Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini bakristo basengeli kozala ekɛngɛ ntango bazali kosalela basite Internet ya kosolola na baninga, na ndakisa oyo ya kotindelana bamesaje?

Bandeko mosusu basalelaka baaparɛyi ya mikolo oyo mpo na kosolola na bandeko na bango ya libota, to mpe bandeko mosusu ya lisangá. Kasi mokristo oyo akɔmeli na elimo, asengeli kobosana toli oyo te: “Moto ya ekɛngɛ oyo amoni likama amibombi; bato oyo bazangi mayele baleki kaka mpe bazwi mpasi.”​—Mas. 27:12.

Toyebi ete Yehova alingaka kobatela biso. Na yango, toboyaka kosala boninga ná bato oyo bakɔtisaka bokabwani, oyo babimisamá na lisangá, to mpe oyo balɛndisaka makanisi ya mabe. (Rom. 16:17; 1 Ko. 5:11; 2 Yoa. 10, 11) Bandeko mosusu ya lisangá bakoki kozala na etamboli ya malamu te. (2 Tim. 2:20, 21) Tóbosana likambo oyo te: kopona baninga ya malamu na nzela ya basite Internet ya kosolola na baninga ekoki kozala pɛtɛɛ te.

Na yango, tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali kopona baninga na biso, mingimingi soki ezali etuluku oyo esangisi bato ebele. Bakristo mosusu bakɔtá na etuluku oyo esangisi bato ebele mpe yango ememelá bango makama. Ndenge nini mokristo akomonisa ete azali ekɛngɛ soki alingi akɔta na etuluku moko oyo esangisi bato ebele mpenza? Ekozala mpasi mpo ayeba soki moto mokomoko oyo azali na etuluku yango azali mpenza nani, mpe soki azali na etamboli ya ndenge nini. Nzembo 26:4 elobi: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.” Maloba yango emonisi ete ezali mpenza likambo ya bwanya kotinda bamesaje kaka epai ya moto oyo toyebi.

Ata soki etuluku yango esangisi bato ebele te, mokristo asengeli kozala ekɛngɛ mpo na ntango oyo azali kolekisa mpo na kokóma bamesaje, mpe kotala makambo oyo bato ya etuluku yango bazali kotya. Tosengeli komona te ete esengeli kaka tóyanolaka na bamesaje nyonso oyo batindeli biso, ata soki bamesaje yango ezali kolobela makambo nini to mpe ekozwa ntango boni. Paulo akebisaki Timote mpo na ‘bato ya bilobaloba mpe oyo bamikɔtisaka na makambo ya bato.’ (1 Tim. 5:13) Lelo oyo, ezali mpasi te tósala makambo ya ndenge wana na nzela ya baaparɛyi.

Mokristo oyo akɔmeli na elimo akoboya koyoka to mpe koloba makambo ya mabe oyo bato bazali koloba mpo na Batatoli ya Yehova mosusu, to mpe makambo ya sekele oyo etali bango. (Nz. 15:3; Mas. 20:19) Lisusu, akoboya koyoka masolo ya lokuta to oyo ekoki kopesa bato mosusu mpasi. (Ef. 4:25) Na nzela ya site na biso jw.org mpe ya baprograme ya sanza ya TV JW, tozwaka bilei ya elimo mpe bansango oyo tokoki kotyela motema.

Batatoli mosusu basalelaka basite Internet ya kosolola na baninga mpo na kotɛka, kosomba, kolobela biloko oyo ebimi sika, to mpo na kosalisa bato mosusu bázwa mosala. Wana ezali makambo ya mombongo kasi ya elimo te. Bakristo oyo balingaka kozala na “bolingo ya mbongo te” baboyaka kosalela bandeko na bango bakristo mpo na kozwa mbongo.​—Ebr. 13:5.

Tosengeli nde kosalela basite Internet ya kosolola na baninga mpo na kokɔngɔla mbongo ya kosalisa bandeko na biso oyo bazali kokelela to oyo bazwi likama? Tolingaka bandeko na biso mpe totyelaka bango likebi, yango wana mbala mingi, tolingaka kosalisa baoyo bazali kokelela mpe tolendisaka bango. (Yak. 2:15, 16) Kasi soki tomeki kosala yango na nzela ya etuluku moko oyo esangisi bato ebele, yango ekoki kozala mpasi mpo biro ya filiale mpe lisangá esalisa bandeko yango. (1 Tim. 5:3, 4, 9, 10, 16) Ya solo mpenza, ndeko moko te akolinga kotinda bato mosusu bákanisa ete bapesá ye mokumba ya kokɛngɛla bandeko na biso.

Tolingaka kosala makambo oyo ekopesa Nzambe nkembo. (1 Ko. 10:31) Na yango, ntango olingi kosalela basite Internet ya kosolola na baninga mpo na kotindelana bamesaje, to ntango ozali kosalela baaparɛyi mosusu, ekozala malamu otalela makama oyo ekoki kobima mpe ozala ekɛngɛ.