Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakonzi mibale oyo bayokanaka te na ntango ya nsuka

Bakonzi mibale oyo bayokanaka te na ntango ya nsuka

Bisakweli mosusu oyo ezali na etanda oyo, elobeli makambo oyo esalemaki nzela moko. Yango emonisi mpenza ete tozali na “ntango ya nsuka.”​—Dan. 12:4.

  • Bavɛrsɛ Em. 11:7; 12:13, 17; 13:1-8, 12

    Esakweli “Nyama mabe” eyangeli bato bambula ebele. Na ntango ya nsuka, motó na yango ya nsambo ezoki. Na nsima, motó yango ebiki mpe “mabele mobimba” elandi nyama mabe. Satana asaleli nyama mabe yango mpo na “kobunda etumba na bato ya momboto ya mwasi yango oyo batikalaki.”

    Kokokisama Nsima ya Mpela, baguvɛrnema oyo etɛmɛlaki Yehova ekómaki koyangela bato. Nsima ya bambula koleka 3 000, na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Grande-Bretagne, moko ya baguvɛrnema yango, ezalaki lisusu na nguya mingi te. Ezwaki lisusu nguya ntango esalaki boyokani ná États-Unis. Mingimingi na ntango oyo ya nsuka, Satana azali kosalela bibongiseli na ye nyonso ya politiki mpo na konyokola basaleli ya Nzambe.

  • Bavɛrsɛ Dan. 11:25-45

    Esakweli Mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bazali kowelana na ntango oyo ya nsuka.

    Kokokisama Allemagne ebundaki na Grande-Bretagne mpe États-Unis. Na 1945, Union soviétique mpe bikólo oyo ezalaki kopesa yango mabɔkɔ, ekómaki mokonzi ya nɔrdi. Na 1991, Union soviétique ekweaki, mpe na nsima, Russie ná bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ezwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi.

  • Bavɛrsɛ Yis. 61:1; Mal. 3:1; Luka 4:18

    Esakweli Yehova atindi “momemi-nsango” na ye mpo na “kobongisa nzela” liboso Bokonzi ya Masiya etyama. Momemi-nsango yango ayebisi “bato ya komikitisa nsango malamu.”

    Kokokisama Kobanda na 1870, ndeko Russell ná baninga na ye bayekolaki Biblia na mozindo mpo na koyeba makambo oyo yango eteyaka mpenza. Na 1881, bamonaki ete ezali na ntina mingi basaleli ya Nzambe básakolaka. Na yango, babimisaki masolo lokola “Tozali koluka basakoli 1 000” mpe “Batyami mafuta na elimo mpo na koteya.”

  • Bavɛrsɛ Mat. 13:24-30, 36-43

    Esakweli Moto moko aloni blé na elanga. Na nsima, monguna moko ayei kolona matiti mabe na kati ya elanga yango. Matiti mabe yango ekoli mpe ezipi blé. Na ntango ya kobuka mbuma, bakaboli blé na matiti mabe.

    Kokokisama Kobanda na 1870, bokeseni kati na bakristo ya solo mpe oyo ya lokuta ekómaki komonana polele. Na boumeli ya ntango ya nsuka, bakristo ya solo bazali koyanganisama mpe kokabwana ná bakristo ya lokuta.

  • Bavɛrsɛ Dan. 2:31-33, 41-43

    Esakweli Makaka ya ebende oyo esangani na mabele ya lima ya ekeko moko monene, oyo esalemi na biloko ndenge na ndenge.

    Kokokisama Mabele ya lima emonisi bato oyo bokonzi ya Anglo-américain ezali koyangela, mpe oyo bazali kotombokela bokonzi yango. Bato yango bazali kolɛmbisa bokonzi ya Anglo-américain mpe kopekisa yango esala lokola ebende.

  • Bavɛrsɛ Mat. 13:30; 24:14, 45; 28:19, 20

    Esakweli “Blé” eyanganisami na kati ya “ndako ya kobomba biloko” mpe “moombo ya sembo mpe ya mayele” atyami mpo na kobatela “basali ya ndako.” Mpe “nsango malamu ya Bokonzi” ekómi kosakolama na “mabele mobimba esika bato bafandi.”

    Kokokisama Na 1919, moombo ya sembo atyamaki mpo na kokamba basaleli ya Nzambe. Kobanda na ntango wana, bayekoli ya Biblia bakómaki kosakola lisusu mingi koleka. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosakola na mikili koleka 200 mpe bazali kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 1 000.

  • Bavɛrsɛ Dan. 12:11; Em. 13:11, 14, 15

    Esakweli Nyama mabe ya maseke mibale ezali koyebisa bato oyo bafandi na mabele ete básala “elilingi ya nyama mabe” mpe epesi “mpema na nyama mabe yango.”

    Kokokisama Bokonzi ya Anglo-américain nde esalaki Société des Nations. Bikólo mosusu mpe epesaki ebongiseli yango mabɔkɔ. Kobanda 1926 tii 1933, mokonzi ya nɔrdi azalaki mpe na kati ya ebongiseli yango. Ndenge moko na ONU, bato bazalaki kotya motema ete Société des Nations ekotya kimya na mokili mobimba; likambo oyo kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosala.

  • Bavɛrsɛ Dan. 8:23, 24

    Esakweli Mokonzi moko oyo azali na elongi ya nkandankanda, “abebisi mpenza kobebisa.”

    Kokokisama Bokonzi ya Anglo-américain ebomi bato ebele mpe ebebisi biloko ebele. Na ndakisa, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, États-Unis ebwakaki babɔmbi atomike mibale na ekólo oyo ezalaki kobundisa Grande-Bretagne mpe États-Unis. Babɔmbi yango ebomaki bato mpe ebebisaki biloko ebele na ndenge oyo esalemá naino te.

  • Bavɛrsɛ Dan. 11:31; Em. 17:3, 7-11

    Esakweli Nyama mabe ya “langi ya motane makasi” oyo ezali na maseke zomi ebimi na libulu mozindo mpe ezali mokonzi ya mwambe. Mokanda ya Danyele ebengi mokonzi yango “eloko ya bosɔtɔ oyo ezali koyeisa libebi.”

    Kokokisama Na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Société des Nations esukaki. Na nsima ya etumba, ONU “etyamaki.” Ndenge moko na Société des Nations, bapesaka mpe ONU lokumu oyo esengeli kopesama na Bokonzi ya Nzambe. ONU ekobundisa mangomba.

  • Bavɛrsɛ 1 Tes. 5:3; Em. 17:16

    Esakweli Bikólo elobi “kimya likambo ya kobanga ezali te,” mpe “maseke zomi” ná “nyama mabe” ebundisi “mwasi ya ndumba” mpe ebomi ye. Na nsima, bikólo mpe ebebisami.

    Kokokisama Bikólo ekotuta ntolo ete etye kimya mpe likambo ya kobanga ezali te na mokili. Na nsima, bikólo oyo epesaka ONU mabɔkɔ ekobebisa bibongiseli ya mangomba ya lokuta. Yango nde ekozala ebandeli ya bolɔzi monene. Bolɔzi monene yango ekosuka ntango Yesu akobebisa bibongiseli nyonso ya mokili ya Satana na etumba ya Armagedone.

  • Bavɛrsɛ Ezk. 38:11, 14-17; Mat. 24:31

    Esakweli Goge amati mpo na kobundisa ekólo ya bato ya Nzambe. Na nsima, baanzelu “bayanganisi bato oyo Nzambe aponá.”

    Kokokisama Mokonzi ya nɔrdi ná baguvɛrnema mosusu bakobundisa basaleli ya Nzambe. Nsima ya etumba yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala naino awa na mabele, bakoyanganisama na likoló.

  • Bavɛrsɛ Ezk. 38:18-23; Dan. 2:34, 35, 44, 45; Em. 6:2; 16:14, 16; 17:14; 19:20

    Esakweli “Moto oyo afandi” likoló ya “mpunda moko ya mpɛmbɛ” ‘alongi tii na nsuka’ na ndenge abebisi Goge ná limpinga na yango. ‘Nyama mabe ebwakami na laki ya mɔtɔ’ mpe libanga moko epanzi ekeko yango ya monene.

    Kokokisama Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe oyo azali koyangela, akobikisa basaleli ya Nzambe. Ye ná bato 144 000 mpe limpinga ya baanzelu, bakobebisa bikólo nyonso oyo ekobundisa basaleli ya Nzambe. Yango nde ekosukisa mokili ya Satana.