Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 19

”Mokonzi ya nɔrdi” na ntango ya nsuka

”Mokonzi ya nɔrdi” na ntango ya nsuka

“Na ntango ya nsuka, mokonzi ya sudi akotindikana na ye [mokonzi ya nɔrdi].”​—DAN. 11:40.

LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika

NA MOKUSE *

1. Biblia eyebisi biso nini?

MAKAMBO nini ekokómela basaleli ya Yehova mosika te? Ntina ya kobɛta motó ezali te. Biblia eyebisi biso makambo oyo ekosalema mosika te mpe oyo ekotalela mpe biso. Ezali na esakweli moko oyo ezali kosalisa biso tómona makambo mosusu oyo baguvɛrnema oyo eleki na nguya awa na mabele ekosala. Esakweli yango, oyo ezali na Danyele 11, elobeli bakonzi mibale oyo bayokanaka te: Mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi. Makambo mingi oyo esakweli yango elobeli esilá kokokisama. Na yango, tokoki kotya motema ete makambo oyo etikali mpe ekokokisama.

2. Ndenge emonisami na Ebandeli 3:15 mpe Emoniseli 11:7; 12:17, makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali koyekola esakweli ya Danyele?

2 Mpo na kokanga ntina ya esakweli ya Danyele 11, tosengeli kobosana te ete elobeli kaka bakonzi ná baguvɛrnema oyo enyokolaki basaleli ya Nzambe na ndenge ya polele. Atako basaleli ya Nzambe bazali mpenza moke na kotalela motángo ya bato oyo bazali na mokili, mbala mingi baguvɛrnema ya minene enyokolaka bango. Mpo na nini? Mpo Satana ná ebongiseli na ye mobimba, bazalaka na mokano moko ya monene​—Kosilisa baoyo basalelaka Yehova mpe Yesu. (Tángá Ebandeli 3:15 mpe Emoniseli 11:7; 12:17.) Lisusu, esakweli ya Danyele esengeli koyokana mpe na bisakweli mosusu ya Biblia. Kutu, tokoki kokanga ntina ya esakweli ya Danyele kaka soki tokokanisi yango ná mikanda mosusu ya Biblia.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi?

3 Sikoyo tokolobela Danyele 11:25-39. Tokomona soki mokonzi ya nɔrdi mpe ya mokonzi ya sudi ezalaki banani kobanda 1870 tii 1991. Tokomona mpe ntina oyo ebongi tósembola boyebi na biso ya eteni moko ya esakweli yango. Na lisolo oyo elandi, tokolobela Danyele 11:40–12:1, mpe tokosembola boyebi na biso na makambo oyo eteni ya esakweli yango elobeli mpo na eleko oyo ebandi na 1991 tii na etumba ya Armagedone. Wana ozali koyekola masolo yango mibale, ekozala malamu otalela mpe makambo oyo ezali na etanda “Bakonzi mibale oyo bayokanaka te na ntango ya nsuka.” Kasi liboso, tosengeli koyeba bakonzi mibale oyo esakweli yango elobeli.

NDENGE YA KOYEBA MOKONZI YA NƆRDI MPE MOKONZI YA SUDI

4. Makambo nini misato ekosalisa biso tóyeba mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi?

4 Na ebandeli, titre “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” ezalaki kosalelama mpo na kolobela bakonzi ya nguya oyo bazalaki koyangela na nɔrdi mpe na sudi ya ekólo Yisraele ya kala. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo anzelu oyo amemelaki Danyele nsango yango alobaki na ye ete: “Nayei kosalisa yo ososola makambo oyo ekokómela bato ya ekólo na yo na eleko ya nsuka ya mikolo.” (Dan. 10:14) Tii na Pantekote ya mobu 33 T.B., bato ya ekólo Yisraele bazalaki bato ya Nzambe. Kasi, kobanda na ntango wana, Yehova amonisaki polele ete bayekoli ya sembo ya Yesu nde bazalaki bato na ye. Na yango, eteni monene ya esakweli ya Danyele mokapo 11 etali ekólo Yisraele te, kasi bayekoli ya Kristo. (Mis. 2:1-4; Rom. 9:6-8; Gal. 6:15, 16) Mpe na boumeli ya bambula, baguvɛrnema ndenge na ndenge ekómaki mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi. Atako bongo, ezali na makambo ebele oyo ebongwanaki te. Ya liboso, bakonzi yango banyokolaki basaleli ya Nzambe na ndenge ya polele. Ya mibale, ndenge oyo banyokolaki basaleli ya Nzambe emonisaki ete bazalaki koyina Nzambe ya solo, Yehova. Mpe ya misato, bakonzi yango mibale bazalaki kobunda bango na bango mpo na kolakisa nani aleki mosusu na nguya.

5. Mpo na nini tolobi ete kobanda na siɛklɛ ya 2 T.B. tii na 1870 mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bazalaki te?

5 Na ntango moko boye na boumeli ya siɛklɛ ya 2 T.B., lisangá ya bokristo ya solo ezalaki koyebana lisusu te mpo bakristo ya lokuta, oyo bakómaki kolanda mateya ya bapakano mpe kobomba mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe, bakómaki mingi. Kobanda na ntango wana tii na nsuka ya bambula ya 1800, Nzambe azalaki na ebongiseli moko te awa na mabele. Bakristo ya lokuta bakómaki mingi lokola matiti mabe, mpe koyeba bakristo ya solo ekómaki mpasi. (Mat. 13:36-43) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba yango? Mpo yango emonisi ete mokonzi to guvɛrnema moko te ekokaki kozala mokonzi ya nɔrdi to mokonzi ya sudi kobanda na siɛklɛ ya 2 T.B., tii na mobu 1870. Mpamba te na ntango wana, ezalaki te na ebongiseli ya basaleli ya Nzambe awa na mabele oyo bakonzi yango bakokaki konyokola. * Kasi, mwa moke nsima ya 1870, mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bakokaki komonana lisusu. Ndenge nini toyebi yango?

6. Ntango nini basaleli ya Nzambe babandaki lisusu kobongisama lokola etuluku? Limbolá.

6 Kobanda na 1870, basaleli ya Nzambe babandaki kobongisama lokola etuluku. Ezalaki na mbula yango nde Charles Russell ná baninga na ye basalaki etuluku moko ya boyekoli ya Biblia. Ndeko Russell ná baninga na ye basalaki lokola momemi-nsango oyo asakolamaki, oyo ‘abongisaki nzela’ liboso Bokonzi ya Masiya etyama. (Mal. 3:1) Basaleli ya Nzambe babongisamaki lisusu lokola etuluku mpo na kosalela Yehova na lolenge ebongi! Ezalaki nde na guvɛrnema moko ya nguya na ntango yango oyo enyokolaki basaleli ya Nzambe? Tótalela makambo oyo elandi.

NANI AZALI MOKONZI YA SUDI?

7. Nani akokisaki malamu mokumba ya mokonzi ya sudi na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?

7 Na 1870, Grande-Bretagne ekómaki koyangela bitúká ebele, mpe ezalaki na limpinga ya basoda oyo elekaki na nguya na mokili mobimba. Esakweli ya Danyele ekokanisaki yango na liseke ya moke oyo epikolaki maseke mosusu misato​—France, Espagne, mpe Pays-Bas. (Dan. 7:7, 8) Mpe Grande-Bretagne ekokisaki malamu mokumba ya mokonzi ya sudi na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Kaka na ntango yango, États-Unis d’Amérique ekómaki ekólo oyo eleki na nguya na makambo ya nkita mpe esalaki boyokani makasi ná Grande-Bretagne.

8. Nani nde mokonzi ya sudi na boumeli ya mikolo ya nsuka?

8 Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, États-Unis ná Grande-Bretagne esangisaki mampinga na yango ya nguya. Na ntango yango, Grande-Bretagne ná États-Unis esalaki bokonzi ya Anglo-américain; bokonzi oyo eleki bikólo nyonso na nguya. Ndenge Danyele asakolaki yango, mokonzi yango asangisaki “limpinga moko monene mpenza ya basoda ya nguya.” (Dan. 11:25) Na boumeli ya mikolo ya nsuka, États-Unis ná Grande-Bretagne nde mokonzi ya sudi. * Bongo mokonzi ya nɔrdi nde nani?

MOKONZI YA NƆRDI AMONANI LISUSU

9. Ntango nini mokonzi ya nɔrdi amonanaki lisusu, mpe ndenge nini Danyele 11:25 ekokisamaki?

9 Na 1870, ndeko Russell ná baninga na ye basalaki etuluku ya boyekoli ya Biblia. Na mbula oyo elandaki, mokonzi ya sika ya nɔrdi amonanaki lisusu. Kaka na mbula yango, Otto von Bismarck asangisaki bitúká ebele mpe ekómaki ekólo moko ya nguya oyo ebengamaki Ampire ya Allemagne. Mokonzi Wilhelm I ya etúká ya Prusse nde akómaki amperɛrɛ ya liboso ya ampire yango mpe atyaki Bismarck azala ministre-mokonzi (chancelier). * Nsima ya mwa bambula, Allemagne ekómaki ekólo moko ya nguya oyo ekómaki koyangela bikólo ya Afrika mpe ya Océan Pacifique mpe elukaki kokóma na nguya mingi koleka Grande-Bretagne. (Tángá Danyele 11:25.) Ndenge moko na Grande-Bretagne, Allemagne mpe ekómaki na mampinga ya basoda ya nguya mpe na bibundeli minene ya mai. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Allemagne esalelaki mampinga yango mpo na kobundisa banguna na yango.

10. Ndenge nini Danyele 11:25b, 26 ekokisamaki?

10 Danyele asakolaki mpe makambo oyo ekokómela bokonzi ya Allemagne mpe mampinga na yango ya basoda. Esakweli elobi ete mokonzi ya nɔrdi “akotɛlɛma te.” Mpo na nini? “Mpo bakosala myango ya kobunda na ye. Mpe bato oyo bazali kolya biloko na ye ya kitoko bakokweisa ye.” (Dan. 11:25b, 26a) Na mikolo ya Danyele, baoyo bazalaki kolya “bilei kitoko ya mokonzi” ezalaki mpe bato minene oyo bazalaki ‘kotɛlɛma liboso ya mokonzi.’ (Dan. 1:5) Esakweli yango ezalaki kolobela banani? Ezalaki kolobela bato ya nguya oyo bazalaki na guvɛrnema ya Allemagne, lingi koloba bakonzi ya basoda ya amperɛrɛ. Mpo na makambo oyo bakonzi yango ya basoda basalaki, mokonzi abungisaki nguya na ye mpe lolenge mosusu ya sika ya guvɛrnema ebandaki na Allemagne. * Esakweli elobelaki kaka te kokweisama ya ampire yango, kasi mpe likambo oyo ekokómela yango ntango ekobunda na mokonzi ya sudi. Esakweli elobaki boye mpo na mokonzi ya nɔrdi: “Kasi limpinga na ye ya basoda ekomemama lokola na mpela, mpe mingi bakokwea mpenza, babomami.” (Dan. 11:26b) Kaka ndenge esakolamaki, na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, balongaki basoda ya Allemagne mpe mingi na bango babomamaki. Bato oyo babomamaki na etumba yango bazalaki ebele koleka baoyo babomamá na bitumba mosusu nyonso oyo ezalaki liboso na yango.

11. Mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi basalaki nini?

11 Danyele 11:27, 28 elobelaki makambo oyo ekosalema liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Elobaki ete mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi “bakokoba koloba lokuta na mesa moko.” Elobaki mpe ete mokonzi ya nɔrdi akokóma na “biloko ebele”; mpe yango nde esalemaki. Allemagne mpe Grande-Bretagne balobanaki ete bazali na mposa ya kimya, kasi ntango babandaki kobunda na 1914, emonanaki polele ete maloba yango ezalaki lokuta. Mpe bambula mingi liboso ya 1914, Allemagne ekómaki ekólo ya mibale oyo elekaki na bozwi na mokili mobimba. Na bongo, ebundaki na mokonzi ya sudi kasi elongaki te; yango ekokisaki esakweli ya Danyele 11:29 mpe ya eteni ya liboso ya vɛrsɛ 30.

BAKONZI BABUNDISI BASALELI YA NZAMBE

12. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi basalaki nini?

12 Kobanda 1914, mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bakómaki kobunda bango na bango mpe kobundisa lisusu mingi basaleli ya Nzambe. Na ndakisa, na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, guvɛrnema ya Allemagne mpe ya Grande-Bretagne enyokolaki basaleli ya Nzambe mpo baboyaki kokɔta na etumba. Mpe guvɛrnema ya États-Unis etyaki na bolɔkɔ bandeko mibali oyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola. Monyoko yango ekokisaki esakweli oyo ezali na Emoniseli 11:7-10.

13. Na bambula ya 1930 mpe na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya nɔrdi asalaki nini?

13 Na nsima, na bambula ya 1930, mpe mingimingi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya nɔrdi abundisaki basaleli ya Nzambe kozanga mawa. Ntango Banazi bakómaki koyangela Allemagne, Hitler ná bato na ye bapekisaki mosala ya basaleli ya Nzambe. Mokonzi ya nɔrdi abomaki basaleli ya Yehova soki 1500 mpe atindaki ebele mosusu na kaa ya bakangami. Danyele asakolaki makambo yango. Mokonzi ya nɔrdi apekisaki mosala ya kosakola mpe na ndenge yango, ‘akómisaki esika mosantu eloko mpamba’ mpe ‘alongolaki mbeka ya ntango nyonso.’ (Dan. 11:30b, 31a) Kutu, mokonzi na yango Hitler alapaki ndai ete akoboma basaleli nyonso ya Nzambe na Allemagne.

MOKONZI YA SIKA YA NƆRDI ABIMI

14. Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nani akómaki mokonzi ya nɔrdi? Limbolá.

14 Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Union soviétique ebɔtɔlaki bitúká mingi oyo Allemagne ezalaki koyangela mpe ekómaki mokonzi ya nɔrdi. Ndenge moko na boyangeli ya Banazi, Union soviétique enyokolaki moto nyonso oyo alukaki kotya losambo ya Nzambe ya solo na esika ya liboso.

15. Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya nɔrdi asalaki nini?

15 Mwa moke nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya sika ya nɔrdi, Union soviétique mpe bikólo oyo ezali kopesa yango mabɔkɔ, ebundisaki basaleli ya Nzambe. Ndenge kaka esakweli oyo ezali na Emoniseli 12:15-17 emonisi yango, mokonzi ya nɔrdi apekisaki mosala ya kosakola mpe atindaki ebele ya basaleli ya Yehova bakangami na Sibérie. Kutu na boumeli ya mikolo ya nsuka, mokonzi ya nɔrdi asopi “ebale” ya minyoko mpo na koluka kosukisa mosala ya basaleli ya Yehova, kasi azali kolonga te. *

16. Ndenge nini Union soviétique ekokisaki maloba oyo ezali na Danyele 11:37-39?

16 Tángá Danyele 11:37-39. Na kokokisama ya esakweli yango, mokonzi ya nɔrdi ‘atyelaki Nzambe ya batata na ye likebi te.’ Na ndenge nini? Lokola Union soviétique ezalaki na mokano ya kosilisa mangomba, elukaki kolɛmbisa nguya ya mangomba yango. Mpo na kokokisa mokano yango, na 1918, guvɛrnema ya Union soviétique epesaki mitindo ete liteya oyo elobaka ete Nzambe azalaka te, ebanda koteyama na biteyelo. Kasi, ndenge nini mokonzi ya nɔrdi “akopesa nkembo nde na nzambe ya bandako makasi?” Union soviétique ebimisaki mbongo mingi mpo na kokómisa limpinga ya basoda na yango makasi mpe esalaki bibundeli ebele ya nikleere mpo na kokómisa bokonzi na yango makasi. Nsukansuka, mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bakómaki na bibundeli minene ya makasi mpo na koboma ebele ya bato.

BANGUNA MIBALE BAYOKANI

17. “Eloko ya bosɔtɔ” oyo ezali koyeisa libebi ezali nini?

17 Mokonzi ya nɔrdi apesaki mokonzi ya sudi mabɔkɔ mpo na ‘kotya mpenza eloko ya bosɔtɔ oyo ezali koyeisa libebi.’ (Dan. 11:31) “Eloko ya bosɔtɔ” yango ezali ONU.

18. Mpo na nini ONU ebengami “eloko ya bosɔtɔ?”

18 ONU nde ebengami “eloko ya bosɔtɔ” mpo etutaka ntolo ete ekokoka kotya kimya na mokili​—likambo oyo kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosala. Esakweli elobi mpe ete eloko ya bosɔtɔ “ekoyeisa libebi” mpo ONU ekobundisa mangomba ya lokuta mpe ekobebisa yango.​—Talá etanda “Bakonzi mibale oyo bayokanaka te na ntango ya nsuka.”

NTINA YA LISOLO YANGO MPO NA BISO

19-20. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba lisolo yango? (b) Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna nini?

19 Ezali na ntina tóyeba lisolo yango mpo kobanda na 1870 tii na 1991, esakweli ya Danyele oyo elobelaki mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi ekokisamaki. Na yango, tokoki kotya motema ete eteni mosusu ya esakweli yango oyo etikali mpe ekokokisama.

20 Na 1991, Union soviétique ekweaki. Bongo nani nde mokonzi ya nɔrdi lelo oyo? Tokozwa eyano na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 128 Tóyika mpiko tii na nsuka

^ par. 5 Tozali komona polele ete esakweli ya Danyele oyo elobeli “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” ezali kokoba kokokisama. Nini endimisi biso yango? Mpe mpo na nini tosengeli kokanga ntina ya makambo oyo esakweli yango elobeli?

^ par. 5 Na kotalela makambo oyo tolobeli awa, emonani ete ebongi lisusu te kotánga Amperɛrɛ Aurélien ya Roma (270-275 T.B.) lokola “mokonzi ya nɔrdi” to mpe Mokonzi-mwasi Zénobie (267-272 T.B.) lokola “mokonzi ya sudi.” Yango ebongoli makambo oyo tobimisaki na buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!, mokapo 13 mpe 14.

^ par. 9 Na 1890, Mokonzi Wilhelm II alongolaki Bismarck na bokonzi.

^ par. 10 Basalaki makambo ebele oyo esalaki ete guvɛrnema yango ebungisa nguya na yango nokinoki. Na ndakisa, bazalaki lisusu kopesa mokonzi mabɔkɔ te, bayebisaki bato mosusu sekele na bango ya makambo etali bitumba, mpe batindaki mokonzi na makasi ete atika koyangela.

^ par. 15 Ndenge emonisami na Danyele 11:34, mokonzi ya nɔrdi atikaki konyokola bakristo mpo na mwa ntango. Na ndakisa, likambo yango esalemaki na 1991, ntango Union soviétique ekweaki.