Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 19

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na yo lelo oyo?

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na yo lelo oyo?

Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi . . . maloba ya esakweli oyo.”​—EM. 1:3.

LOYEMBO 15 Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!

NA MOKUSE *

1-2. Wapi ntina ya liboso oyo tosengeli kotyela mokanda ya Emoniseli likebi?

 ESÍ ekómelá yo otala bafɔtɔ ya moto moko boye? Wana ozali kotala bafɔtɔ yango, ozali komona bilongi ya bato oyo oyebi te. Kasi fɔtɔ moko ebendi likebi na yo mpenza. Mpo na nini? Mpo yo mpe ozali na fɔtɔ yango. Wana ozali kotala yango, ozali koluka koyeba ntango mpe esika oyo bokangaki fɔtɔ yango. Ozali koluka koyeba bato oyo bazali na fɔtɔ yango. Fɔtɔ yango ezali na ntina mingi mpo na yo.

2 Mokanda ya Emoniseli ezali lokola fɔtɔ yango. Mpo na nini? Mpo na bantina mibale. Ya liboso, mokanda oyo ekomamaki mpo na biso. Na ebandeli mpenza ya vɛrsɛ yango, tozali kotánga boye: “Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye, mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.” (Em. 1:1) Na yango, makambo oyo ekomami na mokanda yango ezali mpo na bato nyonso te kasi mpo na biso, basaleli ya Nzambe oyo tomipesi na ye. Lokola tozali basaleli ya Nzambe, tosengeli kokamwa te koyeba ete tozali kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya bisakweli oyo ezali na mokanda yango. Na yango, ntango tozali kotánga mokanda ya Emoniseli, totángaka makambo oyo etaleli nde biso moko.

3-4. Na kotalela mokanda ya Emoniseli, ntango nini bisakweli na yango esengelaki kokokisama, mpe esengeli kotinda mokomoko na biso asala nini?

3 Ntina ya mibale etaleli ntango oyo bisakweli yango esengeli kokokisama. Ntoma Yoane alobelaki ntango oyo bisakweli yango ekokokisama, akomaki boye: “Na nzela ya elimo santu nakómaki na mokolo ya Nkolo.” (Em. 1:10) Ntango ntoma Yoane akomaki maloba yango ekoki kozala na mobu 96 T.B., esengelaki naino bambula mingi eleka tii ntango “mokolo ya Nkolo” ekobanda. (Mat. 25:14, 19; Luka 19:12) Kasi na kotalela esakweli ya Biblia, mokolo yango ebandaki na mobu 1914 ntango Yesu atyamaki Mokonzi na likoló. Banda na mbula yango bisakweli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli, oyo etaleli basaleli ya Nzambe ebandaki kokokisama. Na ntembe te, tozali sikoyo kobika na “mokolo ya Nkolo”!

4 Lokola tozali sikoyo kobika na eleko moko ya yikiyiki, tosengeli kotya mpenza likebi na toli ya bolingo oyo ezali na Emoniseli 1:3, oyo elobi: “Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe na baoyo bazali kotosa makambo oyo ekomami na kati; mpo ntango oyo etyamá ekómi pene.” Yango wana, tosengeli “kotánga na mongongo makasi,” “koyoka maloba ya esakweli oyo,” mpe “kotosa” yango. Wapi makambo yango mosusu oyo tosengeli kotosa?

SALÁ MAKASI ETE YEHOVA ANDIMA LOSAMBO NA YO

5. Ndenge nini mokanda ya Emoniseli emonisi ntina oyo tosengeli komindimisa ete Yehova azali kondima losambo na biso?

5 Banda na mokapo ya liboso ya mokanda ya Emoniseli, tomoni polele ete Yesu ayebi malamu likambo mokomoko oyo ezali kosalema na masangá nyonso. (Em. 1:12-16, 20; 2:1) Makambo oyo Yesu alobaki mpo na masangá nsambo ya Azia Moke nde endimisi biso likambo yango. Na makambo oyo alobaki, apesaki malako ya sikisiki mpo na kosalisa bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso bámindimisa ete Yehova azalaki kondima losambo na bango. Lisusu, makambo oyo alobaki etaleli mpe basaleli nyonso ya Nzambe lelo oyo. Yango eteyi biso nini? Yesu Kristo, Mokambi na biso, ayebi malamu soki tozali na boyokani ya ndenge nini elongo na Yehova. Tozali na nse ya bokonzi mpe libateli ya Yesu; eloko moko te ekoki kobombama na miso na ye. Ayebi makambo oyo tosengeli kosala mpo Yehova akoba kondima biso. Malako nini apesaki oyo tosengeli kotosa lelo oyo?

6. (a) Ndenge emonisami na Emoniseli 2:3, 4, likambo nini ya ntina Yesu alobaki mpo na lisangá ya Efese? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

6 Tángá Emoniseli 2:3, 4Tosengeli te kotika bolingo oyo tozalaki na yango liboso mpo na Yehova. Makambo oyo Yesu alobaki mpo na lisangá ya Efese emonisaki ete bamonisaki mpiko mpe bakobaki kosalela Yehova atako bazalaki na mikakatano mingi. Atako bongo, babungisaki bolingo oyo bazalaki na yango liboso. Basengelaki kozongela lisusu bolingo yango mpo Yehova andima losambo na bango. Soki bongo te, Yehova alingaki te kondima losambo na bango. Biso mpe lelo oyo, tosengeli kosuka kaka te na koyika mpiko. Tosengeli kokoba koyika mpiko mpo na bantina oyo ebongi. Nzambe na biso atyaka kaka likebi te na makambo oyo tosalaka kasi mpe ntina oyo tosalaka yango. Makanisi oyo etindaka biso tósala likambo boye to boye ezali na ntina mingi mpo na ye mpo alingi ete losambo na biso euta na bolingo makasi mpe botɔndi oyo tozalaka na yango mpo na ye.​—Mas. 16:2; Mrk. 12:29, 30.

7. (a) Ndenge emonisami na Emoniseli 3:1-3, Yesu amonaki mokakatano nini bandeko ya lisangá ya Sarde bazalaki na yango? (b) Tosengeli kosala nini?

7 Tángá Emoniseli 3:1-3. Tosengeli kokoba kosɛnzɛla mpe kozala ekɛngɛ. Bandeko ya lisangá ya Sarde bazalaki na mokakatano mosusu. Atako bazalaki kosalela Yehova na molende liboso, kasi na nsima bazalaki lisusu kosala bongo te. Yango wana, Yesu ayebisaki bango ‘bálamuka.’ Liteya nini ya kokebisa tokoki kozwa? Ya solo, Yehova akobosana mosala na biso te. (Ebr. 6:10) Nzokande, tosengeli kokanisa te ete lokola tosalelá Yehova bambula mingi, tozali lisusu na ntina ya kosalela ye te. Atako tokoki kosala lisusu mingi te ndenge tozalaki kosala liboso, tosengeli kokoba kosala mingi na “mosala ya Nkolo,” kosɛnzɛla mpe kozala ekɛngɛ tii na nsuka.​—1 Ko. 15:58; Mat. 24:13; Mrk. 13:33.

8. Ndenge emonisami na Emoniseli 3:15-17, liteya nini tozwi na makambo oyo Yesu alobaki mpo na bandeko ya lisangá ya Laodikia?

8 Tángá Emoniseli 3:15-17. Tosengeli kozala na molende mpe komipesa mobimba mpo na kosambela Nzambe. Makambo oyo Yesu alobaki mpo na bandeko ya lisangá ya Laodikia emonisaki mokakatano mosusu. Bazalaki “mwa molunge” na losambo na bango. Lokola bazalaki komipesa mpenza te, Yesu ayebisaki bango ete bazalaki ‘bato ya mpasi mpe ya mawa.’ Basengelaki kosalela Yehova mpe kosambela ye na molende mpenza. (Em. 3:19) Liteya nini tozwi? Soki molende na biso ekiti na mosala ya Yehova, tosengeli komonisa botɔndi mingi mpo na makambo nyonso oyo Yehova azali kosalela biso mpe oyo ebongiseli na ye ezali kosalela biso. (Em. 3:18) Tosengeli te kotika mposa ya koluka kokóma na bomoi ya malamu mingi elongola likebi na biso, mpe etinda biso tózongisa makambo ya elimo nsima.

9. Ndenge emonisami na makambo oyo Yesu alobaki mpo na bandeko ya lisangá ya Pergame mpe ya Tyatire, tosengeli kokeba na nini?

9 Tosengeli koboya mateya nyonso ya bapɛngwi. Yesu apamelaki bandeko mosusu ya lisangá ya Pergame oyo bazalaki kolendisa bokabwani mpe mwa mangomba. (Em. 2:14-16) Apesaki longonya epai ya bandeko ya Tyatire oyo baboyaki “makambo mozindo ya Satana” mpe asɛngaki bango ‘básimba makasi’ solo. (Em. 2:24-26) Bakristo oyo bazalaki makasi te na elimo oyo batikaki ete bákosa bango na mateya ya lokuta basengelaki kobongola motema. Bongo biso lelo oyo? Tosengeli koboya mateya nyonso ya lokuta oyo ezali kotɛmɛla makanisi ya Yehova. Bapɛngwi bakoki “komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe,” nzokande bazali kowangana “nguya ya ezaleli yango.” (2 Tim. 3:5) Soki tozali bayekoli ya molende ya Liloba ya Nzambe, ekozala pɛtɛɛ tóyeba mateya ya lokuta mpe tóboya yango.​—2 Tim. 3:14-17; Yuda 3, 4.

10. Liteya nini mosusu tokoki kozwa na makambo oyo Yesu alobaki mpo na lisangá ya Pergame mpe ya Tyatire?

10 Tosengeli te komipesa na pite, kotikela yango nzela, to kondima yango. Ezalaki mpe na mokakatano mosusu na lisangá ya Pergame mpe ya Tyatire. Yesu apamelaki bandeko mosusu ya masangá yango mpo bazalaki kosala pite to makambo ya mbindo. (Em. 2:14, 20) Liteya nini tozwi? Tokoki te kokanisa ete Yehova akondima misala na biso ya mbindo, ata soki tozali kosalela ye na boumeli ya bambula mingi mpe tozali na mikumba mingi na ebongiseli na ye. (1 Sa. 15:22; 1 Pe. 2:16) Asɛngaka biso tókangama na mitinda na ye ya sembo ata soki bizaleli ya bato ya mokili oyo ezali kobeba se kobeba.​—Ef. 6:11-13.

11. Touti koyekola nini? (Talá mpe etanda “ Mateya mpo na biso lelo oyo.”)

11 Na mokuse, toyekoli nini? Toyekoli ntina oyo tosengeli komindimisa ete Yehova azali kondima losambo na biso. Soki tozali kosala likambo oyo ekoki kosala ete losambo na biso endimama te, tosengeli kosala nokinoki tóbongisa yango mpo Yehova andima biso. (Em. 2:5, 16; 3:3, 16) Kasi, likambo nini mosusu Yesu alobaki na nsango oyo atindelaki masangá yango?

NDIMÁ KOYIKELA MINYOKO MPIKO

Nsima ya kobengana Satana na likoló, ndenge nini azali kokoba kobundisa basaleli ya Nzambe? (Talá paragrafe 12-16)

12. Liteya nini tozwi na makambo oyo Yesu alobaki mpo na lisangá ya Simirna mpe ya Filadelfia? (Emoniseli 2:10)

12 Sikoyo tólobela makambo oyo Yesu alobaki mpo na lisangá ya Simirna mpe ya Filadelfia. Ayebisaki bakristo yango ete basengelaki te kobanga minyoko, mpo bakozwa mbano mpo na bosembo na bango. (Tángá Emoniseli 2:10; 3:10) Liteya nini tozwi? Tosengeli koyeba ete tokokutana na minyoko mpe ekosɛnga tóndima koyikela yango mpiko. (Mat. 24:9, 13; 2 Ko. 12:10) Mpo na nini koyeba likambo yango ezali na ntina?

13-14. Ndenge emonisami na Emoniseli mokapo 12, nini ezali kokómela basaleli ya Nzambe?

13 Mokanda ya Emoniseli elobi ete basaleli ya Nzambe bakonyokwama na mikolo ya nsuka, elingi koloba, na “mokolo ya Nkolo.” Emoniseli mokapo 12 elobi ete ntango kaka Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló, mwa moke na nsima, ezalaki na etumba kuna na likoló. Mikaele, elingi koloba, Yesu Kristo, oyo asekwá, ye ná mampinga na ye ya baanzelu babundaki na Satana ná bademo na ye. (Em. 12:7, 8) Yesu ná mampinga na ye balongaki banguna wana ya Nzambe mpe babwakaki bango awa na mabele. Yango wana, banguna yango bazali kobimisela bato bampasi mingi. (Em. 12:9, 12) Kasi yango ebimiseli basaleli ya Nzambe nini?

14 Lisusu, mokanda ya Emoniseli eyebisi biso makambo oyo Satana akosala. Lokola azali lisusu na likoki te ya kokende na likoló, yango wana nkanda na ye ezali kongalela bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na bomoi awa na mabele, oyo bazali bamonisi ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele mpe oyo “bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.” (Em. 12:17; 2 Ko. 5:20; Ef. 6:19, 20) Ndenge nini esakweli yango ekokisamaki?

15. Banani bazali komonisa “batatoli mibale” oyo Emoniseli mokapo 11 elobeli, mpe nini ekómelaki bango?

15 Satana atindaki banguna ya Nzambe bábundisa bandeko oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola Bokonzi. Bandeko yango bazalaki komonisa “batatoli mibale” oyo mokanda ya Emonisi elobi ete bakobomama. * (Em. 11:3, 7-11) Na mobu 1918, bafundaki bandeko mwambe oyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola na bifundeli ya lokuta, mpe bakatelaki mokomoko na bango etumbu ya bolɔkɔ ya bambula mingi. Na ntango wana, bato bakanisaki ete mosala ya bandeko wana oyo batyami mafuta na elimo ‘ekufi.’

16. Likambo nini ya kokamwa esalemaki na mobu 1919, kasi banda ntango wana Satana azali kokoba kosala nini?

16 Esakweli oyo ezali na Emoniseli mokapo 11 elobaki mpe ete ‘batatoli yango mibale’ basengelaki kozonga lisusu na bomoi nsima ya mwa ntango moke. Esakweli yango ekokisamaki na ndenge moko ya kokamwa mpenza mwa basanza nsima ya kotyama ya bandeko yango na bolɔkɔ. Na ebandeli ya mobu 1919 bandeko yango oyo batyami mafuta na elimo babimaki na bolɔkɔ, mpe na nsima bifundeli yango elongwaki. Bandeko yango bazongelaki mbala moko mosala ya kosakola Bokonzi. Kasi yango esalaki te ete Satana atika kobundisa basaleli ya Nzambe. Banda ntango wana, Satana azali kobimisela basaleli nyonso ya Nzambe “ebale” ya minyoko. (Em. 12:15) Yango wana, mokomoko na biso ‘asengeli koyika mpiko mpe kozala na kondima.’​—Em. 13:10.

OMIPESA MOBIMBA NA MOSALA OYO NZAMBE APESÁ BISO

17. Lisalisi nini basaleli ya Nzambe bazwaka na esika oyo bazali kutu kokanisa te, atako Satana azali kobundisa bango?

17 Emoniseli mokapo 12 emonisi mpe ete basaleli ya Nzambe bakozwa mwa lisalisi oyo ekouta esika oyo bazali kutu kokanisa te. Ekozala lokola nde “mabele” emɛli “ebale” ya minyoko. (Em. 12:16) Yango nde esalemaka mpenza. Na bantango mosusu, bibongiseli mosusu ya makasi ya mokili ya Satana, na ndakisa, na makambo ya mibeko, esalisaka basaleli ya Nzambe. Mbala na mbala, basaleli ya Yehova balongaka na batribinale oyo epesaka bango mwa bonsomi. Ndenge nini basalelaka bonsomi yango? Bamipesaka mobimba mpe basalelaka mabaku nyonso mpo na kosala mosala oyo Yehova apesá bango. (1 Ko. 16:9) Mosala yango esɛngi nini?

Bansango nini mibale basaleli ya Nzambe basengeli kosakola? (Talá paragrafe 18-19)

18. Mosala nini ya libosoliboso tozali kosala na mikolo oyo ya nsuka?

18 Yesu asakolaki ete basaleli na ye bakosakola ‘nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe’ na mabele mobimba liboso nsuka eya. (Mat. 24:14) Ntango basakolaka, anzelu moko to ebele ya baanzelu basalisaka bango, mpo baanzelu yango bazali na ‘nsango malamu ya seko ya kosakwela bato oyo bafandi na mabele, mpe bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.’​—Em. 14:6.

19. Nsango nini mosusu baoyo balingaka Yehova basengeli kosakola?

19 Basaleli ya Nzambe basengeli kosuka kaka te na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Basengeli mpe kopesa mabɔkɔ na mosala oyo baanzelu bazali kosala oyo Emoniseli mokapo 8 tii ya 10 elobeli. Baanzelu yango bazali kobimisa maloba mingi ya kolakela mabe baoyo baboyi Bokonzi ya Nzambe. Na yango, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango ya etumbu, oyo ezali lokola ‘mabanga ná mɔtɔ,’ oyo ezali komonisa lisambisi ya Nzambe mpo na mokili oyo mabe ya Satana. (Em. 8:7, 13) Bato basengeli koyeba ete nsuka ekómi pene, na yango mpo bábika na mokolo ya nkanda ya Yehova basengeli kobongwana nokinoki. (Sef. 2:2, 3) Kasi bato mingi bayebi nsango yango te. Tosengeli kozala na mpiko mpo tósakola nsango yango. Na bolɔzi monene, nsango wana ya nsuka ya etumbu ekopesa bato lisusu nkanda mingi koleka.​—Em. 16:21.

TOSÁ MALOBA YA ESAKWELI

20. Makambo nini tokolobela na masolo mibale oyo elandi?

20 Tosengeli mpenza kotosa “maloba ya esakweli” yango mpamba te kokokisama ya mokanda ya Emoniseli etaleli mpe biso. (Em. 1:3) Kasi ndenge nini tokoki koyikela mikakatano mpiko na bosembo nyonso mpe kokoba kosakola bansango yango na mpiko? Makambo mibale ekopesa biso makasi: ya liboso, makambo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli mpo na banguna ya Nzambe mpe, ya mibale, mapamboli oyo tokozwa na mikolo ezali koya soki totikali sembo. Tokolobela makambo yango na masolo mibale oyo elandi.

LOYEMBO 32 Poná nde Yehova!

^ Tozali kobika na eleko moko ya yikiyiki! Bisakweli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ezali kokokisama lelo oyo. Bisakweli yango ezali kotinda biso tósala nini? Lisolo oyo mpe masolo mibale oyo elandi, ekomonisa na mokuse makambo oyo ezali na mokanda ya Emoniseli. Ekomonisa biso makambo oyo tokoki kosala mpo Yehova akoba kondima losambo na biso wana tozali kotosa makambo oyo ekomami na mokanda yango.

^ Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/2014, lokasa 30.