Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 13

Ndenge oyo Yehova akobatela yo

Ndenge oyo Yehova akobatela yo

“Nkolo azali sembo, mpe akopesa bino makasi mpe akobatela bino na moto mabe.”​—2 TES. 3:3.

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini Yesu asɛngaki Yehova akɛngɛla bayekoli na ye?

NA BUTU ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele, Yesu azalaki kokanisa mikakatano oyo bayekoli na ye basengelaki kokutana na yango. Lokola alingaki bayekoli na ye, Yesu asɛngaki Tata na ye ete ‘akɛngɛla bango mpo na moto mabe.’ (Yoa. 17:14, 15) Yesu ayebaki ete ntango akozonga na likoló, Satana akokoba kobundisa moto nyonso oyo alingi kosalela Yehova. Yango wana basaleli ya Yehova basengelaki kozala na mposa ya libateli.

2. Nini ekoki kondimisa biso ete Yehova akoyanola na mabondeli na biso?

2 Lokola Yehova alingaka Yesu, yango wana ayanolaki na libondeli na ye. Soki tosali nyonso tósepelisa motema ya Yehova, akolinga biso mpe akoyanola na mabondeli na biso soki tosɛngi ye asalisa mpe abatela biso. Lokola Yehova azali Tata ya bolingo, akokoba kotyela bana na ye likebi. Soki asali yango te, nkombo na ye ekosambwa mpe yango ekobebisa lokumu na ye!

3. Mpo na nini tozali na mposa ya libateli ya Yehova lelo oyo?

3 Lelo oyo, tozali mpenza na mposa ya libateli ya Yehova. Lokola babenganá Satana na likoló, yango wana azali na “nkanda makasi.” (Em. 12:12) Atindaka bato mosusu bákanisa ete soki bazali konyokola biso, ‘bazali kosalela Nzambe mosala mosantu.’ (Yoa. 16:2) Bato mosusu oyo bandimelaka Nzambe te banyokolaka biso mpo tokeseni na bato ya mokili oyo. Ata soki bato bazali konyokola biso ndenge nini, tobangaka te. Mpo na nini? Mpo Liloba ya Nzambe elobi: “Nkolo azali sembo, mpe akopesa bino makasi mpe akobatela bino na moto mabe.” (2 Tes. 3:3) Ndenge nini Yehova abatelaka biso? Tólobela ndenge mibale oyo asalaka yango.

YEHOVA APESI BISO MOLATO YA ETUMBA

4. Na kotalela Baefese 6:13-17, Yehova apesá biso nini mpo na kobatela biso?

4 Yehova apesá biso molato ya etumba oyo ekoki kobatela biso ntango Satana azali kobundisa biso. (Tángá Baefese 6:13-17.) Molato yango ya etumba ezali makasi mpe esalisaka mpenza! Kasi ekobatela biso kaka soki tokobi kolata eteni nyonso ya molato yango. Eteni mokomoko ya molato yango elimboli nini? Tólobela yango.

5. Solo oyo ezali lokola mokaba ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kolata yango?

5 Solo lokola mokaba ezali komonisa mateya ya solo oyo ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Mpo na nini tosengeli kolata mokaba yango? Mpo Satana azali “tata ya lokuta.” (Yoa. 8:44) Abandá lokuta yango banda kala mpenza mpe akosaka “mabele mobimba esika bato bafandi!” (Em. 12:9) Kasi mateya ya solo oyo ezali na Biblia ebatelaka biso mpo tókosama te. Ndenge nini tolataka mokaba yango ya elilingi? Tosalaka yango na ndenge toyekolaka solo na ntina etali Yehova, na ndenge tosambelaka ye na “elimo mpe na solo,” mpe na ndenge tozalaka sembo na makambo nyonso.​—Yoa. 4:24; Ef. 4:25; Ebr. 13:18.

Mokaba: Solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe

6. Ebateli-ntolo ya boyengebene ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kolata yango?

6 Ebateli-ntolo ya boyengebene ezali komonisa mitinda ya sembo ya Yehova. Mpo na nini tosengeli kolata yango? Kaka ndenge ebateli-ntolo ebatelaka motema ya soda mpo ezoka te, ebateli-ntolo ya boyengebene ebatelaka motema na biso ya elilingi mpo makambo mabe ya mokili oyo ebebisa yango te. (Mas. 4:23) Mposa ya Yehova ezali ete tólinga ye mpe tósalela ye na motema na biso mobimba. (Mat. 22:36, 37) Nzokande, Satana alingaka kotinda biso tótika kosalela Yehova na motema na biso mobimba na ndenge atindaka biso tólinga makambo ya mokili oyo Yehova ayinaka. (Yak. 4:4; 1 Yoa. 2:15, 16) Mpe soki mayele yango esimbi te, akoluka konyokola biso mpo tósala likambo oyo esepelisaka Yehova te.

Ebateli-ntolo: Mibeko ya sembo ya Yehova

7. Ndenge nini tolataka ebateli-ntolo ya boyengebene?

7 Tolataka ebateli-ntolo ya boyengebene na ndenge totosaka mitinda ya sembo ya Yehova na oyo etali malamu mpe mabe, mpe na ndenge tosalaka makasi tósalela mitinda yango na bomoi na biso. (Nz. 97:10) Bato mosusu bakoki kokanisa ete mibeko ya Yehova etyaka biso nkaka. Kasi soki totiki kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso, tokokokana na soda oyo alongoli ebateli-ntolo na ye ntango bitumba eyei ndongo mpo amoni ete ezali kilo mingi. Kosala bongo ekozala bozoba mpenza! Mpo na baoyo balingaka Yehova, mibeko na ye ezali “kilo te,” kasi ebatelaka nde bomoi na bango.​—1 Yoa. 5:3.

8. Makolo oyo elati bisaleli ya nsango malamu elimboli nini?

8 Paulo ayebisi biso mpe ete makolo na biso elata bisaleli ya nsango malamu ya kimya. Yango elimboli ete tosengeli ntango nyonso komilɛngɛla mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Ntango toyebisaka bato mosusu nsango ya Biblia, kondima na biso moko ekómaka makasi. Komona ndenge oyo basaleli ya Yehova na mokili mobimba basalelaka mabaku nyonso oyo bazwi mpo na kosakola nsango malamu na bisika oyo bafandi, elendisaka biso mpenza. Na ndakisa, basakolaka na esika ya mosala, na eteyelo, na ndako na ndako, na bisika ya mombongo, ntango bakei kosomba biloko, ntango bakei kotala bandeko na bango ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te, ntango bazali kosolola na bato ya kartye na bango, ata mpe ntango bapekisi bango bábima libandá mpo na mwa ntango. Soki totiki kobanga epekisa biso kosakola, tokokokana na soda oyo alongoli sapato na ye na ntango ya etumba. Ekozala mpasi te mpo makolo na ye ezoka. Na yango, ntango banguna bakoya mpo na kobundisa ye, ekozala mpasi amibatela mpe alanda mitindo ya komanda na ye.

Sapato: Komilɛngɛla ntango nyonso mpo na koyebisa bato nsango malamu

9. Mpo na nini tosengeli kolata nguba monene ya kondima?

9 Nguba monene ya kondima emonisi kondima oyo tozalaka na yango epai ya Yehova. Totyaka motema ete akokokisa bilaka na ye. Kondima yango ekosalisa biso mpo tóboma “mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.” Mpo na nini tosengeli kolata nguba monene yango? Mpo yango ebatelaka biso mpo tókosama te na mateya ya bapɛngwi mpe tólɛmba nzoto te ntango bato bazali koloba mabe mpo na mateya na biso. Soki tozangi kondima, tokozala na makasi te ya kotosa Yehova ntango bato mosusu batye biso mbamba mpo tóbuka mibeko na ye. Nzokande, mbala nyonso oyo toboyi kosala likambo moko oyo Yehova ayinaka, ezala na mosala to na eteyelo, tobatelaka kondima na biso. (1 Pe. 3:15) Mpe mbala nyonso oyo toboyi mosala moko oyo esengelaki kofuta biso mbongo mingi kasi oyo ekokaki kopekisa biso tósalela Yehova na ndenge ebongi, tobatelaka kondima na biso. (Ebr. 13:5, 6) Lisusu, mbala nyonso oyo tozali kosalela Yehova atako botɛmɛli, kondima na biso ebatelaka biso.​—1 Tes. 2:2.

Nguba: Kondima oyo tozalaka na yango epai ya Yehova mpe na bilaka na ye

10. Ekɔti ya lobiko ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kolata yango?

10 Ekɔti ya lobiko ezali elikya oyo Yehova apesaka biso; elikya oyo emonisi ete akopesa mbano na baoyo nyonso basalaka mokano na ye, mpe ata soki tokufi akosekwisa biso. (1 Tes. 5:8; 1 Tim. 4:10; Tito 1:1, 2) Kaka ndenge ekɔti ebatelaka motó ya soda, elikya ya lobiko ebatelaka likoki na biso ya kokanisa. Na ndenge nini? Elikya yango esalisaka biso tótya makanisi na biso nyonso na bilaka ya Nzambe mpe esalisaka biso tótalela mikakatano na biso na ndenge ebongi. Ndenge nini tolataka ekɔti yango? Tosalaka yango na ndenge totikaka makanisi na biso eyokana na oyo ya Nzambe. Na ndakisa, totyaka elikya na biso te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi kasi nde epai ya Nzambe.​—Nz. 26:2; 104:34; 1 Tim. 6:17.

Ekɔti: Elikya oyo tozali na yango ya bomoi ya seko

11. Mopanga ya elimo ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kosalela yango?

11 Mopanga ya elimo ezali Biblia, Liloba ya Nzambe. Mopanga yango ezali na nguya ya komonisa polele ata lokuta ya ndenge nini, mpe ya kolongola bato na boombo ya mateya ya lokuta mpe mimeseno ya mabe. (2 Ko. 10:4, 5; 2 Tim. 3:16, 17; Ebr. 4:12) Toyekolaka kosalela mopanga yango malamumalamu ntango tosalaka boyekoli na biso moko ya Liloba ya Nzambe mpe ntango tozwaka formasyo oyo ebongiseli ya Nzambe epesaka biso. (2 Tim. 2:15) Longola molato ya etumba, Yehova abatelaka biso mpe na ndenge mosusu. Na ndenge nini?

Mopanga: Biblia, Liloba ya Nzambe

YEHOVA ASALISAKA BISO NA NDENGE MINGI

12. Lisalisi nini mosusu tosengeli na yango, mpe mpo na nini?

12 Soda oyo ayebi kobunda malamu, ayebaka ete akoki te kolonga limpinga moko monene ya basoda ye moko, kasi asengeli mpe na lisalisi ya basoda mosusu. Ndenge moko mpe, tokoki te kolonga Satana mpe bato oyo bapesaka ye mabɔkɔ na makasi na biso moko. Tosengeli na lisalisi ya bandeko na biso bakristo. Yehova apesi biso “lisangá mobimba ya bandeko” mpo na kosalisa biso.​—1 Pe. 2:17.

13. Na kotalela Baebre 10:24, 25, matomba nini tozwaka soki tozali koyangana na makita?

13 Lolenge moko oyo tozwaka lisalisi ezali ya koyangana na makita. (Tángá Baebre 10:24, 25.) Ntango toyoki ete tolɛmbi nzoto, kaka ndenge ekómelaka biso na bantango mosusu, makita ya lisangá ekoki kolendisa biso. Biyano oyo bandeko bapesaka, oyo eutaka mpenza na mitema na bango, elendisaka biso. Badiskur mpe bilakiseli oyo basalaka epesaka biso makasi ya kokoba kosalela Yehova. Mpe masolo ya kolendisa oyo tobɛtaka liboso mpe nsima ya makita epesaka biso makasi mpenza. (1 Tes. 5:14) Lisusu, makita epesaka biso libaku ya kosalisa basusu mpe yango epesaka biso esengo. (Mis. 20:35; Rom. 1:11, 12) Makita esalisaka biso mpe na ndenge mosusu. Esalisaka biso tózala bato oyo bayebi kosakola mpe koteya malamu. Na ndakisa, toyekolaka kosalela Bisaleli na biso mpo na koteya na ndenge ya malamu mpenza. Na yango, bongisáká makita malamu. Ntango makita ezali kosalema, yokáká na likebi. Nsima ya makita, salelá formasyo oyo ozwaki. Soki osali bongo, okokóma “soda ya solosolo ya Kristo Yesu.”​—2 Tim. 2:3.

14. Lisalisi nini mosusu tozali na yango?

14 Tozwaka mpe lisalisi mosusu epai ya ebele ya baanzelu ya nguya. Meká kokanisa likambo oyo kaka anzelu moko akoki kosala! (Yis. 37:36) Sikoyo, kanisá oyo limpinga ya baanzelu ya nguya bakoki kosala. Ata moto to demo moko te akoki kolonga limpinga monene ya baanzelu ya nguya ya Yehova. Yehova aleki na nguya. Na yango, soki azali elongo na biso, tokozala ntango nyonso na makasi koleka banguna na biso ata soki bazali ebele ndenge nini. (Bas. 6:16) Yango ezali mpenza likambo ya solo! Kobosana likambo yango te, mingimingi ntango moninga moko ya mosala, ya kelasi, to mpe ndeko moko ya libota oyo azali Motatoli te alobi to asali yo likambo moko oyo ekoki kolɛmbisa yo nzoto. Kobosana te ete ozali kobunda yo moko te. Lokola olandaka malako ya Yehova, yebá ete akosalisa yo.

YEHOVA AKOKOBA KOBATELA BISO

15. Na kotalela Yisaya 54:15, 17, mpo na nini basaleli ya Yehova bakotika te kosakola?

15 Mokili oyo Satana azali koyangela ezali na bantina mingi ya koyina biso. Tokɔtaka soki moke te na makambo ya politiki mpe topesaka mabɔkɔ na bitumba te. Tosakolaka nkombo ya Nzambe, toyebisaka bato ete kaka Bokonzi na ye nde ekotya kimya, mpe totosaka mibeko na ye ya sembo. Tomonisaka bato polele ete moyangeli ya mokili oyo azali mobuki-lokuta monene mpe mobomi-bato. (Yoa. 8:44) Mpe tosakolaka ete mosika te mokili oyo ya Satana ekobomama. Na yango, ezala Satana to mpe bato oyo bapesaka ye mabɔkɔ, bakokoka te kopekisa mosala na biso ya kosakola. Kutu, tokokoba kosala nyonso oyo tokoki mpo na kokumisa Yehova! Atako Satana azali na nguya mingi, alongi te kopekisa nsango ya Bokonzi esakolama na mokili mobimba. Nyonso wana kaka mpo Yehova azali kobatela biso.​—Tángá Yisaya 54:15, 17.

16. Ndenge nini Yehova akobikisa basaleli na ye na ntango ya bolɔzi monene?

16 Makambo nini tozali kozela? Na ntango ya bolɔzi monene, Yehova akobikisa biso na lolenge mibale ya kokamwa. Ya liboso, akobikisa basaleli na ye ya sembo ntango akosala ete bakonzi ya mabele bábebisa Babilone Monene, elingi koloba, lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta. (Em. 17:16-18; 18:2, 4) Na nsima, akobikisa basaleli na ye ntango akobebisa bibongiseli mosusu ya mokili ya Satana na Armagedone.​—Em. 7:9, 10; 16:14, 16.

17. Matomba nini tokozwa soki totikali penepene na Yehova?

17 Soki totikali penepene na Yehova, Satana akokoka te kosala likambo moko oyo ekosala biso mabe mpo na libela. Kutu, ye nde akobomama mpo na libela. (Rom. 16:20) Na yango, kobá kolata molato mobimba ya etumba mpe kolongola yango te! Koluka te kobundisa Satana ná mokili na ye na makasi na yo moko. Salisáká bandeko na yo bakristo mpe landáká litambwisi ya Yehova. Soki osali bongo, yebá ete Tata na yo ya likoló oyo atondi na bolingo, akopesa yo makasi mpe akobatela yo.​—Yis. 41:10.

LOYEMBO 149 Loyembo ya bolongi

^ par. 5 Biblia elaki ete Yehova akopesa biso makasi mpe akobatela biso na makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná ye mpe na makambo oyo ekoki kosala biso mabe mpo na libela. Lisolo oyo ekoyanola na mituna oyo elandi: Mpo na nini tozali na mposa ete Yehova abatela biso? Ndenge nini Yehova abatelaka biso? Mpe tosengeli kosala nini mpo Yehova asalisa biso?