Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini liboso Yesu akufa atángaki maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 22:1?

Mwa moke liboso Yesu akufa, alobaki maloba oyo ezali na Matai 27:46 ete: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” Ntango Yesu alobaki maloba yango, akokisaki maloba ya mokomi ya Nzembo Davidi oyo ezali na Nzembo 22:1. (Mrk. 15:34) Ekozala mpenza libunga kokanisa ete Yesu alobaki maloba yango mpo Yehova asepelaki na ye te to mpo azangaki kondima mpo na mwa ntango. Yesu ayebaki malamu ntina oyo asengelaki kokufa mpe andimaki kosala bongo. (Mat. 16:21; 20:28) Ayebaki mpe malamu ete na ntango ya liwa na ye Yehova akotika kobatela ye. (Yobo 1:10) Na yango, Yehova atikaki kobatela Yesu mpo Yesu amonisa ete akotikala ntango nyonso sembo ata soki liwa na ye ekozala mpasi ndenge nini.​—Mrk. 14:35, 36.

Kasi mpo na nini Yesu alobaki maloba oyo ezali na Nzembo yango? Ata soki toyebi mpenza te ntina oyo alobaki yango, tokolobela mwa makambo oyo mbala mosusu esalaki ete Yesu aloba maloba yango. *

Ntango Yesu alobaki maloba yango, azalaki nde komonisa ete Yehova akosalisa ye te na ntango ya liwa na ye? Yesu asengelaki kofuta lisiko kozanga ete Yehova asalisa ye. Na yango, asengelaki ‘kokufela moto nyonso.’​—Ebr. 2:9.

Lokola Yesu alobelaki kaka mwa maloba moke oyo ezali na Nzembo yango, alingaki nde kobenda likebi ya bato na Nzembo yango mobimba? Na ntango wana, Bayuda mingi bazalaki na momeseno ya kokanga maloba oyo ezali na mokanda ya Nzembo na motó. Ntango bayoki maloba ya vɛrsɛ moko ya Nzembo, bazalaki mbala moko kokanisa maloba oyo ezali na Nzembo yango mobimba. Soki yango nde likambo oyo Yesu alingaki koloba, boye alingaki kosalisa Bayuda oyo bazalaki bayekoli na ye bákanisa bisakweli mingi oyo ezali na mokanda ya Nzembo oyo emonisi makambo oyo esengelaki kosalema liboso ya liwa na ye. (Nz. 22:7, 8, 15, 16, 18, 24) Lisusu, bavɛrsɛ ya nsuka oyo ezali na Nzembo yango ekumisi Yehova mpe elobeli ye lokola Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.​—Nz. 22:27-31.

Lokola Yesu atángaki maloba ya Davidi, alingaki nde komonisa ete azalaki na ngambo te? Liboso Yesu abomama, Sanedrina esambisaki ye na ndenge ya kozanga bosembo mpe elobaki ete afingi Nzambe. (Mat. 26:65, 66) Sanedrina eyanganaki nokinoki kaka na butu yango mpe bakatelaki ye etumbu kozanga ete bátosa mibeko. (Mat. 26:59; Mrk. 14:56-59) Ntango Yesu atunaki motuna yango, ekoki kozala ete azalaki komonisa ete asalaki likambo moko te ya mabe oyo mpo na yango asengelaki kobomama.

Yesu alingaki komonisa basusu ete lokola Davidi mokomi ya Nzembo yango anyokwamaki, ezalaki nde mpo Yehova azalaki lisusu kosepela na ye te? Motuna ya Davidi emonisaki te ete azangaki kondima. Nsima ya kotuna motuna yango, alobaki ete azali kotya motema ete Yehova akobikisa bato na ye mpe akokoba kopambola ye. (Nz. 22:23, 24, 27) Ndenge moko mpe, atako Yesu “Mwana ya Davidi,” azalaki konyokwama likoló ya nzete ya mpasi, yango emonisaki te ete Yehova azalaki lisusu kosepela na ye te.​—Mat. 21:9.

Yesu azalaki nde komonisa ete azalaki na mawa makasi, mpo Yehova atikaki kobatela ye mpo akoka komonisa mpenza bosembo na ye? Mokano ya Yehova ya ebandeli ezalaki te ete Mwana na ye anyokwama mpe akufa. Yehova azwaki ekateli yango, kaka nsima ya botomboki ya Adama ná Eva. Yesu asalaki ata likambo moko ya mabe te, kasi asengelaki konyokwama mpe kokufa mpo na kopesa eyano na ntembe oyo Satana abimisaki mpe mpo na kofuta motuya ya lisiko mpo na kosomba lisusu eloko oyo bato babungisaki. (Mrk. 8:31; 1 Pe. 2:21-24) Mpo na kokokisa yango, Yehova atikaki kobatela Yesu mpo na mwa ntango mpo na mbala ya liboso na bomoi na ye.

Yesu alingaki nde kosalisa bayoki na ye bákanisa ntina oyo Yehova atikaki ye anyokwama likoló ya nzete ya mpasi? * Yesu ayebaki ete kokufa likoló ya nzete ya mpasi lokola mosali-mabe esengelaki kobɛtisa bato mingi libaku. (1 Ko. 1:23) Soki bayekoli na ye bátyaka makanisi na bango nyonso na ntina oyo Yesu asengelaki kokufa, mbɛlɛ balingaki mpenza koyeba ndimbola ya liwa na ye. (Gal. 3:13, 14) Na yango, balingaki komona ye lokola Mobikisi, kasi te lokola mosali-mabe.

Ata soki Yesu alobaki maloba yango mpo na ntina nini, ayebaki ete lokola azalaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi, azalaki kokokisa mokano ya Yehova. Mwa moke nsima ya kotánga maloba ya Nzembo yango, Yesu alobaki: “Ekokisami!” (Yoa. 19:30; Luka 22:37) Ya solo, lokola Yehova atikaki kobatela Yesu mpo na mwa ntango, yango esalaki ete Yesu akokisa makambo nyonso oyo Yehova atindaki ye asala awa na mabele. Esalisaki ye mpe akokisa makambo nyonso oyo ekomamaki mpo na ye na “mibeko ya Moise mpe na Basakoli mpe na Nzembo.”​—Luka 24:44.

^ par. 2 Talá mpe paragrafe 9 mpe 10 ya lisolo: “Zwá mateya na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa” na nimero oyo.

^ par. 4 Na boumeli na mosala na ye awa na mabele, Yesu azalaki mbala mingi koloba to kotuna mituna oyo ezalaki komonisa mpenza te ndenge oyo ye moko azalaki komiyoka. Azalaki kosala yango mpo na kotinda bato oyo bazalaki kolanda ye bámonisa makanisi na bango.​—Mrk. 7:24-27; Yoa. 6:1-5; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2010, nk. 4-5.