Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 31

Ondimaka kozela Yehova?

Ondimaka kozela Yehova?

“Nakomonisa ete nazali kozela.”​—MIKA 7:7.

LOYEMBO 128 Tóyika mpiko tii na nsuka

NA MOKUSE *

1-2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

KANISÁ ete ozali kozela moninga moko ayela yo eloko moko oyo ozali mpenza na mposa na yango. Okoyoka ndenge nini soki moninga yango azali koumela mpe ayei te na ntango oyo boyokanaki? Okolɛmba nzoto? Masese 13:12 elobi: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.” Kasi okomiyoka ndenge nini soki bayebisi yo bantina oyo esali ete moninga yango akóma te na ntango oyo boyokanaki? Na ntembe te, okomonisa motema molai mpe okondima kozela.

2 Na lisolo oyo, tokotalela mwa mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso tókolisa mpe tóbatela ‘ezaleli ya kozela.’ (Mika 7:7) Na nsima, tokolobela makambo mibale oyo ekosɛnga ete tómonisa motema molai mpe tózela ete Yehova asala. Na nsuka, tokotalela mapamboli oyo ezali kozela baoyo bandimaka kozela ete Yehova asala.

MITINDA YA BIBLIA OYO ETEYAKA BISO EZALELI YA MOTEMA MOLAI

3. Masese 21:5 eteyi biso nini?

3 Ndakisa moko oyo emonisi ntina ya kozala motema molai ezali na Masese 21:5. Elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” Vɛrsɛ oyo eteyi biso nini? Moto ya bwanya azalaka ekɛngɛ ntango azali kosala makambo mpe amonisaka motema molai. Yango ebotaka mbuma malamu.

4. Masese 4:18 eteyi biso nini?

4 Masese 4:18 elobi ete: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” Maloba yango esalelamaka mpo na komonisa ndenge oyo Yehova amonisaka mokano na ye malembemalembe epai ya basaleli na ye. Kasi, vɛrsɛ yango ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela bokoli ya elimo oyo mokristo asalaka na bomoi na ye. Esɛngaka ntango mpo moto akóma na boyokani ya malamu ná Yehova. Soki tozali koyekola na mozindo mpe kosalela batoli oyo tozwi na Liloba ya Nzambe mpe na ebongiseli na ye, malembemalembe tokokolisa bizaleli ya bokristo. Lisusu, tokoyeba Nzambe malamu koleka. Tótalela ndakisa oyo Yesu apesaki mpo na likambo yango.

Ndenge kaka molona ekólaka malembemalembe, moto oyo ayoki mpe andimi nsango ya Bokonzi akolaka mpe na elimo malembemalembe (Talá paragrafe 5)

5. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa ndenge oyo moto akolaka na elimo?

5 Yesu asalelaki ndakisa moko mpo na komonisa ete nsango ya Bokonzi oyo tosakolaka, ezali lokola mwa mboto oyo ezali kokola malembemalembe na mitema ya bato ya sembo. Alobaki boye: “Mboto ebimi mpe ekoli, kasi [moloni] ayebi te soki esalemi ndenge nini. Mabele yango, kaka yango moko, ebandi kobota mbuma mokemoke: ya liboso lititi, na nsima motó, na nsuka nde mbuma mobimba na kati ya motó yango.” (Mrk. 4:27, 28) Yesu alingaki koloba nini? Alingaki komonisa ete kaka ndenge molona ekolaka malembemalembe, ndenge moko mpe moto oyo andimi nsango ya Bokonzi akolaka na elimo malembemalembe. Na ndakisa, tomonaka mbongwana mingi ya malamu oyo bayekoli na biso ya Biblia basalaka wana bazali kopusana penepene na Yehova. (Ef. 4:22-24) Kasi tosengeli kobosana te ete Yehova nde asalaka ete mwa mboto wana ya moke ekola.​—1 Ko. 3:7.

6-7. Ndenge oyo Yehova akelaki mabele eteyi biso nini?

6 Na makambo nyonso oyo Yehova asalaka, amonisaka motema molai mpe azwaka ntango oyo esengeli mpo na kosilisa mosala na ye. Asalaka yango mpo na lokumu ya nkombo na ye mpe mpo na bolamu ya basusu. Na ndakisa, tótala ndenge Yehova abongisaki malembemalembe mabele mpo na bato.

7 Biblia emonisi ndenge oyo Yehova akelaki mabele. Elobi ete atyaki “bolai na yango,” apikaki “bitɛlɛmiselo na yango,” mpe atyaki “libanga na yango ya litumu.” (Yobo 38:5, 6) Azwaki kutu ntango ya kotalatala mosala na ye. (Eba. 1:10, 12) Kanisá ndenge baanzelu bazalaki komiyoka ntango bazalaki komona Yehova azali kosala eloko moko nsima ya mosusu. Na ntembe te basepelaki mpenza! Yango wana na ntango moko boye “babandaki koganga na esengo.” (Yobo 38:7) Yango eteyi biso nini? Esɛngaki bankóto ya bambula mpo Yehova asilisa kokela. Kasi ntango Yehova atalaki biloko nyonso oyo akelaki, amonaki ete ezalaki “malamu mingi.”​—Eba. 1:31.

8. Tokolobela nini sikoyo?

8 Ndenge touti komona yango na bandakisa oyo tolobeli, Liloba ya Nzambe ezali na mitinda mingi oyo emonisi ntina ya kozala na motema molai. Tólobela sikoyo makambo mibale oyo mpo na yango tosengeli kondima kozela ete Yehova asala.

NTANGO NINI EKOKI KOSƐNGA ETE TOZELA YEHOVA ASALA?

9. Na likambo nini ekoki kosɛnga ete tómonisa motema molai mpe tózela Yehova?

9 Ekoki kosɛnga tózela ete Yehova ayanola na mabondeli na biso. Ntango tobondeli Yehova apesa biso makasi ya koyika mpiko na mokakatano moko to asalisa biso tólonga bolɛmbu moko, tokoki komona ete eyano na libondeli na biso ezali koumela koleka ndenge oyo tokanisaki. Mpo na nini Yehova ayanolaka mbala moko te na mabondeli nyonso oyo tósalaka?

10. Mpo na nini tosengeli komonisa motema molai wana tozali kozela ete Yehova ayanola na mabondeli na biso?

10 Yehova ayokaka na likebi mpenza mabondeli na biso. (Nz. 65:2) Amonaka ete mabondeli na biso ezali elembo oyo emonisaka ete tozali na kondima epai na ye. (Ebr. 11:6) Asepelaka mpe komona milende oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye mpe ndenge tosalaka makambo na boyokani na mabondeli na biso. (1 Yoa. 3:22) Na yango, ntango tosɛngi Yehova asalisa biso tótika ezalaleli moko ya mabe, ekoki kosɛnga ete tómonisa motema molai mpe tósala oyo tokoki mpo na kosala mbongwana. Yesu amonisaki ete tokoki te kozwa mbala moko biyano na mabondeli mosusu oyo tosalaka. Alobaki boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.” (Mat. 7:7, 8) Ntango tozali kolanda toli yango mpe ‘tótingami na mabondeli,’ tokoki kotya motema ete Tata na biso ya likólo azali koyoka biso mpe akoyanola na mabondeli na biso.​—Kol. 4:2.

Ntango tozali kozela ete Yehova asala, tobondelaka ye na kondima (Talá paragrafe 11) *

11. Ndenge nini Baebre 4:16 ekoki kosalisa biso ntango tomoni ete eyano na libondeli na biso ezali koumela?

11 Atako tokoki komona ete eyano na libondeli na biso ezali koumela, Yehova alaki ete akoyanola na libondeli na biso na ‘ntango oyo tozali na mposa ya lisalisi,’ elingi koloba, na ntango oyo ebongi. (Tángá Baebre 4:16.) Yango wana tosengeli soki moke te kopesa Yehova foti mpo ayanoli te na libondeli na biso na ntango oyo tokanisaki. Na ndakisa, bandá kala bato mingi babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe esukisa mokili oyo mabe. Kutu Yesu alobaki ete tosengeli kobondela mpo na yango. (Mat. 6:10) Kasi ekozala mpenza bozoba soki totiki ete kondima na biso epai ya Nzambe elɛmba kaka mpo nsuka eyei te na ntango oyo tokanisi ete esengelaki koya! (Hab. 2:3; Mat. 24:44) Tomonisaka bwanya ndenge tokobaka kozela Yehova mpe totyaka motema ete akoyanola na mabondeli na biso. Nsuka ekoya mpenza na ntango oyo ebongi, mpamba te Yehova asilá kopona “mokolo mpe ngonga” mpo na yango. Mpe yango ekozala mpenza ntango oyo ebongi mpo na moto nyonso oyo alingaka Yehova.​—Mat. 24:36; 2 Pe. 3:15.

Liteya nini etali motema molai tokoki koyekola epai ya Yozefe? (Talá paragrafe 12-14)

12. Ntango nini ekoki kozala mpasi mpo tómonisa motema molai?

12 Ekoki kosɛnga ete tómonisa motema molai wana tozali kozela ete makambo ya kozanga bosembo esila. Mbala mingi, bato ya mokili oyo banyokolaka basusu mpo bakesani na bango bikólo, loposo, mimeseno to mpo bazali basi to mibali. Banyokolaka bato mosusu kaka mpo bazali bibɔsɔnɔ, babelaka maladi moko boye to mpo bazalaka mayele mingi te. Basalelaka Batatoli ya Yehova mingi makambo ya kozanga bosembo kaka mpo mateya na bango eutaka na Biblia. Ntango bazali konyokola biso ndenge wana, tosengeli kobosana te maloba oyo ya Yesu: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.” (Mat. 24:13) Kasi okosala nini soki oyebi ete ndeko moko ya lisangá asalaki lisumu ya monene? Soki bankulutu bayebi likambo yango, osengeli kotika yango na mabɔkɔ na bango, komonisa motema molai mpe kotya motema ete bakolandela likambo yango na ndenge oyo Yehova alingi. Kasi bankulutu basengeli kosala nini?

13. Yehova alingi ete bankulutu básala nini ntango ndeko moko asali lisumu ya monene?

13 Ntango bankulutu bayebi ete ndeko moko asalaki lisumu ya monene, babondelaka mpe balukaka “bwanya oyo euti na likólo” mpo báyeba likanisi ya Yehova na likambo yango. (Yak. 3:17) Mokano na bango ezalaka ya kosalisa mosumuki alongwa “na nzela ya libunga na ye” soki esengeli. (Yak. 5:19, 20) Basalaka mpe nyonso oyo ekoki mpo na kobatela lisangá mpe kobɔndisa baoyo likambo yango epesaki bango mpasi. (2 Ko. 1:3, 4) Ntango bankulutu bayebi ete lisumu moko ya monene esalemaki, basengeli koluka liboso koyeba ndenge makambo esalemaki; yango ekoki kozwa mwa ntango. Na nsima, babondelaka mpe bapesaka toli oyo euti na Makomami mpe basembolaka mosumuki yango “na ndenge oyo ekoki.” (Yir. 30:11) Atako bankulutu basengeli te koumisa makambo, basengeli mpe te kozwa ekateli nokinoki. Ntango bankulutu balandaka litambwisi ya Yehova, bandeko nyonso ya lisangá bazwaka mpenza litomba. Kasi, ata soki bankulutu basali makambo na ndenge esengeli, moto oyo likambo yango epesaki mpasi akoki kokoba kaka komitungisa. Soki ezali bongo mpo na yo, okoki kosala nini mpo likambo yango epesa yo mpasi mingi te?

14. Ndakisa nini ya Biblia ekoki kobɔndisa yo soki ndeko moko ya lisangá asali likambo moko oyo epesi yo mpasi mingi?

14 Osilá koyoka mpasi makasi mpo na likambo oyo moto to ndeko moko ya lisangá asalaki yo? Na kati ya Liloba ya Nzambe, ezali na bandakisa ya malamu oyo eteyaka biso ndenge ya kozela ete Yehova asembola makambo. Na ndakisa, atako Yozefe anyokwamaki mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo bandeko na ye basalelaki ye, kasi atikaki te ete mabunga na bango ekómisa ye nkandankanda. Akobaki kotya makanisi na ye nyonso na mosala ya Yehova; mpe Yehova apambolaki ye mpenza mpo amonisaki motema molai mpe ezaleli ya koyika mpiko. (Eba. 39:21) Nsukansuka, Yozefe alimbisaki baoyo bayokisaki ye mpasi mpe amonaki ndenge Yehova apambolaki ye. (Eba. 45:5) Lokola Yozefe, tozwaka libɔndisi ntango topusanaka penepene na Yehova mpe tozelaka ete asilisa makambo ya kozanga bosembo na ntango oyo ebongi.​—Nz. 7:17; 73:28.

15. Nini esalisaki ndeko mwasi moko ayika mpiko na makambo ya kozanga bosembo oyo basalelaki ye?

15 Ya solo, makambo nyonso te ya kozanga bosembo oyo tokutanaka na yango ezali monene lokola oyo Yozefe akutanaki na yango. Kasi biso nyonso toyokaka mpasi ntango basaleli biso makambo ya kozanga bosembo ata ya lolenge nini. Soki tozali na likambo na moto moko, ezala asambelaka Yehova to te, tokozwa matomba soki tosaleli mitinda ya Biblia. (Flp. 2:3, 4) Tótalela ndakisa moko. Ndeko mwasi moko ayokaki mpasi mpenza ntango ayokaki ete moninga na ye moko ya mosala azalaki koloba mabe mpo na ye, mpe kokosela ye makambo epai ya bato mosusu. Na esika asilika mbala moko, ndeko mwasi yango azwaki ntango ya kokanisa na mozindo na ndakisa ya Yesu. Ntango bazalaki kofinga Yesu, azalaki kozongisa te. (1 Pe. 2:21, 23) Na yango, ndeko mwasi yango amonaki malamu akipe likambo yango te. Na nsima, ayaki koyeba ete moninga na ye wana azalaki na maladi moko ya makasi mpe azalaki na mitungisi mingi. Amonaki ete ntango mosusu moninga na ye asalaki likambo yango na nko te. Na yango, ndeko mwasi yango ayokaki mpenza esengo ndenge ayikelaki likambo yango mpiko, mpe azwaki kimya.

16. Nini ekoki kobɔndisa yo soki ozali kokutana na makambo ya kozanga bosembo? (1 Petro 3:12)

16 Soki ozali koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo to moto moko apesi yo mpasi, kobosana te ete Yehova azalaka pene ya “baoyo motema ebukani.” (Nz. 34:18) Alingaka yo ndenge omonisaka motema molai mpe ndenge oyo obwakelaka ye mokumba na yo ya kilo. (Nz. 55:22) Azali Mosambisi ya mabele mobimba mpe amonaka makambo nyonso. (Tángá 1 Petro 3:12.) Na yango, soki ozali kobunda na mikakatano ya makasi oyo okoki kosilisa te, kobosana te ete ezali na ntina ozela Yehova.

MAPAMBOLI YA SEKO MPO NA BAOYO BAZELAKA YEHOVA

17. Na kotalela Yisaya 30:18, Yehova alaki kosala nini mpo na biso?

17 Mosika te, Tata na biso ya likoló akosopela biso mapamboli ebele na nzela ya Bokonzi na ye. Yisaya 30:18 elobi: “Yehova akokoba kozela mpo na komonisela bino boboto, mpe yango wana akotɛlɛma mpo na koyokela bino mawa. Mpo Yehova azali Nzambe oyo asambisaka na bosembo. Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.” Baoyo bakobaka kozela Yehova bakozwa mapamboli mingi lelo mpe na mokili ya sika.

18. Mapamboli nini ezali kozela biso?

18 Ntango basaleli ya Nzambe bakokɔta na mokili ya sika, bakoyika lisusu mpiko te na mitungisi mpe na mikakatano oyo bazali kokutana na yango lelo oyo. Makambo ya kozanga bosembo ekosila, mpe mpasi ekozala lisusu te. (Em. 21:4) Tokomitungisa lisusu te mpo na biloko oyo tosengeli na yango mpamba te biloko yango ekozala ebele. (Nz. 72:16; Yis. 54:13) Ekozala mpenza lipamboli!

19. Ndenge nini Yehova azali kobongisa biso mokemoke banda sikoyo?

19 Yehova azali kobongisa biso sikoyo mpo tófanda na nse ya boyangeli na ye, na ndenge azali kosalisa biso tólonga bizaleli na biso ya mabe, mpe tókolisa bizaleli oyo ebongi mpo na bakristo. Kolɛmba nzoto te mpe kotika te kosalela Yehova. Makambo ya malamu ezali kozela biso! Wana tozali kozela ntango yango ya kitoko, tiká ete tókoba kozela Yehova akokisa makambo oyo alaki!

LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”

^ par. 5 Osilá koyoka mosaleli moko ya Yehova oyo aumeli azali koloba: ‘Nakanisaki soki moke te ete mokili oyo mabe ekozala tii lelo oyo’? Biso nyonso tozali na mposa makasi ya komona Yehova atya nsuka na mokili oyo mabe, mingimingi na eloko oyo ya mpasi. Kasi, tosengeli kozala na motema molai. Na lisolo oyo, tokomona mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tókolisa ezaleli ya kozela Yehova. Tokotalela mpe makambo mibale oyo ekosɛnga ete tómonisa motema molai mpe tózela Yehova asala. Mpe na nsuka, tokomona mapamboli oyo ezali kozela bato oyo bandimaka kozela Yehova.

^ par. 56 ELILINGI: Banda bomwana na ye, ndeko mwasi moko abondelaka Yehova mbala na mbala. Ntango azalaki naino mwana moke, baboti na ye balakisaki ye ndenge ya kobondela. Ntango akómaki elenge, akómaki mobongisi-nzela mpe mbala na mbala azalaki kosɛnga Yehova apambola mosala na ye. Bambula na nsima, ntango mobali na ye abɛlaki makasi, asɛngaki Yehova apesa ye makasi ya koyikela mokakatano yango mpiko. Lelo oyo, lokola akómá mwasi oyo mobali akufá, azali kotingama na mabondeli, na elikya ete Yehova akoyanola na mabondeli na ye kaka ndenge asalaki yango na boumeli ya bomoi na ye mobimba.