Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 14

“Bólanda matambe na ye malamumalamu”

“Bólanda matambe na ye malamumalamu”

“Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.”​—1 PE. 2:21.

LOYEMBO 13 Kristo ndakisa na biso

NA MOKUSE *

Yesu atikelá biso matambe na ye mpo tólanda yango malamumalamu. (Talá paragrafe 1-2)

1-2. Ndenge nini tokoki kolanda matambe ya Yesu? Pesá ndakisa.

KANISÁ ete ozali na kati ya etuluku moko ya bato, mpe bozali kotambola likoló ya zɛlo na kati ya esobe moko oyo ezali na likama mpenza. Moto oyo ayebi esobe yango malamu, azali kotambola liboso na bino. Ntango azali kotambola, azali kotika matambe na ye likoló ya zɛlo yango. Na ntango moko boye, bozali komona ye lisusu te, kasi bozali kobanga te. Yo ná bato oyo bazali elongo na yo, bozali kosala makasi mpo bólanda matambe na ye malamumalamu!

2 Mokili oyo tofandi ezali lokola esobe moko oyo ezali na likama mpenza, mpe biso bakristo ya solo tozali lokola etuluku ya bato oyo bazali kotambola na esobe yango. Tozali na botɔndi ndenge Yehova apesá biso motambwisi ya malamu mpenza, elingi koloba Yesu Kristo, Mwana na ye oyo tokoki kolanda matambe na ye malamumalamu. (1 Pe. 2:21) Buku moko oyo elimbolaka Biblia elobi ete, na vɛrsɛ oyo, Petro akokanisi Yesu na motambwisi. Kaka ndenge motambwisi atikaka matambe nsima na ye, Yesu mpe atikelá biso matambe oyo tosengeli kolanda. Tótalela sikoyo mituna oyo misato: Kolanda matambe ya Yesu elimboli nini? Mpo na nini tosengeli kolanda yango? Mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

KOLANDA MATAMBE YA YESU ELIMBOLI NINI?

3. Kolanda matambe ya moto elimboli nini?

3 Kolanda matambe ya moto elimboli nini? Na bantango mosusu, Biblia esalelaka maloba “kotambola” mpe “makolo” mpo na kolobela makambo oyo moto asalaka na bomoi na ye. (Eba. 6:9; Mas. 4:26) Tokoki kokokanisa lolenge oyo moto asalelaka bomoi na ye na matambe oyo atikaka ntango azali kotambola. Na yango, kolanda matambe ya moto, elimboli kolanda ndakisa na ye mpe komekola ye.

4. Kolanda matambe ya Yesu elimboli mpenza nini?

4 Kolanda matambe ya Yesu elimboli mpenza nini? Na mokuse, elimboli kolanda ndakisa na ye. Na vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo oyo, ntoma Petro azali kolobela mingimingi ndakisa malamu oyo Yesu atiká na likambo etali koyika mpiko liboso ya minyoko. Kasi ezali na makambo mosusu mingi oyo Yesu asalá oyo tokoki komekola. (1 Pe. 2:18-25) Ya solo mpenza, bomoi mobimba ya Yesu, elingi koloba makambo nyonso oyo alobá mpe oyo asalá, ezali ndakisa oyo tosengeli kolanda.

5. Bato ya kozanga kokoka bakoki mpenza kolanda ndakisa ya Yesu? Limbolá.

5 Kasi lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki mpenza kolanda ndakisa ya Yesu? Ɛɛ. Petro asɛngi biso te tólanda matambe ya Yesu na ndenge ya kokoka. Asɛngi biso nde tólanda yango “malamumalamu.” Soki tolandi matambe ya Yesu malamumalamu, elingi koloba tosali oyo tokoki atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokotosa maloba oyo ntoma Yaone alobaki ete: ‘Bokoba kotambola ndenge Yesu atambolaki.’​—1 Yoa. 2:6.

MPO NA NINI TOSENGELI KOLANDA MATAMBE YA YESU?

6-7. Mpo na nini tokoki koloba ete kolanda matambe ya Yesu ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova?

6 Kolanda matambe ya Yesu ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova. Mpo na nini tolobi bongo? Ya liboso, Yesu atikelá biso ndakisa malamu mpenza na likambo etali kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. (Yoa. 8:29) Na yango, soki tozali kolanda matambe ya Yesu, tokosepelisa motema ya Yehova. Mpe tosengeli koyeba ete Tata na biso ya likoló akopusana penepene na baoyo nyonso basalaka makasi mpo bázala baninga na ye.​—Yak. 4:8.

7 Ya mibale, Yesu amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka. Yango wana alobaki: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:9) Tokoki komekola bizaleli ya Yesu mpe ndenge oyo azalaki kosalela basusu makambo. Na ndakisa, ayokelaki moto moko ya maba mawa, amityaki na esika ya mwasi moko oyo azalaki kobɛla makasi, mpe amonisaki motema mawa mpo na baoyo bandeko na bango bakufaki. Ntango tozali komekola Yesu, tozali mpe komekola Yehova. (Mrk. 1:40, 41; 5:25-34; Yoa. 11:33-35) Soki tozali komekola bizaleli ya Yehova mingi mpenza, boninga na biso ná ye ekokóma lisusu makasi.

8. Ndenge nini kolanda matambe ya Yesu ekosalisa biso ‘tólonga’ mokili? Limbolá.

8 Kolanda matambe ya Yesu esalisaka biso tótya makanisi na biso nyonso na mosala ya Yehova. Na butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele, alobaki boye: “Ngai nalongi mokili.” (Yoa. 16:33) Alingaki koloba ete azalaki kolanda te makanisi, mikano, mpe makambo oyo bato ya mokili basalaka. Yesu abosanaki ata moke te ntina oyo ayaki awa na mabele, elingi koloba, kolongisa boyangeli ya Yehova. Tokoloba nini mpo na biso? Mokili oyo ezali na makambo ebele oyo ekoki kosala ete tolongola likebi na biso na mosala ya Yehova. Kasi, ndenge moko na Yesu, soki tokobi kotya makanisi na biso nyonso na mosala ya Yehova, biso mpe ‘tokolonga’ mokili.​—1 Yoa. 5:5.

9. Tosengeli kosala nini mpo tótikala na nzela ya bomoi ya seko?

9 Kolanda matambe ya Yesu ememaka na bomoi ya seko. Ntango elenge mobali moko mozwi atunaki soki asengeli kosala nini mpo azwa bomoi ya seko, Yesu alobaki na ye: “Yaká, landá ngai.” (Mat. 19:16-21) Yesu ayebisaki Bayuda mosusu oyo bazalaki kondima te ete azali Kristo ete: “Bampate na ngai . . . elandaka ngai. Mpe nazali kopesa bango bomoi ya seko.” (Yoa. 10:24-29) Yesu ayebisaki Nikodeme, moko ya bato oyo bazalaki kosala na Sanedrina mpe oyo alingaki koyeba makambo mingi oyo etali mateya ya Yesu, ete ‘moto nyonso oyo azali kondimela ye, akozwa bomoi ya seko.’ (Yoa. 3:16) Tomonisaka ete tondimelaka Yesu soki tozali kosalela makambo oyo ateyaki mpe komekola makambo oyo asalaki. Soki tosali bongo, tokotikala na nzela ya bomoi ya seko.​—Mat. 7:14.

NDENGE NINI TOKOKI KOLANDA MATAMBE YA YESU MALAMUMALAMU?

10. “Koyekola koyeba” Yesu malamu elimboli nini? (Yoane 17:3)

10 Liboso tólanda matambe ya Yesu malamumalamu, tosengeli naino koyeba ye. (Tángá Yoane 17:3.) “Koyekola koyeba Yesu” ezali likambo oyo tosengeli kokoba kosala. Tosengeli kokoba koyekola makambo mingi oyo etali ye, elingi koloba bizaleli na ye, ndenge oyo azalaki kokanisa, mpe mibeko na ye. Ata soki toumeli bambula boni na kati ya solo, tosengeli kokoba koyekola koyeba Yehova mpe Mwana na ye.

11. Makambo nini ezali na Baevanzile minei?

11 Mpo na kosalisa biso tóyeba Mwana na ye malamu, Yehova akomisá na Liloba na ye Baevanzile minei oyo elobeli bomoi mpe mosala ya Yesu. Baevanzile yango eyebisi biso makambo oyo Yesu alobaki, oyo asalaki, mpe emonisi ndenge oyo azalaki komiyoka. Mikanda yango esalisaka biso tótya likebi mpenza na ndakisa ya Yesu. (Ebr. 12:3) Kutu, mikanda yango ezali na matambe oyo Yesu atikelá biso mpo tólanda. Na yango, soki tozali koyekola Baevanzile yango malamumalamu, tokoyeba lisusu Yesu malamu koleka. Yango ekosalisa biso tólanda matambe na ye malamumalamu.

12. Tosengeli kosala nini mpo tóyekola makambo mingi ntango tozali kotánga Baevanzile?

12 Mpo tózwa matomba mingi na Baevanzile yango minei, tosengeli kosuka kaka te na kotánga yango. Tosengeli mpe kozwaka ntango mpo na koyekola yango na likebi, mpe kokanisa na mozindo na makambo oyo tozali kotánga. (Talá mpe Yosua 1:8.) Tólobela sikoyo makanisi mibale oyo ekoki kosalisa biso tómanyola mpe tósalela makambo oyo totángi na Baevanzile yango.

13. Makambo nini okoki kosala mpo omona ndenge lisolo moko oyo elobeli bomoi ya Yesu esalemaki?

13 Ya liboso, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema. Meká komona na makanisi, koyoka, mpe komitya na esika ya bato oyo lisolo yango elobeli. Mpo na kosala yango, salá mwa bolukiluki na mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá. Talelá bavɛrsɛ oyo ezali likoló mpe na nse ya lisolo oyo ozali koyekola. Luká koyeba makambo mosusu oyo etali bato mpe bisika oyo balobeli na lisolo yango. Kokanisá lisolo oyo ozali koyekola na lisolo oyo elobeli kaka likambo yango na Evanzile mosusu. Na bantango mosusu, mokomi moko ya Evanzile akoki kolobela makambo oyo mokomi mosusu ya Evanzile alobeli te.

14-15. Tosengeli kosala nini mpo tósalela makambo oyo toyekoli na masolo oyo ezali na Baevanzile?

14 Ya mibale, salelá na bomoi na yo masolo oyo elobeli bomoi ya Yesu. (Yoa. 13:17) Nsima ya koyekola lisolo moko ya Evanzile na likebi, omituna boye: ‘Ezali na liteya moko na lisolo oyo, oyo nakoki kosalela na bomoi na ngai? Ndenge nini nakoki kosalela lisolo oyo mpo na kosalisa moto mosusu?’ Kanisá moto moko oyo oyebi, oyo okoki koyebisa ye na bolingo mpe na boboto mateya oyo oyekoli.

15 Tótalela ndakisa moko oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosalela makanisi yango mibale. Tokolobela ndakisa ya mwasi mobola oyo mobali akufá oyo Yesu amonaki na tempelo.

MWASI MOBOLA OYO MOBALI AKUFÁ OYO AZALAKI NA TEMPELO

16. Tángá Marko 12:41 mpe lobelá makambo oyo okanisi ete ezalaki kosalema na ntango yango.

16 Salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema. (Tángá Marko 12:41.) Moná na makanisi makambo oyo esalemaki. Tozali na mokolo ya 11 Nisana, ya mobu 33 ya ntango na biso. Etikali mwa mikolo liboso ete Yesu akufa. Alekisi mokolo mobimba azali koteya na tempelo. Kasi bakonzi ya mangomba bazali kotɛmɛla ye, basusu kati na bango bautaki kotuna ye soki azali kosala misala na ye na nguya ya nani. Bamosusu kutu bazalaki kotuna ye mituna ya makasimakasi mpo bákangisa ye monɔkɔ. (Mrk. 11:27-33; 12:13-34) Sikoyo Yesu akei kofanda esika mosusu na tempelo. Ekoki kozala ete azali na esika oyo babengi Lopango ya Basi, epai akoki komona bakɛsi ya makabo oyo ezali pene na bifelo ya lopango yango. Afandi mpe azali komona ndenge bato bazali kotya mbongo na bakɛsi yango. Amoni mpe bazwi ebele bazali kotya mbongo. Ntango mosusu azali koyoka ndenge mbongo yango ezali kosala makɛlɛlɛ ntango bazali kokɔtisa yango na bakɛsi yango.

17. Mwasi mobola oyo mobali akufá oyo Marko 12:42 elobeli, asalaki nini?

17 Tángá Marko 12:42. Nsima ya mwa ntango, Yesu amoni mwasi mobola moko oyo “mobali akufá.” (Luka 21:2) Mwasi yango azali na bomoi ya mpasi mpenza, mpe ekoki kozala ete azali na mbongo mingi te mpo na kosomba biloko ya mokolo na mokolo oyo asengeli na yango. Kasi akei na moko ya bakɛsi ya makabo yango mpe atye na ndenge ya nkuku mbongo mibale ya bibende ya mike mpenza, oyo mbala mosusu esali makɛlɛlɛ ntango ekɔti na kɛsi yango. Yesu ayebi motángo ya mbongo oyo mwasi yango atye na kɛsi yango. Ezali mbongo oyo ekokoka ata kosomba mokɛngɛli-mboka moko te; bandɛkɛ oyo bato bakokaki kosomba na ntalo moke mpenza mpo na kolya.

18. Na kotalela Marko 12:43, 44, Yesu alobaki nini mpo na likabo oyo mwasi oyo mobali akufá apesaki?

18 Tángá Marko 12:43, 44. Mwasi yango akamwisi Yesu mpenza. Na yango, Yesu abengi bayekoli na ye, alakisi bango mwasi yango oyo mobali akufá mpe alobi: “Mwasi mobola wana oyo mobali akufá atye mingi koleka bato nyonso.” Na nsima alobi: “Bango nyonso [mingimingi bazwi] batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi ye na kokelela na ye atyaki nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.” Ntango mwasi yango azalaki kotya mwa mbongo moke oyo atikalaki na yango mpo na mokolo wana, azalaki kotika bomoi na ye mobimba na mabɔkɔ ya Yehova mpo asunga ye.​—Nz. 26:3.

Ndenge moko na Yesu, ntango omoni basusu bazali kopesa Yehova oyo eleki malamu, pesáká bango longonya mpo na milende na bango (Talá paragrafe 19-20) *

19. Liteya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na maloba oyo Yesu alobaki mpo na mwasi mobola oyo mobali akufá?

19 Salelá makambo oyo oyekoli na lisolo yango na bomoi na yo. Omituna boye: ‘Liteya nini nakoki koyekola na maloba oyo Yesu alobaki mpo na mwasi mobola oyo mobali akufá?’ Kanisá naino mwasi yango. Na ntembe te azalaki na mposa ya kopesa Yehova biloko mingi. Kasi apesaki Yehova oyo eleki malamu na kotalela makoki na ye. Mpe Yesu ayebaki ete likabo ya mwasi yango ezalaki na motuya mingi na miso ya Yehova Tata na ye. Yango ezali mpenza liteya ya ntina mingi mpo na biso. Yehova asepelaka soki topesi ye oyo ezali malamu, elingi koloba, kosalela ye na motema mpe na molimo na biso mobimba. (Mat. 22:37; Kol. 3:23) Asepelaka soki amoni tozali kosala oyo tokoki. Yango etaleli mpe makasi na biso, ntango oyo tolekisaka mpo na kosambela ye, na ndakisa, na mosala ya kosakola mpe na makita.

20. Ndenge nini okoki kosalela mateya oyo ezali na lisolo ya mwasi oyo mobali akufá? Pesá ndakisa.

20 Ndenge nini okoki kosalela liteya oyo ozwi na lisolo ya mwasi oyo mobali akufá? Kanisá bato oyo okoki kolendisa soki oyebisi bango ete Yehova asepelaka na oyo basalaka na mosala na ye. Na ndakisa, oyebi ndeko mwasi moko ya mobange oyo abɛlaka mpe azali na makasi mingi te ya nzoto, mpe mbala mosusu amimonaka ntina te mpo akoki lisusu te kosala mingi na mosala ya kosakola? To mpe ezali na ndeko mobali moko oyo oyebi ete azali na maladi oyo eumeli, maladi moko ya mpasi mpenza mpe alɛmbi nzoto mpo azali kokoka lisusu te koyangana na makita nyonso na Ndako ya Bokonzi? Okoki kosalisa bandeko ya ndenge wana soki ozali kosalela maloba oyo ezali “malamu mpo na kotonga.” (Ef. 4:29) Yebisá bango mateya oyo ozwi na lisolo ya mwasi mobola oyo mobali akufá. Maloba na yo ya kolendisa ekoki kosalisa bango bámona ete Yehova asepelaka soki tozali kopesa ye oyo eleki malamu na kotalela makoki na biso. (Mas. 15:23; 1 Tes. 5:11) Ntango ozali kolendisa basusu bápesa Yehova oyo eleki malamu, ata soki yango ekoki komonana moke, ozali kolanda matambe ya Yesu malamumalamu.

21. Ozwi ekateli nini?

21 Tozali mpenza na botɔndi ndenge masolo oyo ezali na Baevanzile eyebisi biso makambo mingi oyo etali bomoi ya Yesu, ndenge esalisi biso tómekola ye, mpe tólanda matambe na ye malamumalamu. Ekozala malamu soki oyekoli Baevanzile yango na boyekoli na yo moko to mpe na losambo na kati ya libota. Tóbosana te ete mpo tózwa mpenza matomba na boyekoli yango, tosengeli kosala lokola tozalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema mpe kosalela makambo yango na bomoi na biso. Longola komekola makambo oyo Yesu asalaki, tosengeli mpe koyoka makambo oyo alobaki. Na lisolo oyo elandi, tokomona mateya oyo tokoki kozwa na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa.

LOYEMBO 15 Tókumisa mwana ya liboso ya Yehova!

^ par. 5 Lokola tozali bakristo ya solo, tosengeli ‘kolanda matambe ya Yesu malamumalamu.’ “Matambe” nini Yesu atikelá biso mpo tólanda? Lisolo oyo ekoyanola na motuna yango. Ekolobela mpe ntina oyo tosengeli kolanda matambe ya Yesu malamumalamu, mpe ndenge ya kosala yango.

^ par. 60 NDIMBOLA YA ELILINGI: Nsima na kokanisa na mozindo na makambo oyo Yesu alobaki mpo na mwasi mobola oyo mobali akufá, ndeko mwasi moko azali kopesa ndeko mwasi moko ya mobange longonya ndenge azali kosalela Yehova na molimo na ye mobimba.