Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 22

Toli ya bwanya mpo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo

Toli ya bwanya mpo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo

“Yehova ye moko apesaka bwanya.”​—MAS. 2:6.

LOYEMBO 89 Yoká, tosá mpe pambwamá

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini biso nyonso tosengeli na bwanya oyo euti na Nzambe? (Masese 4:7)

 SOKI ekómelá yo ozwa ekateli moko ya ntina, na ntembe te obondelaki Yehova apesa yo bwanya, mpo oyebaki ete osengelaki na yango. (Yak. 1:5) Mokonzi Salomo akomaki boye: “Bwanya ezali eloko ya liboso.” (Tángá Masese 4:7.) Na ntembe te, Salomo azalaki kolobela bwanya ya lolenge nyonso te. Azalaki nde kolobela bwanya oyo euti na Yehova Nzambe. (Mas. 2:6) Bwanya oyo euti na Nzambe ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano ya ndenge nyonso oyo tozali kokutana na yango lelo oyo? Ɛɛ, yango nde tokomona na lisolo oyo.

2. Ndenge nini tokoki kokóma lisusu na bwanya mingi?

2 Tokoki kokóma na bwanya mingi soki tozali koyekola mpe kosalela mateya ya mibali mibale oyo bayebanaki lokola bato ya bwanya. Ya liboso, tokolobela Salomo. Biblia elobi ete “Nzambe akobaki kopesa Salomo bwanya mpe mayele mingi mpenza.” (1 Ba. 4:29) Ya mibale, tokolobela Yesu, ye oyo azalaki moto ya bwanya oyo aleki bato nyonso. (Mat. 12:42) Esakolamaki boye mpo na Yesu: “Elimo ya Yehova ekofanda mpenza likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele.”​—Yis. 11:2.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Nzambe apesaki Salomo mpe Yesu bwanya mingi, yango wana, bapesaki toli ya bwanya na makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso. Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato na kati na yango: Ntina ya kotalela na ndenge oyo ebongi, mbongo, mosala ya mosuni, mpe biso moko.

TALELÁ MBONGO NA NDENGE OYO EBONGI

4. Salomo ná Yesu bazalaki na bozwi ndenge moko? Limbolá.

4 Salomo azalaki mozwi monene, mpe azalaki na bomoi ya bomɛngo. (1 Ba. 10:7, 14, 15) Kasi Yesu, azalaki na bozwi mingi te mpe azalaki na ndako na ye moko te. (Mat. 8:20) Atako bongo, mibali yango mibale bazalaki kotalela biloko ya mosuni na ndenge oyo ebongi mpo Yehova Nzambe nde apesaki bango bwanya oyo bazalaki na yango.

5. Ndenge nini Salomo azalaki kotalela mbongo na ndenge oyo ebongi?

5 Salomo ayebaki ete mbongo “ebatelaka.” (Mos. 7:12) Soki tozali na mbongo tokoki kozala na eloko nyonso oyo tosengeli na yango mpe biloko mosusu oyo tolingi. Atako Salomo azalaki mozwi mpenza, ayebaki ete ezali na makambo oyo eleki mbongo na ntina. Na ndakisa, akomaki boye: “Nkombo esengeli kolingama mingi koleka ebele ya bomɛngo.” (Mas. 22:1) Salomo amonaki mpe ete bato oyo balingaka mbongo basepelaka mpenza te na biloko oyo bazali na yango. (Mos. 5:10, 12) Mpe alobaki ete tosengeli te kokanisa ete mbongo ezali eloko oyo eleki ntina, mpamba te ezala tozali na mbongo ebele ndenge nini ekoki kosila na mbalakaka.​—Mas. 23:4, 5.

Ndenge oyo totalelaka biloko ya mosuni epekisaka biso tótya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso? (Talá paragrafe 6-7) *

6. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela biloko ya mosuni na ndenge oyo ebongi? (Matai 6:31-33)

6 Yesu azalaki kotalela biloko ya mosuni na ndenge oyo ebongi. Azalaki kosepela kolya mpe komɛla. (Luka 19:2, 6, 7) Na fɛti moko, abongolaki mai na vinyo moko kitoko, yango ezalaki likamwisi na ye ya liboso oyo asalaki. (Yoa. 2:10, 11) Lisusu, mokolo ya liwa na ye, alataki elamba moko ya ntalo mingi. (Yoa. 19:23, 24) Kasi Yesu atikaki te ete biloko ya mosuni ezala na ntina mingi na bomoi na ye. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale . . . Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” (Mat. 6:24) Yesu ateyaki ete soki toluki naino Bokonzi, Yehova akopesa biso biloko oyo tosengeli na yango.​—Tángá Matai 6:31-33.

7. Matomba nini ndeko mobali moko azwaki mpo atalelaki mbongo na ndenge oyo ebongi?

7 Bandeko basi mpe mibali mingi bazwaki matomba mpo basalelaki toli ya bwanya oyo Yehova apesi na likambo etali mbongo. Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Daniel, oyo azali monzemba. Alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazwaki ekateli ya kotya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ngai.” Lokola azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, Daniel azalaki na likoki ya kosalela ntango na ye mpe makoki na ye na misala ya Teokrasi. Abakisi boye: “Nakoki koloba mpenza ete nayokaka mawa te ndenge nazwaki ekateli wana. Mpo na koloba solo, nakokaki kozwa mbongo mingi soki natyaki makambo ya mosuni na esika ya liboso na bomoi na ngai. Soki nasalaka bongo, nakokaki te kozwa baninga ya malamu oyo nazali na bango lelo oyo! Soki natyaka makanisi na mbongo, mbɛlɛ nakokaki te kozala na esengo oyo nazali na yango sikoyo mpo namipesaki na kosalela Yehova! Mbongo moko te ekokani na ebele ya mapamboli oyo Yehova apesi ngai.” Emonani polele ete tozwaka mapamboli ntango totyaka makanisi na mbongo te, kasi na kosalela nde Yehova.

TALELÁ MOSALA YA MOSUNI NA NDENGE OYO EBONGI

8. Ndenge nini toyebi ete Salomo azalaki kotalela mosala ya mosuni na ndenge oyo ebongi? (Mosakoli 5:18, 19)

8 Salomo abengaki esengo oyo tokoki kozwa na mosala makasi oyo tosalaka “likabo ya Nzambe.” (Tángá Mosakoli 5:18, 19.) Akomaki boye: “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka.” (Mas. 14:23) Salomo ayebaki likambo oyo azalaki kolobela. Azalaki mosali ya molende! Atongaki bandako, alonaki banzete ya vinyo, mpe asalaki bilanga mpe maziba ya mai. Atongaki mpe bingumba mingi. (1 Ba. 9:19; Mos. 2:4-6) Ezalaki mosala makasi, mpe na ntembe te epesaki ye esengo mingi. Kasi Salomo ayebaki ete mpo na kozala na esengo ya solosolo, asengelaki kosala makambo mosusu. Asengelaki mpe komipesa na kosalela Yehova. Na ndakisa, azalaki kolandela mosala ya botongi ya tempelo oyo ezalaki na nkembo mpo na losambo ya Yehova, oyo etongamaki na boumeli ya mbula 7! (1 Ba. 6:38; 9:1) Nsima ya kopesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge, ezala ya mosuni to ya elimo, amonaki ete kosalela Yehova nde likambo eleki ntina oyo moto akoki kosala. Akomaki boye: “Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye.”​—Mos. 12:13.

9. Ndenge nini Yesu akobaki kotya mosala ya mosuni na esika na yango?

9 Yesu azalaki mosali ya molende. Ntango azalaki elenge, azalaki mosali ya mabaya. (Mrk. 6:3) Na ntembe te, baboti na ye bazalaki kosepela na lisalisi na ye wana bazalaki kosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya bato ya libota na bango oyo ekómaki na bato mingi. Yesu azalaki moto ya kokoka mpe mosali monene ya mabaya, yango wana mbala mosusu bato mingi bazalaki kosepela na biloko oyo azalaki kosala! Na ntembe te, Yesu azalaki kosepela na mosala na ye. Atako azalaki mosali ya molende, azalaki ntango nyonso komindimisa ete azali na ntango ya kosalela Yehova. (Yoa. 7:15) Na nsima, lokola amipesaki na mosala ya koteya, apesaki bayoki na ye toli oyo: “Bósalaka mosala, ezala te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi mpo na bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko.” (Yoa. 6:27) Mpe na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Bómibombela biloko ya motuya na likoló.”​—Mat. 6:20.

Ndenge nini tokoki kokoba kozala na bokatikati na oyo etali mosala ya mosuni mpe misala ya Teokrasi? (Talá paragrafe 10-11) *

10. Mokakatano nini basusu bakoki kokutana na yango na mosala na bango ya mosuni?

10 Bwanya oyo euti na Nzambe esalisaka biso tótalela mosala na biso ya mosuni na ndenge oyo ebongi. Lokola tozali bakristo, basɛngi biso tósala “nde mosala makasi . . . , mosala oyo ezali malamu.” (Ef. 4:28) Bapatrɔ mingi bamonaka bosembo na biso mpe milende na biso, mpe bakoki mbala mosusu koyebisa biso ete basepelaka na mosala na biso. Yango ekoki kotinda biso tósalaka nsima ya ngonga ya mosala mpo tolingi ete patrɔ akanisela Batatoli ya Yehova mabe te. Kasi soki tosali bongo, tokoki te kozala na ntango mingi mpo na kozala elongo na bato ya libota na biso to kosala mingi na mosala ya Yehova. Yango wana, tosengeli kobongola ndenge na biso ya kosala mpo tózala na ntango ya kosala makambo oyo eleki ntina.

11. Liteya nini ndeko mobali moko azwaki na likambo etali kotalela mosala ya mosuni na ndenge oyo ebongi?

11 Elenge mobali moko na nkombo William azwaki liteya na ndakisa ya ndeko mobali moko oyo amesanaki kotya mosala ya mosuni na esika na yango. William alobi boye: “[Ndeko mobali yango] azali ndakisa malamu ya moto oyo atalelaka mosala ya mosuni na ndenge oyo ebongi. Asalaka mosala makasi, mpe ayokanaka malamu ná bakiliya na ye. Kasi na nsuka ya mokolo, ntango mosala esili, atikaka mosala mpe asalelaka ntango na ye mpe makasi na ye mpo na bato ya libota na ye mpe Yehova. Yango wana, azali moko ya bato oyo nayebi, bazalaka na esengo mingi mpenza!” *

OMITALELA NA NDENGE OYO EBONGI

12. Ndenge nini Salomo amonisaki ete azalaki komitalela na ndenge oyo ebongi, kasi ndenge nini abungisaki ezaleli na ye ya komitalela na ndenge oyo ebongi?

12 Ntango azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova, Salomo azalaki komitalela na ndenge oyo ebongi. Ntango azalaki elenge, na komikitisa nyonso, ayebaki esika makoki na ye esukaki mpe asɛngaki Yehova atambwisa ye. (1 Ba. 3:7-9) Na ebandeli ya boyangeli na ye, Salomo ayebaki mpe likama ya kokóma na lolendo. Akomaki boye: “Lolendo ezalaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.” (Mas. 16:18) Likambo ya mawa, na nsima Salomo alongaki te kosalela toli oyo ye moko apesaki. Na ntango moko boye na boyangeli na ye, na lolendo nyonso abandaki kotosa lisusu te mibeko ya Nzambe. Na ndakisa, mobeko moko elobaki ete mokonzi Moebre asengeli te “kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa.” (Mib. 17:17) Salomo aboyaki kotosa mobeko yango mpe azwaki basi 700 mpe bamakango 300, mingi na bango bazalaki bapakano! (1 Ba. 11:1-3) Mbala mosusu Salomo amonaki ete kosala bongo ekozala likama te mpo na ye. Kasi na nsima, Salomo amonaki mbuma mabe ya makambo oyo asalaki mpo aboyaki kotosa Yehova.​—1 Ba. 11:9-13.

13. Liteya nini tokoki kozwa soki tomanyoli na ezaleli ya komikitisa ya Yesu?

13 Yesu akobaki kozala na komikitisa mpe komitalela na ndenge oyo ebongi. Liboso aya awa na mabele, Yesu asalaki makambo mingi ya kitoko na mosala ya Yehova. Na nzela ya Yesu, “biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele.” (Kol. 1:16) Ntango azalaki kozwa batisimo, emonani polele ete Yesu akanisaki makambo oyo asalaki ntango azalaki elongo na Tata na ye. (Mat. 3:16; Yoa. 17:5) Kasi boyebi oyo Yesu azalaki na yango esalaki te ete akóma na lolendo. Kutu, azalaki kosala makambo te mpo na komimonisa ete aleki basusu. Ayebisaki bayekoli na ye ete ayaki na mabele, “mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Na komikitisa nyonso, andimaki mpe ete akoki te kosala eloko moko na likanisi na ye moko. (Yoa. 5:19) Yesu azalaki mpenza na komikitisa ya solosolo! Yesu atikelá biso ndakisa malamu ya kolanda.

14. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yesu na likambo ya komitalela na ndenge oyo ebongi?

14 Yesu ateyaki bayekoli na ye bámitalela na ndenge oyo ebongi. Mokolo moko, Yesu akitisaki bango motema na maloba oyo: “Nsuki nyonso ya motó na bino etángami.” (Mat. 10:30) Maloba yango ebɔndisaka biso mpenza, mingimingi soki tokómi komitalela na ndenge oyo ebongi te. Yango emonisi ete Tata na biso ya likoló atyelaka biso likebi mpenza, elingi koloba, tozali na motuya mingi na miso na ye. Soki Yehova apesi biso nzela ya kosambela ye mpe amoni malamu ete tobongi kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika, tosengeli te kokanisa ete asali libunga.

Nini ekoki kosalema soki tozali komitalela na ndenge oyo ebongi te? (Talá paragrafe 15) *

15. (a) Nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki nini mpo tómitalela na ndenge oyo ebongi? (b) Ndenge emonisami na bililingi oyo ezali na lokasa 24, soki tozali kobenda likebi mingi epai na biso moko, mapamboli nini tozali kozanga?

15 Eleki sikoyo mbula soki 15, nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete tosengeli komitalela na ndenge oyo ebongi, elobaki boye: “Ya solo, tosengeli te komizwaka na lokumu koleka ndelo, mpo tókóma na lolendo te; epai mosusu, tosengeli mpe te komimonaka bato mpamba. Kasi, mokano na biso esengeli kozala ya komitalelaka na bokatikati, elingi koloba tóyebaka esika makoki na biso esuki. Mwasi moko mokristo amonisaki likambo yango na maloba oyo: ‘Ngai moto nasukisi mabe te; nazali mpe malamu koleka bato nyonso te. Nasalaka malamu mpe mabe lokola bato nyonso.’” * Tomoni polele ntina oyo tosengeli komitalela na ndenge oyo ebongi.

16. Mpo na nini Yehova apesaka biso litambwisi ya bwanya?

16 Na nzela ya Liloba na ye, Yehova apesi biso litambwisi ya bwanya. Alingaka biso, mpe alingaka ete tózala na esengo. (Yis. 48:17, 18) Ekateli ya malamu oyo tokoki kozwa, mpe oyo ekosala ete tózala na esengo mpenza, ezali ya kokoba kosala makambo oyo esepelisaka Yehova. Soki tosali bongo, tokokima makama oyo ekómelaka bato oyo batyaka makanisi na bango mingi na mbongo, na mosala ya mosuni to epai na bango moko. Tiká ete mokomoko na biso azwa ekateli ya kozala na bwanya mpe ya kosepelisa motema ya Yehova!​—Mas. 23:15.

LOYEMBO 94 Botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe

^ Salomo mpe Yesu bazalaki na bwanya mpenza. Yehova Nzambe nde apesaki bango bwanya oyo bazalaki na yango. Na lisolo oyo, tokomona makambo oyo tokoki koyekola na toli oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe oyo Salomo mpe Yesu bapesaki mpo na kotalela na ndenge oyo ebongi, mbongo, mosala ya mosuni, mpe biso moko. Tokomona mpe ndenge bandeko basi mpe mibali bazwaki matomba na toli yango ya Biblia na bomoi na bango.

^ Talá lisolo “Ndenge ya kosepela na mosala ya makasi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2015.

^ Talá lisolo “Biblia ekoki kosalisa yo okóma na esengo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2005.

^ ELILINGI: John ná Tom bazali bilenge mibale oyo bazali na lisangá moko. John alekisaka ntango mingi mpo na kobatela motuka na ye ezala malamu. Tom asalelaka motuka na ye mpo na komema bandeko na mosala ya kosakola mpe na makita ya lisangá.

^ ELILINGI: John azali kosala nsima ya ngonga ya mosala. Alingi ntango nyonso asepelisa patrɔ na ye. Yango wana ntango nyonso oyo patrɔ na ye asɛngaka ye asala nsima ya ngonga ya mosala, John andimaka kosala. Kaka na mpokwa ya mokolo yango, Tom, oyo azali mosaleli na misala, akei elongo na nkulutu moko na vizite ya kotala bampate. Tom asilá koyebisa patrɔ na ye ete elekisaka bampokwa mingi na mosala ya Yehova mpe akoki te kosala na bangonga yango.

^ ELILINGI: John azali kotya likebi kaka na makambo na ye moko. Tom, oyo azali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, na esika ya kokokisa bamposa na ye moko, yango esalisi ye akóma na baninga mingi ntango azali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongisa lisusu Ndako ya Mayangani.