Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 34

Ozali na motuya na kati ya lisangá!

Ozali na motuya na kati ya lisangá!

“Kaka ndenge nzoto ezalaka moko, kasi na binama mingi, mpe binama nyonso ya nzoto yango, atako ezalaka mingi, ezali nzoto kaka moko, Kristo mpe azali bongo.”​—1 KO. 12:12.

LOYEMBO 101 Tósala na bomoko

NA MOKUSE *

1. Lokumu nini oyo tozali na yango?

KOZALA na kati ya lisangá ya Yehova ezali lokumu monene! Tozali na Paradiso ya elimo oyo etondi na bato ya kimya mpe ya esengo. Oyebaka esika na yo na kati ya lisangá?

2. Ndakisa nini ntoma Paulo asalelaki na mikanda mingi oyo akomaki?

2 Ndakisa moko oyo ntoma Paulo asalelaki na mikanda mingi oyo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózwa mateya mingi mpo na lisolo na biso. Na mikanda yango, Paulo akokanisaki lisangá na nzoto ya moto. Akokanisaki mpe ndeko mokomoko ya lisangá na biteni ya nzoto.​—Rom. 12:4-8; 1 Ko. 12:12-27; Ef. 4:16.

3. Makambo nini misato tokolobela na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokolobela mateya misato ya ntina mingi oyo tokoki kozwa na ndakisa oyo Paulo asalelaki. Ya liboso, tokomona ete mokomoko na biso azali na esika * na ye na kati ya lisangá. Ya mibale, tokolobela makambo oyo tokoki kosala soki tozali koyeba te esika na biso na kati ya lisangá. Mpe ya misato, tokolobela ntina oyo tosengeli kokoba kokokisa mokumba oyo Nzambe apesá mokomoko na biso na kati ya lisangá na ye.

MOKOMOKO NA BISO AZALI NA MOKUMBA NA YE NA KATI YA LISANGÁ

4. Baroma 12:4, 5 ezali koteya biso nini?

4 Liteya ya liboso oyo tokoki kozwa na ndakisa oyo ntoma Paulo asalelaki ezali ete mokomoko na biso azali na esika ya ntina mingi na kati ya libota ya Yehova. Paulo abandaki ndakisa na ye na maloba oyo: “Se ndenge tozali na binama mingi na nzoto kaka moko, kasi binama nyonso ezali na mosala kaka moko te, ndenge moko mpe biso, atako tozali mingi, tozali nzoto kaka moko na bomoko na Kristo, kasi tozali binama, oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.” (Rom. 12:4, 5) Paulo alingaki mpenza koloba nini? Biso nyonso tozali na mokumba ndenge moko te na kati ya lisangá, kasi mokomoko na biso azali na motuya.

Tozali na mikumba ndenge na ndenge na kati ya lisangá, kasi mokomoko na biso azali na ntina (Talá paragrafe 5-12) *

5. “Makabo” nini Yehova apesá lisangá?

5 Ntango tolobeli baoyo bazali na esika na kati ya lisangá, mbala mosusu makanisi na yo ekei mbala moko epai ya baoyo bazali kokamba lisangá. (1 Tes. 5: 12; Ebr. 13:17) Ezali solo ete na nzela ya Kristo, Yehova apesá lisangá na ye “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Na kati ya ‘makabo yango oyo ezali bato’, tokoki kotánga bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ná basungi na bango, bandeko ya bakomite ya filiale, bakɛngɛli-batamboli, balakisi na biteyelo ya teokrasi, bankulutu ya masangá, mpe basaleli na misala. Bandeko mibali yango nyonso batyamaki na litambwisi ya elimo santu mpo na kobatela etonga ya Yehova mpe mpo na kolendisa lisangá.​—1 Pe. 5: 2, 3

6. Na kotalela 1 Batesaloniki 2:6-8, bandeko mibali oyo batyamaka na nzela ya elimo santu basalaka nini?

6 Bandeko mibali batyamaka na nzela ya elimo santu mpo na kokokisa mikumba ndenge na ndenge na kati ya lisangá. Kaka ndenge mabɔkɔ mpe makolo to biteni mosusu ya nzoto esalaka mpo na litomba ya nzoto mobimba, bandeko mibali oyo batyamaka na nzela ya elimo santu, basalaka mosala makasi mpo na litomba ya lisangá mobimba. Bandeko yango balukaka lokumu na bango moko te. Kasi, balukaka nde kolendisa mpe kopesa bandeko ya lisangá makasi. (Tángá 1 Batesaloniki 2:6-8.) Topesaka Yehova matɔndi mpo na bandeko mibali yango oyo batyaka matomba ya basusu na esika ya liboso!

7. Bandeko mingi oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, bazwaka mapamboli nini?

7 Bandeko mosusu na kati ya lisangá bakoki kozala bamisionɛrɛ, babongisi-nzela monene, to mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza. Kutu, ezali na bandeko na mokili mobimba oyo bamipesá mobimba na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Yango esalisi bango bákómisa bato ebele bayekoli ya Kristo Yesu. Atako bandeko yango bazalaka te na biloko ebele ya mosuni, Yehova apesá bango biloko mingi ya malamu. (Mrk. 10:29, 30) Tozwaka bandeko yango na motuya mingi, mpe tozalaka na botɔndi ndenge bazalaka na kati ya lisangá!

8. Mpo na nini mosakoli nyonso ya nsango malamu azali na motuya na miso ya Yehova?

8 Kaka bandeko mibali oyo bazali na mikumba na kati ya lisangá mpe bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso nde bazali na esika na kati ya lisangá? Te! Mosakoli nyonso ya nsango malamu azali na motuya na miso ya Nzambe mpe na kati ya lisangá. (Rom. 10:15; 1 Ko. 3: 6-9) Kutu, mosala ya kokómisa bato bayekoli ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezali moko kati na mikano ya ntina mingi ya lisangá. (Mat. 28:19, 20; 1 Tim. 2:4) Bandeko nyonso oyo basakolaka, ezala baoyo bazwá batisimo to te, basalaka nyonso bátya mosala yango na esika ya liboso na bomoi na bango.​—Mat. 24:14.

9. Mpo na nini tozwaka bandeko basi bakristo na motuya mingi?

9 Yehova apesi bandeko basi esika ya lokumu na kati ya lisangá. Azwaka na motuya bandeko basi nyonso, ezala bamama, basi oyo mibali bakufá, to mpe bandeko basi minzemba oyo basalelaka ye na bosembo. Biblia elobeli mbala mingi basi oyo basepelisaki Nzambe. Ekumisi bango mpo na misala malamu, mpe mpo na bizaleli malamu oyo bamonisaki, na ndakisa bwanya, kondima, molende, mpiko, mpe elimo ya bokabi. (Luka 8:2, 3; Mis. 16:14, 15; Rom. 16:3, 6; Flp. 4:3; Ebr. 11:11, 31, 35) Topesaka Yehova matondi mpo na bandeko basi yango oyo bazali na masangá na biso, oyo bamonisaka bizaleli malamu ya ndenge wana!

10. Mpo na nini tozwaka bandeko na biso ya mibange na motuya mingi?

10 Tosepelaka mpe mingi na bandeko na biso ya mibange oyo bazali na masangá na biso. Na masangá mosusu, ezali na bandeko basi mpe bandeko mibali ya mibange oyo basalelá Yehova na bosembo bomoi na bango mobimba. Ekoki mpe kozala na bandeko mosusu ya mibange oyo bayekoli solo kala mingi te. Lokola mbula na bango ezali se kopusana, bandeko yango mingi bazali kobunda na likambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto. Mikakatano yango ekoki kosala ete básala lisusu mingi te na lisangá mpe na mosala ya kosakola. Atako bongo, bandeko yango ya mibange basalaka oyo bakoki na mosala ya kosakola, mpe basalelaka makasi na bango mpo na kolendisa basusu mpe kopesa bango formasyo! Mpe tozwaka matomba mingi na makambo oyo bayebi. Bazali mpenza kitoko na miso ya Yehova mpe na miso na biso.​—Mas. 16:31.

11-12. Ndenge nini bilenge ya lisangá na bino balendisaka yo?

11 Bongo bilenge na biso? Lokola bazali na mokili oyo eyangelami na Satana Zabolo mpe oyo elandaka makanisi na ye ya mabe, bazali kokutana na mikakatano mingi. (1 Yoa. 5:19) Kasi, ntango tomonaka bilenge yango bazali kopesa biyano na makita ya lisangá, bazali kosakola mpe bazali kolobela na mpiko nyonso mateya oyo bandimaka, yango elendisaka biso. Ya solo, bino bilenge, bozali na motuya mingi na lisangá ya Yehova!​—Nz. 8:2.

12 Kasi, bandeko na biso mosusu bakakatanaka mpo na kondima ete bazali na motuya na kati ya lisangá. Nini ekoki kosalisa mokomoko na biso amona ete azali na motuya na kati ya lisangá? Tiká tólobela yango.

YEBÁ ETE OZALI NA MOTUYA NA KATI YA LISANGÁ

13-14. Mpo na nini bato mosusu bakoki kokanisa ete bazali na motuya te na kati ya lisangá?

13 Tótalela liteya ya mibale oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Paulo. Abendaki likebi na mokakatano oyo bandeko mingi bakutanaka na yango lelo oyo; bazalaka na mokakatano ya kondima ete bazali na motuya na kati ya lisangá. Paulo akomaki boye: “Soki lokolo elobi, ‘Mpo nazali lobɔkɔ te, nazali eteni ya nzoto te,’ ezali te mpo na bongo nde ekotika kozala eteni ya nzoto. Mpe soki litoi elobi ete, ‘Mpo nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te,’ ezali te mpo na bongo nde ekotika kozala eteni ya nzoto.” (1 Ko. 12:15, 16) Paulo alingaki mpenza koloba nini?

14 Soki ozali komikokanisa na basusu na kati ya lisangá, okoki kobanda kokanisa ete ozali na motuya te. Bandeko mosusu na kati ya lisangá bakoki kozala bateyi malamu, bato oyo bayebi kobongisa makambo, to bato oyo bazali na makoki ya kobatela etonga. Mbala mosusu ozali komona ete ozali na makoki ya ndenge wana te. Soki ezali bongo, yango emonisi ete ozali na komikitisa mpe oyebi esika makoki na yo esuki. (Flp. 2:3) Kasi osengeli kokeba. Soki ozali kokoba komikokanisa na bandeko oyo bazali na makoki moko boye, okoki kolɛmba nzoto. Ndenge Paulo amonisaki yango, okoki kutu kokanisa ete ozali na motuya te na kati ya lisangá. Nini ekoki kosalisa yo olonga makanisi ya ndenge wana?

15. Na kotalela 1 Bakorinti 12:4-11, likambo nini tosengeli koyeba mpo na makabo oyo tokoki kozala na yango?

15 Tótalela likambo oyo: na siɛklɛ ya liboso, Yehova apesaki bakristo mosusu makabo ya elimo santu na ndenge ya likamwisi, kasi bango nyonso bazwaki makabo ndenge moko te. (Tángá 1 Bakorinti 12:4-11.) Yehova apesaki bango makabo mpe makoki ekeseni, kasi bango nyonso bazalaki na motuya. Lelo oyo, tozwaka makabo ya elimo santu na ndenge ya likamwisi te. Kasi tosengeli kosimba ete biso nyonso tokoki kozala na makoki ndenge moko te. Atako bongo, biso nyonso tozali na motuya na miso ya Yehova.

16 Toli nini ya ntoma Paulo tosengeli kolanda?

16 Na esika tómikokanisaka na bandeko mosusu, tosengeli nde kolanda toli ya ntoma Paulo oyo akomaki na litambwisi ya elimo santu ete: “Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.”​—Gal. 6:4.

17. Matomba nini tokozwa soki tolandi toli oyo Paulo apesaki?

17 Soki tosaleli toli ya ntoma Paulo mpe tomeki mosala na biso moko, tokobanda komona ete tozali na makoki oyo bamosusu bazali na yango te. Na ndakisa, nkulutu moko akoki kozala na makoki ya kosala diskur malamu te, kasi akoki kozala makasi na mosala ya kokómisa bato bayekoli. To ekoki kozala ete ayebi kobongisa makambo malamu te na lisangá lokola bankulutu mosusu, kasi mbala mosusu azali mobateli ya mpate moko ya boboto mpe ya bolingo, oyo bandeko basepelaka koluka toli epai na ye. To mpe ekoki kozala ete ayebani lokola moyambi-bapaya. (Ebr. 13:2, 16) Soki toyebi malamu makabo oyo tozali na yango, tokosepela mingi mpo na oyo tokoki kosala mpo na lisangá. Mpe ekozala mpasi tóyokela bandeko zuwa mpo bazali na makoki oyo biso tozali na yango te.

18. Ndenge nini tokoki kokolisa makoki na biso ya koteya?

18 Ata soki tosalaka likambo nini na kati ya lisangá, biso nyonso tosengeli kosala makasi tóbongisa lisusu mosala na biso mpe tókolisa makoki oyo tozali na yango. Yehova apesaka biso formasyo na nzela ya ebongiseli na ye mpo tóbongisa lisusu mosala na biso. Na ndakisa, na likita ya kati ya pɔsɔ, tozwaka malako oyo esalisaka biso tóbongisa lisusu ndenge na biso ya koteya. Osalaka makasi osalela malako oyo ozwaka na likita yango?

19. Ndenge nini okoki kokokisa mokano ya kokɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi?

19 Tozwaka formasyo mosusu ya malamu mpenza na nzela ya Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Eteyelo yango ebongisami mpo na bandeko basi mpe bandeko mibali oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, mpe oyo bazali na mbula kobanda 23 kino 65. Mbala mosusu okoki kokanisa ete ata mokolo moko te okokoka kokɔta na eteyelo yango. Kasi na esika ya kosala liste ya makambo oyo ekoki kopekisa yo kokɔta na eteyelo yango, ekozala malamu nde osala liste ya makambo oyo olingi kosala mpo okɔta na eteyelo yango. Na nsima, komá makambo oyo ekoki kosalisa yo osala oyo esengeli mpo okokisa mokano yango. Na lisalisi ya Yehova mpe molende oyo okosala, makambo oyo ekoki komonana lokola ekoki kosalema te, ekokóma likambo ya solo.

SALELÁ MAKOKI OYO OZALI NA YANGO MPO NA KOLENDISA LISANGÁ

20. Baroma 12:6-8 ekoki koteya biso nini?

20 Liteya ya misato oyo tokoki kozwa na ndakisa oyo Paulo asalelaki ezali na Baroma 12:6-8. (Tángá.) Na bavɛrsɛ yango, Paulo amonisi lisusu ete na kati ya lisangá, bandeko bazalaka na makabo ekeseni. Kasi sikoyo Paulo amonisi ete tosengeli kosalela likabo nyonso oyo tozali na yango mpo na kolendisa lisangá.

21-22. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya ndeko Robert mpe ya ndeko Felice?

21 Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko oyo topesi nkombo Robert. Nsima ya kosala na ekólo mosusu, basɛngaki ye akende kosala na Betele ya ekólo na ye. Atako bandeko bayebisaki ye ete asalaki likambo moko ya mabe te, alobi boye: “Na boumeli ya bansanza mingi, nazalaki lisusu na esengo te, mpo nakómaki kokanisa ete nasalaki mosala malamu te na mboka mopaya, esika oyo nazalaki kosala. Na ntango moko boye, nakómaki kutu na mposa ya kotika mosala ya Betele.” Ndenge nini azongelaki lisusu esengo na ye? Moninga na ye moko oyo azali mpe nkulutu, akundwelaki ye ete Yehova apesaki biso formasyo na mikumba oyo tozalaki na yango liboso mpo tókokisa malamu mikumba oyo tozali na yango sikoyo. Robert amonaki ete asengelaki kotika kokanisa makambo ya kala mpe kotya makanisi na oyo akoki kosala sikoyo.

22 Ndeko Felice Episcopo akutanaki mpe na mokakatano ya ndenge wana. Ye ná mwasi na ye bazwaki diplome na eteyelo ya Gileade na 1956 mpe basalaki mosala ya zongazonga na ekólo Bolivie. Na 1964 babotaki mwana. Felice alobi boye: “Ezalaki mpasi kotika mokumba oyo tolingaki mingi. Mpo na koloba solo, na boumeli ya mbula mobimba, nalɛmbaki nzoto. Kasi Yehova asalisaki ngai nabongola makanisi na ngai, mpe natya makanisi na mokumba ya sika oyo nazwaki ya kozala moboti.” Yo mpe omiyokaka lokola ndeko Robert to Felice? Olɛmbaka nzoto mpo ozali lisusu te na mikumba oyo ozalaki na yango liboso? Soki ezali bongo, okozwa esengo mingi soki obongoli lolenge na yo ya kotalela makambo mpe otye makanisi na oyo okoki kosala sikoyo mpo na kosalela Yehova mpe bandeko. Zalá na mingi ya kosala, saleláká makabo mpe makoki oyo ozali na yango mpo na kosalisa basusu. Yango ekosala ete ozala na esengo wana ozali kolendisa bandeko ya lisangá.

23. Tosengeli kozwa ntango ya kosala nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

23 Mokomoko na biso azali na motuya na miso ya Yehova. Alingi ete tózala na libota na ye. Soki tozwi ntango ya kokanisa mpo na oyo tokoki kosala mpo na kolendisa bandeko na biso mpe tosali makasi mpo tókokisa likambo yango, ekozala mpasi tómiyoka ete tozali na ntina te na kati ya lisangá! Kasi tokoloba nini mpo na ndenge oyo tótalelaka basusu na kati ya lisangá? Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka bango na motuya mingi? Na lisolo oyo elandi, tokolobela likambo yango.

LOYEMBO 24 Bóya na Ngomba ya Yehova

^ par. 5 Biso nyonso tolingaka komiyoka ete tozali na motuya na miso ya Yehova. Kasi na bantango mosusu, tokoki komituna ndenge nini tokoki kozala na motuya na miso na ye. Lisolo oyo ekosalisa biso tóyeba ete mokomoko na biso azali na motuya na kati ya lisangá.

^ par. 3 NDIMBOLA YA MALOBA: Esika oyo tozalaka na yango na kati ya lisangá ya Yehova, ezali komonisa mokumba oyo tozali na yango ya kosalisa mpe ya kopesa basusu makasi na kati ya lisangá. Yango etaleli te loposo na biso, mbongo oyo tozali na yango, libota na biso, mimeseno ya mboka na biso, to mpe bakelasi oyo totángá.

^ par. 62 ELILINGI: Bililingi misato ezali kolakisa makambo oyo esalemaka liboso makita ebanda, na ntango ya makita, mpe na nsima na yango. Elilingi 1: Nkulutu moko azali kopesa mopaya oyo ayei na makita mbote na esengo, ndeko mobali moko ya elenge azali kobongisa bikoliseli-lolaka, mpe ndeko mwasi moko azali kosolola na ndeko mwasi moko ya mobange. Elilingi 2: Bilenge mpe mobange moko batomboli mabɔkɔ mpo na kopesa biyano na ntango ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Elilingi 3: Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi. Mama moko azali kosalisa mwana na ye atya mbongo na kɛsi ya makabo. Ndeko mobali moko azali kobongisa mikanda, mpe ndeko mobali mosusu azali kolendisa ndeko mwasi moko ya mobange.