LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mai 2020

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 06/07-02/08/2020.

”Mokonzi ya nɔrdi” na ntango ya nsuka

Lisolo ya boyekoli 19: 06-12/07/2020. Tozali komona polele ete esakweli ya Danyele oyo elobeli “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” ezali kokoba kokokisama. Nini endimisi biso yango? Mpe mpo na nini tosengeli kokanga ntina ya makambo oyo esakweli yango elobeli??

Bakonzi mibale oyo bayokanaka te na ntango ya nsuka

Esakweli oyo elobeli “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” eyokani na bisakweli mosusu. Ndenge nini bisakweli yango emonisi ete ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka mosika te?

Nani nde “mokonzi ya nɔrdi” lelo oyo?

Lisolo ya boyekoli 20: 13-19/07/2020. Nani nde “mokonzi ya nɔrdi” lelo oyo?, mpe ndenge nini akobebisama? Biyano na mituna yango ekoki kokómisa kondima na biso makasi mpe kosalisa biso tómibongisa mpo na makambo oyo ekosalema mosika te na ntango ya bolɔzi monene.

Osepelaka na makabo kitoko ya Nzambe?

Lisolo ya boyekoli 21: 20-26/07/2020. Lisolo oyo ekosalisa biso tókóma lisusu na botɔndi mingi mpo na Yehova mpe mpo na makabo oyo apesá biso. Ekosalisa biso mpe tóyeba ndenge ya kosolola na bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali.

Monisá botɔndi mpo na makabo oyo emonanaka te

Lisolo ya boyekoli 22: 27/07–02/08/2020. Na lisolo oyo eleki, tolobelaki mwa makabo ndenge na ndenge oyo Nzambe apesá biso, mpe oyo tokoki komona na miso. Na lisolo oyo, tokotalela mwa makabo mosusu oyo Nzambe apesá biso kasi oyo emonanaka boye te na miso. Mpe tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na makabo yango. Yango ekosalisa biso tózala lisusu na botɔndi mingi epai ya Yehova, Nzambe oyo apesá biso makabo yango.