Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 35

Tosáká esika oyo moto na moto azali na yango na kati ya lisangá ya Yehova

Tosáká esika oyo moto na moto azali na yango na kati ya lisangá ya Yehova

“Liso ekoki te koloba na lobɔkɔ ete: ‘Nazali na mposa na yo te’; to, lisusu, motó ekoki te koloba na makolo ete: ‘Nazali na mposa na bino te.’”​1 KO. 12:21.

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

NA MOKUSE *

1. Eloko nini Yehova apesá mosaleli na ye mokomoko ya sembo?

YEHOVA apesá mosaleli na ye mokomoko ya sembo esika na kati ya lisangá na ye. Atako tozali na mikumba ekeseni, biso nyonso tozali na ntina mpe tozalaka na mposa ya basusu. Ntoma Paulo asalisi biso tóbosana te liteya yango ya ntina mingi. Na ndenge nini?

2. Na kotalela Baefese 4:16, mpo na nini tosengeli kozwa na motuya bandeko nyonso ya lisangá mpe kosala elongo na bango?

2 Ndenge vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo emonisi yango, Paulo amonisaki polele ete mosaleli moko te ya Yehova akoki koyebisa moninga na ye ete “Nazali na mposa na yo te.” (1 Ko. 12:21) Soki tolingi ete lisangá ezala na kimya, tosengeli kozwa ndeko mokomoko na motuya mpe kosala elongo na ye. (Tángá Baefese 4:16.) Soki tozali kosala na bomoko, ndeko nyonso na kati ya lisangá akomona ete balingaka ye mpe lisangá ekozala makasi.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na makambo nini tosengeli komonisa limemya epai ya bandeko na biso na kati lisangá? Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo bankulutu bakoki komoniselana limemya. Na nsima, tokolobela ndenge oyo biso nyonso tokoki komonisa limemya epai ya bandeko oyo bazali minzemba. Mpe na nsuka, tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa limemya epai ya bandeko oyo bayebi koloba monɔkɔ na biso malamu te.

NKULUTU, ZALÁ NA LIMEMYA EPAI YA BANKULUTU MOSUSU

4. Toli nini ya Paulo oyo ezali na Baroma 12:10 bankulutu basengeli kolanda?

4 Bankulutu nyonso na kati ya lisangá batyamaka na litambwisi ya elimo santu ya Yehova. Kasi, bango nyonso bazalaka na makabo mpe na makoki ndenge moko te. (1 Ko. 12:17, 18) Ekoki kozala ete basusu bakómi bankulutu kala mingi te mpe bayebi naino makambo mingi te. Bobange mpe maladi ekoki mpe kopekisa basusu básala mingi. Kasi, nkulutu moko te asengeli kokanisa ete nkulutu mosusu azali na ntina te. Nzokande, nkulutu mokomoko asengeli nde kolanda toli ya Paulo oyo ezali na Baroma 12:10.​—Tángá.

Bankulutu bamonisaka ete bamemyaka baninga na bango bankulutu soki bazali koyoka bango na likebi (Talá paragrafe 5-6)

5. Ndenge nini bankulutu bamonisaka ete bamemyaka baninga na bango bankulutu, mpe mpo na nini kosala bongo ezali na ntina?

5 Bankulutu bamonisaka ete bamemyaka baninga na bango bankulutu soki bazali koyoka bango na likebi. Yango ezali mpenza na ntina mingimingi ntango bakutanaka mpo na kolobela makambo etali lisangá. Mpo na nini? Talá oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/1988 elobaki: “Bankulutu basengeli koyeba ete, na lisalisi ya elimo santu, Kristo akoki kosalela ata nkulutu nini abimisa makanisi mpo na kozwa ekateli ya malamu. (Mis. 15:6-15) Elimo santu ekoki kosalisa bankulutu nyonso na kati ya lisangá kasi kaka nkulutu moko te.”

6. Ndenge nini bankulutu bakoki kosala na bomoko, mpe matomba nini lisangá ekozwa soki basali bongo?

6 Nkulutu oyo amemyaka baninga na ye, alukaka kaka te ete ye nde aloba moto ya liboso na ntango ya makita ya bankulutu. Alukaka te ete basusu báyokaka kaka ye, mpe bándimaka kaka makanisi na ye. Kasi, apesaka nde makanisi na ye na komikitisa nyonso. Ayokaka na likebi ntango bankulutu mosusu bazali kopesa makanisi na bango. Oyo eleki ntina, apesaka makanisi oyo esimbami na mitinda ya Biblia, mpe alandaka malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Soki bankulutu bazali komoniselana bolingo mpe limemya ntango bazali kolobela likambo moko, elimo santu ya Nzambe ekozala elongo na bango mpe ekosalisa bango bázwa bikateli oyo ekolendisa lisangá.​—Yak. 3:17, 18.

ZALÁ NA LIMEMYA EPAI YA BANDEKO OYO BAZALI MINZEMBA

7. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela baoyo bazalaki minzemba?

7 Masangá mingi lelo oyo ezali na mabota mpe na bandeko oyo babalá. Kasi ezali mpe na ebele ya bandeko basi mpe mibali oyo bazali minzemba. Ndenge nini tosengeli kotalela bandeko oyo bazali minzemba? Tosengeli komekola ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bango. Ntango Yesu azalaki awa na mabele abalaki te. Atikalaki monzemba, asalelaki ntango na ye malamu, mpe atyaki likebi nyonso na mosala na ye. Yesu ateyaki ata mokolo moko te ete esengeli kaka moto abala to atikala monzemba. Kasi alobaki ete ekozala na bakristo mosusu oyo bakopona kotikala minzemba. (Mat. 19:11, 12) Yesu azalaki komemya baoyo bazalaki minzemba. Azalaki te kotalela minzemba lokola bato oyo bazangá ntina to lokola bato oyo bazangá eloko moko.

8. Na kotalela 1 Bakorinti 7:7-9, Paulo alendisaki bakristo bátalela likambo nini?

8 Ndenge moko na Yesu, ntoma Paulo mpe atikalaki monzemba na boumeli ya mosala na ye. Ata mokolo moko te ateyaki ete ezali mabe mokristo abala. Ayebaki ete yango ezali likambo etali moto na moto. Atako bongo, Paulo alendisaki bakristo bátala soki bakoki kosalela Yehova lokola minzemba. (Tángá 1 Bakorinti 7:7-9.) Paulo azalaki te kotalela bakristo oyo bazali minzemba lokola nde bazangá ntina. Kutu, aponaki elenge Timote oyo azalaki monzemba mpo akokisa mikumba minene na mosala ya Yehova. * (Flp. 2:19-22) Ezali polele ete, ekozala mabe kokanisa ete ndeko mobali moko akokisi masɛngami to te kaka mpo azali monzemba to mpo abalá.​—1 Ko. 7:32-35, 38.

9. Tokoki koloba nini na likambo etali kobala mpe kotikala monzemba?

9 Ata mokolo moko te Yesu to Paulo bateyaki ete bakristo basengeli kobala to kotikala minzemba. Kasi, tokoki koloba nini mpo na likambo etali kotikala monzemba mpe kobala? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2012 epesaki eyano ya malamu na motuna yango. Elobaki ete ‘Na ntembe te, kobala to kotikala monzemba ezali makabo ya Yehova. . . . Yehova atalelaka bonzemba te lokola likambo ya nsɔni to mawa.’ Na yango, tosengeli komemya bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá oyo bazali minzemba.

Lokola tomemyaka bandeko oyo bazali minzemba, makambo nini tosengeli kosala te? (Talá paragrafe 10)

10. Ndenge nini tokoki komonisa limemya mpo na bandeko na biso oyo bazali minzemba?

10 Ndenge nini tokoki komonisa limemya mpo na mayoki ya bandeko oyo bazali minzemba? Tosengeli kobosana te ete ezali na makambo mingi oyo esali ete bandeko mosusu bátikala minzemba. Na ndakisa, basusu bamityelá mokano ya kotikala minzemba. Basusu mpe bazalaka na mposa ya kobala, kasi bazwi naino te sapato ya lokolo na bango. Ekoki mpe kozala ete bakristo mosusu babungisá balongani na bango na liwa. Ata soki batikali minzemba mpo na ntina nini, ebongi mpenza ete bandeko ya lisangá bátunaka bango ntina oyo babali naino te? Ebongi mpenza bálukela bango molongani? Toboyi te, bandeko mosusu bakoki kosɛnga ete bato mosusu básalisa bango mpo na kozwa molongani. Kasi soki asɛngi lisalisi te, okanisi ete akoyoka ndenge nini soki tolobi na ye ete tokolukela ye molongani? (1 Tes. 4:11; 1 Tim. 5:13) Tótalela mwa makambo oyo bandeko mosusu ya minzemba balobi.

11-12. Ndenge nini tokoki kolɛmbisa bandeko oyo bazali minzemba nzoto?

11 Mokɛngɛli ya zongazonga moko oyo azali monzemba mpe akokisaka mokumba na ye malamu, alobi ete azwaka matomba mingi lokola azali monzemba. Kasi alobi ete soki bandeko ya lisangá batuni ye: “Mpo na nini obalá te?” yango ekoki kolɛmba nzoto. Ndeko mobali moko ya monzemba oyo asalaka na Betele alobi boye: “Na bantango mosusu, bandeko bakanisaka ete basengeli koyokela bandeko oyo bazali minzemba mawa. Yango ekoki komonana lokola kozala monzemba ezali likabo te, kasi ezali nde ngambo.”

12 Ndeko mwasi moko ya monzemba oyo asalaka na Betele alobi boye: “Bandeko mosusu bakanisaka ete monzemba nyonso alukaka kaka molongani. Basusu mpe bakanisaka ete mbala nyonso oyo minzemba bakutanaka elongo na minzemba mosusu ezalaka libaku ya kozwa molongani. Mokolo moko Betele etindaki ngai nakende kosala mosala moko boye na ekólo mosusu. Ntango nakómaki kuna, nakendaki makita na mpokwa. Ndeko mwasi oyo ayambaki ngai epai na ye, ayebisaki ngai ete ezali na bandeko mibali mibale ya mbula na ngai na lisangá na bango. Alobaki ete azalaki te kosalisa ngai nazwa molongani. Kasi ntango kaka tokɔtaki na Ndako ya Bokonzi, amemaki ngai esika bandeko yango bafandaki mpo napesa bango mbote. Likambo yango eyokisaki ngai ná bandeko mibali yango nsɔni mpenza.”

13. Bandakisa nini elendisaki ndeko mwasi moko ya monzemba?

13 Ndeko mwasi mosusu ya monzemba oyo asalaka mpe na Betele, alobi boye: “Nayebi babongisi-nzela mosusu ya mikóló oyo bazali minzemba, oyo bazalaka na bokatikati, na mikano ya sikisiki, oyo bandimaka kosalisa basusu, mpe oyo bazalaka na esengo. Bandeko yango bazali mpenza lipamboli mpo na lisangá. Batalelaka bonzemba na bango na bokatikati mpe bamonaka te ete baleki basusu kaka mpo batikalá minzemba. Lisusu bamonaka te ete bazangá eloko moko kaka mpo bazali na molongani te, libota mpe te.” Ezalaka malamu kozala na lisangá oyo bato nyonso bamoniselanaka limemya mpe bazwaka basusu na motuya. Esika oyo oyebi ete bandeko bakoyokela yo mawa to zuwa te; esika oyo bakomona te ete ozali mpamba, to mpe bakokanisa te ete oleki bango. Esika oyo oyebi ete balingaka yo.

14. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka na motuya bandeko oyo bazali minzemba?

14 Bandeko oyo bazali minzemba, bakozala na botɔndi soki tozali kozwa bango na motuya mpo na bizaleli na bango ya malamu; kasi bakosepela te soki tozali koyokela bango mawa kaka mpo bazali minzemba. Na esika tóyokelaka bango mawa mpo bazali minzemba, tosengeli nde kozwaka na motuya bosembo na bango. Soki tosali bongo, bakomiyoka te lokola tozali koloba na bango ete: “Nazali na mposa na yo te.” (1 Ko. 12:21) Kasi, bakomona nde ete tomemyaka bango mpe tozwaka na motuya esika oyo bazali na yango na kati ya lisangá.

ZALÁ NA LIMEMYA EPAI YA BAOYO BALOBAKA MONƆKƆ NA YO MALAMU TE

15. Bambongwana nini bandeko mosusu basalaki mpo básala lisusu mingi na mosala ya kosakola?

15 Na bambula oyo euti koleka, basakoli mingi bamityelaki mokano ya koyekola monɔkɔ mosusu mpo bákoka lisusu kosala mingi na mosala ya Yehova. Mpo na kosala bongo, esɛngaki ete bábongola makambo mosusu ya bomoi na bango. Bandeko yango batiká masangá ya monɔkɔ na bango mpo bákende kosala na masangá ya monɔkɔ mosusu epai mposa ya basakoli ezali mingi. (Mis. 16:9) Yango ezali ekateli oyo bandeko yango bazwá bango moko mpo básala lisusu mingi na mosala ya Yehova. Atako ekoki kosɛnga bambula mingi mpo báyeba koloba monɔkɔ yango ya sika malamu, basalisaka lisangá oyo bakei na makambo mingi. Bizaleli malamu na bango mpe makambo oyo bayebi elendisaka lisangá. Tozwaka na motuya bandeko yango oyo bamipimelaka makambo mingi!

16. Makambo nini bankulutu basengeli kotalela mpo na kokata soki ndeko mobali moko akoki kokóma nkulutu to mpe mosaleli na misala?

16 Bankulutu basengeli te kokata ete ndeko mobali moko akoki te kokóma mosaleli na misala to mpe nkulutu kaka mpo alobaka malamu te monɔkɔ oyo lisangá esalelaka. Mpo na koyeba soki ndeko mobali moko akoki kokóma nkulutu to mosaleli na misala, bankulutu basengeli kotalela makambo oyo Biblia esɛngi mpo ndeko azwa mikumba, kasi te soki alobaka malamu to te monɔkɔ oyo lisangá esalelaka.​—1 Tim. 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9.

17. Makambo nini mabota mosusu esengeli kotalela ntango ekei kofanda na ekólo mosusu?

17 Mabota ya bandeko mosusu ekendá kofanda na ekólo mosusu mpo na kokima mikakatano to mpo na koluka mosala. Yango ekoki kosala ete bana na bango batánga kelasi na monɔkɔ ya libosoliboso oyo elobamaka na ekólo oyo bakei. Ekoki mpe kosɛnga ete baboti na bango báyekola monɔkɔ ya libosoliboso ya ekólo yango mpo bázwa mosala. Soki na ekólo oyo bakei ezali na lisangá to etuluku moko ya monɔkɔ ya mboka na bango, libota yango esengeli kokende na lisangá nini? Basengeli nde kokende na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya libosoliboso oyo elobamaka na ekólo yango, to na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya mboka na bango?

18. Na kotalela Bagalatia 6:5, ndenge nini tokoki komonisa limemya mpo na ekateli oyo tata ya libota azwi?

18 Tata ya libota asengeli kokata soki libota na ye esengeli kokende na lisangá nini. Lokola ye moko nde asengeli kozwa ekateli, asengeli kotalela matomba ya libota na ye. (Tángá Bagalatia 6:5.) Tosengeli kotosa ekateli oyo tata ya libota azwi. Ata soki azwi ekateli nini, tosengeli kondima yango, koyamba libota yango na esengo mpe komonisela yango bolingo.​—Rom. 15:7.

19. Likambo nini batata ya mabota basengeli kotalela mpe kobondela mpo na yango?

19 Ekoki kozala mpe ete mabota mosusu eyanganaka na lisangá ya monɔkɔ ya mboka na bango, kasi bana na bango balobaka monɔkɔ yango malamu te. Soki lisangá yango ezali na esika oyo monɔkɔ ya libosoliboso ya ekólo yango elobamaka, ekoki kozala mpasi mpo bana bákanga ntina ya makambo oyo ezali kolobama na makita mpe bákola na elimo. Mpo na nini? Mpo ekoki kozala ete na kelasi, batángisaka bana yango na monɔkɔ ya libosoliboso oyo elobamaka na ekólo yango, kasi te na monɔkɔ ya mboka ya baboti na bango. Na makambo ya bongo, batata ya mabota basengeli kobondela mpo na koyeba oyo basengeli kosala mpo na kosalisa bana na bango bápusana penepene na Yehova mpe basaleli na ye. Ekosɛnga ete baboti bálakisa bana monɔkɔ ya mboka na bango, to mpe bákendaka na lisangá ya monɔkɔ oyo bana bayebi malamu. Ata soki tata ya libota azwi ekateli nini, lisangá oyo bakei esengeli komonisela ye ná libota na ye limemya mpe kozwa bango na motuya.

Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka na motuya baoyo bazali koyekola monɔkɔ moko ya sika? (Talá paragrafe 20)

20. Ndenge nini tokoki komonisa limemya epai bandeko na biso oyo bazali koyekola monɔkɔ moko ya sika?

20 Mpo na bantina nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo, na masangá mingi ezali na bandeko oyo bazali kosala makasi báyekola monɔkɔ moko ya sika. Ekoki kozala mpasi mpo bábimisa polele makambo oyo bazali kokanisa. Nzokande, soki tolandi te kaka lolenge oyo bazali koloba monɔkɔ ya sika, kasi totye nde makanisi na bizaleli na bango ya malamu, tokomona bolingo oyo bazalaka na yango mpo na Yehova mpe mposa na bango ya kosalela ye. Yango ekosala ete tómonisela bango lisusu limemya mingi mpe tózwa bango na motuya. Tokoloba na bango te ete “Nazali na mposa na yo te” kaka mpo balobaka monɔkɔ na biso malamu te.

TOZALI NA MOTUYA NA MISO YA YEHOVA

21-22. Lokumu nini Yehova apesá biso?

21 Yehova apesá biso lokumu monene ya kozala na esika na kati ya lisangá na ye. Tózala mwasi to mobali, monzemba to moto oyo abalá, elenge to mokóló, ezala tolobaka monɔkɔ moko malamu to te, biso nyonso tozali na motuya na miso ya Yehova mpe na miso ya bandeko na biso.​—Rom. 12:4, 5; Kol. 3:10, 11.

22 Tiká ete tókoba kosalela mateya oyo tozwi na ndakisa oyo Paulo asalelaki ya binama ya nzoto. Yango ekosalisa biso tósepela na esika oyo tozali na yango na kati ya lisangá ya Yehova mpe tókoba komonisela bandeko na biso bolingo mpe limemya.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

^ par. 5 Basaleli ya Yehova bauti na bisika ndenge na ndenge mpe bakokisaka mikumba ekeseni na kati ya lisangá. Lisolo oyo ekosalisa biso tómona ntina oyo tosengeli komonisa limemya epai ya ndeko mokomoko oyo azali na lisangá ya Yehova.

^ par. 8 Tokoki te koloba na bosikisiki soki Timote abalaki to te.