ntango bato mosusu bakomona ete otyelaka Yehova motema, yango ekotinda bango mpe bákóma kotyela yo motema.
8-9. (a) Nini esalisaki Davidi amonisa motema molai liboso akóma mokonzi? (b) Mateya nini bandeko mibali oyo bazali naino bilenge bakoki kozwa na ndakisa na ye?
8 Tótalela mokakatano mosusu oyo Davidi akutanaki na yango. Nsima ya kotyama mafuta mpo akóma mokonzi, Davidi asengelaki kozela bambula mingi liboso abanda koyangela lokola mokonzi ya Yuda. (1 Sa. 16:13; 2 Sa. 2:3, 4) Na boumeli ya ntango wana, nini esalisaki ye amonisa motema molai? Na esika atika makambo yango elɛmbisa ye nzoto, Davidi atyaki makanisi na ye nyonso na makambo oyo akokaki kosala. Na ndakisa, ntango akimaki ekólo na ye mpe akendaki kofanda na mokili ya Bafilistia, Davidi asalelaki libaku yango mpo na kobunda na banguna ya Yisraele. Kosala bongo esalisaki ye abatela bandelo ya teritware ya Yuda.—1 Sa. 27:1-12.
9 Mateya nini bandeko mibali oyo bazali naino bilenge bakoki kozwa na ndakisa ya Davidi? Bósala oyo bokoki mpo na kosalela bandeko na bino ya lisangá. Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Ricardo. * Ntango azalaki naino elenge mpenza, azalaki na mposa ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi bankulutu bayebisaki ye azela naino. Na esika alɛmba nzoto to akóma nkandankanda, Ricardo abakisaki nde molende na ye na mosala ya kosakola. Alobi boye: “Soki nakanisi lisusu likambo yango, namonaka ete ezalaki malamu nakola lisusu mwa moke na elimo. Nasalaki makasi nazongelaka moto nyonso oyo asepelaki mpe namibongisaka malamu liboso nazongela moto mokomoko. Nayekolaki kutu na moto Biblia mpo na mbala ya liboso. Lokola nakómaki kosakola mingi, natikaki mpe kobanga.” Lelo oyo, Ricardo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza ya molende, mpe mosaleli na misala.
10. Na libaku moko boye, Davidi asalaki nini liboso azwa ekateli ya ntina mingi?
10 Tótalela sikoyo likambo mosusu oyo esalemaki na bomoi ya Davidi. Na boumeli ya ntango oyo Davidi ná bato na ye bazalaki na mokili ya 1 Sa. 30:7-10) Likambo yango ekoki koteya biso nini?
Bafilistia mpo na kokima Mokonzi Saulo, mokolo moko bakendaki na bitumba mpe batikaki mabota na bango. Na nsima na bango, banguna bayaki mpe bakɔtaki na makasi na bandako na bango, mpe bamemaki bato ya mabota na bango bakangami. Davidi akokaki kokanisa ete lokola ayebaki kobunda malamu, akokaki kosalela mayele oyo ebongi mpo na kobikisa bato yango oyo bakendaki bakangami. Na esika asala bongo, asɛngaki nde Yehova alakisa ye likambo oyo asɛngelaki kosala. Na lisalisi ya nganga-nzambe Abiatare, Davidi atunaki Yehova boye: “Nalanda etuluku oyo ya bapunzi?” Yehova ayebisaki ye akende mpe akolonga. (11. Makambo nini okoki kosala liboso ya kozwa bikateli?
11 Sɛngáká toli liboso ya kozwa bikateli. Tunáká makanisi ya baboti na yo. Okoki mpe kozwa toli ya malamu soki osololi na bankulutu oyo bayebi makambo mingi. Lokola Yehova atyelaka mibali yango motema, yo mpe okoki kosala bongo. Yehova atalelaka bango lokola “makabo” mpo na lisangá. (Ef. 4:8) Okozwa matomba mingi soki omekoli kondima na bango mpe soki oyoki makanisi ya bwanya oyo bakopesa yo. Tótalela sikoyo mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Mokonzi Asa.
ZWÁ MATEYA NA NDAKISA YA MOKONZI ASA
12. Bizaleli nini Mokonzi Asa amonisaki ntango abandaki koyangela?
12 Ntango Mokonzi Asa azalaki elenge, azalaki na komikitisa mpe na mpiko. Na ndakisa, ntango akómaki mokonzi na esika ya tata na ye Abiya, Asa asalaki mosala makasi mpo na kosilisa losambo ya bikeko na ekólo mobimba. Lisusu, Asa “alobaki na Yuda báluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe bátosa mobeko mpe mitindo” ya Yehova. (2 Nt. 14:1-7) Mpe ntango Zera moto ya Etiopi ná basoda milio moko bayaki mpo na kobundisa Yuda, Asa asɛngaki Yehova asalisa ye na maloba oyo: “Ee Yehova, ezala bato bazali mingi, ezala bazali na makasi te, yo osalisaka kaka. Salisá biso, ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema.” Maloba yango ya kitoko, emonisi ndenge Asa azalaki na kondima makasi ete Yehova akobikisa ye ná bato na ye. Asa atyelaki Tata na ye ya likoló motema, mpe “Yehova alongaki bato ya Etiopi.”—2 Nt. 14:8-12.
13. Likambo nini ekómelaki Asa na nsima, mpe mpo na nini?
13 Na ntembe te, kobundisa limpinga ya basoda milio moko ezalaki mokakatano monene mpenza. Kasi lokola Asa atyelaki Yehova 2 Nt. 16:7, 9; 1 Bak. 15:32) Yango eteyi biso nini?
motema, alongaki bango. Nzokande likambo ya mawa, ntango Asa akutanaki na mokakatano moko ya moke, atyelaki Yehova motema te. Na ndakisa, ntango Baasha mokonzi mabe ya Yisraele ayaki mpo na kobundisa ye, Asa akendaki koluka lisalisi epai ya mokonzi ya Siri. Ekateli yango ememelaki ye mpasi mpenza! Na nzela ya mosakoli Hanani, Yehova ayebisaki Asa boye: “Lokola otyeli mokonzi ya Siri motema mpe otyeli Yehova Nzambe na yo motema te, yango wana limpinga ya basoda ya mokonzi ya Siri ekimi, elongwe na lobɔkɔ na yo.” Kutu, kobanda na ntango wana, Asa akómaki na bitumba ntango nyonso. (14. Ndenge nini okoki kotyela Yehova motema, mpe na kotalela 1 Timote 4:12, matomba nini okozwa soki osali bongo?
14 Kobá kozala na komikitisa mpe kotyela Yehova motema. Ntango ozwaki batisimo, omonisaki ete ozalaki na kondima makasi mpe ete otyelaka Yehova motema. Mpe Yehova asepelaki koyamba yo na kati ya libota na ye. Na yango, osengeli kokoba kotyela Yehova motema. Ekoki komonana pɛtɛɛ kotyela Yehova motema ntango tolingi kozwa bikateli mosusu ya ntina mingi na bomoi. Bongo na bantango mosusu? Ezali na ntina mingi ete otyelaka Yehova motema ntango olingi kozwa bikateli ezala na makambo etali kominanola, mosala ya mosuni oyo olingi kosala, mpe mikano oyo osengeli komityela na bomoi. Kotyela bwanya na yo moko motema te. Kasi, luká nde mitinda ya Biblia oyo eyokani na makambo oyo olingi kosala, mpe salá na boyokani na mitinda yango. (Mas. 3:5, 6) Soki osali bongo, okosepelisa motema ya Yehova, mpe bandeko ya lisangá bakobanda kopesa yo limemya.—Tángá 1 Timote 4:12.
ZWÁ MATEYA NA NDAKISA YA MOKONZI YEHOSHAFATE
15. Ndenge 2 Ntango 18:1-3; 19:2 emonisi yango, mabunga nini mokonzi Yehoshafate asalaki?
15 Na ntembe te, lokola biso nyonso, yo mpe ozali moto ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu okosala mabunga. Kasi yango esengeli te kopekisa yo osala nyonso oyo okoki na mosala ya Yehova. Tótalela ndakisa ya Mokonzi Yehoshafate. Azalaki na bizaleli mingi ya malamu. Ntango azalaki elenge, “alukaki nde Nzambe ya tata na ye mpe atambolaki na mobeko na ye.” Longola yango, atindaki bankumu na bingumba ya Yuda mpo báteya bato makambo etali Yehova. (2 Nt. 17:4, 7) Kasi na bantango mosusu mpe, Yehoshafate azwaki bikateli ya mabe. Mpo na yango, momonisi moko ya Yehova apesaki ye toli. (Tángá 2 Ntango 18:1-3; 19:2.) Lisolo yango ekoki koteya yo nini?
16. Makambo oyo Rajeev akutanaki na yango, ekoki koteya yo nini?
16 Ndimáká mpe saleláká toli oyo bapesi yo. Ndenge moko na bilenge mingi, ekoki kozala ete yo mpe okakatanaka mpo na kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na yo. Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Talá makambo oyo ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Rajeev akutanaki na yango. Alobi boye mpo na ntango oyo azalaki mpenza elenge: “Na bantango mosusu, nazalaki mpenza koyeba te makambo oyo nasengelaki kosala na bomoi na ngai. Ndenge moko na bilenge mingi, nazalaki kosepela mingi na masano mpe na kominanola, na esika ya kokende na makita to mpe kobima na mosala ya kosakola.” Nini esalisaki Rajeev? Nkulutu moko ya boboto apesaki ye toli. Rajeev alobi boye: “Asalisaki ngai nakanisa na etinda ya Biblia oyo ezali na 1 Timote 4:8.” Na komikitisa nyonso, Rajeev andimaki toli yango mpe atalelaki lisusu makambo oyo azalaki kotya na esika ya liboso na bomoi na ye. Alobi boye: “Nazwaki ekateli ya kotya mikano ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ngai.” Yango ebotaki mbuma nini? Rajeev alobi boye: “Mwa bambula nsima ya kozwa toli yango, nakokisaki masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala.”
SEPELISÁ MOTEMA YA TATA NA YO YA LIKOLÓ
17. Bandeko oyo bakómi mibange bayokaka ndenge nini mpo na bilenge mibali oyo basalelaka Yehova?
17 Bandeko oyo bakómi mibange basepelaka mingi na bino bilenge mpo bosalelaka Yehova elongo “na bomoko.” (Sef. 3:9) Basepelaka mingi na milende oyo bosalaka mpo na kokokisa na esengo mpenza mikumba oyo bapesá bino. Bozali mpenza na motuya na miso na bango.—1 Yoa. 2:14
18. Ndenge emonisami na Masese 27:11, Yehova ayokaka ndenge nini mpo na bilenge mibali oyo basalelaka ye?
18 Bandeko mibali oyo bozali naino bilenge, bóbosana te ete Yehova alingaka bino mpe atyelaka bino motema. Asakolaki ete na mikolo ya nsuka, ekozala na limpinga moko ya bilenge, oyo bakomipesa na bolingo na bango moko. (Nz. 110:1-3) Ayebi ete bolingaka ye, mpe ete bolingaka kosala nyonso oyo bokoki mpo na kosalela ye. Na yango, zalá na motema molai epai ya bato mosusu mpe epai na yo moko. Soki osali mabunga, ndimá formasyo mpe disiplini oyo bakopesa yo, mpe talelá yango lokola euti epai ya Yehova. (Ebr. 12:6) Saláká nyonso oyo okoki mpo na kokokisa mokumba nyonso oyo bapesi yo. Mpe oyo eleki ntina, na makambo nyonso oyo ozali kosala, sepelisá motema ya Tata na yo ya likoló.—Tángá Masese 27:11.
LOYEMBO 135 Yehova alobi “zalá mayele mwana na ngai”
^ par. 5 Ntango bilenge bazali kokola na elimo, balingaka kosala mingi na mosala ya Yehova. Na ndakisa, mpo bákóma basaleli na misala, basengeli kosala makasi mpo bandeko ya lisangá bámemyaka bango. Makambo nini bilenge bakoki kosala mpo bandeko ya lisangá bámemyaka bango?
^ par. 9 Topesi bango bankombo mosusu.