Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 34

Ndenge nini okoki ‘komeka’ mpe komona bolamu ya Yehova?

Ndenge nini okoki ‘komeka’ mpe komona bolamu ya Yehova?

“Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu; esengo na mobali makasi oyo azali kokima epai na ye.”​—NZ. 34:8.

LOYEMBO 117 Motema malamu

NA MOKUSE *

1-2. Na kotalela Nzembo 34:8, osengeli kosala nini mpo omona bolamu ya Yehova?

KANISÁ ete bapesi yo bilei oyo olyá naino te liboso. Mpo na koyeba ndenge bilei yango ezali, okoki kotala yango, koyoka nsolo na yango, koluka koyeba ndenge balambaki yango, to kotuna makanisi ya basusu mpo na bilei yango. Kasi mpo oyeba mpenza soki ekosepelisa yo, osengeli komeka yango yo moko.

2 Tokoki koyekola makambo etali bolamu ya Yehova soki tozali kotánga Biblia mpe mikanda na biso, ata mpe koyoka ndenge bandeko mosusu bazali kolobela makambo ya malamu oyo Yehova asalelá bango. Kasi mpo tóyeba mpenza soki Yehova azali malamu, biso moko tosengeli ‘komeka’ bolamu na ye. (Tángá Nzembo 34:8.) Tótala lolenge moko oyo tokoki kosala yango. Kanisá ete olingi obanda kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso, kasi mpo na kokokisa mokano yango, osengeli kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ. Ekoki kozala ete otángaka mbala na mbala elaka ya Yesu oyo elobi ete soki totye matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, Yehova akopesa biso biloko oyo tozali mpenza na mposa na yango; kasi elaka yango ekokisamá naino te epai na yo moko. (Mat. 6:33) Atako bongo, lokola ozali na kondima na elaka oyo Yesu apesaki, okómi kosalela mbongo na yo na mayele, obongisi programɛ ya mosala na yo ya mosuni, mpe otye makanisi na yo nyonso na mosala ya kosakola. Soki osali bongo, okomona ete Yehova akokisaka mpenza bamposa na biso. Na ndenge wana nde yo moko ‘okomeka’ mpe okomona bolamu ya Yehova.

3. Na kotalela Nzembo 16:1, 2, Yehova amonisaka bolamu na ye epai ya banani?

3 Yehova azali ‘malamu epai ya moto nyonso,’ ata epai ya baoyo bayebi ye te. (Nz. 145:9; Mat. 5:45) Kasi Yehova apambolaka mingimingi baoyo balingaka mpe basalelaka ye na molimo na bango mobimba. (Tángá Nzembo 16:1, 2.) Tótalela mwa makambo oyo Yehova asalaka mpo na komonisela biso bolamu na ye.

4. Ndenge nini Yehova amonisaka bolamu na ye epai ya baoyo babandi kopusana penepene na ye?

4 Mbala nyonso oyo tosalelaka makambo oyo Yehova ateyaka biso, tomonaka ndenge oyo yango esalisaka biso. Ntango toyekolaki makambo etali Yehova mpe tokómaki kolinga ye, asalisaki biso tólonga makanisi mpe mimesemo oyo ezalaki kosala ete tózala mosika na ye. (Kol. 1:21) Lisusu, ntango tomipesaki epai ya Yehova mpe tozwaki batisimo, apesaki biso makambo mingi ya malamu, na ndakisa lisosoli ya malamu, mpe akómisaki biso baninga na ye.​—1 Pe. 3:21.

5. Ndenge nini tomonaka bolamu ya Yehova na mosala ya kosakola?

5 Tokobaka komona bolamu ya Yehova ntango tomipesaka na mosala ya kosakola. Ozalaka moto ya nsɔninsɔni? Batatoli ya Yehova mingi bazalaka mpe bongo. Mbala mosusu liboso okóma Motatoli ya Yehova, okanisaki soki moke te ete mokolo mosusu okobɛta na porte ya moto oyo oyebi te mpe okosolola na ye makambo ya Biblia. Kasi lelo oyo, yango nde osalaka mbala na mbala. Oyo eleki ntina, na lisalisi ya Yehova, okómá kosepela na mosala ya kosakola! Omoni ndenge oyo Yehova asalisi yo na makambo mingi. Mbala mosusu, asalisaki yo obatela kimya ntango moto moko atɛmɛlaki yo na mosala ya kosakola. To asalisaki yo okanisa lisusu vɛrsɛ moko ya Biblia oyo ebongi ntango moto moko asepelaki koyoka yo. Lisusu, apesaka yo makasi ya kokoba kosakola ata na ntango oyo bato basepeli te koyoka yo.​—Yir. 20:7-9.

6. Ndenge nini formasyo oyo Yehova apesaka biso emonisaka bolamu na ye? 

6 Yehova amoniselaka biso mpe bolamu na ye na ndenge apesaka biso formasyo na mosala ya kosakola. (Yoa. 6:45) Na likita na biso ya kati ya pɔsɔ, toyekolaka ndenge malamu ya kobanda na bato masolo mpe balendisaka biso tósalela makanisi yango na mosala ya kosakola. Na ebandeli, tokoki kobanga mwa moke kosalela mayele ya sika. Kasi soki tomeki, tokomona ete mayele yango ya sika ezali kosimba na teritware na biso. Lisusu, na makita mpe na mayangani, balendisaka biso tósalela lolenge mosusu ya kosakola oyo tomeká naino te. Yango mpe ekoki kobangisa biso, kasi soki tomeki yango, Yehova akopambola biso. Tólobela sikoyo mapamboli oyo tozwaka ntango tosalelaka mayele ya sika mpo na kopesa Yehova oyo eleki malamu, ata soki makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini. Na nsima, tokolobela ndenge oyo tokoki kokokisa mikano na biso na mosala ya Yehova.

YEHOVA APAMBOLAKA BAOYO BATYELAKA YE MOTEMA 

7. Mapamboli nini tozwaka ntango toponaka kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola?

7 Topusanaka penepene na Yehova. Tótalela ndakisa ya nkulutu moko na nkombo Samuel, * oyo asalelaka Yehova elongo na mwasi na ye na ekólo Colombie. Bazalaki babongisi-nzela na mboka na bango, kasi bazalaki na mposa ya kosala mingi na mosala ya kosakola mpe kopesa mabɔkɔ na lisangá moko oyo ezalaki na mposa ya basakoli mingi. Mpo na kokokisa mokano yango, basengelaki komipimela makambo mosusu. Samuel alobi boye: “Tosalelaki toli oyo ezali na Matai 6:33 mpe totikaki kosomba biloko oyo ezalaki na ntina mingi te. Kasi likambo ya mpasi koleka ezalaki ya kotika ndako na biso ya monene. Ndako yango etongamaki mpenza ndenge oyo biso tolingaka, mpe tofutaki banyongo nyonso oyo tozwaki mpo na kosomba yango.” Ntango bakómaki na lisangá na bango ya sika, bamonaki ete basengelaki kobikela na mbongo moke mpenza koleka ndenge ezalaki na mboka na bango. Samuel abakisi boye: “Tomonaki ndenge Yehova atambwisaki biso mpe ayanolaki na mabondeli na biso. Tomoni mpenza ete Yehova asepelaka na biso mpe alingaka biso mingi koleka ndenge oyo tozalaki kokanisa.” Okoki kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola? Soki osali bongo, yebá ete okopusana lisusu penepene na Yehova mpe akokokisa bamposa na yo.​—Nz. 18:25.

8. Makambo oyo Ivan ná Viktoria balobi eteyi yo nini?

8 Tozwaka esengo na mosala na biso. Tótala makambo Ivan ná mwasi na ye Viktoria, oyo bazali babongisi-nzela na ekólo Kirghizistan, balobi. Bazalaki na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpo bákoka kopesa mabɔkɔ na mosala nyonso na ebongiseli ya Yehova, ata mpe na mosala ya botongi. Ivan alobi boye: “Tozalaki kosala oyo tokoki na mokumba nyonso oyo bazalaki kopesa biso. Ata soki na mpokwa nyonso tozalaki kolɛmba, tozalaki kosepela mpo toyebaki ete tosalelaki makasi na biso na mosala ya Yehova. Tosepelaki mpe ndenge tozwaki baninga mingi ya sika mpe tokutanaki na makambo mingi ya malamu oyo tobosanaka te.”​—Mrk. 10:29, 30.

9. Ndeko mwasi moko oyo azali na mikakatano asalaka nini mpo asakola mingi, mpe yango ebimisi matomba nini?

9 Tozwaka esengo na mosala ya Yehova ata na ntango oyo tozali kokutana na mikakatano. Tótalela ndakisa ya Mirreh, ndeko mwasi moko ya mobange oyo mobali akufá. Afandaka na Afrika ya wɛsti mpe azalaki monganga. Nsima ya kozwa pansiɔ na mosala, akómaki mobongisi-nzela. Mirreh abɛlaka maladi moko ya makasi. Maladi yango esalaka ete azala na mokakatano ya kotambola. Atako akoki kaka kosakola ngonga moko na mosala ya ndako na ndako, azali na likoki ya kolekisa ntango mingi na kopesa litatoli na esika ya bato mingi. Azali mpe na bato mingi oyo azongelaka mpe oyo ayekolaka na bango Biblia. Asololaka na basusu kati na bango na telefone. Nini etindaki Mirreh amipesa ndenge wana na mosala ya Yehova? Alobi boye: “Nalingaka mpenza Yehova mpe Yesu Kristo na motema na ngai mobimba. Mpe nabondelaka Yehova mbala na mbala ete asalisa ngai nasala oyo nakoki na mosala na ye.”​—Mat. 22:36, 37.

10. Na kotalela 1 Petro 5:10, Yehova apesaka nini epai ya baoyo bamipesaka mingi na mosala na ye?

10 Yehova apesaka biso mpe formasyo mosusu. Kenny, oyo azali mobongisi-nzela na Île Maurice, amoni ete likambo yango ezali solo. Nsima ya koyekola solo, alongwaki na iniversite, azwaki batisimo, mpe akɔtaki na mosala ya ntango nyonso. Alobi boye: “Nasalaka makasi natosa maloba ya mosakoli Yisaya oyo alobaki: ‘Ngai oyo! tindá ngai!’” (Yis. 6:8) Kenny apesaka mabɔkɔ na mosala ndenge na ndenge ya botongi mpe na mosala ya kobongola mikanda na biso na monɔkɔ ya mboka na ye. Alobi boye: “Nazwaki formasyo oyo epasaki ngai makoki oyo nasengelaki na yango mpo nakokisa mikumba na ngai.” Kasi asukaki kaka te na koyekola ndenge ya kosala misala yango. Abakisi boye: “Nayekolaki mpe ndenge ya koyeba esika makoki na ngai esuki mpe bizaleli oyo nasengelaki kokolisa mpo nasalela Yehova mingi koleka.” (Tángá 1 Petro 5:10.) Yo mpe okoki kotalela lisusu makambo ya bomoi na yo mpo Yehova akoka kopesa yo formasyo na makambo mingi?

Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali kosakola esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi; ndeko mwasi moko ya elenge azali kopesa mabɔkɔ na mosala kotonga Ndako ya Bokonzi; ndeko mobali moko ya mobange ná mwasi na ye bazali kopesa litatoli na telefone. Bango nyonso bazwi esengo na mosala na bango (Talá paragrafe 11)

11. Milende nini bandeko basi ya Corée du Sud basalaki mpo na komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola, mpe yango ebotaki mbuma nini? (Talá elilingi ya ezipeli.) 

11 Ata Batatoli ya Yehova oyo baumeli mingi bazwaka formasyo ntango bamekaka lolenge mosusu ya mosala ya Yehova. Na ntango ya maladi mabe ya Coronavirus, bankulutu ya lisangá moko ya Corée du Sud bakomaki boye: “Bandeko mosusu oyo liboso bazalaki kokanisa ete bakokoka te komipesa na mosala ya kosakola mpo babɛlaka, bakómi sikoyo kosala yango na nzela ya video. Bandeko basi misato oyo bazali na mbula mwa moke koleka 80, bayekolaki ndenge ya kosalela baaparɛyi ya mikolo oyo mpe sikoyo bakómi kosakola mikolo mingi na pɔsɔ.” (Nz. 92:14, 15) Okosepela kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola mpe komona bolamu ya Yehova mingi koleka? Tótalela mwa makambo oyo okoki kosala mpo na kokokisa mokano yango.

NDENGE YA KOSALA LISUSU MINGI 

12. Yehova alaki nini mpo na baoyo batyelaka ye motema?

12 Tyeláká Yehova motema. Alaki ete akopambola biso soki totyeli ye motema mpe soki topesi ye oyo eleki malamu. (Mal. 3:10) Fabiola, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Colombie, amonaki ndenge Yehova akokisaki elaka yango epai na ye. Kaka nsima ya kozwa batisimo, azalaki na mposa ya kokóma mobongisi-nzela. Kasi asengelaki kosala mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye, elingi koloba, mobali na ye mpe bana na bango misato. Na yango, ntango alingaki kozwa pansiɔ na mosala, abondelaki mingi mpo Yehova asalisa ye. Alobi boye: “Mbala mingi, esɛngaka ete moto azela ntango molai liboso bápesa ye pansiɔ, kasi nazwaki oyo ya ngai kaka sanza moko nsima ya kokɔtisa mokanda. Ezalaki lokola likamwisi mpenza!” Sanza mibale na nsima abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Sikoyo azali na mbula mwa moke koleka 70 mpe alekisi bambula koleka 20 na mosala ya mobongisi-nzela. Na boumeli ya ntango wana, asalisi bato 8 bázwa batisimo. Alobi boye: “Atako na bantango mosusu nazalaka na makasi te, Yehova asalisaka ngai mokolo na mokolo nakoba na mosala na ngai ya mobongisi-nzela.” 

Ndenge nini Abrahama ná Sara, Yakobo, mpe banganga-nzambe oyo bakatisaki Ebale Yordani bamonisaki ete batyelaki Yehova motema? (Talá paragrafe 13)

13-14. Bandakisa nini ekoki kosalisa biso tótyela Yehova motema mpe tómipesa lisusu mingi na mosala na ye? 

13 Zwá mateya epai ya baoyo batyelaki Yehova motema. Biblia ezali na ebele ya bandakisa ya bato oyo bamipesaki mobimba na mosala ya Yehova. Bandakisa yango mingi emonisi ete Yehova apambolaki bato yango kaka nsima ya kosala likambo moko oyo emonisaki ete batyelaki ye motema. Na ndakisa, Yehova apambolaki Abrahama kaka nsima ya kolongwa na engumba na ye “atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende.” (Ebr. 11:8) Yakobo azwaki lipamboli ya ntina mingi kaka nsima ya kobunda na anzelu. (Eba. 32:24-30) Lisusu, liboso Bayisraele bákɔta na mokili ya Ndaka basengelaki kokatisa Ebale Yordani. Kasi ntango kaka banganga-nzambe batyaki makolo na bango na ebale yango nde na nsima bato bakómaki na likoki ya kokatisa.​—Yos. 3:14-16

14 Okoki mpe kozwa matomba na ndakisa ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso oyo batyelaki Yehova motema mpe bakokisaki mikano na bango. Na ndakisa, ndeko Payton ná mwasi na ye Diana, bazalaki kosepela kotánga masolo ya bandeko basi mpe mibali oyo bamipesaki na mosala ya Yehova; na ndakisa baoyo balobelami na molɔngɔ ya masolo, “Bamipesaki na bolingo na bango moko.” * Payton alobi boye: “Ntango tozalaki kotánga masolo na bango, tomiyokaki lokola tozali kotala moto moko oyo azali kolya bilei ya kitoko. Wana tozalaki kokoba kotala moto yango, biso mpe tokómaki na mposa makasi ya kolya bilei yango, elingi koloba, mposa ya ‘komeka mpe ya komona ete Yehova azali malamu.’” Nsukansuka, Payton ná Diana bakendaki kopesa mabɔkɔ na esika oyo mposa ezalaki mingi. Osilá kotánga molɔngɔ ya masolo yango? Mpe osilá kotala bavideo Prédication dans des régions isolées : Australie mpe Prédication dans des régions isolées : Irlande oyo ebimaki na jw.org? Masolo yango ekoki kosalisa yo oyeba ndenge oyo okoki kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova.

15. Ndenge nini baninga ya malamu bakoki kosalisa biso?

15 Poná baninga ya malamu. Ezalaka mpasi te tómeka bilei oyo tolyá naino te ntango tozali elongo na bato mosusu oyo balingaka bilei yango. Ndenge moko mpe, soki tozali kolekisa ntango elongo na baoyo batyaka Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango, ekozala mpasi te tóluka ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala na ye. Yango nde ekómelaki ndeko mobali moko na nkombo Kent ná mwasi na ye Veronica. Kent alobi boye: “Baninga mpe bandeko ya libota balendisaki biso tómeka kosala makambo mosusu na mosala ya Yehova. Na yango, toyaki komona ete kolekisa ntango elongo na baoyo balukaka liboso Bokonzi epesaki biso makasi ya komeka likambo moko ya sika.” Lelo oyo, Kent ná Veronica bazali babongisi-nzela monene na ekólo Serbie. 

16. Ndenge ndakisa ya Yesu oyo ezali na Luka 12:16-21 emonisi yango, mpo na nini tosengeli komipimela makambo mosusu?

16 Omipimela makambo mosusu mpo na Yehova. Esengeli kaka te tósundola biloko na biso nyonso mpo na kosepelisa Yehova. (Mos. 5:19, 20) Nzokande, soki toboyi kosala mingi na mosala ya Yehova kaka mpo toboyi komipimela makambo mosusu, tokoki kosala libunga oyo mobali moko asalaki na ndakisa oyo Yesu apesaki. Moto yango asalaki mosala makasi mpo na kozwa biloko mingi, kasi azalaki kokipe makambo ya Nzambe te. (Tángá Luka 12:16-21.) Christian, ndeko mobali moko oyo afandaka na France, alobi boye: “Nazalaki kopesa te ntango mpe makasi oyo esengeli na mosala ya Yehova mpe na libota na ngai.” Ye ná mwasi na ye bazwaki ekateli ya kokóma babongisi-nzela. Kasi mpo na kokokisa mokano yango, basengelaki kotika misala na bango. Mpo na kokokisa bamposa na bango, bakómaki kosala mwa mosala ya kotya bopɛto, mpe bayekolaki ndenge ya kosepela na mbongo moke oyo bazalaki kozwa. Bazali mpenza na esengo ndenge bamipimelaki makambo wana mpo bákóma babongisi-nzela? Christian alobi boye: “Tozali kosepela mingi na mosala ya kosakola mpe kosepela komona ndenge bayekoli ya Biblia mpe bato oyo tozongelaka bazali koyekola makambo etali Yehova.” 

17. Mpo na nini ekoki kozala mpasi tómeka lolenge ya sika ya kosakola?

17 Meká kosalela mayele ya sika ya kosakola. (Mis. 17:16, 17; 20:20, 21) Shirley, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela na États-Unis, asengelaki kobongola lolenge na ye ya kosakola na ntango ya maladi mabe ya Coronavirus. Na ebandeli, akakatanaki mpo na kopesa litatoli na nzela ya telefone. Kasi ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala lisangá na bango, azwaki formasyo mpe akómaki kosakola mbala na mbala na nzela ya telefone. Alobi boye: “Na ebandeli ezalaki kobangisa mwa moke, kasi sikoyo nakómi mpenza kosepela na yango. Tokómá kosolola na bato mingi koleka ndenge oyo tozalaki kosala yango na mosala ya ndako na ndako!” 

18. Soki eloko moko ezali kopekisa biso kosala mingi na mosala ya Yehova, nini ekoki kosalisa biso?

18 Omityela mokano mpe salá makasi okokisa yango. Soki tokutani na mikakatano, tobondelaka mpo na kosɛnga lisalisi mpe tokanisaka na oyo tokoki kosala mpo na kolonga yango. (Mas. 3:21) Sonia, oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza na etuluku moko ya monɔkɔ ya Roumain, alobi boye: “Nakomaka makambo oyo nakani kosala na papye mpe natyaka yango esika oyo ezali mpasi te mpo namona yango. Na mesa na ngai, ezali na elilingi moko oyo ezali komonisa banzela mibale oyo ekei na bisika ekeseni. Ntango nalingi kozwa ekateli, natalaka banzela yango, mpe nakanisaka epai ekateli nalingi kozwa ekomema ngai.” Sonia asalaka makasi atalela mikakatano oyo azali kokutana na yango na ndenge ebongi. Alobi boye: “Nasengeli kopona soki nakotalela mikakatano oyo nakutani na yango lokola efelo oyo ezali kopekisa ngai nakokisa mokano na ngai to lokola gbagba (pont) oyo ezali kosalisa ngai nakatisa mpo nakokisa mokano yango.” 

19. Ekateli nini tosengeli kozwa?

19 Yehova apambolaka biso na ndenge mingi. Tokomonisa ete tosepelaka na nyonso oyo apesaka biso soki tozali kosala oyo tokoki mpo na kopesa ye lokumu. (Ebr. 13:15) Na ndakisa, tokoki koluka kosala makambo mingi na mosala na ye, mpe yango ekoki kosala ete apambola biso mingi mpenza. Mokolo na mokolo, tóluka mabaku ya ‘komeka mpe ya komona bolamu ya Yehova.’ Soki tosali bongo, tokozala lokola Yesu, oyo alobaki: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”​—Yoa. 4:34

LOYEMBO 80 “Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova”

^ par. 5 Makambo nyonso ya malamu eutaka epai ya Yehova. Apesaka bato nyonso biloko ya malamu, ata mpe bato mabe. Kasi alingaka kosala makambo ya malamu koleka mpo na basambeli na ye ya sembo. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo Yehova amoniselaka basaleli na ye bolamu. Tokomona mpe ndenge oyo Yehova amonisaka bolamu na ye epai ya baoyo basalaka mingi na mosala na ye.

^ par. 7 Topesi bango bankombo mosusu. 

^ par. 14 Molɔngɔ ya masolo yango, oyo ezalaki kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ekómá kobima na jw.org. Kende na OLINGI KOYEBA BISO? > MASOLO > KOKOKISA MIKANO YA ELIMO.