Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ntango nini Yesu akómaki Nganga-nzambe Monene? Kondimana ya sika endimamaki ntango nini mpe ebandaki kosala ntango nini?

Ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Yesu akómaki Nganga-nzambe Monene ntango azwaki batisimo na mobu 29 T.B. Mpo na nini tolobi bongo? Ntango Yesu azwaki batisimo, amonisaki ete andimi kopesa nzoto na ye lokola mbeka likoló ya etumbelo ya elilingi oyo emonisi “mokano” ya Nzambe. (Gal. 1:4; Ebr. 10:5-10) Lokola etumbelo yango ya elilingi etyamaki kobanda ntango oyo Yesu azwaki batisimo, na ntembe te, tempelo monene ya elimo oyo elimboli bibongiseli mpo na losambo ya pɛto ya Yehova na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, etyamaki mpe na ntango yango, mpo etumbelo ezali eteni ya ntina mingi na tempelo yango ya elimo.​—Mat. 3:16, 17; Ebr. 5:4-6.

Lokola tempelo monene etyamaki, ezalaki kosɛnga ete nganga-nzambe monene mpe azala. Yango wana, Yesu atyamaki “mafuta na elimo santu mpe na nguya,” mpo na kokokisa mokumba yango. (Mis. 10:37, 38; Mrk. 1:9-11) Kasi, nini endimisi biso ete Yesu atyamaki Nganga-nzambe Monene liboso ya liwa mpe lisekwa na ye? Ndakisa ya Arona mpe ya banganga-nzambe monene oyo bazalaki bakitani na ye ekosalisa biso tózwa eyano na motuna yango.

Mibeko oyo Yehova apesaki Moize elobaki ete, kaka nganga-nzambe monene nde asengelaki kokɔta na esika eleki mosantu ya tabernakle mpe, na nsima, na esika eleki mosantu ya tempelo. Rido moko nde ezalaki kokabola esika mosantu na esika eleki mosantu. Nganga-nzambe monene azalaki kokatisa rido yango kaka na mokolo ya kozipa masumu. (Ebr. 9:1-3, 6, 7) Arona ná bakitani na ye batyamaki mafuta lokola banganga-nzambe monene liboso bábanda kokatisa rido mpo na kokɔta na esika eleki mosantu. Ndenge moko mpe, Yesu asengelaki kotyama lokola nganga-nzambe monene liboso ete akufa mpe ‘aleka na rido, elingi koloba nzoto na ye,’ mpo na kokende na likoló. (Ebr. 10:20) Mpo na ntina yango nde ntoma Paulo alobelaki Yesu lokola “nganga-nzambe monene” oyo azali koya mpo na koleka na “hema ya monene koleka mpe ya kokoka koleka mpe oyo esalemi na mabɔkɔ te,” mpe na “likoló mpenza.”​—Ebr. 9:11, 24.

Kondimana ya sika endimamaki mpe ebandaki kosala nzela moko. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo ntango Yesu amataki na likoló mpe amonisaki motuya ya mbeka na ye mpo na bato, asalaki likambo ya liboso kati na makambo misato, mpo kondimana ya sika endimama. Makambo yango misato mpe esalaki ete kondimana ya sika ebanda kosala. Makambo yango misato nini?

Ya liboso, Yesu amonanaki liboso ya Yehova, ya mibale, amonisaki motuya ya mbeka na ye liboso ya Yehova, mpe ya misato, Yehova andimaki motuya ya mbeka ya makila ya Yesu oyo esopamaki. Liboso makambo wana misato esalema, kondimana ya sika endimamaki naino te.

Biblia elobeli te na bosikisiki ntango oyo Yehova andimaki motuya ya mbeka ya Yesu. Na yango, tokoki te koloba na bosikisiki ntango oyo kondimana ya sika endimamaki mpe ebandaki kosala. Atako bongo, toyebi ete Yesu amataki na likoló mikolo 10 liboso ya Pantekote. (Mis. 1:3) Na ntango moko boye, na boumeli ya mwa eleko yango ya mokuse, Yesu amonisaki motuya ya mbeka na ye liboso ya Yehova, mpe Yehova andimaki yango. (Ebr. 9:12) Likambo yango emonanaki polele na Pantekote. (Mis. 2:1-4, 32, 33) Kondimana ya sika endimamaki mpe ebandaki kosala.

Na mokuse, kondimana ya sika endimamaki mpe ebandaki kosala ntango Yehova andimaki motuya ya makila ya Yesu oyo esopamaki. Mpe kondimana yango ebandaki kosala ntango Yesu, Nganga-nzambe Monene, akómaki moyokanisi na yango.​—Ebr. 7:25; 8:1-3, 6; 9:13-15.