Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 20

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na banguna ya Nzambe?

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na banguna ya Nzambe?

“Bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre ete Har–Magedone.”​—EM. 16:16.

LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika

NA MOKUSE *

1. Na kotalela mokanda ya Emoniseli, Satana azali na nini mpe azali kosala basaleli ya Nzambe nini?

 MOKANDA ya Emoniseli emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela na likoló mpe ete babengani Satana kuna na likoló. (Em. 12:1-9) Lokola babengani ye na likoló, kimya ekɔti kuna, kasi yango ebimiseli biso mikakatano. Mpo na nini? Mpo Satana azali na nkanda makasi mpe azali kobundisa basaleli ya sembo ya Yehova oyo bazali awa na mabele.​—Em. 12:12, 15, 17.

2. Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova?

2 Ndenge nini tokoki kotikala sembo epai ya Yehova atako Satana azali kobundisa biso? (Em. 13:10) Koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya ekosalisa biso. Na ndakisa, na mokanda ya Emoniseli, ntoma Yoane alobeli mapamboli mosusu oyo tokozwa mosika te. Kobebisama ya banguna ya Nzambe ezali mpe na kati ya mapamboli yango. Sikoyo tótalela makambo oyo mokanda ya Emoniseli elobi mpo na banguna yango mpe makambo oyo ekokómela bango.

BANGUNA YA NZAMBE BAMONISAMI “NA BILEMBO”

3. Wapi mwa bilembo oyo mokanda ya Emoniseli emonisi?

3 Na ebandeli ya vɛrsɛ ya liboso, mokanda ya Emoniseli elobeli makambo oyo tozali kotánga “na bilembo,” elingi koloba, na maloba ya elilingi. (Em. 1:1) Emonisi banguna ya Nzambe na maloba ya elilingi. Tozali komona banyama mabe. Na ndakisa, ezali na “nyama mabe moko ebimi na mbu.” Ezali na “maseke zomi mpe na mitó nsambo.” (Em. 13:1) Mpe na nsima ya nyama yango, “nyama mabe mosusu ebimi na mabele.” Nyama yango ezali koloba lokola dragɔ mpe ezali kosala ete “mɔtɔ euta na likoló.” (Em. 13:11-13) Mpe tozali komona nyama mosusu, “nyama mabe moko ya langi ya motane makasi,” oyo mwasi moko ya ndumba afandeli yango mpe azali kotambwisa yango. Banyama wana misato ya mabe ezali komonisa banguna ya Yehova Nzambe mpe ya Bokonzi na ye. Yango wana, ezali na ntina mingi tóyeba banyama yango.​—Em. 17:1, 3.

BIBAKATA YA NYAMA MINEI

Ezali “kobima na mbu.” (Dan. 7:1-8, 15-17) Ezali komonisa baguvɛrnema oyo eyangelaki mpe enyokolaki mpenza basaleli ya Nzambe, kobanda na eleko ya Danyele (paragrafe 4, 7)

4-5. Ndenge nini makambo oyo ezali na Danyele 7:15-17 esalisi biso tókanga ntina ya bilembo yango?

4 Liboso tóluka koyeba banani bazali banguna yango, tosengeli kokanga ntina ya maloba yango ya elilingi. Tokokanga ntina na yango soki totiki Biblia yango moko elimbola yango. Bilembo mingi oyo ezali na mokanda ya Emoniseli esili kolimbolama na mikanda mosusu ya Biblia. Na ndakisa, mosakoli Danyele alɔtaki ndɔtɔ moko oyo emonisi “bibakata ya nyama minei ezalaki kobima na mbu.” (Dan. 7:1-3) Danyele apesaki ndimbola na yango. Bibakata ya nyama yango ezali komonisa “bakonzi,” to baguvɛrnema minei. (Tángá Danyele 7:15-17.) Ndimbola yango emonisi polele ete banyama yango oyo mokanda ya Emoniseli elobeli esengeli mpe komonisa bakonzi.

5 Sikoyo tótalela bilembo mosusu oyo mokanda ya Emoniseli emonisi. Ntango tozali kotalela yango, tokomona ndenge Biblia esalisi biso tóyeba ndimbola ya bilembo yango. Tokobanda na mitindo ya banyama mabe yango. Ya liboso, tokoluka koyeba banani bazali komonisa banyama yango. Ya mibale, tokomona makambo oyo ekokómela banyama yango. Na nsuka, tokolobela soki makambo yango elimboli nini mpo na biso.

BIBLIA EMONISI POLELE BANGUNA YA NZAMBE

NYAMA MABE YA MITÓ NSAMBO

Ebimi “na mbu” mpe ezali na mitó nsambo, maseke zomi, mpe mitole zomi. (Em. 13:1-4) Ezali komonisa baguvɛrnema nyonso oyo eyangeli bato tii lelo oyo. Mitó nsambo ezali komonisa baguvɛrnema nsambo oyo eyangelaki mpe enyokolaki mpenza basaleli ya Nzambe (paragrafe 6-8)

6. Ndenge emonisami na Emoniseli 13:1-4, nyama mabe ya mitó nsambo ezali komonisa nini?

6 Nyama mabe ya mitó nsambo ezali nini? (Tángá Emoniseli 13:1-4.) Tomoni ete nyama yango ezali lokola nkoi, kasi makolo na yango lokola oyo ya urse, monɔkɔ na yango lokola oyo ya nkɔsi, mpe ezali na maseke zomi. Banyama minei oyo mokanda ya Danyele mokapo 7 elobeli, ezali mpe na makambo wana nyonso. Kasi, mokanda ya Emoniseli elobeli makambo nyonso oyo etali banyama minei oyo mokanda ya Danyele elobeli kaka na nyama moko. Nyama mabe yango ezali komonisa kaka te guvɛrnema moko, to bokonzi moko ya nguya na mokili mobimba. Elobi ete ezali na bokonzi “likoló ya mabota nyonso mpe mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso.” Yango esengeli kozala guvɛrnema moko monene oyo eleki na nguya guvɛrnema nyonso mosusu. (Em. 13:7) Yango wana, nyama mabe yango, esengeli komonisa baguvɛrnema nyonso oyo eyangeli bato tii lelo oyo. *​—Mos. 8:9.

7. Mokomoko ya mitó nsambo ya nyama mabe ezali komonisa nini?

7 Mokomoko ya mitó yango nsambo ezali komonisa nini? Emoniseli mokapo 17 esalisi biso tózwa eyano na motuna wana mpo elobeli elilingi ya nyama yango oyo Emoniseli mokapo 13 elobeli. Totángi boye na Emoniseli 17:10: “Ezali na bakonzi nsambo: mitano bakweá, moko azali, mpe mosusu ayei naino te, kasi ntango akoya akoumela mwa ntango moke.” Na baguvɛrnema nyonso ya nguya oyo Satana asalelá, oyo elekaki na nguya ezali nsambo oyo ekokanisami na “mitó.” Baguvɛrnema yango ya nguya eyangelaki basaleli ya Nzambe, mpe enyokolaki mpenza bango. Ntango ntoma Yoane azalaki na bomoi, mitano na yango esilaki koyangela: Ezipito, Asiri, Babilone, Bamede ná Baperse, mpe Grɛsi. Ntango ntoma Yoane azwaki emonaneli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli, Roma oyo ezalaki ekólo ya motoba oyo elekaki na nguya na mokili mobimba ezalaki naino koyangela. Ekólo nini ekozala motó to bokonzi ya nsambo to ya nsuka oyo eleki na nguya na mokili mobimba?

8. Ekólo nini ezali komonisa motó ya nsambo ya nyama mabe?

8 Sikoyo tokomona ndenge bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele esalisi biso tóyeba ekólo nini ezali komonisa motó ya nsuka to ya nsambo ya nyama mabe. Ekólo nini oyo eleki na nguya na mokili mobimba ezali koyangela na ntango oyo ya nsuka, elingi koloba, na “mokolo ya Nkolo”? (Em. 1:10) Yango esangisi bikólo mibale, elingi koloba, Royaume-Uni mpe États-Unis d’Amérique, ebengamaka na maloba mosusu Anglo-Américain, bokonzi oyo eleki bikólo nyonso na nguya. Na yango, tokoki koloba ete yango nde motó ya nsambo ya nyama mabe oyo elobelami na Emoniseli 13:1-4.

NYAMA MABE YA MASEKE MIBALE LOKOLA MWANA-MPATE

Ebimi “na mabele” mpe ezali koloba “lokola dragɔ.” Ezali kosala ete “mɔtɔ euta na likoló” mpe kosala bilembo lokola “mosakoli ya lokuta.” (Em. 13:11-15; 16:13; 19:20) Bokonzi ya Anglo-américain emonisami na nyama ya maseke mibale oyo ebengami mosakoli ya lokuta mpo ezali kokosa bato oyo bafandi na mabele mpe koyebisa bango ete “básala elilingi” ya “nyama mabe” oyo ezali na mitó nsambo mpe maseke zomi (paragrafe 9)

9. Nyama mabe oyo ezali na “maseke mibale lokola mwana-mpate” ezali komonisa nini?

9 Emoniseli mokapo 13 ekobi koyebisa biso ete motó yango ya nsambo, Anglo-Américain, bokonzi oyo eleki bikólo nyonso na nguya, ezali mpe kosala lokola nyama mabe oyo ezali na “maseke mibale lokola mwana-mpate, kasi ezalaki koloba lokola dragɔ.” Nyama yango “ezali kosala bilembo minene, bongo ezali kosala ete ata mɔtɔ euta na likoló ekita tii na mabele na miso ya bato.” (Em. 13:11-15) Emoniseli mokapo 16 mpe 19 elobeli nyama mabe yango lokola “mosakoli ya lokuta.” (Em. 16:13; 19:20) Danyele alobeli likambo ya ndenge wana ete Anglo-Américain, bokonzi oyo eleki bikólo nyonso na nguya ‘ekobebisa mpenza kobebisa.’ (Dan. 8:19, 23, 24) Yango esalemaki mpenza na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Babɔmbi mibale ya makasi oyo etyaki nsuka na etumba yango esalemaki na bato ya siansi oyo bazalaki bato ya Angleterre mpe ya Amérique. Na yango, Anglo-Américain, bokonzi oyo eleki bikólo nyonso na nguya, esalaki ete “mɔtɔ euta na likoló ekita tii na mabele.”

NYAMA MABE MOKO YA LANGI YA MOTANE MAKASI

Mwasi moko ya ndumba, Babilone Monene, nde azali kotambwisa nyama yango. Balobi ete nyama yango ezali mokonzi ya mwambe. (Em. 17:3-6, 8, 11) Na ebandeli mwasi ya ndumba azali kotambwisa nyama mabe yango, kasi na nsima nyama mabe yango ebalukeli ye mpe ebomi ye. Mwasi yango ya ndumba azali komonisa lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta. Nyama yango ezali ONU, oyo ezali komemela ebongiseli ya politiki ya mokili matomba (paragrafe 10, 14-17)

10. “Elilingi ya nyama mabe” ezali komonisa nini? (Emoniseli 13:14, 15; 17:3, 8, 11)

10 Tólobela nyama mosusu ya mabe. Nyama yango ezali komonana lokola nyama mabe ya mitó nsambo, kasi ezali ya langi ya motane makasi. Ebengami “elilingi ya nyama mabe” mpe elobelami lokola “mokonzi ya mwambe.” * (Tángá Emoniseli 13:14, 15; 17:3, 8, 11.) Mokanda ya Emoniseli elobi ete “mokonzi” yango azalaki, na ntango moko boye azalaki te mpe na nsima azongaki lisusu na bomoi. Yango ezali komonisa mpenza ONU, oyo ezali komemela ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba matomba! Na ebandeli eyebanaki na nkombo Société des Nations. Na nsima ezalaki te na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mpe na nsima ezongaki lisusu na bomoi na nkombo ONU.

11. Baguvɛrnema ya mokili oyo ezali kolendisa bato básala nini, mpe mpo na nini tosengeli te kobanga baguvɛrnema yango?

11 Na nzela ya maloba na bango, bakonzi ya baguvɛrnema ya mokili oyo, balendisaka bato bátɛmɛla Yehova mpe basaleli na ye. Na ndenge ya elilingi, bazali koyanganisa na esika moko “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” na etumba ya Armagedone, oyo ezali “mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 16:13, 14, 16) Kasi tokobanga eloko moko te. Mpo Yehova Nzambe na biso monene, akosala nokinoki mpo na kobikisa bato nyonso oyo bapesaka boyangeli na ye mabɔkɔ.​—Ezk. 38:21-23.

12. Nini ekokómela banyama yango nyonso?

12 Nini ekokómela banyama yango nyonso? Emoniseli 19:20 eyanoli boye: “Bakangaki nyama mabe, elongo na mosakoli ya lokuta oyo asalaki bilembo liboso na yango oyo na nzela na yango akosaki bato oyo bazwaki elembo ya nyama mabe mpe bato oyo bazali kosambela elilingi na yango. Bango mibale babwakamaki na bomoi na laki ya mɔtɔ oyo ezali kopela na sufulu.” Na yango, atako ezali naino koyangela, baguvɛrnema yango oyo ezali banguna ya Nzambe ekobomama mpo na libela.

13. Baguvɛrnema mosusu ezali kotya bakristo mpanzi likoló mpo básala nini?

13 Yango elimboli nini mpo na biso? Lokola tozali bakristo, tosengeli kozala sembo epai ya Nzambe mpe Bokonzi na ye. (Yoa. 18:36) Mpo tósala bongo, tosengeli koboya kokɔta na makambo ya politiki ya mokili oyo. Kasi ekoki kozala mpasi tóboya kokɔta na makambo ya politiki ya mokili oyo, mpo baguvɛrnema yango ezali kotya biso mpanzi likoló mpo tópesa yango mabɔkɔ, ezala na maloba mpe na misala. Baoyo bazali kondima kopesa baguvɛrnema yango mabɔkɔ bazali kozwa elembo ya nyama mabe yango. (Em. 13:16, 17) Kasi moto nyonso oyo azwi elembo yango, Yehova akondima ye te mpe akozwa bomoi ya seko te. (Em. 14:9, 10; 20:4) Yango wana, ezali na ntina mingi tóboya mpenza kokɔta na makambo ya politiki, ata soki baguvɛrnema ezali kotya biso mpanzi likoló mpo tópesa yango mabɔkɔ!

MWASI YA NDUMBA MONENE ABEBISAMI NA NDENGE YA NSƆMƆ

14. Ndenge emonisami na Emoniseli 17:3-5, likambo nini ya kokamwa Yoane amonaki na nsima?

14 Ntoma Yoane alobi ete ‘akamwaki mpenza kokamwa’ ntango amonaki likambo mosusu. Likambo nini? Mwasi moko afandeli moko ya banyama yango ya nsɔmɔ mpe azali kotambwisa yango. (Em. 17:1, 2, 6) Azali komonana lokola “mwasi ya ndumba monene” mpe abengami “Babilone Monene.” Azali kosala “pite” ná “bakonzi ya mabele.”​—Tángá Emoniseli 17:3-5.

15-16. “Babilone Monene” ezali nini, mpe ndenge nini toyebi yango?

15 “Babilone Monene” ezali nini? Mwasi yango akoki te komonisa ebongiseli moko ya politiki mpo balobi ete azali kosala pite ná bakonzi ya politiki ya mokili oyo. (Em. 18:9) Kutu, asalaka makasi akonza bakonzi yango, na maloba ya elilingi, atambwisa bango. Longola yango, akoki te komonisa ebongiseli ya mombongo ya lokoso ya mokili ya Satana. Mpamba te ebongiseli yango elobelami na mokanda ya Emoniseli na esika mosusu mpe ebengami “bato ya mombongo na mabele.”​—Em. 18:11, 15, 16.

16 Na Biblia, maloba “mwasi ya ndumba” ekoki kosalelama mpo na bato oyo babɛtaka ntolo ete basalelaka Nzambe, kasi bamikɔtisaka na mitindo nyonso ya losambo ya bikeko to na maloba mosusu bamikómisaka baninga ya mokili. (1 Nt. 5:25; Yak. 4:4) Nzokande, Biblia elobi ete baoyo basambelaka Nzambe na bosembo mpenza bazali “pɛto” to “bangɔndɔ.” (2 Ko. 11:2; Em. 14:4) Babilone ya kala ezalaki esika monene ya losambo ya lokuta. Yango wana, Babilone Monene ezali komonisa mitindo nyonso ya losambo ya lokuta. Kutu, ezali lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta.​—Em. 17:5, 18; talá na site Internet jw.org lisolo “Babilone Monene ezali nini?

17. Nini ekokómela Babilone Monene?

17 Nini ekokómela Babilone Monene? Emoniseli 17:16, 17 eyanoli na motuna wana na lolenge oyo: “Maseke zomi oyo omonaki, ná nyama mabe, ekoyina mwasi wana ya ndumba mpe ekopanza ye mpe ekotika ye bolumbu, mpe ekolya misuni na ye mpe ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ. Mpo Nzambe atye yango na mitema na bango mpo na kokokisa likanisi na ye.” Na ntembe te, Yehova akotinda bikólo esalela nyama mabe ya langi ya motane makasi, elingi koloba, ONU, mpo ebalukela lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta mpe eboma yango mpo na libela.​—Em. 18:21-24.

18. Ndenge nini tokoki komindimisa ete tozali te kopesa Babilone Monene mabɔkɔ?

18 Yango elimboli nini mpo na biso? Tosengeli kobatela “losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso.” (Yak. 1:27) Tosengeli ata moke te kotika ete tókosama na mateya ya lokuta, tómikɔtisa na bafɛti ya bapakano, bizaleli ya mbindo mpe misala ya bilimo mabe ya Babilone Monene! Lisusu, tosengeli kokoba koyebisa bato ‘bábima kati na ye,’ mpo bákoka te kozala na ngambo na miso ya Nzambe mpo na masumu ya Babilone Monene.​—Em. 18:4.

KOSAMBISAMA YA MONGUNA MONENE YA NZAMBE

DRAGƆ MONENE YA LANGI YA MOTANE NGWAA

Satana azali kopesa nyama mabe bokonzi. (Em. 12:3, 9, 13; 13:4; 20:2, 10) Lokola Satana azali monguna monene ya Yehova, akobwakama na libulu mozindo na boumeli ya mbula 1 000. Nsima na yango, Satana akobwakama na kati ya “laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu.”(paragrafe 19-20)

19. “Dragɔ moko monene ya langi ya motane ngwaa” ezali nani?

19 Mokanda ya Emoniseli elobeli mpe “dragɔ moko monene ya langi ya motane ngwaa.” (Em. 12:3) Dragɔ yango ebundisaka Yesu ná baanzelu na ye. (Em. 12:7-9) Ezali kobundisa basaleli ya Nzambe, mpe ezali kopesa banyama mabe to baguvɛrnema ya bato bokonzi. (Em. 12:17; 13:4) Dragɔ yango ezali nani? Ezali “nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana.” (Em. 12:9; 20:2) Ye nde azali kotambwisa banguna nyonso ya Yehova.

20. Nini ekokómela Dragɔ yango?

20 Nini ekokómela Dragɔ yango? Emoniseli 20:1-3 elimboli ete anzelu moko akobwaka Satana na libulu moko mozindo. Ekozala lokola bolɔkɔ mpo na ye. Na ntango wana ya bokangami, Satana “[akokosa] lisusu bikólo te tii ntango mbula nkóto moko (1 000) yango ekosuka.” Nsukansuka, Satana ná bademo na ye bakobebisama mbala moko mpe mpo na libela, yango ekomonisa ete babwakami na “kati ya laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu.” (Em. 20:10) Meká komona na makanisi ndenge mokili ekozala wana Satana ná bademo na ye bazali te. Ekozala ntango moko kitoko mpenza!

21. Mpo na nini tosengeli kosepela na makambo oyo toyekoli na mokanda ya Emoniseli?

21 Tolendisami mpenza ndenge tokangi ntina ya bilembo yango oyo mokanda ya Emoniseli emonisi! Tosuki kaka te na koyeba banguna ya Yehova, kasi tomoni mpe makambo oyo ekokómela bango. Ya solo, “esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo”! (Em. 1:3) Kasi ntango banguna ya Nzambe bakolongolama, mapamboli nini bato bakozwa? Tokolobela yango na lisolo ya nsuka oyo elobeli mokanda ya Emoniseli.

LOYEMBO 23 Yehova abandi koyangela

^ Mokanda ya Emoniseli emonisi na bilembo banani bazali banguna ya Nzambe. Mokanda ya Danyele esalisi biso tóyeba soki bilembo yango elimboli nini. Na lisolo oyo, tokomona ndenge bisakweli mosusu ya Danyele ekokani ná oyo ezali na mokanda ya Emoniseli. Yango ekosalisa biso tóyeba banani bazali banguna ya Nzambe. Na nsima, tokolobela makambo oyo ekokómela bango.

^ Likambo mosusu emonisi ete nyama mabe ya mitó nsambo yango ezali komonisa baguvɛrnema nyonso, mpo ezali na “maseke zomi.” Na Biblia, mbala mingi motángo zomi emonisaka biloko oyo ezali ya kokoka.

^ Na bokeseni na nyama mabe ya liboso, elilingi yango ezali te na mitole na maseke na yango. (Em. 13:1) Ezali mpo ‘euti na bakonzi mosusu nsambo’ mpe bakonzi yango nde bazali kopesa yango nguya na bango.​—Talá na site Internet jw.org lisolo “Nyama mabe ya langi ya motane makasi oyo Emoniseli mokapo 17 elobeli ezali nini?