Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 15

Zwá mateya na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa

Zwá mateya na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa

“Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.”​—MAT. 17:5.

LOYEMBO 17 “Nalingi”

NA MOKUSE *

1-2. Makambo nini esalemaki liboso Yesu aloba maloba na ye ya nsuka?

TOZALI na moi ya mokolo ya 14 Nisana, ya mobu 33 ya ntango na biso. Nsima ya kofunda Yesu mpe kosambisa ye mpo na makambo ya mabe oyo asalaki te, bato bazali kotyola ye, banyokoli ye mabe mpenza, mpe na nsima, babaki ye likoló ya nzete ya mpasi. Babɛti ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo. Mbala nyonso oyo azali kopema mpe koloba, azali koyoka mpasi makasi. Kasi asengeli kokanga monɔkɔ te mpo azali na makambo ya ntina mingi oyo asengeli koloba.

2 Tótalela maloba oyo Yesu alobaki ntango azalaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi, mpe mateya oyo tokoki kozwa na maloba yango. Na maloba mosusu, ‘tóyoka ye.’​—Mat. 17:5.

“TATA, LIMBISÁ BANGO”

3. Ekoki kozala ete Yesu azalaki kolobela banani ntango alobaki ete: “Tata, limbisá bango?”

3 Yesu alobaki nini? Nsima ya kobaka ye likoló ya nzete, Yesu abondelaki na maloba oyo: “Tata, limbisá bango.” Alimbisa banani? Maloba oyo alobaki na nsima, esalisi biso tózwa eyano. Alobaki: “Mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.” (Luka 23:33, 34) Ekoki kozala ete Yesu azalaki kolobela basoda ya Roma oyo babɛtaki ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo. Bayebaki te soki Yesu azalaki mpenza nani. Ekoki mpe kozala ete Yesu azalaki kokanisa bato mosusu kati na baoyo basɛngaki ete abomama, kasi oyo na nsima, bakokóma kondimela ye. (Mis. 2:36-38) Yesu atikaki te ete makambo ya kozanga bosembo oyo akutanaki na yango ekómisa ye nkandankanda mpe etinda ye aboya kolimbisa bato oyo banyokolaki ye. (1 Pe. 2:23) Kutu, asɛngaki nde Yehova ete alimbisa baoyo bazalaki koboma ye.

4. Ndenge oyo Yesu andimaki kolimbisa banguna na ye ekoki koteya biso nini?

4 Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Ndenge moko na Yesu, tosengeli kondima kolimbisaka basusu. (Kol. 3:13) Bato mosusu, ata mpe bandeko na biso ya libota bakoki kotɛmɛla biso mpo bazali kokanga ntina te ya mateya oyo tondimaka, mpe lolenge na biso ya bomoi. Bakoki koyebisa bato mosusu makambo ya lokuta mpo na biso, koyokisa biso nsɔni na miso ya bato, kobebisa mikanda na biso, ata mpe koluka kobɛta biso. Na esika tóbombela bango nkanda na motema, tokoki kosɛnga Yehova afungola miso ya bato oyo batɛmɛlaka biso mpo mokolo mosusu bákoka koyeba solo. (Mat. 5:44, 45) Na bantango mosusu ekoki kozala mpasi tólimbisa bango, mingimingi soki basalelaki biso makambo ya mabe mpenza. Kasi soki tobombeli bango nkanda na motema mpe toboyi kolimbisa bango, biso moko tokomisala mabe. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Namoni ete kolimbisa basusu elimboli te ete makambo oyo basalelaki ngai ezalaki malamu, to mpe kotikela bango nzela ete básalela ngai makambo na ndenge ya mabe mpenza. Elimboli kaka ete naboyi kobombela bango nkanda na motema.” (Nz. 37:8) Soki tolimbisi, totikaka te ete makambo mabe oyo basalelaki biso ekómisa biso nkandankanda.​—Ef. 4:31, 32.

“OKOZALA NA NGAI NA PARADISO”

5. Elaka nini Yesu apesaki mosali-mabe moko oyo azalaki na nzete ya mpasi elongo na ye, mpe mpo na nini apesaki ye elaka yango?

5 Yesu alobaki nini? Basali-mabe mibale bazalaki mpe likoló ya nzete ya mpasi elongo na Yesu. Na ebandeli, bango mibale bazalaki kotyola ye. (Mat. 27:44) Kasi na nsima, moko na bango abongolaki motema. Ayaki koyeba ete Yesu asalaki “likambo moko ya mabe te.” (Luka 23:40, 41) Oyo eleki ntina, andimaki ete Yesu akosekwa mpe mokolo mosusu akoyangela lokola mokonzi. Ayebisaki Yesu boye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” (Luka 23:42) Mobali yango amonisaki kondima makasi mpenza! Mpe Yesu ayebisaki ye boye: ‘Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai, na bokonzi te kasi na Paradiso.’ (Luka 23:43) Simbá ete Yesu apesaki elaka yango epai ya moto yango ye moko, kasi te epai ya bato nyonso. Yesu apesaki mosali-mabe yango elaka wana mpo ayebaki ete Tata na ye azali na motema mawa.​—Nz. 103:8.

6. Mateya nini tokoki kozwa na maloba oyo Yesu ayebisaki mosali-mabe?

6 Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Yesu azalaki mpenza lokola Tata na ye. (Ebr. 1:3) Yehova alingaka kolimbisa biso mpe komonisela biso motema mawa. Kasi akosala yango kaka soki toyoki mpenza mawa mpo na makambo mabe oyo tosalá kala, mpe tomonisi kondima na mbeka ya Yesu Kristo. (1 Yoa. 1:7) Ekoki kozala mpasi mpo basusu bándima ete Yehova akoki kolimbisa bango mpo na mabunga oyo basalá kala. Soki na bantango mosusu oyokaka mpe bongo, kobosana likambo oyo te: Mwa moke liboso akufa, Yesu amonisaki motema mawa epai ya mosali-mabe oyo abandaki kondimela ye. Kanisá naino: soki Yesu amoniselaki moto ya ndenge wana motema mawa, na ntembe te Yehova akomonisa motema mawa mingi koleka epai ya basambeli na ye ya sembo, oyo basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kotosa mibeko na ye.​—Nz. 51:1; 1 Yoa. 2:1, 2.

“TALÁ! MWANA NA YO! . . . TALÁ! MAMA NA YO!”

7. Ndenge Yoane 19:26, 27 emonisi yango, makambo nini Yesu ayebisaki Maria mpe Yoane, mpe mpo na nini alobaki yango?

7 Yesu alobaki nini? (Tángá Yoane 19:26, 27.) Yesu azalaki komitungisa mpo na mama na ye, oyo mbala mosusu akómaki mwasi oyo mobali akufá. Baleki ya Yesu bakokaki kosalisa mama na bango mpo azwaka biloko oyo asengelaki na yango mpo na kobikela. Kasi nani akokaki kosalisa Maria mpo atikala sembo epai ya Yehova? Eloko moko te emonisi ete na ntango wana bandeko ya Yesu bakómaki bayekoli na ye. Kasi Yoane azalaki ntoma moko ya sembo mpe moninga ya Yesu ya motema. Yesu azalaki kotalela baoyo bazalaki kosambela Yehova elongo na ye lokola bandeko na ye ya elimo. (Mat. 12:46-50) Lokola Yesu azalaki kolinga mpe komitungisa mpo na mama na ye, apesaki Yoane mokumba ya kobatela ye mpo ayebaki ete akokokisa mpe bamposa na ye ya elimo. Yesu ayebisaki mama na ye ete: “Talá! Mwana na yo!” Mpe ayebisaki Yoane ete: “Talá! Mama na yo!” Banda mokolo wana, Yoane akómaki lokola mwana ya Maria, mpe akómaki kobatela ye kaka lokola mama na ye moko. Yesu amonisaki mpenza bolingo makasi mpo na mwasi oyo abatelaki ye ntango abotamaki, mpe oyo atɛlɛmaki pene na ye ntango azalaki kokufa!

8. Mateya nini tokoki kozwa na maloba oyo Yesu alobaki na Maria mpe Yoane?

8 Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Bolingo na biso mpo na bandeko na biso bakristo ekoki kozala makasi koleka ndenge oyo tolingaka bato ya libota na biso. Bandeko na biso ya libota bakoki kotɛmɛla to mpe kosundola biso. Kasi ndenge Yesu alakaki yango, soki tokangami na Yehova mpe ebongiseli na ye, tokozwa “mbala nkama moko” koleka oyo tobungisi. Mingi bakokóma lokola bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi, bamama to mpe batata na biso. (Mrk. 10:29, 30) Omiyokaka ndenge nini lokola ozali na kati ya lisangá mobimba ya bandeko oyo bazali na bomoko mpo bandimelaka Yehova, balingaka ye, mpe bamoniselanaka bolingo?​—Kol. 3:14; 1 Pe. 2:17.

“NZAMBE NA NGAI, MPO NA NINI OSUNDOLI NGAI?”

9. Mateya nini tokoki kozwa na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 27:46?

9 Yesu alobaki nini? Mwa moke liboso akufa, Yesu agangaki ete: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” (Mat. 27:46) Biblia emonisi te ntina oyo Yesu alobaki maloba yango. Kasi tótalela mateya oyo tokoki kozwa na maloba yango. Likambo ya liboso ezali ete ntango Yesu alobaki maloba yango, azalaki kokokisa esakweli oyo ezali na Nzembo 22:1. * Lisusu, maloba yango emonisi ete Yehova ‘atɛlɛmisaki te lopango zinganzinga’ ya Mwana na ye mpo na kobatela ye. (Yobo 1:10) Yesu ayebaki ete Tata na ye atikaki ye mpenza na mabɔkɔ ya banguna na ye mpo bámeka kondima na ye tii na nsuka. Moto moko te amekamá na ndenge oyo Yesu amekamaki. Lisusu, maloba yango emonisi ete Yesu asalaki te likambo moko ya mabe oyo mpo na yango asengelaki kobomama.

10. Mateya nini tokoki kozwa na maloba oyo Yesu ayebisaki Tata na ye?

10 Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Liteya ya liboso ezali ete tosengeli te kozela Yehova abatela biso na mikakatano oyo ekoki komeka kondima na biso. Kaka ndenge Yesu amekamaki tii na nsuka, biso mpe tosengeli komibongisa mpo na kotikala sembo ata soki esɛngi tókufa. (Mat. 16:24, 25) Kasi, toyebi ete Nzambe akotika nzela te ete tómekama koleka oyo tokoki koyikela mpiko. (1 Ko. 10:13) Liteya mosusu ezali ete, ndenge moko na Yesu, bakoki konyokola biso ata soki tosali likambo moko te ya mabe. (1 Pe. 2:19, 20) Baoyo batɛmɛlaka biso basalaka yango kaka te mpo tosalaki likambo moko ya mabe, kasi mpo tozali bato ya mokili te, mpe topesaka litatoli mpo na solo. (Yoa. 17:14; 1 Pe. 4:15, 16) Yesu ayebaki ntina oyo Yehova atikaki nzela ete anyokwama. Kasi na kokesana na Yesu, na bantango mosusu, basambeli ya sembo ya Yehova oyo bazali konyokwama bamitunaka ntina oyo Yehova atiki nzela ete makambo ya bongo ekómela bango. (Hab. 1:3) Nzambe na biso oyo azali na motema mawa mpe na motema molai ayebi ete bato ya ndenge wana bazangi kondima te; bazali nde na mposa ya libɔndisi oyo kaka ye nde akoki kopesa yango.​—2 Ko. 1:3, 4.

“NAZALI NA MPOSA YA MAI”

11. Mpo na nini Yesu alobaki maloba oyo ezali na Yoane 19:28?

11 Yesu alobaki nini? (Tángá Yoane 19:28.) Mpo na nini Yesu alobaki: “Nazali na mposa ya mai?” Asalaki bongo mpo na kokokisa esakweli oyo ezali na Nzembo 22:15, oyo elobi ete: “Nguya na ngai ekauki lokola eteni ya mbɛki, mpe lolemo na ngai ekangami na misuni ya mino na ngai.” Lisusu, nsima ya makambo nyonso ya mpasi oyo Yesu akutanaki na yango, ata mpe mpasi ya liwa likoló ya nzete, asengelaki koyoka mposa ya mai makasi. Azalaki na mposa ete moto moko asalisa ye mpo akokisa mposa oyo azalaki na yango ya komɛla mai.

12. Maloba ya Yesu oyo ete “nazali na mposa ya mai” ekoki koteya biso nini?

12 Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Yesu amonaki te ete ezali bolɛmbu komonisa bato mosusu ndenge oyo azalaki komiyoka. Biso mpe tosengeli kosalaka bongo. Mbala mingi na bomoi na biso, tomonaka malamu tóyebisa bato mosusu te makambo oyo tozali na mposa na yango. Kasi soki tokómi na mposa ete bato mosusu básalisa biso, tosengeli kokakatana te mpo na kosɛnga lisalisi. Na ndakisa, soki tozali mobange to tozali kobɛla, tokoki kosɛnga moninga moko akende kotika biso na wenze to epai ya monganga. Soki tolɛmbi nzoto, ekoki kosɛnga ete tóyebisa nkulutu, to moninga moko mokristo oyo akɔmɛli na elimo ayoka biso na likebi to mpe ayebisa biso “liloba ya malamu” oyo ekolendisa biso. (Mas. 12:25) Tóbosana te ete bandeko na biso balingaka biso, mpe bazalaka na mposa ya kosalisa biso na “ntango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Kasi bakoki koyeba te makambo oyo ezali na motema na biso. Soki toyebisi bango te, bakoyeba mpe te soki tozali na mposa ya lisalisi.

“EKOKISAMI!”

13. Lokola Yesu abatelaki bosembo na ye tii na liwa, yango ekokisaki makambo nini?

13 Yesu alobaki nini? Na ngonga soki ya misato nsima ya midi ya mokolo ya 14 Nisana, Yesu agangaki: “Ekokisami!” (Yoa. 19:30) Maloba yango ezali koteya biso ete mwa moke liboso akufa, Yesu ayebaki ete asalaki makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki ye. Lokola abatelaki bosembo na ye tii na liwa, Yesu akokisaki makambo mingi. Ya liboso, amonisaki ete Satana azali mobuki-lokuta. Yesu amonisaki ete moto ya kokoka akoki kobatela bosembo na ye ata soki Satana asali ye nini. Ya mibale, Yesu apesaki bomoi na ye lisiko. Lokola apesaki bomoi na ye mbeka, yango esalisi bato ya kozanga kokoka bázala na boyokani malamu ná Nzambe mpe bázwa elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Ya misato, Yesu amonisaki ete Yehova azali Moyangeli oyo aleki malamu mpe alongolaki nsɔni nyonso na nkombo ya Tata na ye.

14. Tosengeli kozala na ekateli ya kosalela bomoi na biso ya mokolo na mokolo ndenge nini? Limbolá.

14 Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Tosengeli kozala na ekateli ya kobatela bosembo na biso mokolo na mokolo. Tótala makambo oyo ndeko Maxwell Friend, oyo azalaki molakisi na Eteyelo ya Gileade alobaki. Na liyangani moko oyo esangisaka bato ya mikili mingi, ndeko Friend asalaki diskur moko oyo elobelaki bosembo. Alobaki boye: “Makambo oyo okoki kosala to koloba, salá yango lelo; kozela lobi te. Oyebi soki lobi okozala na bomoi? Salelá bomoi na yo ya mokolo na mokolo lokola libaku ya nsuka oyo ozali na yango ya komonisa ete obongi mpo na kozala na bomoi ya libela na libela.” Tósalela bomoi na biso ya mokolo na mokolo lokola libaku ya nsuka oyo tozali na yango ya komonisa bosembo na biso! Mpe ata soki liwa eyei, tokozala na likoki ya koloba: “Yehova, nasalaki nyonso mpo na kobatela bosembo na ngai, komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta, mpe kolongisa nkombo mpe boyangeli na yo!”

“NATIKI ELIMO NA NGAI NA MABƆKƆ NA YO”

15. Na kotalela Luka 23:46, Yesu ayebaki likambo nini?

15 Yesu alobaki nini? (Tángá Luka 23:46.) Na kondima nyonso Yesu alobaki: “Tata, natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.” Yesu ayebaki ete elikya na ye ya kozala na bomoi na mikolo ezali koya, ezalaki na mabɔkɔ ya Yehova. Mpe ayebaki ete Tata na ye akobosana ye te.

16. Ndakisa ya ndeko mobali moko ya mbula 15 eteyi yo nini?

16 Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Kobá kobatela bosembo na yo epai ya Yehova ata soki bomoi na yo ezali na likama. Mpo na kosala yango, osengeli ‘kotyela Yehova motema na yo mobimba.’ (Mas. 3:5) Tótalela ndakisa ya Joshua, Motatoli ya Yehova moko ya mbula 15 oyo abɛlaki maladi moko oyo ememaki ye na liwa. Aboyaki kondima lisalisi ya monganga oyo ekokaki kotinda ye abuka mibeko ya Nzambe. Mwa moke liboso akufa, ayebisaki mama na ye boye: “Mama, nazali na mabɔkɔ ya Yehova. Mama, nazali koyebisa yo na bosembo nyonso: nayebi mpenza ete Yehova akosekwisa ngai. Ayebi makambo oyo ezali na motema na ngai mpe nalingaka ye mingi mpenza.” * Na yango, mokomoko na biso asengeli komituna boye: “Soki kondima na ngai emekami na likambo moko oyo ekoki kosala ete nabungisa bomoi na ngai, nakotikala sembo epai ya Yehova, mpe nakotyela ye motema ete akobosana ngai te?”

17-18. Mateya nini tozwi? (Talá mpe etanda “ Mateya oyo tokoki kozwa na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa.”)

17 Tokoki kozwa mateya ya ntina mingi na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa. Esalisi biso tómona ete tosengeli kolimbisaka basusu mpe kotya motema ete Yehova akolimbisa biso. Tozali na libaku moko kitoko ya kozala na bandeko basi mpe bandeko mibali ya elimo oyo balingaka kosalisa biso. Kasi soki tozali na mposa ya lisalisi, tosengeli kokakatana te mpo na kosɛnga bango básalisa biso. Toyebi ete Yehova akosalisa biso tóyika mpiko na mokakatano nyonso oyo tokokutana na yango. Tomoni mpe ntina ya kosalela bomoi na biso ya mokolo na mokolo lokola libaku ya nsuka oyo tozali na yango ya komonisa bosembo na biso mpe ya kotya motema ete Yehova akosekwisa biso soki tokufi.

18 Ya solo, maloba oyo Yesu alobaki ntango azalaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi ekoki koteya biso makambo mingi mpenza! Soki tosaleli mateya oyo tozwi, tokotosa maloba oyo Yehova ye moko alobaki mpo na Mwana na ye ete: “Bóyoka ye.”​—Mat. 17:5.

LOYEMBO 126 Kɛngɛlá, tɛlɛmá ngwi, zalá makasi

^ par. 5 Ndenge Matai 17:5 emonisi yango, Yehova alingaka ete tóyoka Mwana na ye. Na lisolo oyo, tokoyekola mateya oyo tokoki kozwa na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki ntango azalaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi.

^ par. 9 Mpo na koyeba bantina mosusu oyo mbala mosusu etindaki Yesu atánga maloba oyo ezali na Nzembo 22:1, talá “Mituna ya batángi” na nimero oyo.

^ par. 16 Talá lisolo La foi de Joshua​Une victoire pour les droits de l’enfant,” na Lamuká ya 22/01/1995, na français!