Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 21

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na yo na mikolo ezali koya?

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na yo na mikolo ezali koya?

“Amen! Yaká, Nkolo Yesu.”​—EM. 22:20.

LOYEMBO 142 Tósimba makasi elikya na biso

NA MOKUSE *

1. Ekateli nini ya ntina mingi bato nyonso basengeli kozwa?

 LELO oyo bato basengeli kozwa ekateli moko ya ntina mingi. Bakopesa Yehova Nzambe mabɔkɔ lokola Moyangeli oyo abongi koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba, to bakopesa Satana Zabolo monguna na ye monene mabɔkɔ? Moto nyonso asengeli kopona soki akozala na ngámbo nini mpe moto moko te akoki kozala na ngámbo nyonso mibale. Ezala ekateli nini bato bakozwa ekozala na bopusi mpo na bomoi na bango na mikolo ezali koya. (Mat. 25:31-33, 46) Na “bolɔzi monene,” bakozwa elembo ya kobika to ya kobomama.​—Em. 7:14; 14:9-11; Ezk. 9:4, 6.

2. (a) Baebre 10:35-39 elendisi biso tósala nini? (b) Ndenge nini mokanda ya Emoniseli ekoki kosalisa biso?

2 Tángá Baebre 10:35-39. Soki oponi kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ, ozwi ekateli moko ya malamu. Na yango, ozali na mposa makasi ya kosalisa basusu bázwa ekateli ya malamu. Mpo na kosalisa bango, okoki kosalela makambo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli. Mokanda yango emonisi makambo oyo ekokómela bato oyo batɛmɛlaka Yehova, kasi emonisi mpe mapamboli oyo bato oyo bapesaka boyangeli na ye mabɔkɔ na bosembo mpenza bakozwa. Tosengeli koyekola makambo wana ya ntina. Kosala bongo ekokómisa makasi ekateli na biso ya kokoba kosalela Yehova. Lisusu, tokoki kosalela makambo oyo toyekoli mpo na kosalisa basusu bázwa ekateli ya malamu mpe bákangama na yango.

3. Tokoyanola na mituna nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo: Nini ekokómela baoyo bapesaka boyangeli ya Nzambe mabɔkɔ? Mpe nini ekokómela baoyo baponi kopesa nyama mabe ya langi ya motane makasi mabɔkɔ, ndenge emonisami na mokanda ya Emoniseli?

NINI EKOKÓMELA BAOYO BAZALI SEMBO EPAI YA YEHOVA?

4. Etuluku nini ya bato ntoma Yoane amoni bazali elongo na Yesu na likoló?

4 Na emonaneli moko, ntoma Yoane amoni bituluku mibale ya bato oyo bazali kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ mpe bazwi mapamboli ya bomoi ya seko. Etuluku ya liboso ezali na motángo ya bato 144 000. (Em. 7:4) Bazwi bango uta na mabele mpo bákende koyangela na guvɛrnema to Bokonzi, elongo na Yesu na likoló. Elongo na ye, bakoyangela mabele. (Em. 5:9, 10; 14:3, 4) Na emonaneli yango, ntoma Yoane amoni bango batɛlɛmi elongo na Yesu na Ngomba Siona kuna na likoló.​—Em. 14:1.

5. Mosika te nini ekokómela bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na bomoi awa na mabele?

5 Banda na mikolo ya bantoma tii lelo oyo, bankóto ya bato bazali koponama mpo bázala na kati ya bato 144 000. (Luka 12:32; Rom. 8:17) Kasi, bayebisi ntoma Yoane ete mwa ndambo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala naino na bomoi awa na mabele na mikolo ya nsuka. ‘Bakristo yango oyo batikalaki’ bakozwa “elembo” ya nsuka oyo emonisi ete Yehova andimi bango liboso bolɔzi monene ebanda. (Em. 7:2, 3; 12:17) Na nsima, na ntango moko boye na boumeli ya bolɔzi monene, bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo oyo batikalaki bakozwa bango mpo bákende na likoló mpo bázala elongo na bakristo mosusu oyo batyamaki mafuta na elimo, oyo basilá kokufa sembo mpo bákokisa motángo ya bato 144 000. Kuna bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya Nzambe.​—Mat. 24:31; Em. 5:9, 10.

6-7. (a) Ntoma Yoane amoni etuluku nini mosusu, mpe Biblia elobi nini mpo na bango? (b) Mpo na nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na bomoi awa na mabele mpe “ebele mpenza ya bato” basengeli kotya likebi na makambo oyo Emoniseli mokapo 7 elobeli?

6 Nsima ya komona etuluku ya baoyo bakokende na likoló, ntoma Yoane amoni “ebele mpenza ya bato.” Na kokesana na bato 144 000 yango, Biblia epesi te motángo ya bato ya etuluku yango. (Em. 7:9, 10) Biblia elobi nini mpo na bango? Elobi boye: “Bango bazali bato oyo bauti na bolɔzi monene, mpe basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate.” (Em. 7:14) Nsima ya kobika na bolɔzi monene, “ebele mpenza ya bato” yango bakozala na bomoi awa na mabele mpe bakozwa mapamboli mingi.​—Nz. 37:9-11, 27-29; Mas. 2:21, 22; Em. 7:16, 17.

7 Ezala toponami mpo na kokende na likoló to tokozala na bomoi awa na mabele, tosengeli kondima ete tokomona kokokisama ya makambo oyo tozali kotánga na Emoniseli mokapo 7. Ekozala ntango moko ya malamu mpo na bituluku wana nyonso mibale ya basaleli ya Nzambe! Tokozala na esengo makasi mpo toponaki kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ. Nini mosusu mokanda ya Emoniseli eyebisi biso mpo na bolɔzi monene?​—Mat. 24:21.

NINI EKOKÓMELA BATO OYO BATƐMƐLAKA NZAMBE?

8. Ndenge nini bolɔzi monene ekobanda, mpe bato mingi bakosala nini?

8 Ndenge tomonaki na lisolo oyo eleki, etikali moke ete baguvɛrnema ya mokili oyo ebalukela Babilone Monene, elingi koloba, lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta. (Em. 17:16, 17) Yango nde ekobandisa bolɔzi monene. Yango ekotinda bato mingi bákóma kosalela Yehova? Te. Kutu, Emoniseli mokapo 6 emonisi ete na ntango wana ya mpasi, baoyo basalelaka Yehova te bakoluka libateli epai ebongiseli ya politiki mpe ya mombongo ya mokili oyo, oyo ekokanisami na bangomba. Lokola bato yango bakopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ te, Yehova akotalela bango lokola banguna.​—Luka 11:23; Em. 6:15-17.

9. Ndenge nini basaleli ya sembo ya Yehova bakomonisa ete bakeseni mpenza na bato mosusu na bolɔzi monene, mpe nini ekokómela basaleli ya Yehova?

9 Na ntembe te, basaleli ya sembo ya Yehova bakomonisa ete bakeseni mpenza na bato mosusu na ntango wana ya mpasi mpenza. Bakozala kaka etuluku moko ya bato awa na mabele oyo bazali kosalela Yehova Nzambe mpe koboya kopesa “nyama mabe” mabɔkɔ. (Em. 13:14-17) Lokola bakotikala sembo epai ya Yehova, baoyo batɛmɛlaka Yehova bakozala na nkanda mpenza. Yango wana, etuluku ya bikólo oyo esangani ekobundisa basaleli nyonso ya Nzambe awa na mabele. Biblia ebengi yango etumba ya Goge ya mokili ya Magoge.​—Ezk. 38:14-16.

10. Ndenge emonisami na Emoniseli 19:19-21, Yehova akosala nini ntango bakobundisa basaleli na ye?

10 Yehova akosala nini ntango bakobundisa basaleli na ye? Ayebisi biso boye: “Nkɛlɛ na ngai ekomata na zolo na ngai.” (Ezk. 38:18, 21-23) Emoniseli mokapo 19 emonisi makambo oyo ekosalema na nsima. Yehova akotinda Mwana na ye abundela basaleli na ye mpe aboma banguna na bango. Yesu ná “mampinga ya likoló,” elingi koloba, baanzelu ya sembo ná bato 144 000 bakobundisa Goge ya mokili ya Magoge. (Em. 17:14; 19:11-15) Etumba yango ekosuka ndenge nini? Bato nyonso mpe bituluku ya baoyo batɛmɛlaka Yehova bakobomama mpo na libela!​—Tángá Emoniseli 19:19-21.

NSIMA YA ETUMBA, LIBALA EKOSALEMA

11. Likambo nini ya ntina mingi ekosalema oyo mokanda ya Emoniseli elobeli?

11 Meká komona na makanisi ndenge bato ya sembo oyo bakobika awa na mabele bakomiyoka ntango banguna nyonso ya Nzambe bakobomama! Ekozala ntango moko ya esengo mpenza! Atako ekozala na esengo moko monene kuna na likoló ntango Babilone Monene ekobomama, ekozala na likambo mosusu oyo ekopesa esengo monene. (Em. 19:1-3) Ezali likambo moko ya ntina mingi oyo ekosalema oyo mokanda ya Emoniseli elobeli, elingi koloba, “fɛti ya libala ya Mwana-Mpate.”​—Em. 19:6-9.

12. Ndenge emonisami na Emoniseli 21:1, 2, ntango nini fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekosalema?

12 Ntango nini fɛti ya libala yango ekosalema? Bato nyonso 144 000 bakozala na likoló kaka liboso etumba ya Armagedone ebanda. Kasi, yango ekozala te ntango ya kosala fɛti ya libala ya Mwana-Mpate. (Tángá Emoniseli 21:1, 2.) Fɛti ya libala ekosalema nsima ya etumba ya Armagedone mpe ya kobomama ya banguna nyonso ya Nzambe.​—Nz. 45:3, 4, 13-17.

13. Fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekolimbola nini mpo na baoyo bakozala na fɛti yango?

13 Fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekolimbola nini mpo na baoyo bakozala na fɛti yango? Libala esangisaka mwasi ná mobali. Ndenge moko mpe, libala ya Mwana-Mpate ekosangisa Mokonzi, Yesu Kristo, ná ‘mwasi na ye ya libala,’ elingi koloba bato 144 000. Likambo wana ya ntina mingi ekosala ete guvɛrnema ya sika eyangela mabele na boumeli ya mbula 1 000.​—Em. 20:6.

ENGUMBA MOKO YA NKEMBO MPE BOMOI NA YO YA MIKOLO EZALI KOYA

Emoniseli mokapo ya 21 emonisi Yerusaleme ya Sika ya elilingi lokola “euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita.” Na boumeli ya mbula nkóto, Yerusaleme yango ya Sika ekomemela bato ya botosi mapamboli mingi (Talá paragrafe 14-16)

14-15. Emoniseli mokapo 21 ekokanisi bato 144 000 na nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)

14 Emoniseli mokapo 21 ekokanisi bato 144 000 na engumba moko kitoko mpenza oyo ebengami “Yerusaleme ya Sika.” (Em. 21:2, 9) Engumba yango ezwi moboko na mabanga 12 ya miboko oyo bakomi “bankombo ya bantoma zomi na mibale ya Mwana-Mpate.” Mpo na nini ebendaki likebi ya ntoma Yoane? Mpo amonaki nkombo na ye ekomami likoló ya moko ya mabanga yango. Oyo nde libaku moko malamu mpenza!​—Em. 21:10-14; Ef. 2:20.

15 Engumba yango ya elilingi ekeseni mpenza na bingumba mosusu. Ezali na balabala moko monene ya wolo ya pɛto, baporte monene 12 ya mayaka, bifelo mpe miboko epakolami na mabanga ya ntalo, mpe na bimekeli oyo ebongi mpenza. (Em. 21:15-21) Kasi, emonani lokola eloko moko ezangi! Tótala makambo oyo ntoma Yoane alobi: “Namonaki tempelo kuna te, mpo Yehova Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali tempelo na yango, ná Mwana-Mpate. Mpe engumba yango ezali na mposa ya moi te mpe ya sanza te mpo na kongɛngisa yango, mpo nkembo ya Nzambe ezalaki kopesa yango pole, mpe mwinda na yango Mwana-Mpate.” (Em. 21:22, 23) Baoyo bazali na kati ya Yerusaleme ya Sika bakozala elongo na Yehova. (Ebr. 7:27; Em. 22:3, 4) Na yango, Yehova mpe Yesu bazali tempelo ya engumba yango.

Banani bakozwa matomba na bibongiseli oyo emonisami na “ebale” mpe na “banzete”? (Talá paragrafe 16-17)

16. Nini ekokómela bato na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi ya Nzambe?

16 Kokanisa engumba yango ezali esengo mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele basengeli mpe kotyela yango likebi. Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi ya Nzambe, Yerusaleme ya Sika ekomemela bato mapamboli ebele. Ntoma Yoane amoni mapamboli yango ezali kouta na “ebale moko ya mai ya bomoi.” Mpe na ngámbo nyonso mibale ya ebale yango ezali na “banzete ya bomoi” oyo ezali kobimisa nkasa “mpo na kobikisa bikólo.” (Em. 22:1, 2) Na nsima bato nyonso ya bomoi bakozala na libaku ya kozwa matomba na bibongiseli yango. Mokemoke, bato nyonso ya botosi bakokóma bato ya kokoka. Maladi, bampasi mpe mpisoli ekozala lisusu te.​—Em. 21:3-5.

17. Ndenge emonisami na Emoniseli 20:11-13, banani bakozwa matomba oyo ekouta na Boyangeli ya Mbula Nkóto?

17 Banani bakozwa matomba na bibongiseli wana ya kitoko? Ya liboso, ebele mpenza ya bato oyo bakobika na etumba ya Armagedone, mbala mosusu elongo na bana oyo bakobotama na mokili ya sika. Kasi Emoniseli mokapo 20 elaki mpe ete bato oyo bakufá bakosekwa. (Tángá Emoniseli 20:11-13.) Bato oyo bazalaki “bayengebene” oyo bakufá kala elongo na “bato oyo bazangi boyengebene,” oyo bazwaki te libaku ya koyekola koyeba Yehova, bakozonga na bomoi awa na mabele. (Mis. 24:15; Yoa. 5:28, 29) Yango emonisi ete moto nyonso akosekwa mpo azala na bomoi awa na mabele na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto? Te. Bato oyo baboyaki na nko nyonso libaku oyo bazalaki na yango ya kosalela Yehova liboso bákufa bakozonga na bomoi te. Bazwaki libaku malamu kasi bamonisaki ete babongi te na bomoi na Paradiso awa na mabele.​—Mat. 25:46; 2 Tes. 1:9; Em. 17:8; 20:15.

KOMEKAMA YA NSUKA

18. Makambo ekozala ndenge nini awa na mabele na nsuka ya mbula 1 000?

18 Na nsuka ya mbula 1 000, bato nyonso oyo bakozala na bomoi awa na mabele bakokóma bato ya kokoka. Moto moko te oyo akozala na bomoi akosangola lisusu lisumu oyo eutá na Adama. (Rom. 5:12) Elakeli mabe oyo eutá na lisumu ya Adama ekolimwa mpo na libela. Na ntango yango, baoyo bakozala na bomoi awa na mabele ‘bakozonga na bomoi’ mpo bakokóma bato ya kokoka na nsuka ya mbula 1 000.​—Em. 20:5.

19. Mpo na nini ezali na ntina mingi komekama ya nsuka esalema?

19 Toyebi ete Yesu atɛmɛlaki milende oyo Satana asalaki mpo na kotinda ye abebisa bosembo na ye. Atikalaki sembo atako akutanaki na komekama. Kasi bato nyonso ya kokoka bakondima kosala bongo ntango bakopesa Satana libaku ya komeka bango? Moto na moto akomonisa bosembo na ye epai ya Yehova ntango Satana akolongwa na libulu mozindo na nsuka ya mbula 1 000. (Em. 20:7) Baoyo bakotikala sembo na ntango ya komekama ya nsuka bakozwa bomoi ya seko mpe nsukansuka bakosepela na bonsomi ya solosolo. (Rom. 8:21) Baoyo bakozala batomboki bakobomama mpo na libela, elongo na Zabolo mpe bademo na ye.​—Em. 20:8-10.

20. Ozali komiyoka ndenge nini mpo na bisakweli ya kokamwa oyo ezali na mokanda ya Emoniseli?

20 Ozali komiyoka ndenge nini nsima ya kotalela na mokuse makambo oyo ezali na mokanda ya Emoniseli? Olendisami ndenge ozali komona na miso kokokisama ya bisakweli oyo ya kokamwa, boye te? Na ntembe te, yango ezali kolendisa yo obengisa basusu báya na losambo ya pɛto ya Nzambe na biso. (Em. 22:17) Lokola toyekoli makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, tolendisami mpenza mpe tolingi koloba lokola ntoma Yoane, oyo alobaki: “Amen! Yaká, Nkolo Yesu.”​—Em. 22:20.

LOYEMBO 27 Komonana ya bana ya Nzambe

[Maloba na nse ya lokasa]

^ Oyo ezali lisolo ya boyekoli ya nsuka oyo elobeli mokanda ya Emoniseli. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo, baoyo bakotikala sembo epai ya Yehova bakozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya, kasi baoyo batɛmɛlaka boyangeli ya Nzambe bakosukisama na ndenge ya nsɔni.