Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 22

Monisá botɔndi mpo na makabo oyo emonanaka te

Monisá botɔndi mpo na makabo oyo emonanaka te

‘Tyá miso na yo na biloko oyo emonanaka te. Mpo biloko oyo emonanaka ezali ya ntango mokuse, kasi biloko oyo emonanaka te ezali ya seko.’​—2 KO. 4:18.

LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai

NA MOKUSE *

1. Yesu alobaki nini mpo na biloko ya motuya ya likoló?

TOKOKI te komona biloko nyonso ya motuya. Kutu biloko oyo eleki motuya ezali nde oyo emonanaka te. Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki biloko ya motuya ya likoló oyo ezali na valɛrɛ mingi koleka bozwi to mbongo. Na nsima, abakisaki boye: “Epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.” (Mat. 6:19-21) Ntango tomoni eloko moko ya motuya mingi, motema ekotinda biso tóluka kozwa yango. Soki tozali kosala nyonso mpo na kozala na boyokani ya malamu na Nzambe, yango ekomonisa ete tozali komibombela “biloko ya motuya na likoló.” Yesu alobaki ete biloko ya motuya ya ndenge wana ekoki kobebisama soki moke te, bakoki mpe koyiba yango te.

2. (a) Na kotalela 2 Bakorinti 4:17, 18, ntoma Paulo alendisi biso tótya miso na biso na nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Ntoma Paulo alendisi biso ‘tótya miso na biso na biloko oyo emonanaka te.’ (Tángá 2 Bakorinti 4:17, 18.) Biloko yango oyo emonanaka te ezali makabo ya motuya; na kati na yango tokoki mpe kotánga ebele ya mapamboli oyo tokozwa na mokili ya sika ya Nzambe. Na lisolo oyo tokolobela biloko ya motuya minei oyo emonanaka te mpe oyo tokoki kozwa banda sikoyo. Biloko yango ezali: Boninga na biso na Nzambe, likabo kitoko ya kobondela, lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, mpe lisalisi oyo Yehova, Kristo, mpe baanzelu bapesaka biso na mosala ya kosakola. Tokolobela mpe ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na makabo yango ya motuya oyo emonanaka te.

BONINGA NA YEHOVA

3. Wapi likabo oyo eleki ntina na makabo nyonso oyo emonanaka te, mpe nini esali ete tózwa yango?

3 Kozala moninga ya Yehova Nzambe nde likabo oyo eleki motuya kati na makabo oyo emonanaka te. (Nz. 25:14) Ndenge nini Nzambe akoki kosala boninga na bato ya masumu mpe atikala kaka mosantu? Likambo yango ekoki kosalema mpo mbeka ya lisiko ya Yesu ezali “kolongola lisumu ya mokili.” (Yoa. 1:29) Lokola ayebaki ete mokano na ye ya kotinda Mobikisi na mokili ekokokisama kaka, Yehova abangaki te kosala boninga na bato oyo bazalaki na bomoi liboso Kristo akufa.​—Rom. 3:25.

4. Tángá mwa bato oyo bakómaki baninga ya Nzambe liboso ete Kristo aya?

4 Tólobela mwa moke mwa ndambo ya bato oyo bakómaki baninga ya Nzambe liboso ete Kristo aya. Abrahama azalaki na kondima ya makasi mpenza. Mbula koleka 1 000 nsima ya liwa na ye, Yehova azalaki kaka kobenga ye “moninga na ngai.” (Yis. 41:8) Yango emonisi ete ata liwa ekoki te kokabola Yehova ná baninga na ye ya motema. Abrahama azalaki kaka na bomoi na makanisi ya Yehova. (Luka 20:37, 38) Ndakisa mosusu ezali ya Yobo. Ntango baanzelu bayanganaki na likoló, Yehova alobaki malamu mpo na Yobo mpe amonisaki ete atyelaka ye motema. Yehova abengaki ye moto oyo “azangi mbeba mpe azali sembo, abangaka Nzambe mpe akimaka mabe.” (Yobo 1:6-8) Yehova azalaki koyoka ndenge nini mpo na Danyele, oyo asalelaki ye na bosembo na boumeli ya bambula koleka 80 na mokili oyo bato na yango bazalaki kosambela Yehova te? Mbala misato mobimba baanzelu bayebisaki Danyele, oyo na ntango wana asilaki kokóma mobange ete, azali “moto oyo alingami mingi” na miso ya Nzambe. (Dan. 9:23; 10:11, 19) Yango endimisi biso ete Yehova azalaka na mposa makasi ya kosekwisa baninga na ye ya motema.​—Yobo 14:15.

(Talá paragrafe 5) *

5. Esengeli kosala nini mpo na kokóma moninga ya Yehova?

5 Lelo oyo, bamilio ya bato ya kozanga kokoka bazali baninga ya Yehova. Toyebi yango mpo ezali na ebele ya mibali, basi, mpe bana na mokili mobimba oyo bazali komonisa na nzela ya misala na bango ete balingi kozala baninga ya Yehova. Yehova azalaka “moninga ya motema ya bato ya kolongobana.” (Mas. 3:32) Mbeka ya lisiko ya Yesu nde esali ete bato yango bázala baninga ya Yehova. Na nzela ya mbeka yango, tokoki komipesa epai ya Yehova mpe kozwa batisimo. Ntango tomipesi mpe tozwi batisimo, tokɔtaka na libota ya bamilio ya bato oyo bamipesá na Nzambe, bazwá batisimo mpe bazali kosepela kozala ‘baninga ya motema’ ya moto oyo aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba!

6. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka boninga na biso na Nzambe na motuya mingi?

6 Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka boninga na biso na Nzambe na motuya mingi? Na ndakisa ya Abrahama mpe Yobo oyo batikalaki sembo epai ya Nzambe na boumeli ya bambula koleka nkama moko, tosengeli kotikala sembo ata soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi na mokili oyo ya mabe. Lokola Danyele, tosengeli kozwa boninga na biso na Nzambe na motuya mingi koleka ata bomoi na biso moko. (Dan. 6:7, 10, 16, 22) Na lisalisi ya Yehova, tokoki koyika mpiko ata liboso ya mokakatano ya ndenge nini mpe kobatela boyokani na biso na ye.​—Flp. 4:13.

LIBONDELI

7. (a) Na kotalela Masese 15:8, Yehova ayokaka ndenge nini mpo na mabondeli na biso? (b) Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli na biso?

7 Eloko mosusu ya motuya oyo emonanaka te ezali libondeli. Baninga ya motema basololaka. Ezali mpe bongo mpo na boninga na biso na Nzambe. Yehova asololaka na biso na nzela ya Liloba na ye, oyo na kati na yango ayebisaka biso makanisi mpe mayoki na ye. Biso mpe tosololaka na ye na nzela ya libondeli. Ntango tobondelaka, toyebisaka ye makanisi na biso ya motema mpe ndenge oyo tomiyokaka mpenza. Yehova asepelaka koyoka mabondeli na biso. (Tángá Masese 15:8.) Lokola azali moninga na biso ya motema, asukaka kaka te na koyoka mabondeli na biso kasi ayanolaka mpe biso. Na bantango mosusu ayanolaka noki, kasi na bantango mosusu mpe ekoki kosɛnga tókoba kobondela mpo na likambo moko. Kasi ezala ndenge nini, tondimaka ete akoyanola biso na ntango oyo ebongi mpe na lolenge oyo eleki malamu. Ya solo, eyano oyo Nzambe akoki kopesa ekoki kokesana na oyo tokanisaki. Na ndakisa, na esika Nzambe alongola biso mokakatano moko, akoki nde kopesa biso bwanya mpe makasi “ya koyikela yango mpiko.”​—1 Ko. 10:13.

(Talá paragrafe 8) *

8. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na libondeli, likabo oyo Nzambe apesá biso?

8 Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na libondeli, likabo ya motuya mingi? Lolenge moko ya komonisa botɔndi ezali ya kotosa toli ya Biblia oyo esɛngi biso ‘tóbondelaka ntango nyonso.’ (1 Tes. 5:17) Yehova atindaka biso na makasi te ete tóbondelaka ye. Kasi atosaka bonsomi na biso ya kopona mpe alendisi biso ‘tótingama na mabondeli.’ (Rom. 12:12) Na yango, tokomonisa botɔndi soki mokolo na mokolo tobondelaka mbala mingi. Tosengeli mpe kobosanaka te kopesa Yehova matɔndi mpe kokumisa ye ntango tozali kobondela.​—Nz. 145:2, 3.

9. Ndeko moko ayokaka ndenge nini mpo na libondeli, bongo yo, oyokaka ndenge nini?

9 Wana tozali kokoba kosalela Yehova mpe komona ndenge azali koyanola na mabondeli na biso, na ntembe te botɔndi na biso mpo na likabo ya libondeli ekokóma lisusu makasi. Tózwa ndakisa Chris, ndeko mobali moko oyo asali bambula koleka 47 na mosala ya ntango nyonso. Alobi boye: “Nayokaka esengo mingi kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kobondela Yehova. Ezalaka malamu kosolola na Yehova ntango moi ezali kobima mpe ezali kongɛngisa biloko nyonso! Yango etindaka ngai napesa ye matɔndi mpo na makabo nyonso oyo apesá biso, ata mpe likabo ya kobondela. Na nsima, ntango nabondelaka ye na nsuka ya mokolo, nayokaka kimya na motema mpo nayebi ete nazali kokende kolala na lisosoli ya pɛto.”

ELIMO SANTU

10. Mpo na nini tosengeli kozwa na motuya mingi likabo ya elimo santu?

10 Elimo santu ya Nzambe ezali moko ya makabo oyo tosengeli kozwa na motuya mingi. Yesu alendisaki biso tókoba kosɛnga elimo santu. (Luka 11:9, 13) Na nzela ya elimo na ye, Yehova apesaka biso nguya, kutu ata “nguya oyo eleki makasi.” (2 Ko. 4:7; Mis. 1:8) Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, tokoki koyikela ata mikakatano ya ndenge nini mpiko.

(Talá paragrafe 11) *

11. Na ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa biso?

11 Elimo santu ekoki kosalisa biso tókokisa mikumba na biso na mosala ya Nzambe. Ekoki mpe kokolisa makoki na biso. Ya solo, soki tolongaka na makambo nyonso oyo tosalaka na mosala ya Nzambe, ezalaka mpo na lisalisi ya elimo santu.

12. Na kotalela Nzembo 139:23, 24, tokoki kobondela mpo elimo santu esalisa biso na makambo nini?

12 Lolenge mosusu oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na likabo ya elimo santu, ezali ya kobondela ete esalisa biso tóyeba makanisi mpe bamposa ya mabe oyo ezali na mitema na biso. (Tángá Nzembo 139:23, 24.) Soki tosali bongo, Yehova, na nzela ya elimo na ye, akoki kosalisa biso tómona makanisi mpe bamposa ya mabe. Mpe soki toyebi yango, tosengeli kobondela Yehova mpo elimo na ye epesa biso makasi ya kobundisa mpe kolonga bamposa yango. Na ndenge yango, Yehova akomona ete tozali na ekateli makasi ya koboya kosala eloko nyonso oyo ekoki kotinda ye aboya kopesa biso elimo santu na ye.​—Ef. 4:30.

13. Ndenge nini tokoki kokóma lisusu na botɔndi mingi mpo na likabo ya elimo santu?

13 Tokoki komonisa botɔndi mingi mpo na likabo ya elimo santu soki tozali kokanisa na makambo oyo yango ezali kosala na mikolo na biso. Liboso ete Yesu amata na likoló, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Maloba oyo ezali kokokisama na lolenge moko ya kokamwa. Na lisalisi ya elimo santu, bato koleka milio 8 bazali kosambela Yehova na mokili mobimba. Lisusu, tozali na esengo ya kofanda na paradiso na biso ya elimo, mpo elimo santu ezali kosalisa biso tókolisa bizaleli malamu lokola, bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, mpe komipekisa; bizaleli yango nyonso esali “mbuma ya elimo.” (Ga. 5:22, 23) Ya solo, elimo santu ezali mpenza likabo moko ya motuya mingi!

KOSALA ELONGO NA YEHOVA, YESU, MPE BAANZELU

14. Lisalisi nini oyo emonanaka te tozwaka ntango tozali kosakola?

14 “Kosala elongo” na Yehova, Yesu, mpe baanzelu, ezali mpe moko ya makabo ya motuya oyo emonanaka te. (2 Ko. 6:1) Tosalaka elongo na bango ntango nyonso oyo topesaka mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Ntoma Paulo alobaki mpo na ye moko mpe mpo na bato oyo basakolaka ete “tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9) Ntango tosakolaka, tosalaka mpe elongo na Yesu. Na ndenge nini? Ntango Yesu asilisaki kopesa bayekoli na ye etinda ya ‘kokende mpe ya kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso,’ abakisaki boye: “Nazali elongo na bino.” (Mat. 28:19, 20) Baanzelu mpe basalisaka biso? Ɛɛ, kutu tozali mpenza na botɔndi ndenge baanzelu batambwisaka biso ntango tozali koyebisa ‘nsango malamu ya seko epai ya bato oyo bafandi na mabele!’​—Em. 14:6.

15. Pesá ndakisa moko ya Biblia oyo emonisi mosala monene oyo Yehova asalaka ntango tozali na mosala ya kosakola.

15 Lisalisi oyo tozwaka epai ya Yehova, Yesu, mpe baanzelu esalisaka biso tókokisa makambo nini? Ntango tozali kolona mboto ya nsango ya Bokonzi, mboto mosusu ekweaka na mitema ya malamu mpe ekolaka. (Mat. 13:18, 23) Nani asalaka ete mboto yango ekola mpe ebota mbuma? Yesu alimbolaki ete moto moko te akoki kokóma moyekoli na ye soki “Tata . . . abendi ye te.” (Yoa. 6:44) Biblia epesi ndakisa moko ya malamu mpo na komonisa ndenge likambo yango esalemaka. Kanisá lisusu mokolo oyo ntoma Paulo apesaki litatoli na etuluku moko ya basi libándá ya engumba Filipi. Biblia elobi boye mpo na Lidia, moko ya basi yango: “Yehova afungolaki motema na ye mpo atya likebi na makambo oyo Paulo azalaki koloba.” (Mis. 16:13-15) Lokola Lidia, Yehova abendi bamilio ya bato ya ndenge wana.

16. Soki mosala na biso ezali kobota mbuma, nani asengeli kozwa lokumu?

16 Soki mosala na biso ya kosakola ezali kobota mbuma, nani asengeli kozwa lokumu? Ntoma Paulo apesaki eyano na motuna yango ntango akomelaki lisangá ya Korinti. Akomaki boye: “Ngai nalonaki, Apolosi amwangisaki mai, kasi Nzambe azalaki kokolisa. Na yango, moto oyo azali kolona azali eloko te ndenge moko mpe oyo azali komwangisa mai, kasi kaka Nzambe moto azali kokolisa.” (1 Ko. 3:6, 7) Ndenge moko na Paulo, tosengeli ntango nyonso kopesa Yehova lokumu soki mosala na biso eboti mbuma.

17. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na libaku oyo tozali na yango ya “kosala elongo” na Nzambe, Yesu, mpe baanzelu?

17 Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na libaku oyo tozali na yango ya “kosala elongo” na Nzambe, Yesu, mpe baanzelu? Tokomonisa botɔndi soki tozali koluka na molende mpenza mabaku nyonso mpo na kosakwela basusu nsango malamu. Tokoki kosala yango na ndenge mingi, na ndakisa kosakola “na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.” (Mis. 20:20) Bandeko mingi mpe basepelaka kopesa litatoli ya libaku malamu. Soki bakutani na mopaya moko, bapesaka ye mbote na boboto mpenza mpe balukaka kobanda lisolo. Soki moto yango asepeli, na mayele mpenza babandaka kosakwela ye nsango ya Bokonzi.

(Talá paragrafe 18) *

18-19. (a) Ndenge nini tomwangisaka mai na mboto ya solo? (b) Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ndenge Yehova asalisaki moyekoli moko ya Biblia.

18 Lokola tozali “kosala elongo na Nzambe,” tosengeli kosuka kaka te na kolona mboto ya solo, kasi tosengeli mpe komwangisela yango mai. Ntango moto moko asepeli na nsango na biso, tosengeli kosala nyonso mpo tózongela ye to kozwa bibongiseli mpo ndeko moko akende kokutana na moto yango mpe abanda koyekola na ye Biblia. Tozalaka na esengo ya komona ndenge oyo Yehova asalisaka moto yango abongola makanisi mpe mayoki na ye.

19 Tózwa ndakisa ya Raphalalani, nganga-nkisi moko na Afrique du Sud. Asepelaki mingi na makambo oyo azalaki koyekola na Biblia. Kasi azalaki na mokakatano ya kondima oyo Biblia elobi na likambo etali kosolola na bankɔkɔ oyo bakufá. (Mib. 18:10-12) Mokemoke, atikaki Nzambe abongola makanisi na ye. Na nsima, Raphalalani atikaki mosala na ye ya bonganga-nkisi atako azalaki na mosala mosusu te mpo na kozwa mbongo. Sikoyo, azali na mbula 60. Alobi boye: “Nazali na botɔndi ndenge Batatoli ya Yehova basalisaki ngai na makambo mingi, na ndakisa mpo nazwa mosala. Kasi oyo eleki nyonso, napesi Yehova matɔndi mingi ndenge asalisi ngai nabongola bomoi na ngai, nazwa batisimo mpo nakóma Motatoli ya Yehova mpe nasakolaka nsango malamu.”

20. Ozwi ekateli ya kosala nini?

20 Na lisolo oyo tolobeli makabo minei ya motuya oyo emonanaka te. Na makabo yango nyonso, oyo eleki monene ezali libaku ya kozala baninga ya motema ya Yehova. Soki tokómi baninga ya motema ya Yehova, yango ekosala ete tozwa mpe makabo mosusu ya motuya oyo emonanaka te; na ndakisa kopusana penepene na ye na nzela ya libondeli, kozwa lisalisi ya elimo santu mpe komona ndenge Yehova, Yesu, mpe baanzelu basalisaka biso na mosala ya kosakola. Tiká ete tózala na ekateli ya kokómisa lisusu makasi botɔndi na biso mpo na makabo wana ya motuya oyo emonanaka te. Mpe tókoba kopesa Yehova matɔndi ndenge azali Moninga oyo aleki malamu.

LOYEMBO 145 Nzambe alaki biso Paradiso

^ par. 5 Na lisolo oyo eleki, tolobelaki mwa makabo ndenge na ndenge oyo Nzambe apesá biso, mpe oyo tokoki komona na miso. Na lisolo oyo, tokotalela mwa makabo mosusu oyo Nzambe apesá biso kasi oyo emonanaka boye te na miso. Mpe tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na makabo yango. Yango ekosalisa biso tózala lisusu na botɔndi mingi epai ya Yehova, Nzambe oyo apesá biso makabo yango.

^ par. 58 ELILINGI: (1) Ndeko mwasi moko azali kotala biloko oyo Yehova akelá, mpe yango etindi ye amanyola na boninga na ye ná Yehova.

^ par. 60 ELILINGI: (2) Azali kobondela Yehova apesa ye makasi ya kopesa litatoli.

^ par. 62 ELILINGI: (3) Elimo santu esalisi ye azala na mpiko ya kopesa litatoli ya libaku malamu.

^ par. 64 ELILINGI: (4) Azali koyekola Biblia na moto oyo akutanaki na ye ntango azalaki kopesa litatoli ya libaku malamu. Na lisalisi ya baanzelu, ndeko mwasi yango azali kosakola mpe koyekola na moto Biblia.