Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 17

“Nabengi bino baninga”

“Nabengi bino baninga”

“Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.”​YOA. 15:15.

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini tokómaka moninga ya moto mosusu?

MBALA mingi, mpo na kokóma moninga ya moto, esɛngaka kolekisa ntango mingi na ye. Ntango bozali kosolola mpe kobɛtɛlana masolo ya makambo oyo bokutaná na yango, boninga ekolaka. Kasi, na oyo etali kokóma moninga ya penepene na Yesu, tozali na mwa mikakatano. Mikakatano yango nini?

2. Mokakatano na biso ya liboso ezali nini?

2 Mokakatano ya liboso ezali ete tomoná Yesu te. Bakristo mingi ya siɛklɛ ya liboso bazalaki mpe na mokakatano yango. Nzokande, ntoma Petro alobaki boye: “Atako bomoná ye te, bozali kolinga ye. Atako bozali komona ye te sikoyo, bozali kondimela ye.” (1 Pe. 1:8) Na yango, tokoki kokóma baninga ya penepene ya Yesu ata soki tokutaná na ye te.

3. Mokakatano na biso ya mibale ezali nini?

3 Mokakatano ya mibale ezali ete tozali na likoki te ya koloba na Yesu. Ntango tosalaka libondeli, tolobaka mbala moko na Yehova. Ya solo, tobondelaka na nkombo ya Yesu, kasi tosololaka na ye te. Kutu, Yesu ye moko alingi te tóbondelaka ye. Mpo na nini? Mpo libondeli ezali losambo, mpe tosengeli kosambela kaka Yehova. (Mat. 4:10) Atako bongo, tokoki komonisa ete tolingaka Yesu.

4. Mokakatano na biso ya misato ezali nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Mokakatano ya misato ezali ete Yesu afandaka na likoló, na yango tokoki te kolekisa ntango elongo na ye. Kasi, tokoki koyekola makambo ebele ya Yesu ata soki tofandi na ye boye te. Tokolobela makambo minei oyo tokoki kosala mpo tókóma na boninga makasi na Yesu. Kasi, liboso, tólobela naino ntina ya kokóma moninga ya penepene na Kristo.

MPO NA NINI TOSENGELI KOKÓMA BANINGA YA YESU?

5. Mpo na nini tosengeli kozala baninga ya Yesu? (Talá mpe etanda “ Kozala moninga ya Yesu esalaka ete tókóma baninga ya Yehova” mpe “ Ndenge malamu ya kotalela mokumba ya Yesu.”)

5 Tosengeli kokóma baninga ya Yesu mpo tózala mpe na boyokani malamu na Yehova. Mpo na nini ezali bongo? Tólobela kaka ntina mibale. Ya liboso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Tata ye moko alingaka bino mingi, mpo bino bolingi ngai mingi.” (Yoa. 16:27) Alobaki mpe: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoa. 14:6) Soki toluki kokóma baninga ya Yehova nzokande tozali baninga ya Yesu te, ezali lokola tolingi kokɔta na ndako moko kozanga ete tóleka na porte. Yesu asalelaki ndakisa ya ndenge wana mpe amibengaki “porte ya bampate.” (Yoa. 10:7) Ntina ya mibale ezali ete Yesu amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli ya Tata na ye. Alobaki na bayekoli na ye: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:9) Na yango, lolenge moko malamu ya koyekola koyeba Yehova ezali ya koyekola bomoi ya Yesu. Ntango tozali koyekola bomoi ya Yesu, tokokóma mpe kolinga ye mingi. Mpe ntango boninga na biso ná Yesu ezali kokola, tokolinga Tata na ye mingi.

6. Wapi ntina mosusu oyo tosengeli kozala na boyokani malamu na Yesu? Limbolá.

6 Tosengeli kozala na boyokani malamu na Yesu mpo Nzambe ayanola mabondeli na biso. Mpo na yango, tosengeli kosuka kaka te na kosalela maloba “na nkombo ya Yesu” ntango tozali kobondela. Tosengeli nde kondima ndenge oyo Yehova asalelaka Yesu mpo na koyanola na mabondeli na biso. Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, nakosala yango.” (Yoa. 14:13) Atako Yehova nde ayokaka mpe ayanolaka na mabondeli na biso, apesi Yesu bokonzi ya kokokisa bikateli na Ye. (Mat. 28:18) Na yango, liboso ayanola na mabondeli na biso, atalaka soki tosalelaka toli ya Yesu oyo apesaki biso. Na ndakisa, Yesu alobaki: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.” (Mat. 6:14, 15) Na yango, ezali na ntina mingi tósalela basusu makambo ndenge tolingi ete Yehova ná Yesu básalela biso!

7. Banani bakozwa matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu?

7 Kaka baoyo bazali baninga ya penepene ya Yesu nde bakozwa matomba ya mbeka na ye ya lisiko. Ndenge nini toyebi yango? Yesu alobaki ete azali ‘kokaba molimo [bomoi] na ye mpo na baninga na ye.’ (Yoa. 15:13) Bato ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele basengeli koyekola makambo na ye mpe kolinga ye. Bato lokola Abrahama, Sara, Moize, mpe Rahaba bakosekwa; kasi ekosɛnga ete ata basaleli wana ya sembo ya Yehova bákóma baninga ya Yesu mpo bázwa bomoi ya seko.​—Yoa. 17:3; Mis. 24:15; Ebr. 11:8-12, 24-26, 31.

8-9. Ndenge Yoane 15:4, 5 emonisi yango, kozala na boyokani malamu na Yesu esalisaka biso na nini, mpe mpo na nini ezali na ntina tóbatela boninga ná Yesu?

8 Tozalaka na esengo ya kosala elongo na Yesu na mosala ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki moteyi. Mpe banda azongá na likoló, Yesu, oyo azali mokonzi ya lisangá, akobi kotambwisa mosala yango ya kosakola mpe ya koteya. Amonaka mpe asepelaka na milende oyo osalaka mpo na kosalisa ebele ya bato báyekola koyeba ye ná Tata na ye. Kutu, tokoki kosala mosala yango malamu kaka na lisalisi ya Yehova mpe ya Yesu.​—Tángá Yoane 15:4, 5.

9 Biblia emonisi polele ete mpo Yehova asepela na biso, tosengeli kokóma baninga ya Yesu mpe kobatela boninga yango. Na yango, tólobela makambo minei oyo tokoki kosala mpo tókóma baninga ya Yesu.

NDENGE YA KOKÓMA MONINGA YA YESU

Okoki kokóma moninga ya Yesu soki (1) oyekoli koyeba ye malamu, (2) omekoli ndenge na ye ya kokanisa mpe ya kosala makambo, (3) ozali kopesa bandeko na ye mabɔkɔ, mpe (4) soki ozali kondima bibongiseli oyo ezwami na lisangá (Talá paragrafe 10-14) *

10. Wapi likambo ya liboso oyo tosengeli kosala mpo tókóma baninga ya Yesu?

10 (1Yekolá koyeba Yesu. Tokoki koyeba Yesu soki totángi mokanda ya Matai, Marko, Luka, mpe Yoane. Wana tozali komanyola masolo yango ya Biblia oyo elobeli bomoi ya Yesu, tokómaka kolinga Yesu mpe komemya ye mpo azalaki kosalela bato makambo na boboto. Na ndakisa, atako Yesu azalaki na bokonzi likoló ya bayekoli na ye, azalaki komona bango baombo na ye te. Kasi, ayebisaki bango makanisi na ye ya motema mpe mayoki na ye. (Yoa. 15:15) Yesu ayokaki mpasi oyo bazalaki koyoka mpe alelaki elongo na bango. (Yoa. 11:32-36) Ata banguna na ye bandimaki ete Yesu azalaki moninga ya bato oyo bandimaki nsango na ye. (Mat. 11:19) Ntango tomekoli ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bayekoli na ye makambo, boyokani na biso na basusu ekobonga, tokozala na esengo mingi koleka, mpe tokosepela na Kristo lisusu mingi.

11. Wapi likambo ya mibale oyo tosengeli kosala mpo na kokóma moninga ya Yesu, mpe mpo na nini ezali na ntina?

11 (2Mekolá ndenge ya Yesu ya kokanisa mpe ya kosala makambo. Soki toyebi mpe tomekoli ndenge ya Yesu ya kokanisa, boninga na biso na ye ekozala makasi. (1 Ko. 2:16) Ndenge nini tokoki komekola Yesu? Tózwa kaka ndakisa moko. Yesu azalaki kokanisa mingimingi ndenge ya kosalisa basusu na esika aluka ndenge ya komisepelisa. (Mat. 20:28; Rom. 15:1-3) Lokola azalaki kokanisa ndenge wana, azalaki komipimela makambo mpo na bolamu ya basusu mpe azalaki kolimbisa. Azalaki kosilika noki te mpo na makambo oyo basusu bazalaki koloba mpo na ye. (Yoa. 1:46, 47) Mpe azalaki kotika te ete mabunga oyo bato basalá kala ebongola mpo na libela ndenge na ye ya kotalela bango. (1 Tim. 1:12-14) Yesu alobaki: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Ezali malamu omituna boye: “Nalandaka ndakisa ya Yesu mpe nasalaka nyonso oyo nakoki mpo nabatela kimya elongo na bandeko ya lisangá?”

12. Wapi likambo ya misato mpo na kokóma moninga ya Yesu, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

12 (3Pesá bandeko ya Kristo mabɔkɔ. Yesu amonaka ete makambo oyo tosalelaka bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo, tosalelaka yango nde ye. (Mat. 25:34-40) Lolenge ya libosoliboso ya kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ ezali ya komipesa mobimba na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli ndenge Yesu apesaki etinda. (Mat. 28:19, 20; Mis. 10:42) Bandeko ya Kristo bakoki kokokisa mosala monene ya kosakola oyo ezali kosalema lelo na mokili mobimba kaka na lisalisi ya “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Soki ozali na kati ya bampate mosusu, yebá ete mbala nyonso oyo obimi na mosala yango, ozali komonisa ete olingaka kaka te bandeko ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo, kasi mpe Yesu ye moko.

13. Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Yesu oyo ezali na Luka 16:9?

13 Tokokóma mpe baninga ya Yehova ná Yesu ntango tozali kosalela mbongo na biso mpo na kosimba mosala oyo bazali kotambwisa. (Tángá Luka 16:9.) Na ndakisa, tokoki kotya makabo mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Makabo yango esalisaka na kosakola nsango malamu na bisika ya mosika, kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi mpe bandako mosusu ya losambo, mpe na kosunga bandeko oyo bazwi likama mpe babungisi biloko na bango. Tokoki mpe kotya makabo mpo na kokokisa bamposa ya lisangá na biso; tokoki mpe kosalisa baoyo toyebi ete bazali kokelela. (Mas. 19:17) Na ndenge yango nde okomonisa ete opesaka bandeko ya Kristo mabɔkɔ.

14. Ndenge emonisami na Baefese 4:15, 16, wapi likambo ya minei mpo na kokóma moninga ya Yesu?

14 (4Pesáká mabɔkɔ na bibongiseli ya lisangá. Boninga na biso na Yesu mokonzi ya lisangá ekokóma makasi ntango tozali kosala na bomoko elongo na bato oyo atye mpo na kokɛngɛla biso. (Tángá Baefese 4:15, 16.) Na ndakisa, mikolo oyo, tozali kosala makasi mpo Bandako ya Bokonzi esalelama malamu mpenza. Mpo na yango, masangá mosusu esangisami mpe teritware mpo na kosakola ebongisami na ndenge mosusu. Ebongiseli yango esalisi mingi na kobatela mbongo ya makabo. Kasi, esɛngaki mpe basakoli mosusu básala bambongwana mpo bámesana na makambo ya sika. Mbala mosusu basakoli yango ya sembo bazalaki na lisangá moko banda bambula mingi mpe bamesaná na bandeko ebele kuna. Kasi sikoyo basɛngi bango bákende na lisangá mosusu. Na ntembe te, Yesu asepelaka mingi komona bayekoli na ye yango ya sembo bazali kopesa mabɔkɔ na ebongiseli yango!

BANINGA YA YESU LIBELA NA LIBELA

15. Ndenge nini boninga na biso ná Yesu ekokóma lisusu makasi na mikolo oyo ezali koya?

15 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na elikya ya kozala elongo na Yesu libela na libela, mpe bakoyangela elongo na ye na Bokonzi ya Nzambe. Bakozala mpenza elongo na Yesu: bakomona ye, bakosolola na ye, mpe bakolekisa ntango elongo na ye. (Yoa. 14:2, 3) Baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele mpe bakomona ete Yesu alingaka bango mpe atyelaka bango likebi. Atako bakomona Yesu te, boninga na bango ná ye ekokóma lisusu makasi ntango bakosepela na bomoi ya malamu oyo Yehova ná Yesu bakosalisa bango bázwa.​—Yis. 9:6, 7.

16. Mapamboli nini kozala moninga ya Yesu ememaka?

16 Ntango tondimi libyangi ya Yesu ya kokóma baninga na ye, tokozwa mapamboli ebele. Na ndakisa, tomonaka ndenge alingaka biso mpe asalisaka biso banda sikoyo. Tozali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Mpe oyo eleki ntina, boninga na biso ná Yesu ekosalisa biso tózwa eloko oyo eleki nyonso, boninga ya makasi mpe ya penepene ná Yehova, Tata ya Yesu. Ezali mpenza lokumu monene kobengama baninga ya Yesu!

LOYEMBO 17 “Nalingi”

^ par. 5 Bantoma balekisaki mwa bambula elongo na Yesu. Na ntango yango bazalaki kosolola, kosala elongo, mpe bakómaki baninga. Yesu alingi ete biso mpe tózala baninga na ye, kasi tozali na mikakatano oyo bantoma bazalaki na yango te. Lisolo oyo elobeli mikakatano yango mosusu mpe epesi makanisi oyo ekosalisa biso tókóma baninga ya penepene ya Yesu mpe tóbatela boninga yango.

^ par. 55 NDIMBOLA YA BILILINGI: (1) Na ntango ya losambo na kati ya libota, tokoki koyekola bomoi mpe mosala ya Yesu. (2) Na lisangá, tokoki kosala makasi tózala na kimya elongo na bandeko. (3) Ntango tozali komipesa na mosala ya kosakola, tozali kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ. (4) Ntango basangisi masangá, tótosa bikateli oyo bankulutu bazwi.