Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 11

Ndenge oyo koyekola Biblia ekoki kosalisa yo oyika mpiko na mikakatano

Ndenge oyo koyekola Biblia ekoki kosalisa yo oyika mpiko na mikakatano

“Nzambe . . . apesaka ezaleli ya koyika mpiko.”​—ROM. 15:5.

LOYEMBO 94 Botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe

NA MOKUSE *

1. Mikakatano nini basaleli ya Yehova bakoki kokutana na yango?

OZALI kokutana na mokakatano moko ya mpasi mingi? Ekoki kozala ete ndeko moko ya lisangá asalaki likambo moko oyo epesaki yo mpasi. (Yak. 3:2) Mbala mosusu baninga na yo ya mosala to ya kelasi bazali kotyola yo mpo osalelaka Yehova. (1 Pe. 4:3, 4) To mpe bandeko na yo ya libota bazali koluka kopekisa yo koyangana na makita to koyebisa basusu mateya ya Biblia oyo ondimaka. (Mat. 10:35, 36) Soki mokakatano yango ezali ya makasi mpenza, mbala mosusu okoki kokanisa ete ekozala malamu otika kosalela Yehova. Kasi osengeli koyeba ete ata soki okutani na mokakatano nini, Yehova akopesa yo bwanya mpo okoka kolonga yango mpe makasi mpo oyikela yango mpiko.

2. Na kotalela Baroma 15:4, ndenge nini kotánga Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso?

2 Na kati ya Liloba na ye Biblia, Yehova akomisá bandakisa oyo emonisi ndenge bato ya kozanga kokoka bayikelaki mikakatano mpiko. Mpo na nini? Mpo eteya biso. Yango nde likambo oyo Yehova atindaki ntoma Paulo akoma. (Tángá Baroma 15:4.) Kotánga masolo yango ekoki kobɔndisa mpe kopesa biso elikya. Kasi mpo tózwela masolo yango matomba, tosengeli kosuka kaka te na kotánga yango. Tosengeli kotika Makomami ebongola lolenge na biso ya kokanisa mpe esimba mitema na biso. Na ndakisa, tokoki kosala nini soki tozali na mposa ya toli mpo na kolonga mokakatano moko boye? Ekozala malamu tósala makambo minei oyo: (1Kobondela, (2Komona na makanisi, (3Komanyola, mpe (4Kosalela. Tólobela sikoyo ndenge oyo tokoki kosala likambo yango mokomoko. * Na nsima, tokosalela makambo yango minei mpo na koyekola makambo oyo esalemaki na bomoi ya Mokonzi Davidi mpe ya ntoma Paulo.

1. BONDELÁ

Liboso obanda kotánga Biblia, sɛngá Yehova asalisa yo mpo ozwa matomba na makambo olingi kotánga (Talá paragrafe 3)

3. Liboso obanda kotánga Biblia osengeli kosala nini, mpe mpo na nini?

3 (1Kobondela. Liboso obanda kotánga Biblia, sɛngá Yehova asalisa yo mpo oyeba ndenge oyo okoki kozwa matomba na makambo oyo olingi kotánga. Na ndakisa, soki ozali koluka toli mpo oyeba ndenge ya kolonga mokakatano moko, sɛngá Yehova asalisa yo mpo omona mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo mpo ozwa ekateli ya malamu.​—Flp. 4:6, 7; Yak. 1:5.

2. MONÁ NA MAKANISI

Salá lokola yo nde moto oyo bazali kolobela na lisolo yango (Talá paragrafe 4)

4. Nini ekoki kosalisa yo omona na makanisi ndenge lisolo moko ya Biblia esalemaki?

4 (2Komona na makanisi. Yehova apesá biso likoki ya komona makambo na makanisi. Ezali likoki moko ya kokamwa mpenza! Mpo na kosalisa yo omona ndenge lisolo moko ya Biblia esalemaki, meká komona na makanisi ndenge makambo yango ezali kosalema mpe salá lokola yo nde moto oyo bazali kolobela na lisolo yango. Meká komona makambo oyo moto yango amonaki mpe ndenge oyo azalaki komiyoka.

3. MANYOLÁ

Kanisá na mozindo na makambo oyo ozali kotánga, mpe ndenge oyo makambo yango etali yo (Talá paragrafe 5)

5. Komanyola elimboli nini, mpe ndenge nini okoki kosala yango?

5 (3Komanyola. Komanyola elimboli kokanisa na mozindo na makambo oyo ozali kotánga mpe ndenge oyo makambo yango etali mpenza yo. Esalisaka moto akanga malamu ntina ya makambo oyo azali kotánga. Kotánga Biblia kozanga komanyola, ezali lokola biteni ya velo ya sika oyo ezali na kati ya kartɔ. Komanyola ezali lokola kosangisa biteni yango mpo ebimisa velo moko ya kitoko. Mpo na komanyola, osengeli komituna mpe koyanola na mituna lokola oyo: Likambo nini moto oyo balobeli na lisolo oyo asali mpo na kosilisa mokakatano na ye? Ndenge nini Yehova asalisaki ye? Ndenge nini nakoki kosalela mateya oyo nayekoli na lisolo yango mpo nayika mpiko na mikakatano?

4. SALELÁ

Salelá makambo oyo oyekoli mpo ozwa bikateli ya malamu, ozwa kimya mingi, mpe okómisa kondima na yo makasi (Talá paragrafe 6)

6. Mpo na nini tosengeli kosalela makambo oyo tozali koyekola?

6 (4Kosalela. Yesu alobaki ete soki tosaleli te makambo oyo tozali koyekola, tozali lokola moto oyo atongi ndako likoló ya zɛlo. Moto yango asali mosala makasi kasi alekisi ntango na ye kaka mpamba. Mpo na nini? Mpo soki mopɛpɛ makasi ebɛti mpe mpela eyei, ndako yango ekokwea. (Mat. 7:24-27) Ndenge moko mpe soki tobondeli, tomoni na makanisi ndenge lisolo yango esalemaki, mpe tomanyoli kasi tosaleli te makambo oyo toyekoli, ekozala mosala ya mpunda. Soki kaka tokutani na mikakatano mpe minyoko, kondima na biso ekolɛmba. Nzokande, soki toyekoli mpe tosaleli makambo oyo tozali koyekola, tokozwa bikateli ya malamu, tokozala na kimya, mpe kondima na biso ekokóma lisusu makasi. (Yis. 48:17, 18) Tósalela makambo minei oyo touti kolobela mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa na makambo oyo esalemaki na bomoi ya Mokonzi Davidi.

MATEYA OYO OKOKI KOZWA EPAI YA MOKONZI DAVIDI

7. Lisolo nini ya Biblia tokotalela sikoyo?

7 Moninga to ndeko moko ya libota asalelaki yo likambo moko oyo epesaki yo mpasi na motema? Soki ezali bongo, okoki kozwa mateya soki oyekoli makambo oyo mokonzi Davidi asalaki ntango mwana na ye Abisalome asalaki likambo moko oyo epesaki ye mpasi na motema, mpe alukaki kobɔtɔla ye bokonzi.​—2 Sa. 15:5-14, 31; 18:6-14.

8. Makambo nini okoki kosala mpo Yehova asalisa yo?

8 (1Bondelá. Sikoyo lokola lisolo yango ezali na makanisi na yo, yebisá Yehova ndenge oyo ozali komiyoka mpo na makambo ya mabe oyo basalelaki yo. (Nz. 6:6-9) Yebisá ye ndenge ozali mpenza komiyoka. Na nsima, sɛngá ye asalisa yo mpo omona mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo olonga mikakatano oyo ozali kokutana na yango.

9. Nini esalemaki kati na Davidi ná Abisalome?

9 (2Moná na makanisi. Moná na makanisi ndenge makambo yango esalemaki mpe ndenge oyo Davidi azalaki komiyoka. Na boumeli ya bambula, Abisalome mwana ya Davidi asalaki makasi mpo bato bálinga ye. (2 Sa. 15:7) Ntango Abisalome amonaki ete makambo ezali malamu, atindaki banɔngi na ekólo Yisraele mobimba bábongisa mitema ya bato mpo bándima ye lokola mokonzi na bango. Kutu, andimisaki ata Ahitofele, moninga ya Davidi ya motema mpe mopesi-toli na ye, mpo asangana na botomboki yango. Abisalome ye moko alobaki ete akómi mokonzi mpe alukaki kokanga mpe koboma Davidi, oyo na ntango wana ekoki kozala ete azalaki kobɛla makasi. (Nz. 41:1-9) Ntango Davidi ayebaki likambo yango, akimaki na Yerusaleme. Nsukansuka, basoda ya Abisalome babundaki ná basoda ya Davidi. Basoda ya Davidi balongaki batomboki yango mpe babomaki Abisalome.

10. Davidi akokaki kosala nini?

10 Na nsima, meká komona na makanisi ndenge oyo Davidi amiyokaki mpo na makambo nyonso oyo ekómelaki ye. Davidi azalaki kolinga Abisalome mpe kotyela Ahitofele motema. Kasi bango nyonso mibale basalaki makambo oyo epesaki ye mpasi na motema. Bapesaki ye mpasi mpenza, mpe balukaki ata koboma ye. Davidi akokaki kokanisa ete baninga na ye mosusu mpe basanganaki na Abisalome, mpe akokaki kotika kotyela bango motema. Akokaki kokanisa kaka makambo na ye moko mpe koluka kokima ekólo kaka ye moko. To mpe akokaki mpenza kolɛmba nzoto. Kasi Davidi asalaki ata likambo moko ya ndenge wana te. Kutu, alongaki nde mokakatano yango. Nini esalisaki ye alonga?

11. Davidi asalaki nini na likambo ya mpasi oyo akutanaki na yango?

11 (3Manyolá. Mitinda nini okoki koyekola na lisolo yango? Yanolá na motuna oyo: “Davidi asalaki nini mpo alonga mokakatano yango?” Alɛngaki te mpe azwaki te bikateli nokinoki kozanga ete akanisa. Atikaki mpe te ete kobanga epekisa ye kozwa bikateli oyo ebongi. Kasi abondelaki Yehova mpo asalisa ye. Asɛngaki mpe baninga na ye básalisa ye. Mpe asalaki mbala moko makambo oyo asengelaki kosala. Atako makambo yango epesaki ye mpasi mingi, Davidi atikaki te kotyela bato mosusu motema, mpe ayinaki bango te. Akobaki kotyela Yehova mpe baninga na ye mosusu motema.

12. Makambo nini Yehova asalaki mpo na kosalisa Mokonzi Davidi?

12 Ndenge nini Yehova asalisaki Davidi? Soki osali bolukiluki, okomona ete Yehova apesaki Davidi makasi oyo asengelaki na yango mpo ayikela mokakatano yango mpiko. (Nz. 3:1-8; maloba oyo ezali na likoló) Yehova apambolaki bikateli oyo Davidi azwaki mpe asalisaki baninga na ye ya sembo ntango bazalaki kobunda mpo na kobatela Mokonzi Davidi.

13. Ndenge nini okoki komekola Davidi soki moto moko asali likambo oyo epesi yo mpenza mpasi na motema? (Matai 18:15-17)

13 (4Salelá. Omituna boye: “Ndenge nini nakoki komekola Davidi?” Osengeli kosala nokinoki mpo na kosilisa mokakatano oyo ozali na yango. Na kotalela ndenge makambo ezali, okoki kosalela mbala moko toli ya Yesu oyo ezali na Matai mokapo 18 to kosalela mitinda oyo ezali na mokapo yango. (Tángá Matai 18:15-17.) Kasi osengeli te kozwa bikateli nokinoki ntango ozali na nkanda. Osengeli nde kosɛnga Yehova apesa yo kimya ya motema mpe bwanya oyo osengeli na yango mpo oyeba kosilisa mokakatano yango. Kotika te kotyela baninga na yo motema. Kasi ndimá nde lisalisi oyo bazali kopesa yo. (Mas. 17:17) Oyo eleki nyonso, ndimá toli oyo Yehova azali kopesa yo na Liloba na ye.​—Mas. 3:5, 6.

MATEYA OYO OKOKI KOZWA EPAI YA PAULO

14. Na makambo nini 2 Timote 1:12-16; 4:6-11, 17-22 ekoki kolendisa yo?

14 Bato ya libota na yo bazali kotɛmɛla yo mpo ozali kosalela Yehova? To mpe ozali kofanda na ekólo oyo batyá mwa bipekiseli na mosala na biso to mpe bapekisi yango mpenza? Soki ezali bongo, okoki kozwa makasi soki otángi 2 Timote 1:12-16 mpe 4:6-11, 17-22. * Paulo akomaki mikapo yango ntango azalaki na bolɔkɔ.

15. Makambo nini okoki kosɛnga Yehova?

15 (1Bondelá. Liboso otánga mikapo yango, yebisá Yehova mikakatano na yo mpe ndenge oyo ozali komiyoka mpo na yango. Yebisá ye mpenza ndenge makambo ezali. Na nsima, sɛngá ye asalisa yo mpo omona mitinda oyo ezali na masolo ya makambo oyo ekómelaki ntoma Paulo, oyo okoki kosalela mpo na kolonga mikakatano na yo.

16. Makambo nini ekómelaki Paulo?

16 (2Moná na makanisi. Salá lokola yo nde ozali ntoma Paulo. Bakangi ye minyɔlɔlɔ, mpe azali na bolɔkɔ na Roma. Liboso mpe bakɔtisaki ye na bolɔkɔ, kasi na mbala oyo ayebi ete bakoboma ye. Baninga na ye mosusu basundoli ye, mpe alɛmbi mpenza.​—2 Tim. 1:15.

17. Paulo akokaki kosala nini?

17 Paulo akokaki kotya makanisi na bomoi oyo azalaki na yango kala, mpe kokanisa ete soki aboyaka kokóma mokristo, mbɛlɛ balingaki kokanga ye te. Akokaki koyokela mibali ya etúká ya Azia oyo basundolaki ye nkanda, mpe akokaki kotika kotyela baninga na ye mosusu motema. Kasi Paulo asalaki bongo te. Nini esalisaki ye ayeba ete baninga na ye bakokoba kozala sembo epai na ye, mpe Yehova akopesa ye mbano?

18. Paulo asalaki nini ntango akutanaki na makambo ya mpasi?

18 (3Manyolá. Yanolá na motuna oyo: “Paulo asalaki nini mpo na kolonga mokakatano na ye?” Atako Paulo ayebaki ete etikali moke báboma ye, abosanaki te ete kopesa Yehova nkembo nde likambo eleki ntina. Mpe akobaki kokanisa ndenge oyo akokaki kolendisa basusu. Azalaki mpe kotyela Yehova motema na ndenge azalaki kobondela ye mbala na mbala. (2 Tim. 1:3) Na esika atya makanisi na ye nyonso epai ya bato oyo basundolaki ye, amonisaki nde botɔndi mpo na lisalisi oyo baninga na ye ya sembo bapesaki ye na ntango wana. Lisusu, Paulo akobaki koyekola Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17; 4:13) Likambo eleki ntina, ayebaki ete Yehova ná Yesu balingaka ye. Basundolaki ye te mpe ayebaki ete bakopesa ye mbano mpo na mosala na ye ya sembo.

19. Ndenge nini Yehova asalisaki Paulo?

19 Yehova ayebisaki Paulo ete lokola akómi mokristo, akokutana na minyoko. (Mis. 21:11-13) Ndenge nini Yehova asalisaki Paulo? Ayanolaki na mabondeli na ye mpe na nsima apesaki ye nguya. (2 Tim. 4:17) Bayebisaki Paulo ete akozwa mbano oyo mpo na yango asalaki mosala makasi. Yehova asalelaki mpe baninga ya sembo ya Paulo mpo na kopesa ye lisalisi oyo ebongi.

20. Na kotalela Baroma 8:38, 39, ndenge nini okoki komekola Paulo?

20 (4Salelá. Omituna boye: “Ndenge nini nakoki komekola Paulo?” Ndenge moko na Paulo, tosengeli koyeba ete tokokutana na minyoko mpo tozali kosalela Yehova. (Mrk. 10:29, 30) Mpo tótikala sembo epai ya Yehova ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kokoba kobondela ye mpe koyekola Liloba na ye mbala na mbala. Mpe tosengeli kobosanaka te ete moko ya makambo eleki ntina oyo tokoki kosala ezali ya kopesa Yehova nkembo. Tosengeli koyeba ete Yehova akosundola biso ata moke te, mpe ezali ata na eloko moko te oyo ekoki kotinda ye atika kolinga biso.​—Tángá Baroma 8:38, 39; Ebr. 13:5, 6

ZWÁ MATEYA EPAI YA BATO MOSUSU OYO BIBLIA ELOBELI

21. Nini esalisaki Aya mpe Hector bálonga mikakatano oyo bazalaki na yango?

21 Bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli ekoki kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko ata na mokakatano ya ndenge nini. Na ndakisa, Aya, mobongisi-nzela moko na Japon alobi ete lisolo ya Yona esalisaki ye atika kobanga ntango azali kopesa litatoli na esika ya bato mingi. Hector, elenge moko na Indonesie oyo baboti na ye bazali Batatoli ya Yehova te, alobi ete lisolo ya Ruta esalisi ye ayekola makambo etali Yehova mpe asalela ye.

22. Okoki kosala nini mpo badrame to molɔngɔ ya masolo “Mekolá kondima na bango” epesa yo mpenza matomba?

22 Epai wapi okoki kozwa bandakisa ya Biblia oyo ekoki kolendisa yo? Bavideo ná badrame ya koyoka, mpe molɔngɔ ya masolo “Mekolá kondima na bango,” esalisaka biso tómona ndenge masolo ya bato oyo Biblia elobeli esalemaki. * Liboso ya kotala, ya koyoka, to mpe ya kotánga masolo yango, sɛngá Yehova asalisa yo ozwa mateya ya ntina mingi oyo okoki kosalela. Meká komitya na esika ya moto oyo bazali kolobela na lisolo yango. Manyolá na makambo oyo basaleli yango ya Yehova basalaki mpe ndenge oyo Yehova asalisaki bango bálonga mikakatano na bango. Na nsima, salelá mateya oyo ozwi. Pesá Yehova matɔndi mpo na lisalisi oyo asili kopesa yo mpe luká mabaku ya kolendisa mpe ya kosalisa basusu, mpo na komonisa ete osepeli na lisalisi oyo Yehova apesi yo.

23. Na kotalela Yisaya 41:10, 13, Yehova alaki ete akosala nini mpo na biso?

23 Bomoi na mokili oyo eyangelami na Satana ezali mpasi. Mpe na bantango mosusu, tokoki koyeba te tósala nini. (2 Tim. 3:1) Kasi tosengeli komitungisa te mpe kobanga te. Yehova ayebi mikakatano oyo tozali kokutana na yango. Soki tozali na mposa ya lisalisi, alaki ete akosimba biso na lobɔkɔ na ye ya mobali ya nguya. (Tángá Yisaya 41:10, 13.) Toyebi ete Yehova akosalisa biso, mpe Biblia epesaka biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyikela ata mokakatano ya ndenge nini mpiko.

LOYEMBO 96 Buku ya Nzambe eloko ya motuya mingi

^ par. 5 Masolo mingi ya Biblia emonisi ete Yehova alingaka basaleli na ye, mpe ete akosalisa bango ata soki bakutani na mokakatano nini. Lisolo oyo elobeli ndenge oyo okoki koyekola Biblia mpo esalisa yo ozwa mpenza matomba na makambo oyo ozali kotánga.

^ par. 2 Oyo ezali kaka moko ya mayele ya koyekola Biblia oyo tokoki kosalela. Okoki komona makanisi mosusu ya lolenge ya koyekola Biblia na Buku ya bolukiluki ya Batatoli ya Yehova, na motó ya likambo “Biblia” mpe na motó ya likambo moke “Kotánga Biblia mpe kokanga ntina ya makambo yango.”

^ par. 14 Botánga te mikapo yango na ntango ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá.

^ par. 22 Talá “Mekolá kondima na bango​—Basi mpe mibali oyo Biblia elobeli” na jw.org. (Kende na MATEYA YA BIBLIA > KONDIMELA NZAMBE.)