LISOLO YA BOYEKOLI 32
Tambolá elongo na Nzambe na komikitisa mpe na bopɔlɔ
‘Tambolá na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo!’—MIKA 6:8.
LOYEMBO 31 Tambolá elongo na Nzambe!
NA MOKUSE *
1. Davidi alobaki nini mpo na komikitisa ya Yehova?
TOKOKI mpenza koloba ete Yehova azali na komikitisa? Ɛɛ. Mokolo moko Davidi alobaki: “Okopesa ngai nguba na yo ya lobiko, mpe komikitisa na yo nde ezali kokómisa ngai moto monene.” (2 Sam. 22:36; Nz. 18:35) Ntango Davidi akomaki maloba oyo, ekoki kozala ete azalaki kokanisa mokolo oyo mosakoli Samwele ayaki epai na bango mpo na kotya mokonzi oyo akoyangela Yisraele mafuta. Na kati ya bana mibali mwambe ya Yese, Davidi azalaki leki na bango nyonso. Atako bongo, ye nde moto oyo Yehova aponaki mpo na koyangela na esika ya Mokonzi Saulo.—1 Sam. 16:1, 10-13.
2. Makambo nini tokotalela na lisolo oyo?
2 Na ntembe te, Davidi azalaki na mayoki lokola oyo ya mokomi ya nzembo moko oyo alobaki mpo na Yehova ete: “Azali komikitisa mpo na kotala likoló mpe mabele, azali kolongola moto oyo azangá na putulu mpenza. Alongolaka mobola . . . mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu.” (Nz. 113:6-8) Na lisolo oyo, tokolobela liboso mateya ya ntina mingi oyo etali komikitisa mpe tokomona ndenge oyo Yehova amonisaki yango. Na nsima, tokotalela mateya oyo tokoki kozwa epai ya Mokonzi Saulo, mosakoli Danyele, mpe Yesu na oyo etali komonisa ezaleli ya bopɔlɔ.
NDAKISA YA YEHOVA EKOKI KOTEYA BISO NINI?
3. Ndenge nini Yehova asalelaka biso makambo, mpe yango emonisaka nini?
3 Yehova amonisaka komikitisa na ndenge asalelaka basambeli na ye ya kozanga kokoka makambo. Andimaka kaka te losambo oyo topesaka ye, kasi azwaka biso mpe lokola baninga na ye. (Nz. 25:14) Mpo tókóma baninga na ye, Yehova azwaki bibongiseli ya kopesa Mwana na ye lokola mbeka mpo na masumu na biso. Yehova azali mpenza na motema mawa mpe na ngɔlu!
4. Yehova apesá biso nini, mpe mpo na nini?
Mib. 10:12; Yis. 48:17, 18) Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na komikitisa ya Yehova!
4 Tótalela ndakisa mosusu ya komikitisa ya Yehova. Lokola azali Mozalisi na biso, Yehova akokaki koboya kopesa biso likoki ya kopona kosala oyo tolingi na bomoi na biso. Kasi asalaki bongo te. Akelá biso na elilingi na ye mpe apesá biso bonsomi ya kopona. Atako tozali na bolɛmbu mpe tozali mpenza moke na miso na ye, makambo oyo toponaka kosala ezali na ntina mingi mpo na Yehova. Alingaka ete tópona kosalela ye na motema na biso mobimba, mpo tolingaka ye mpe mpo toyebi matomba oyo tokozwa soki tozali kotosa ye. (5. Ndenge nini Yehova ateyaka biso ezaleli ya komikitisa? (Talá elilingi ya ezipeli.)
5 Yehova ateyaka biso ezaleli ya komikitisa na ndenge asalelaka biso makambo. Azali moto oyo aleki na bwanya na molɔ́ngɔ́ mobimba. Atako bongo, alingaka mpe koyoka makanisi ya basusu. Na ndakisa, andimaki ete Mwana na ye apesa ye mabɔkɔ mpo na kokela biloko mosusu nyonso. (Mas. 8:27-30; Kol. 1:15, 16) Mpe atako Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, andimaka mpe kopesa basusu mwa bokonzi. Na ndakisa, atyá Yesu azala Mokonzi ya Bokonzi na ye, mpe akopesa mwa bokonzi mosusu na bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na Yesu. (Luka 12:32) Ya solo, Yehova apesaki Yesu formasyo mpo azala Mokonzi mpe Nganga-nzambe Monene. (Ebr. 5:8, 9) Apesi mpe formasyo na baoyo bakoyangela elongo na Yesu, kasi alukaka te kolandela makambo nyonso ya mikemike oyo bazali kosala mpo na kokokisa mokumba yango. Kutu, atyelaka bango nde motema ete bakosala mokano na ye.—Em. 5:10.
6-7. Ndenge oyo Yehova apesaka basusu mikumba ekoki koteya biso nini?
6 Soki Tata na biso ya likoló, oyo azalaka na Yis. 41:10) Makambo nini mosusu, baoyo bazali na mwa bokonzi bakoki koyekola epai ya Yehova?
mposa te ete moto mosusu asalisa ye, apesaka basusu mikumba, bongo biso, tosengeli mpe kosala bongo te? Na ndakisa, ozali tata ya libota to nkulutu na kati ya lisangá? Landá ndakisa ya Yehova mpe pesáká basusu mikumba. Kolandelaka te makambo nyonso ya mikemike oyo bazali kosala mpo na kokokisa mikumba yango. Soki omekoli Yehova, mosala ekosalema mpe okopesa basusu formasyo, mpe okosalisa basusu bámimona ete bazali na ntina. (7 Biblia emonisi ete Yehova alingaka mpe koyoka makanisi ya baanzelu. (1 Bak. 22:19-22) Baboti, ndenge nini bokoki kolanda ndakisa ya Yehova? Soki esengeli, bótunaka bana na bino makanisi mpo na ndenge oyo mosala moko esengeli kosalema. Mpe soki bapesi makanisi ya malamu, bósalela yango soki esengeli.
8. Ndenge nini Yehova amoniselaki Abrahama mpe Sara motema molai?
8 Komikitisa ya Yehova emonanaka mpe na ndenge oyo amonisaka motema molai. Na ndakisa, amonisaka motema molai ntango basaleli na ye batuni ye mituna na limemya mpo na bikateli oyo azwi. Yehova ayokaki Abrahama ntango amitungisaki mpo na ekateli oyo azwaki ya kobebisa engumba Sodoma ná Gomora. (Eba. 18:22-33) Ozali koyeba lisusu ndenge oyo Yehova asalelaki Sara, mwasi ya Abrahama makambo? Ntango Sara asɛkaki mpo na elaka oyo Yehova apesaki ye ete akozwa zemi na bobange, Yehova asilikaki te. (Eba. 18:10-14) Kutu, amoniselaki nde Sara limemya.
9. Mateya nini baboti mpe bankulutu bakoki kozwa na ndakisa ya Yehova?
9 Mateya nini bino baboti mpe bankulutu bokoki kozwa na ndakisa ya Yehova? Osalaka nini soki mwana na yo to ndeko moko ya lisangá aboyi kondima ekateli oyo ozwi? Olukaka mbala moko komonisa bango ete bazali na libunga? To olukaka nde koyeba ntina oyo bapesi makanisi na bango? Masangá mpe mabota ezwaka matomba mingi, soki baoyo bazali na mwa bokonzi bazali komekola Yehova. Touti kolobela mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya komikitisa ya Yehova. Sikoyo tótalela mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa mosusu ya Biblia na likambo etali komonisa bopɔlɔ.
MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA BASUSU
10. Ndenge nini Yehova asalelaka ndakisa ya basusu mpo na koteya biso?
10 Lokola azali ‘Molakisi na biso Monene,’ Yehova akomisá bandakisa mosusu na kati ya Liloba na ye mpo na koteya biso. (Yis. 30:20, 21) Tozwaka mateya ntango tomanyolaka na masolo ya Biblia ya baoyo bamonisaki bizaleli oyo esepelisaka Nzambe, lokola bopɔlɔ. Tozwaka mpe mateya ntango toyekolaka makambo oyo ekómelaki bato oyo bamonisaki bizaleli yango te.—Nz. 37:37; 1 Ko. 10:11.
11. Ndakisa mabe ya Saulo ekoki koteya biso nini?
11 Kanisá makambo oyo ekómelaki Mokonzi Saulo. Ntango azalaki elenge azalaki na bopɔlɔ. Ayebaki esika makoki na ye esuki mpe aboyaki kutu kondima mikumba mosusu. (1 Sa. 9:21; 10:20-22) Kasi mwa moke nsima ya kokóma mokonzi, Saulo akómaki na lofundo. Na libaku moko boye, azangaki motema molai mpo na kozela mosakoli Samwele. Na esika atya motema ete Yehova akosala mpo na bolamu ya bato ya ekólo, Saulo atumbaki mbeka, atako azalaki na lotomo te ya kosala yango. Mpo na yango, Yehova asepelaki lisusu na ye te mpe nsukansuka alongolaki Saulo na bokonzi. (1 Sa. 13:8-14) Tokomonisa bwanya soki tozwi liteya na ndakisa na ye mpe toboyi kosala makambo oyo tozali na lotomo ya kosala te.
12. Ndenge nini Danyele amonisaki bopɔlɔ?
12 Na kokesana na ndakisa mabe ya Saulo, tólobela ndakisa malamu ya mosakoli Danyele. Danyele azalaki na komikitisa mpe na bopɔlɔ mpe azalaki ntango nyonso kolanda litambwisi ya Yehova na bomoi na ye mobimba. Na ndakisa, ntango alimbolaki ndɔtɔ ya Mokonzi Nebukadenezare, Danyele alobaki te ete alimbolaki yango na mayele na ye moko. Kasi na komikitisa nyonso, azongisaki lokumu epai ya Yehova. (Dan. 2:26-28) Yango eteyi biso nini? Soki bandeko basepelaka na badiskur oyo tosalaka, to soki mosala na biso ya kosakola ezali kobota mbuma, tosengeli kozongisa lokumu nyonso epai ya Yehova. Tosengeli kobosana te ete tokokoka te kosala makambo wana soki Yehova asalisi biso te. (Flp. 4:13) Kosala bongo ekomonisa ete tozali mpe kolanda ndakisa ya Yesu. Na ndenge nini?
13. Liteya nini tokoki kozwa na likambo etali komonisa bopɔlɔ na kotalela maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 5:19, 30?
13 Atako azalaki Mwana ya Nzambe mpe moto ya kokoka, Yesu atyelaki Yehova motema. (Tángá Yoane 5:19, 30.) Ata mokolo moko te ameká kobɔtɔla bokonzi ya Tata na ye ya likoló. Bafilipi 2:6 eyebisi biso mpo na Yesu ete, “azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.” Lokola azalaki mwana ya botosi, Yesu ayebaki esika makoki na ye esuki mpe atosaki bokonzi ya Tata na ye.
14. Yesu asalaki nini ntango basɛngaki ye asala likambo oyo azalaki na lotomo ya kosala te?
14 Kanisá ndenge oyo Yesu asalaki ntango Yakobo ná Yoane mpe mama na bango basɛngaki ye asala likambo moko oyo azalaki na lotomo ya kosala te. Kozanga ete akakatana, Yesu ayebisaki bango ete kaka Tata na ye ya likoló nde akoki kokata soki nani akofanda na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe na lobɔkɔ na ye ya mobali na Bokonzi. (Mat. 20:20-23) Yesu amonisaki ete ayebaki esika makoki na ye esuki. Azalaki na bopɔlɔ. Ata mokolo moko te asalá likambo oyo Yehova apesaki ye lotomo ya kosala te. (Yoa. 12:49) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu?
15-16. Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Biblia oyo ezali na 1 Bakorinti 4:6?
15 Tokomekola ndakisa ya Yesu na likambo etali komonisa bopɔlɔ soki tosaleli toli ya Biblia oyo ezali na 1 Bakorinti 4:6. Vɛrsɛ yango elobi: “Bókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá.” Ntango basɛngi biso toli na likambo moko boye, tosengeli te kotinda bato na makasi bándima kaka makanisi na biso to koloba likambo moko kozanga kokanisa malamumalamu. Kasi, tosengeli nde kobenda likebi ya bato na toli ya Biblia mpe na mikanda na biso. Na ndenge yango, tokomonisa ete toyebi esika makoki na biso esuki mpe tokozongisa lokumu na “boyengebene ya mibeko” ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.—Em. 15: 3, 4.
16 Longola kopesa Yehova lokumu, tozali mpe na bantina mosusu ya komonisa bopɔlɔ. Tólobela sikoyo ndenge oyo komikitisa mpe bopɔlɔ ekoki komemela biso esengo mpe kosalisa biso tóyokana malamu na basusu.
MATOMBA OYO TOKOZWA SOKI TOZALI NA KOMIKITISA MPE NA BOPƆLƆ
17. Mpo na nini bato ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ bazalaka na esengo?
17 Soki tozali na komikitisa mpe na bopɔlɔ, na ntembe te tokozala na esengo. Mpo na nini? Mpo soki toyebi esika makoki na biso esuki, tokozala na botɔndi mpe na esengo mpo na lisalisi nyonso oyo basusu bapesi biso. Na ndakisa, kanisá ntango Yesu abikisaki bato ya maba zomi. Kaka moko nde azongaki mpo na kopesa Yesu matɔndi ndenge abikisaki ye na maladi wana ya mabe. Lokola moto yango azalaki na komikitisa mpe bopɔlɔ ayebaki ete akokaki te komibikisa ye moko kozanga lisalisi ya Yesu. Yango wana, amonisaki botɔndi mpo na lisalisi oyo azwaki mpe akumisaki Nzambe.—Luka 17:11-19.
18. Ndenge nini komikitisa mpe bopɔlɔ esalisaka biso tóyokana malamu ná basusu? (Baroma 12:10)
18 Bato ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ bazalaka na boyokani ya malamu ná basusu mpe ezalaka mpasi te mpo bázwa baninga ya malamu. Mpo na nini? Mpo bayebaka ete basusu mpe bazalaka na bizaleli ya malamu mpe batyelaka bango motema. Bato ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ basepelaka ntango basusu bakokisi Baroma 12:10.
malamu mokumba nyonso oyo bapesaki bango, mpe baumelaka te mpo na kopesa bango longonya mpe kokumisa bango.—Tángá19. Mpo na nini tosengeli koboya ezaleli ya lolendo?
19 Nzokande, lokola bato ya lolendo balingaka ete basusu bákumisa bango, yango wana ezalaka mpasi mpo bapesa basusu longonya. Mbala mingi balukaka komikokanisa na basusu mpe basalaka nyonso mpo kaka báleka bato mosusu. Na esika ya kopesa basusu formasyo mpe mikumba, mbala mingi moto ya lolendo akanisaka ete ye nde asengeli kosala likambo moko boye, mpo akanisaka ete basusu bakosala yango malamu te. Mpe mbala mingi, moto ya lolendo amimonaka ete azali na ntina mingi mpe ayokelaka basusu zuwa. (Gal. 5:26) Lisusu, ezalaka mpasi mpo bato ya ndenge wana básala boninga oyo ekoumela. Soki tomoni ete tozalaka na lolendo, tosengeli mpenza kobondela Yehova asalisa biso ‘tókómisa makanisi na biso makanisi ya sika’ mpo ezaleli yango ya mabe ezwa misisa te na mitema na biso.—Rom. 12:2.
20. Mpo na nini tosengeli kozala na komikitisa mpe na bopɔlɔ?
20 Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na ndakisa ya Yehova! Komikitisa ya Yehova emonanaka na ndenge asalelaka basaleli na ye makambo mpe tosengeli komekola ye. Lisusu, tosengeli komekola baoyo basalelaki Yehova na komikitisa. Tiká ete tópesaka ntango nyonso Yehova lokumu mpe nkembo oyo abongi na yango. (Em. 4:11) Soki tosali makambo nyonso wana, tokozala baninga ya Yehova mpo na libela, mpamba te alingaka bato ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ.
LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi
^ par. 5 Moto ya komikitisa azalaka na motema mawa mpe na ngɔlu. Na yango, tozali mpenza na ntina ya koloba ete Yehova azali na komikitisa. Ndenge lisolo oyo ekomonisa yango, tokoki koyekola komikitisa soki tomekoli Yehova. Tokolobela mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Mokonzi Saulo, mosakoli Danyele, mpe Yesu na oyo etali komonisa ezaleli ya bopɔlɔ.
^ par. 58 ELILINGI: Nkulutu moko azali kosalisa ndeko mobali moko ya elenge ayeba kobongisa teritware ya lisangá. Na nsima, na esika alandelaka ye, atikeli elenge yango nzela ete akokisa mokumba yango ye moko.
^ par. 62 ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali kotuna nkulutu moko soki ekozala malamu andima kokende na fɛti ya libala oyo ekosalema na ndako-nzambe moko. Na esika nkulutu yango apesa makanisi na ye moko, ataleli nde mitinda ya Biblia elongo na ndeko mwasi yango.