Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 30

Kobá kotambola na kati ya solo

Kobá kotambola na kati ya solo

“Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”​—3 YOA. 4.

LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”

NA MOKUSE *

1. Ndenge 3 Yoane 3, 4 emonisi yango, nini epesaka biso esengo?

KANISÁ esengo oyo ntoma Yoane azalaki na yango, ntango ayokaki ete bato oyo asalisaki báyeba solo, bazalaki kokoba kosalela Yehova na bosembo! Bakutanaki na mikakatano mingi, mpe ntoma Yoane asalaki makasi mpo na kolendisa kondima ya bakristo yango oyo bazalaki lokola bana na ye ya elimo. Ndenge moko mpe, toyokaka esengo ntango toyoki ete bana na biso to mpe bato oyo tosalisá bayeba solo, bamipesi na Yehova mpe bazali kokoba kosalela ye.​—Tángá 3 Yoane 3, 4.

2. Mikanda oyo Yoane akomaki ezalaki na mokano nini?

2 Na mobu 98 T.B, ekoki kozala ete Yoane azalaki kofanda na engumba Efese to mpe pene na yango. Mbala mosusu akendaki kofanda na engumba yango nsima ya kobima na bolɔkɔ na esanga ya Patimosi. Na ntango wana nde elimo santu etindaki ye akoma mikanda misato. Mikanda yango ezalaki na mokano ya kolendisa bakristo ya sembo mpo bábatela kondima na bango epai ya Yesu mpe bákoba kotambola na kati ya solo.

3. Tokoyanola na mituna nini?

3 Yoane azalaki ntoma ya nsuka oyo atikalaki na bomoi, mpe azalaki komitungisa mpo na bopusi oyo bateyi ya lokuta bazalaki na yango na masangá. * (1 Yoa. 2:18, 19, 26) Bapɛngwi yango bazalaki koloba ete bayebi Nzambe, kasi bazalaki kotosa mibeko ya Yehova te. Tólobela toli oyo Yoane apesaki. Wana tozali kotalela toli yango, tokoyanola na mituna misato oyo: Kotambola na kati ya solo elimboli nini? Makambo nini ekoki kopekisa biso tótambola na kati ya solo? Mpe ndenge nini tokoki kosalisa basusu bátikala na kati ya solo?

KOTAMBOLA NA KATI YA SOLO ELIMBOLI NINI?

4. Na kotalela 1 Yoane 2:3-6 mpe 2 Yoane 4, 6, tosengeli kosala nini mpo na kotambola na kati ya solo?

4 Mpo na kotambola na kati ya solo, tosengeli koyeba solo oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe. Tosengeli mpe ‘kotosa mibeko ya Yehova.’ (Tángá 1 Yoane 2:3-6; 2 Yoane 4, 6.) Yesu atiká ndakisa malamu na likambo etali kotosa Yehova. Lolenge moko ya kotosa Yehova ezali ya kosala oyo tokoki mpo na kolanda matambe ya Yesu malamumalamu.​—Yoa. 8:29; 1 Pe. 2:21.

5. Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, makambo nini tosengeli komindimisa?

5 Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, tosengeli komindimisa ete Yehova azali Nzambe ya solo, mpe ete makambo nyonso oyo alobaka na biso na Biblia Liloba na ye, ezali solo. Tosengeli mpe kondima ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki. Lelo oyo bato mingi bandimaka te ete Yehova atyaki Yesu mafuta, mpo azala Mokonzi ya Bokonzi na ye. Yoane akebisaki ete ekozala na “bakosi mingi,” oyo bakopɛngwisa baoyo bandimaka solo oyo etali Yehova mpe Yesu na motema mobimba te. (2 Yoa. 7-11) Akomaki boye: “Nani azali moto ya lokuta soki ezali te moto oyo azali kowangana ete Yesu azali Kristo?” (1 Yoa. 2:22) Lolenge kaka moko oyo tosengeli kosala mpo tókosama te ezali ya koyekola Liloba ya Nzambe. Kaka soki tosali bongo nde tokoyeba Yehova ná Yesu. (Yoa. 17:3) Mpe kaka soki tosali bongo nde tokomindimisa ete tozali na kati ya solo.

MAKAMBO NINI EKOKI KOPEKISA BISO TÓTAMBOLA NA SOLO?

6. Mokakatano nini bilenge bakristo bakutanaka na yango?

6 Bakristo nyonso basengeli kozala ekɛngɛ mpo bákosama te na filozofi ya bato. (1 Yoa. 2:26) Mingimingi bakristo oyo bazali bilenge basengeli kokeba na motambo yango. Alexia, * elenge mwasi moko ya mbula 25 oyo afandaka na France alobi boye: “Ntango nazalaki naino na kelasi, nayekolaki makambo etali evolisyo mpe mateya ya filozofi; mateya yango ebulunganisaki ngai. Na ntango moko boye, nakómaki kosepela na mateya yango. Kasi, namonaki ete, ekozala malamu nandima makambo oyo Biblia eteyaka, na esika nandima makambo nyonso oyo balakisi bazalaki koloba.” Alexia ayekolaki buku La vie : comment est-elle apparue ? Évolution ou création ? Kaka nsima ya mwa bapɔsɔ, ntembe na ye nyonso esilaki. Alexia alobi boye: “Nandimisamaki ete Biblia elobaka solo. Mpe namonaki ete kotosa mitinda na yango, ekomemela ngai esengo mpe kimya.”

7. Tosengeli kokeba na likambo nini, mpe mpo na nini?

7 Bakristo nyonso, ezala bilenge to mikóló, basengeli kokeba kozala na bomoi ya liso na nse ya lokasa. Ntoma Yoane amonisaki ete tokoki te kokoba kotambola na kati ya solo mpe kozala na bomoi ya mbindo. (1 Yoa. 1:6) Soki tolingi ete Yehova asepela na biso, tosengeli kobosana te ete amonaka makambo nyonso oyo tosalaka. Ata soki bato bamonaka te makambo oyo tosalaka na nkuku, Yehova akoki komona makambo nyonso.​—Ebr. 4:13.

8. Likambo nini tosengeli koboya?

8 Tosengeli te kotalela lisumu ndenge mokili etalelaka yango. Ntoma Yoane akomaki boye: “Soki tolobi ete, ‘Tozali na lisumu te,’ tozali komikosa.” (1 Yoa. 1:8) Na mikolo ya Yoane, bapɛngwi bazalaki kokanisa ete moto akoki kaka kozala na boyokani ya malamu ná Nzambe, ata soki azali kokoba kosala masumu na nko. Lelo oyo, tofandi na bato oyo bakanisaka mpe bongo. Bato mingi balobaka ete bandimelaka Nzambe, kasi baboyaka kondima ndenge oyo atalelaka lisumu, mingimingi soki ezali likambo etali kosangisa nzoto. Likambo oyo Yehova amonaka ete ezali lisumu, bato yango balobaka ete ezali likambo oyo etali moto na moto, to ezali lolenge mosusu ya bomoi.

Bilenge, bóluka koyeba ntina oyo Biblia elobi ete likambo boye to boye ezali malamu to mabe. Yango ekosalisa bino bóyeba kolimbola ntina oyo boboyaka kosala makambo ya mabe (Talá paragrafe 9) *

9. Matomba nini bilenge bazwaka soki bakangami na makambo oyo Biblia eteyaka?

9 Ekoki kozala mpasi bilenge bakristo bátalela likambo etali kosangisa nzoto ndenge Yehova atalelaka yango, mpo baninga na bango ya mosala to ya kelasi, bandimaka te oyo Biblia elobi mpo na likambo yango. Yango nde ekómelaki ndeko mobali moko na nkombo Aleksandar. Alobi boye: “Bilenge basi mingi na eteyelo bazalaki kolinga nasangisa na bango nzoto. Balobaki na ngai ete lokola nazalaka na makango te, yango elakisi ete nasangisaka nzoto mibali na mibali.” Yo mpe okoki kokutana na likambo ya ndenge wana. Kasi soki osaleli makambo oyo Biblia esɛngi biso, okomiyoka malamu, okobatela nzoto na yo, okobɛla maladi ya motema te, mpe okobatela boninga na yo ná Yehova. Mbala nyonso oyo oboyi kosala likambo ya mabe, ekozala pɛtɛɛ mpo osala oyo ezali malamu. Kobosana mpe te ete ndenge oyo mokili etalelaka likambo ya kosangisa nzoto, eutá na Satana. Na yango, soki oboyi kokanisa ndenge bato ya mokili bakanisaka, ‘okolonga moto mabe.’​—1 Yoa. 2:14.

10. Ndenge nini 1 Yoane 1:9, ekoki kosalisa biso tósalela Yehova na lisosoli ya pɛto?

10 Toyebi ete Yehova nde azali na lotomo ya koyebisa biso likambo nini ezali lisumu. Mpe tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tókwea na lisumu te. Kasi soki tosali lisumu, toyebisaka yango Yehova na nzela ya libondeli. (Tángá 1 Yoane 1:9.) Mpe soki tosali lisumu ya monene, tolukaka lisalisi ya bankulutu oyo Yehova atyá mpo bábatelaka biso. (Yak. 5:14-16) Kasi, tosengeli te kokoba komipesaka foti mpo na mabunga oyo tosalá kala. Mpo na nini? Mpo Tata na biso ya bolingo apesá mbeka ya lisiko ya Mwana na ye, mpo masumu na biso elimbisama. Soki Yehova alobi ete akolimbisa masumu ya baoyo babongoli motema, akosala yango. Na yango, eloko moko te ekoki kopekisa biso tósalela Yehova na lisosoli ya pɛto.​—1 Yoa. 2:1, 2, 12; 3:19, 20.

11. Ndenge nini tokoki komibatela na mateya oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso?

11 Tosengeli koboya mateya ya bapɛngwi. Banda ntango lisangá ya bokristo ebandá, Zabolo asalelaka bakosi mingi mpo na kolona ntembe na mitema ya basaleli ya sembo ya Nzambe. Na yango, tosengeli koyeba kokesenisa makambo ya solo ná oyo ya lokuta. * Na nzela ya Internet, banguna na biso bakoki kopanza makambo ya lokuta mpo na kolɛmbisa kondima na biso epai ya Yehova, mpe bolingo mpo na bandeko na biso. Na yango, kondima te makanisi yango ya lokuta oyo euti epai ya Satana!​—1 Yoa. 4:1, 6; Em. 12:9.

12. Mpo na nini tosengeli kokómisa makasi kondima na biso na mateya oyo toyekoli?

12 Mpo na kolonga komekama ya Satana, tosengeli kokómisa makasi kondima na biso epai ya Yesu, mpe na mokumba oyo azali na yango na kati ya mokano ya Nzambe. Tosengeli mpe kotya motema epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa ebongiseli na ye lelo oyo. (Mat. 24:45-47) Tokokómisa kondima na biso makasi soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala. Soki tosali bongo, kondima na biso ekozala lokola nzete oyo misisa na yango epikami makasi na kati ya mabele. Paulo mpe alobaki likambo ya bongo ntango akomelaki bakristo oyo bazalaki na lisangá ya Kolose. Alobaki: “Lokola boyambi Kristo Yesu Nkolo, bókoba kotambola na bomoko elongo na ye, kopika misisa mpe kotongama na kati na ye mpe kotɛlɛma ngwi na kondima.” (Kol. 2:6, 7) Ezali na eloko moko te oyo Satana to bato oyo balandaka makanisi na ye bakoki kosala mpo na kolɛmbisa mokristo oyo akómisi makasi kondima na ye.​—2 Yoa. 8, 9.

13. Likambo nini tosengeli koyeba mpe mpo na nini?

13 Tosengeli koyeba ete mokili ekoyina biso. (1 Yoa. 3:13) Yoane akundweli biso ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene, Satana akómi na nkanda makasi. (Em. 12:12) Asalelaka mayele mabe, na ndakisa makambo ya pite to lokuta ya bapɛngwi. Kasi asalelaka mpe minyoko ya makasi. Lokola ayebi ete atikali na ntango mokuse, Satana azali kosala nyonso mpo na kopekisa mosala ya kosakola mpe kolɛmbisa kondima na biso. Na yango, tokoki kokamwa te ndenge mosala na biso ya kosakola epekisami na mikili mingi. Atako bongo, bandeko na biso oyo bazali na mikili yango, bazali koyika mpiko. Bazali komonisa ete ata soki Satana asali biso nini, tokoki kotikala sembo!

SALISÁ BASUSU BÁTIKALA NA KATI YA SOLO

14. Wapi lolenge moko oyo tokoki kosalisa bandeko na biso bátikala na kati ya solo?

14 Mpo na kosalisa bandeko na biso bátikala na kati ya solo, tosengeli komonisa motema mawa. (1 Yoa. 3:10, 11, 16-18) Tosengeli komoniselana bolingo, kaka te na ntango ya bisengo, kasi mpe na ntango ya mpasi. Na ndakisa, oyebi moto moko oyo ndeko to moninga na ye akufi mpe azali na mposa ya kobɔndisama to ya lisalisi na lolenge moko boye? To mpe oyoki ete bandeko na biso babungisi biloko na bango na likama moko boye mpe bazali na mposa bátongela bango lisusu Bandako na bango ya Bokonzi to bisika na bango ya kofanda? Tokomonisela bandeko na biso bolingo mpe motema mawa, kaka na maloba te kasi nde na misala.

15. Ndenge 1 Yoane 4:7, 8, emonisi yango, tosengeli kosala nini?

15 Tomekolaka Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló, ntango tomoniselanaka bolingo. (Tángá 1 Yoane 4:7, 8.) Likambo ya ntina oyo tosengeli kosala mpo na komoniselana bolingo, ezali ya kolimbisana. Na ndakisa, moto moko akoki kopesa biso nkanda mpe na nsima asɛngi bolimbisi. Tokomonisa bolingo soki tolimbisi ye mpe tobosani likambo yango. (Kol. 3:13) Ndeko mobali moko na nkombo Aldo akutanaki na likambo ya ndenge wana. Asilikaki ntango ayokaki ete ndeko mobali moko oyo azalaki komemya mingi alobaki mabe mpo na bato ya ekólo na ye. Aldo alobi boye: “Nabondelaki Yehova mingi mpo asalisa ngai nalongola makanisi mabe mpo na ndeko yango.” Kasi asalaki mpe likambo mosusu. Ayebisaki ndeko yango bábima mosala ya kosakola elongo. Aldo amonisaki ndeko yango ndenge likambo oyo alobaki etungisaki ye. Abakisi boye: “Ntango ndeko yango ayokaki ndenge likambo oyo alobaki etungisaki ngai, asɛngaki bolimbisi. Ndenge na ye ya koloba emonisaki mawa makasi oyo ayokaki mpo na likambo yango. Na nsima, tokómaki lisusu baninga ya malamu.”

16-17. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?

16 Ntoma Yoane azalaki kolinga bandeko mingi mpe mposa na ye ezalaki ete bázala na kondima makasi. Bolingo na ye mpe ndenge oyo azalaki komitungisa mpo na bango, emonisami polele na mikanda misato oyo akomelaki bango. Koyeba ete basi mpe mibali oyo bakoyangela ná Yesu bamonisaka mpe bizaleli malamu oyo Yoane azalaki na yango, elendisaka mpenza!​—1 Yoa. 2:27.

17 Tosengeli kozwa na motuya toli oyo tolobeli na lisolo oyo. Tózwa ekateli ya kotambola na kati ya solo, mpe ya kotosa Yehova na makambo nyonso ya bomoi na biso. Yekoláká Liloba na ye mpe tyeláká yango motema. Kómisá kondima na yo makasi epai ya Yesu. Boyá mateya ya filozofi ya bato mpe ya bapɛngwi. Boyá kozala na bomoi ya liso na nse ya lokasa mpe ya komipesa na masumu. Tosáká mitinda ya sembo ya Yehova oyo etali bizaleli malamu. Lisusu, tólimbisaka baoyo bapesi biso nkanda, mpe tósalisaka baoyo bazali na bosɛnga mpo bátikala makasi. Soki tosali bongo, tokokoba kotambola na kati ya solo ata soki tokutani na mikakatano nini.

LOYEMBO 49 Tósepelisa motema ya Yehova

^ par. 5 Tofandi na mokili oyo Satana, tata ya lokuta azali koyangela. Yango wana, ekoki kozala mpasi mpo tókoba kotambola na kati ya solo. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana. Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova asalelaki ntoma Yoane mpo akoma mikanda misato. Mikanda yango esalisaki bango, ekoki mpe kosalisa biso. Na mikanda yango, tokoyekola makambo oyo ekoki kopekisa biso kotambola na kati ya solo, mpe oyo tokoki kosala mpo tólonga makambo yango.

^ par. 6 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 11 Talá lisolo ya boyekoli “Otalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 08/2018.

^ par. 59 ELILINGI: Na eteyelo, ndeko mwasi moko ya elenge azali komona ndenge baninga na ye bazali kolendisa likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali mpe basi na basi. (Na bamboka mosusu, bato basalelaka balangi oyo ezali na monama mpo na kolobela likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali mpe basi na basi.) Na nsima, ndeko mwasi yango azwi ntango ya kosala bolukiluki mpo na kolendisa kondima na ye ya bokristo. Yango esalisi ye azwa ekateli ya malamu.