Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 33

Lisekwa emonisaka bolingo, bwanya, mpe motema molai ya Nzambe

Lisekwa emonisaka bolingo, bwanya, mpe motema molai ya Nzambe

“Lisekwa ekozala.”​—MIS. 24:15.

LOYEMBO 151 Akobenga

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini Yehova akelaki bomoi?

NA NTANGO moko boye, Yehova azalaki kaka ye moko. Kasi, yango ekómisaki ye mawamawa te. Azalaki na mposa te ete moto azala pene na ye mpo azala na esengo. Atako bongo, Nzambe alingaki ete bato mosusu básepela mpe na bomoi. Bolingo etindaki Yehova abanda kokela.​—Nz. 36:9; 1 Yoa. 4:19.

2. Ntango Yehova azalaki kokela biloko mosusu, Yesu mpe baanzelu bazalaki koyoka ndenge nini?

2 Yehova abandaki naino na kokela mwana na ye Yesu. Na nsima, na nzela ya Mwana yango ya liboso, “biloko mosusu nyonso ezalisamaki,” ezala mpe bamilio ya baanzelu. (Kol. 1:16) Yesu asepelaki na libaku oyo azalaki na yango ya kosala elongo na Tata na ye. (Mas. 8:30) Baanzelu mpe bazalaki na ntina ya kosepela. Bazalaki komona ndenge Yehova ná Yesu, Mosali na ye ya mayele, bazalaki kokela likoló mpe mabele. Baanzelu yango bamiyokaki ndenge nini? “Babandaki koganga na esengo” ntango mabele esalemaki, mpe na ntembe te, bakobaki kosepela mbala nyonso oyo Yehova akeli eloko moko; mingimingi ntango akelaki bato. (Yobo 38:7; Mas. 8:31) Biloko nyonso oyo Yehova akelaki, emonisaki bolingo mpe bwanya na ye.​—Nz. 104:24; Rom. 1:20.

3. Ndenge emonisami na 1 Bakorinti 15:21, 22, matomba nini bato bakoki kozwa na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu?

3 Mokano ya Yehova ezalaki ete bato bázala na bomoi ya seko na mabele kitoko oyo akelá. Kasi lokola Adama ná Eva batombokelaki Tata na bango ya bolingo, bakokaki lisusu te kozala na bomoi libela na libela. (Rom. 5:12) Yehova asalaki nini mpo na likambo yango? Na mbala moko, amonisaki makambo oyo akosala mpo na kobikisa bato. (Eba. 3:15) Yehova azwaki mokano ya kopesa Mwana na ye Yesu lokola lisiko, mpo bana ya Adama ná Eva bákoka kosikolama na lisumu mpe na liwa. Mpe na nsima, akokaki kopesa bomoi ya seko na moto nyonso oyo aponi kosalela ye.​—Yoa. 3:16; Rom. 6:23; tángá 1 Bakorinti 15:21, 22.

4. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

4 Ezali na mituna mingi oyo tokoki komituna mpo na elaka ya Nzambe ya kosekwisa bato. Na ndakisa, ndenge nini lisekwa ekosalema? Tokozala na likoki ya koyeba lisusu bandeko ya libota mpe baninga na biso ntango bakosekwa? Na ndenge nini lisekwa ekopesa biso esengo? Mpe ndenge nini komanyola na lisekwa ekoki kosalisa biso tókolisa lisusu botɔndi mpo na bolingo, bwanya, mpe motema molai ya Yehova? Tiká tólobela mituna yango.

MBALA MOSUSU LISEKWA EKOSALEMA NDENGE NINI?

5. Mpo na nini tokoki koloba ete bato nyonso bakosekwa nzela moko te?

5 Tokoki kokanisa ete, ntango Yehova akosekwisa bamilio ya bato na nzela ya Mwana na ye, akozongisa bango nyonso te na bomoi nzela moko. Mpo na nini? Mpo soki bango nyonso bazongi na bomoi nzela moko, yango ekoki mbala mosusu kokɔtisa mobulungano. Mpe Yehova asalaka te makambo na ndenge ya mobulu. Ayebi ete mpo bato báfanda na kimya, makambo esengeli kosalema na molɔngɔ. (1 Ko. 14:33) Yehova Nzambe amonisaki bwanya mpe motema molai ntango asalaki elongo na Yesu mpo na kobongisa mabele ezala esika ya malamu oyo bato basengeli kofanda. Yesu mpe akomonisa bwanya mpe motema molai na boumeli ya mbula nkóto ntango akosala elongo na bato oyo bakobika na etumba ya Armagedone mpo na kobongisa mabele ezala esika ya malamu mpo na bato oyo bakosekwa.

Baoyo bakobika na Armagedone, bakoteya bato oyo bakosekwa makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe makambo oyo Yehova asɛngaka biso (Talá paragrafe 6) *

6. Na kotalela Misala 24:15, banani bakozala na kati ya bato oyo Yehova akosekwisa?

6 Likambo ya ntina ezali ete, baoyo bakobika na etumba ya Armagedone bakoteya bato oyo bakosekwa makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe masɛngami ya Yehova. Mpo na nini? Mpo bato mingi oyo bakosekwa, bakozala “bato oyo bazangi boyengebene.” (Tángá Misala 24:15.) Ekosɛnga ete básala mbongwana mingi mpo bázwa mapamboli ya lisiko ya Kristo mpe bázwa bomoi ya seko. Kanisá mosala makasi oyo ekosalema mpo na koteya solo oyo etali Nzambe na bamilio ya bato oyo bayebi ata likambo moko te oyo etali Yehova! Ekosɛnga ete moto mokomoko oyo akosekwa azala na moto oyo akoteya ye kaka ndenge toyekolaka na bato Biblia lelo oyo? Bakotinda bato yango oyo bakosekwa na masangá mpo bázwa formasyo mpo na koteya baoyo bakosekwa nsima na bango? Tosengeli kozela mpo tómona. Kasi toyebi ete na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, “mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” (Yis. 11:9) Tokozala mpenza na mosala mingi ya kosala oyo ekopesa biso esengo na boumeli ya Mbula Nkóto!

7. Mpo na nini basaleli ya Yehova bakomitya na esika ya bato oyo bakosekwa ntango bakoteya bango?

7 Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, basaleli nyonso ya Yehova bakokoba kosala mbongwana mpo na kosepelisa ye. Na yango, bango nyonso bakomitya mpenza na esika ya baoyo bakosekwa wana bazali kosalisa bango básala mbongwana mpo na kolonga makanisi mpe bamposa ya mabe, mpe bázala na bomoi oyo eyokani na mitinda ya Yehova. (1 Pe. 3:8) Na ntembe te, baoyo bakosekwa, bakomona ete basaleli ya Yehova bazali na komikitisa mpe bazali kokoba kosala mbongwana mpo na kosepelisa ye. Mpe bato yango bakosepela kosalela Yehova elongo na basaleli na ye.​—Flp. 2:12.

TOKOZALA NA LIKOKI YA KOYEBA LISUSU BAOYO BAKOSEKWA?

8. Mpo na nini tokoki koloba ete tokozala na likoki ya koyeba lisusu bandeko ya libota mpe baninga na biso oyo bakosekwa?

8 Ezali na bantina mingi oyo ekoki kotinda biso tóloba ete baoyo bakoyamba bato oyo bakosekwa, bakozala na likoki ya koyeba lisusu bandeko ya libota mpe baninga na bango. Na ndakisa, soki tokanisi ndenge oyo Yehova asekwisaki bato na ntango ya kala, tokoki koloba ete Yehova akosala ete baoyo bakosekwa bázala na likoki ya komona, ya koloba, mpe ya kokanisa kaka ndenge bazalaki na yango mwa moke liboso bákufa. Kobosana te ete Yesu akokanisaki liwa na mpɔngi, mpe lisekwa na kolamuka na mpɔngi. (Mat. 9:18, 24; Yoa. 11:11-13) Soki moto alamuki na mpɔngi, amonanaka mpe alobaka kaka ndenge azalaki kosala liboso alala. Tótalela ndakisa ya Lazare. Elekaki mikolo minei kobanda akufaki mpe nzoto na ye ebandaki kobeba. Kasi ntango Yesu asekwisaki Lazare, bandeko na ye ya basi bayebaki ye mbala moko mpe na ntembe te, Lazare mpe ayebaki bango.​—Yoa. 11:38-44; 12:1, 2.

9. Mpo na nini bakufi bakosekwa te na makanisi mpe na nzoto ya kokoka?

9 Yehova alaki ete na boyangeli ya Kristo, moto moko te akoloba: “Nazali na maladi.” (Yis. 33:24; Rom. 6:7) Na yango, baoyo bakosekwa bakozala nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi bakokóma bato ya kokoka mbala moko te. Soki te, bandeko ya libota mpe baninga na bango bakoyeba bango te. Emonani ete moto nyonso akokóma na nzoto ya kokoka mokemoke na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. Kaka na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto nde Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye. Na nsima, Bokonzi ekokokisa likambo nyonso oyo Yehova alingaki, ata mpe kokómisa bato na nzoto ya kokoka.​—1 Ko. 15:24-28; Em. 20:1-3.

NA NDENGE NINI LISEKWA EKOPESA BISO ESENGO?

10. Lisekwa ekotinda yo omiyoka ndenge nini?

10 Kanisá esengo oyo okoyoka ntango okokutana lisusu ná bato oyo olingaka. Esengo oyo okoyoka na ntango yango, ekotinda yo osɛka to olela? Esengo makasi oyo okoyoka ekotinda yo oyembela Yehova mpo na kokumisa ye? Ntembe ezali te ete likabo kitoko ya lisekwa, ekotinda biso tólinga lisusu mingi Tata na biso oyo atyelaka biso likebi, mpe Mwana na ye ya bolingo.

11. Na kotalela maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 5:28, 29, nini ekokómela baoyo batosaka Nzambe?

11 Kanisá esengo bato oyo bakosekwa bakozala na yango ntango bakosala mbongwana na bomoi na bango mpo na kotosa mitinda ya sembo ya Yehova. Baoyo bakosala mbongwana yango, bakozala na bomoi libela na libela na Paradiso awa na mabele. Kasi Yehova akotika te ete baoyo bakoboya kosala mbongwana bákoba kozala na bomoi na Paradiso mpe bábebisa kimya oyo ekozala kuna.​—Yis. 65:20; tángá Yoane 5:28, 29.

12. Mapamboli nini Yehova akopesa bato nyonso oyo bakozala na mabele?

12 Ntango Bokonzi ekoyangela mabele, basaleli nyonso ya Nzambe bakomona bosolo ya maloba oyo ezali na Masese 10:22, oyo elobi ete: “Lipamboli ya Yehova​—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.” Na lisalisi ya elimo ya Yehova, basaleli ya Nzambe bakokóma bazwi na elimo, elingi koloba bakokóma lokola Kristo, mpe mokemoke bakokóma bato ya kokoka. (Yoa. 13:15-17; Ef. 4:23, 24) Mpe mokolo na mokolo, nzoto na bango ekokóma lisusu makasi. Ekozala mpenza bomoi moko ya esengo! (Yobo 33:25) Kasi, ndenge nini kokanisa na mozindo na lisekwa ekosalisa yo sikoyo?

MONISÁ BOTƆNDI MPO NA BOLINGO YA YEHOVA

13. Na kotalela Nzembo 139:1-4, ndenge nini lisekwa ekomonisa ete Yehova ayebi biso malamu mpenza?

13 Ndenge tomonaki yango liboso, ntango Yehova akosekwisa bato, bakozonga na makanisi mpe bomoto oyo bazalaki na yango liboso bákufa. Yango emonisi nini? Emonisi ete Yehova alingaka yo mingi mpenza, yango wana amonaka mpe abosanaka te makambo nyonso oyo okanisaka, mayoki na yo, makambo oyo olobaka, mpe oyo osalaka. Na yango, soki esɛngi ete asekwisa yo, ekozala mpasi te mpo azongisa yo ndenge ozalaki liboso ete okufa. Mokonzi Davidi ayebaki ete Yehova ayebi mokomoko na biso malamu mpenza. (Tángá Nzembo 139:1-4.) Koyeba ete Yehova ayebi yo malamumalamu etindaka yo omiyoka ndenge nini?

14. Kokanisa ndenge oyo Yehova ayebi biso malamu, etindaka biso tómiyoka ndenge nini?

14 Koyeba ete Yehova ayebi biso malamu mpe kokanisa na mozindo na likambo yango, esalaka ete tómitungisa te. Mpo na nini? Kobosana te ete Yehova atyelaka biso mpenza likebi. Azwaka mokomoko na biso na motuya mingi. Ayebi malamu makambo oyo tokutaná na yango na bomoi, oyo esalá ete tózala ndenge tozali lelo. Likambo yango ekitisaka mpenza biso motema! Tosengeli komiyokaka soki moke te ete tozali biso moko. Yehova azalaka ntango nyonso elongo na biso mpe alingaka kosalisa biso.​—2 Nt. 16:9.

MONISÁ BOTƆNDI MPO NA BWANYA YA YEHOVA

15. Ndenge nini lisekwa emonisi ete Yehova azali mpenza na bwanya?

15 Mpo na kobanga liwa, bato bakoki kondima kosala ata makambo oyo bakokaki te kosala. Baoyo batambwisami na Satana babangisaka bato ete bakoboma bango soki baboyi kotɛka baninga na bango to kowangana bindimeli na bango. Kasi bakoki kobangisa biso te. Mpo toyebi ete ata soki banguna na biso babomi biso, Yehova akozongisa biso lisusu na bomoi. (Em. 2:10) Tondimisami ete, ata soki basali nini, yango ekopekisa biso te kosalela Yehova. (Rom. 8:35-39) Yehova amonisi ete azali mpenza na bwanya na ndenge apesi biso elikya ya lisekwa! Elikya yango esalaka ete tóbanga te ata soki baoyo bapesaka Satana mabɔkɔ balobi ete bakoboma biso soki tosali te makambo oyo basɛngi biso. Lisusu, elikya yango epesaka biso mpenza mpiko ya kotikala sembo epai ya Yehova.

Bikateli oyo tozwaka, emonisaka ete totyaka motema na elaka ya Yehova ya kokokisa bamposa na biso ya mosuni? (Talá paragrafe 16) *

16. Mituna nini osengeli komituna, mpe ndenge nini biyano na mituna yango ekoki kosalisa yo oyeba soki otyelaka Yehova motema?

16 Soki baoyo bayinaka Yehova balobi ete bakoboma yo, okotyela Yehova motema ete akosekwisa yo? Ndenge nini okoki koyeba ete okotyela ye motema? Ya liboso, osengeli komituna boye: ‘Bikateli ya mikemike oyo nazwaka mokolo na mokolo, emonisaka ete natyelaka Yehova motema?’ (Luka 16:10) Ya mibale: ‘Lolenge ya bomoi na ngai, emonisaka ete natyaka motema na elaka ya Yehova oyo elobi ete akokokisa bamposa na ngai ya mosuni soki natye Bokonzi na esika ya liboso?’ (Mat. 6:31-33) Soki oyanoli ɛɛ na mituna yango, okomonisa ete otyelaka Yehova motema mpe yango ekomonisa ete omibongisi mpo na komekama nyonso oyo okoki kokutana na yango na bomoi.​—Mas. 3:5, 6.

MONISÁ BOTƆNDI MPO NA MOTEMA MOLAI YA YEHOVA

17. (a) Ndenge nini lisekwa emonisi ete Yehova azali na motema molai? (b) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na motema molai ya Yehova?

17 Yehova atyá mokolo mpe ngonga oyo akosukisa mokili oyo mabe. (Mat. 24:36) Akosala yango te liboso ete ngonga yango ekoka. Azali na mposa makasi ya kosekwisa bato oyo bakufá, kasi azali komonisa motema molai. (Yobo 14:14, 15) Azali kozela ngonga oyo atyá ekoka mpo azongisa lisusu bango na bomoi. (Yoa. 5:28) Tozali na bantina mingi ya komonisa botɔndi mpo na motema molai ya Yehova. Kanisá naino: Motema molai ya Yehova esali ete bato ebele, ata mpe biso, tózwa ntango ya ‘kobongola motema.’ (2 Pe. 3:9) Yehova alingi ete bato ebele bázwa likoki ya kozala na bomoi ya seko. Na yango, tiká ete tómonisa botɔndi mpo na motema molai na ye! Ndenge nini tokoki kosala yango? Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na koluka ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ mpe kosalisa bango bálinga Yehova mpe básalela ye. (Mis. 13:48) Yango ekosala ete bázwa mpe matomba mpo na motema molai ya Yehova lokola biso.

18. Mpo na nini tosengeli komonisela basusu motema molai?

18 Liboso tókóma bato ya kokoka, Yehova akozela tii na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Kino ntango yango ekoka, Yehova akokoba kolimbisa masumu na biso. Na yango lokola Yehova, tosengeli kotyaka likebi mingi na bizaleli malamu ya basusu mpe komoniselaka bango motema molai. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo mobali na ye akómaki konyokwama na maladi moko makasi mpe atikaki koyangana na makita. Ndeko mwasi yango alobi boye: “Likambo yango epesaki ngai mpasi mingi mpenza. Bomoi na biso ebongwanaki na mbalakaka, mpe tokokaki lisusu te kosala makambo oyo tokanaki kosala.” Kasi, ndeko mwasi yango akobaki kaka komonisela mobali na ye motema molai. Atyelaki Yehova motema mpe atikaki te. Ndenge moko na Yehova, ndeko mwasi yango akobaki kotya likebi na bizaleli malamu ya mobali na ye, na esika atya makanisi na maladi oyo mobali na ye azalaki na yango. Alobi boye: “Mobali na ngai azalaka na bizaleli ya kitoko, mpe azali kobonga mokemoke.” Ya solo, ezali mpenza na ntina tómonisa motema molai epai ya bandeko na biso ya libota to mpe epai ya bandeko ya lisangá oyo bazali kosala makasi bálonga mikakatano ya bomoi!

19. Osengeli kozwa ekateli ya kosala nini?

19 Yesu ná baanzelu batɔndaki na esengo ntango Yehova akelaki mabele. Sikoyo kanisá esengo oyo bakozala na yango ntango bakomona mabele etondi na bato ya kokoka oyo balingaka mpe basalelaka Yehova. Kanisá esengo oyo bato oyo bakokende na likoló bakoyoka ntango bakomona ndenge mosala na bango ememeli bato bolamu. (Em. 4:4, 9-11; 5:9, 10) Kanisá mpe ntango tokobimisa mai ya miso mpo na esengo kasi mpo na mawa te! Kanisá ntango maladi, mawa, mpe liwa ekozala lisusu te mpo na libela. (Em. 21:4) Liboso ntango yango ekoka, zwá ekateli ya komekola Tata na biso ya bolingo, ya bwanya, mpe oyo amonisaka motema molai. Soki osali bongo, okobatela esengo na yo ata soki okutani na mokakatano nini. (Yak. 1:2-4) Tosengeli mpenza komonisa botɔndi mpo na elaka ya Yehova oyo ete: “Lisekwa ekozala!”​—Mis. 24:15.

LOYEMBO 141 Bomoi ezali likamwisi

^ par. 5 Yehova azali Tata ya bolingo, ya bwanya mpe ya motema molai. Tokoki komona bizaleli yango na ndenge oyo akelaki biloko nyonso mpe na mokano oyo azali na yango ya kozongisa lisusu na bomoi bato oyo bakufá. Lisolo oyo ekolobela mwa mituna oyo tokoki kozala na yango mpo na lisekwa mpe ekolobela ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na bolingo, bwanya, mpe motema molai ya Yehova.

^ par. 59 ELILINGI: Mobali moko oyo akufá eleki bankama ya bambula, asekwi na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. Ndeko mobali moko oyo abiki na etumba ya Armagedone, azali koteya mobali yango oyo asekwi makambo oyo asengeli kosala mpo azwa matomba na lisiko ya Kristo.

^ par. 61 ELILINGI: Ndeko mobali moko azali koyebisa patrɔ na ye ete mikolo mingi akobanda kosala te nsima ya ngonga ya mosala. Ayebisi patrɔ yango ete na bampokwa yango akobanda kosala makambo oyo etali losambo ya Yehova. Kasi soki na bantango mosusu bazali mpenza na mposa na ye, akondima kosala nsima ya ngonga ya mosala.