Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 33

Zalá na esengo na oyo okoki kosala na mosala ya Yehova

Zalá na esengo na oyo okoki kosala na mosala ya Yehova

“Komona na miso eleki mposa makasi ya molimo.”​MOS. 6:9.

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini bandeko ebele bazali koluka kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova?

 TOZALI na mingi ya kosala na mosala ya Yehova lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene. (Mat. 24:14; Luka 10:2; 1 Pe. 5:2) Biso nyonso tolingaka kosala mingi na mosala ya Yehova na kotalela makoki na biso. Bandeko mingi babakisi molende na bango na mosala ya kosakola. Bamosusu bazali na mposa ya kosala lokola babongisi-nzela. Bamosusu mpe bazali na mposa ya kosala na Betele to mpe na mosala ya botongi ya bandako mpo na mosala ya Bokonzi. Mpe bandeko mibali mingi bazali kokokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala to mpe bankulutu. (1 Tim. 3:1, 8) Yehova asepelaka mingi ntango amonaka elimo wana ya komipesa epai ya basaleli na ye!​—Nz. 110:3; Yis. 6:8.

2. Tokoki komiyoka ndenge nini soki tokokisi te mikano mosusu oyo tomityelaki na mosala ya Yehova?

2 Kasi tokoki kolɛmba nzoto soki nsima ya kolekisa ntango mingi, tozali kokokisa kaka te mikano mosusu oyo tomityelaki na mosala ya Yehova. Tokoki mpe kolɛmba nzoto mpo mbula oyo tozali na yango to makambo ya bomoi na biso ezali kopesa biso nzela te ya kozwa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova. (Mas. 13:12) Yango nde ekómelaki ndeko mwasi Melissa. * Azalaki kosepela mingi kosala na Betele to mpe kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Kasi alobi boye: “Mbula oyo nasengelaki kokokisa mikano yango esili koleka. Sikoyo mpo na ngai makambo wana ekómá kaka ndɔtɔ ya mpamba. Na bantango mosusu nalɛmbaka nzoto.”

3. Bandeko mosusu basengeli kosala nini mpo bákokisa masɛngami ya kozwa mikumba mosusu?

3 Bandeko mosusu oyo bazali bilenge mpe nzoto kolɔngɔnɔ basengeli naino kokolisa bizaleli mosusu liboso bázwa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova. Na ndakisa, bamosusu bakoki kozala mayele, bazwaka bikateli nokinoki, mpe balingaka kosala mosala. Kasi ekoki kosɛnga ete bámonisa motema molai, báyekola kosala mosala na bango malamumalamu mpe bápesaka basusu limemya. Soki osali makasi okolisa bizaleli oyo esengeli, okoki kozwa mikumba na ntango oyo ozalaki kutu kokanisa te. Tótalela ndakisa ya ndeko Nick. Ntango azalaki na mbula 20, alɛmbaki mpenza nzoto mpo akómaki mosaleli na misala te. Alobi boye: “Namiyokaki lokola nasalaki likambo moko ya mabe.” Kasi Nick atikaki te kokolisa bizaleli ya malamu. Akobaki kosala oyo akokaki na lisangá mpe na mosala ya kosakola. Lelo oyo, azali na Komite ya filiale.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Olɛmbi nzoto mpo okokisi naino te mokano moko boye ya elimo oyo omityelaki? Soki ezali bongo, yebisá Yehova na libondeli ndenge oyo ozali komiyoka. (Nz. 37:5-7) Okoki mpe kosɛnga na bandeko oyo bakɔmeli na elimo báyebisa yo oyo okoki kosala mpo okolisa makoki na yo na mosala ya Nzambe, mpe na nsima, salá makasi osalela toli oyo bapesi yo. Soki osali bongo, okoki kokokisa mokano oyo omityelaki. Kasi, ndenge moko na Melissa oyo tolobelaki liboso, mbala mosusu ozali te na likoki ya kosala makambo mosusu oyo olingi na mosala ya Yehova. Ndenge nini okoki kobatela esengo na yo? Mpo na koyanola na motuna yango, lisolo oyo ekolobela (1) makambo oyo ekoki kopesa yo esengo, (2) ndenge ya kobakisa esengo na yo, mpe (3) mikano oyo okoki komityela mpo na kobakisa esengo na yo.

MAKAMBO OYO EKOKI KOPESA YO ESENGO

5. Mpo na kozala na esengo, tosengeli kotya likebi na biso na nini? (Mosakoli 6:9)

5 Mosakoli 6:9 elobeli makambo oyo ekoki kosalisa biso tózala na esengo. (Tángá.) Moto oyo asepelaka na oyo azali na yango mpe na oyo akoki kosala na kotalela ndenge makambo ya bomoi na ye ezali, azalaka na esengo mingi. Nzokande, moto oyo alandaka bamposa na ye mpe oyo alukaka kozwa eloko oyo eleki makoki na ye, azalaka na esengo soki moke te. Yango eteyi biso nini? Mpo na kozala na esengo, tosengeli kotya likebi na biso nyonso na oyo tozali na yango, mpe na makambo oyo tokokoka kosala.

6. Ndakisa nini tokotalela sikoyo, mpe mateya nini tokozwa na ndakisa yango?

6 Ekoki mpenza kosalema ete moto asepela na oyo azali na yango? Bato mingi bakanisaka ete ekoki kosalema te mpo tolingaka koyekola makambo ya sika. Nzokande ekoki kosalema ete tósepela na oyo tozali na yango. Na ndenge nini? Mpo na kozwa eyano, tótalela ndakisa ya batalanta oyo Yesu apesaki oyo ezali na Matai 25:14-30. Tokomona ndenge ya kozwa esengo mpe ya kosepela lisusu mingi na mapamboli oyo tozali na yango sikoyo.

NDENGE YA KOZALA NA ESENGO MINGI

7. Lobelá na mokuse ndakisa ya batalanta oyo Yesu apesaki.

7 Na ndakisa yango, mobali moko alingaki kokende mobembo. Liboso ya kokende, abengaki baombo na ye mpe apesaki mokomoko na bango batalanta oyo basengelaki kosala na yango mombongo. * Lokola mobali yango ayebaki ete baombo na ye bazali na makoki ekeseni, apesaki moko batalanta mitano, mosusu mibale, mpe mosusu moko. Baombo mibale ya liboso basalaki mosala makasi mpo na kobakisela nkolo na bango mbongo. Kasi oyo ya misato asalaki ata eloko moko te na mbongo oyo bapesaki ye. Na yango, nkolo na ye alongolaki ye na mosala.

8. Mpo na nini moombo ya liboso na ndakisa oyo Yesu apesaki asengelaki kosepela?

8 Moombo ya liboso asepelaki ndenge nkolo na ye apesaki ye batalanta mitano. Yango ezalaki mbongo mingi mpenza mpe emonisaki ete nkolo na ye azalaki mpenza kotyela ye motema! Bongo moombo ya mibale? Akokaki kolɛmba nzoto lokola nkolo na ye apesaki ye batalanta ndenge moko te na moombo ya liboso. Kasi asalaki nini?

Mateya nini tokoki kozwa epai ya moombo ya mibale oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye? (1) Nkolo na ye apesaki ye batalanta mibale. (2) Asalaki mosala makasi mpo na kokómisa mbongo ya nkolo na ye mingi. (3) Abakiselaki nkolo na ye batalanta mosusu mibale (Talá paragrafe 9-11)

9. Likambo nini Yesu alobaki te mpo na moombo ya mibale? (Matai 25:22, 23)

9 Tángá Matai 25:22, 23. Yesu alobaki te ete moombo ya mibale asilikaki to ayokaki nkanda ndenge bapesaki ye kaka batalanta mibale. Mpe Yesu alobaki te ete moombo yango amilelaki mpe alobaki: ‘Mpo na nini nkolo na ngai apesi ngai kaka batalanta mibale mpamba? Ngai mpe nasalaka mosala makasi lokola moombo oyo azwaki batalanta mitano! Lokola nkolo na ngai azali kosepela na ngai te, ekozala malamu nakunda batalanta na ye mpe nakende kosala makambo na ngai moko.’

10. Moombo ya mibale asalaki nini na batalanta na ye?

10 Ndenge moko na moombo ya liboso, moombo ya mibale azwaki na lisɛki te mokumba oyo bapesaki ye mpe asalaki mosala makasi mpo na kosalela nkolo na ye. Mpe yango esalaki ete batalanta na ye mibale ekóma minei. Nkolo na ye apesaki ye mbano mpo na mosala makasi oyo asalaki. Lisusu, nkolo na ye asepelaki mpe abakiselaki ye mikumba mosusu!

11. Ndenge nini okoki kobakisa esengo na yo?

11 Ndenge moko mpe, tokoki kobakisa esengo na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki na mokumba oyo bapesi biso na mosala ya Yehova. ‘Omipesa mingi’ na mosala ya kosakola mpe na makambo ya lisangá. (Mis. 18:5; Ebr. 10:24, 25) Bongisáká makita malamu mpo opesa biyano oyo ekolendisa. Zwáká na motuya mingi masolo nyonso oyo bapesi yo na likita ya kati ya pɔsɔ. Soki basɛngi yo okokisa mokumba moko na lisangá, kómáká na ngonga mpe zalá moto oyo bakoki kotyela motema. Kokanisa te ete mokumba oyo bapesi yo ezali na ntina te, mpe osengeli te kolekisa ntango na yo mpo na yango. Salá makasi oyeba malamu mokumba oyo bapesi yo. (Mas. 22:29) Soki omipesi mobimba na mosala ya Yehova, okokóma moninga na ye ya motema mpe okozala na esengo mingi. (Gal. 6:4) Lisusu ekozala mpasi te mpo osepela ntango bandeko mosusu bazwi mokumba oyo ozalaki kosepela na yango.​—Rom. 12:15; Gal. 5:26.

12. Nini esalisaki Melissa mpe Nick mpo bázala na esengo mingi?

12 Ozali koyeba lisusu ndeko Melissa, oyo tolobelaki na paragrafe ya mibale, oyo azalaki na mposa ya kosala na Betele to kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? Atako azali na likoki te ya kokokisa mokano yango, alobi boye: “Namipesaka mobimba na mosala na ngai ya mobongisi-nzela mpe nasalelaka mayele ndenge na ndenge na mosala ya kosakola. Yango epesaka ngai esengo mingi.” Ndenge nini ndeko Nick alongaki ezaleli ya kolɛmba nzoto oyo azalaki na yango ntango aponamaki te mpo azala mosaleli na misala? Alobi boye: “Natyaki makanisi na ngai nyonso na makambo oyo nakokaki kosala, na ndakisa, komipesa na mosala ya kosakola mpe kopesa biyano ya kolendisa na makita. Natondisaki mpe formilɛrɛ mpo na kokɔta na Betele mpe babengisaki ngai na mbula oyo elandaki.”

13. Matomba nini okozwa soki omipesi mobimba na mokumba oyo ozali na yango sikoyo? (Mosakoli 2:24)

13 Soki omipesi mobimba na mokumba oyo ozali na yango sikoyo, yango elakisi ete okozwa mikumba mosusu ya minene na nsima? Mbala mosusu ekoki kozala bongo, ndenge esalemaki mpo na Nick. Kasi soki esalemi bongo te, lokola Melissa, okoki kozala na esengo mingi mpe kosepela na oyo ozali kosala mpo na Yehova. (Tángá Mosakoli 2:24.) Longola yango, okozala na esengo mpo oyebi ete ozali kosepelisa Nkolo na biso, Yesu Kristo.

MIKANO OYO EBAKISAKA ESENGO NA BISO

14. Makambo nini tosengeli kobosana te mpo na mikano ya elimo oyo tomityelaka?

14 Soki totye makanisi na biso nyonso na mikumba oyo tozali na yango sikoyo, yango elakisi ete tosengeli koluka te kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova? Te! Tosengeli komityela mikano oyo ekosala ete tókóma basakoli mpe bateyi ya malamu koleka, mpe tósalisa bandeko na biso bakristo. Tokokokisa mokano yango soki na komikitisa nyonso tozali kosalela basusu na esika ya kosala mpo na biso moko.​—Mos. 11:2; Mis. 20:35.

15. Wapi mikano mosusu oyo ekoki kosalisa yo obakisa esengo na yo?

15 Okoki komityela mikano nini? Sɛngá Yehova asalisa yo mpo oyeba mikano oyo okozala na likoki ya kokokisa. (Mas. 16:3; Yak. 1:5) Mpo na nini te komityela moko ya mikano oyo tolobelaki na  paragrafe ya liboso ya lisolo oyo? Na ndakisa okoki komityela mokano ya kokóma mobongisi-nzela mosungi to ya sanza na sanza, kosala na Betele, to na mosala ya kotonga bandako mpo na mosala ya Bokonzi. To mpe okoki koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosakola nsango malamu to kokende kosakola na teritware mosusu. Okoki koyekola makambo mosusu oyo etali mikano yango soki otángi mokapo 10 ya buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova mpe soki osololi na bankulutu ya lisangá na bino. * Wana ozali kosala makasi okokisa mikano yango, bandeko mosusu bakomona ete ozali kokola na elimo mpe esengo na yo ekobakisama.

16. Okoki kosala nini soki ozali te na likoki ya kokokisa mokano moko boye?

16 Kasi okosala nini soki sikoyo ozali na likoki te ya kokokisa mikano oyo touti kolobela? Ekozala malamu omityela mokano mosusu oyo okozala na likoki ya kokokisa. Tótalela makanisi oyo elandi.

Wapi mikano mosusu oyo okoki kokokisa? (Talá paragrafe 17) *

17. Ndenge 1 Timote 4:13, 15 emonisi yango, ndeko mobali asengeli kosala nini mpo akóma moteyi malamu?

17 Tángá 1 Timote 4:13, 15. Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, okoki kosala makasi okóma molobi malamu to moteyi malamu. Mpo na nini? Mpo soki ‘omipesi mobimba’ mpo okóma motángi, molobi, mpe moteyi malamu, okosalisa baoyo bazali koyoka yo. Omityela mokano ya koyekola mpe ya kosalela toli mokomoko ya koloba malamu oyo ezali na mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya. Yekolá liteya mokomoko, mpe mekáká na ndako ndenge ya kosalela yangona likebi mpenza. Ntango ozali kosala masolo, salelá makambo oyo oyekoli. Lukáká toli epai ya mopesi-toli mosungi to bankulutu mosusu “oyo basalaka mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.” * (1 Tim. 5:17) Koluka kaka te oyeba ndenge ya kosalela mayele oyo ozwi na mwa buku yango, kasi osengeli mpe kosala makasi osalisa bayoki na yo bákómisa kondima na bango makasi mpe kolendisa bango básalela makambo oyo bazali koyekola. Soki osali bongo, esengo na yo mpe oyo ya bango ekobakisama.

Wapi mikano mosusu oyo okoki kokokisa? (Talá paragrafe 18) *

18. Nini ekoki kosalisa biso tókokisa mikano oyo tomityeli mpo na mosala ya kosakola?

18 Biso nyonso tozali na mokumba ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20; Rom. 10:14) Ndenge nini okoki kokolisa mayele na yo na mosala yango ya ntina mingi? Tyá mikano ya sikisiki ntango ozali koyekola mpe kosalela makambo oyo oyekoli na mwa buku Mateya. Okoki kozwa makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo mpe na bavideo oyo emonisaka ndenge ya kobanda masolo, oyo totalaka na makita ya kati ya pɔsɔ. Meká mayele ndenge na ndenge mpo na koyeba oyo ekosimba. Soki osaleli makanisi yango, okokóma moteyi malamu mpe yango ekobakisela yo esengo.​—2 Tim. 4:5.

Wapi mikano mosusu oyo okoki kokokisa? (Talá paragrafe 19) *

19. Ndenge nini okoki kokolisa bizaleli ya bokristo?

19 Ntango ozali koluka mikano oyo okomityela, kobosana te ete mokano oyo eleki ntina ezali ya kokolisa bizaleli ya bokristo. (Gal. 5:22, 23; Kol. 3:12; 2 Pe.1:5-8) Ndenge nini okoki kosala yango? Kanisá ete olingi kokómisa kondima na yo makasi. Osengeli kotánga na mikanda na biso masolo oyo ekoki kosalisa yo mpo okómisa kondima na yo makasi. Okozwa mpe matomba soki otali na TV JW, bavideo ya mikuse oyo emonisi ndenge bandeko na biso bamonisaki kondima ntango bazalaki kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Na nsima, luká koyeba ndenge oyo okoki komekola kondima na bango na bomoi na yo.

20. Ndenge nini tokoki kobakisa esengo na biso mpe kotika komitungisa mpo na makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto?

20 Na ntembe te, biso nyonso tozalaka na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova koleka ndenge tozali kosala sikoyo. Na mokili ya sika, tokozala na likoki ya kosalela Nzambe mingi mpenza. Wana tozali kozela ntango yango ekoka, soki tosali nyonso oyo tokoki na mosala oyo tozali na yango sikoyo, tokobakisa esengo na biso mpe tokotungisama mingi te na makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Oyo eleki ntina, tokopesa Yehova,‘Nzambe na biso ya esengo,’ lokumu mpe nkembo. (1 Tim. 1:11) Na yango, tiká ete tósepela na mikumba oyo tozali na yango!

LOYEMBO 82 “Tiká pole na bino engɛnga”

^ par. 5 Tolingaka Yehova mingi, mpe tolingaka kosala nyonso oyo tokoki na mosala na ye. Yango wana, tolingaka kosala mingi na mosala na ye mpe kozwa mikumba mosusu na lisangá. Tokosala nini soki tobomi nzoto mpo na kokokisa mikano mosusu kasi ezali kosimba te? Nini ekoki kosalisa biso tózala na mingi ya kosala na mosala ya Yehova mpe tóbatela esengo na biso? Tokozwa eyano na ndakisa oyo Yesu apesaki ya batalanta.

^ par. 2 Topesi bango bankombo mosusu

^ par. 7 NDIMBOLA YA MALOBA: Talanta moko ezali mbongo oyo mosali azalaki kozwa nsima ya kosala mosala na boumeli ya mbula soki 20.

^ par. 15 Bandeko mibali oyo bazwi batisimo basengeli kosala makasi bákokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala mpe bankulutu. Mpo na koyeba ndenge ya kokokisa masɛngami yango, talá mokapo 5 mpe 6 ya buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova.

^ par. 17 NDIMBOLA YA MALOBA: Mopesi-toli mosungi ezali nkulutu oyo azali na mokumba ya kopesa toli na nkuku soki esengeli epai ya bankulutu mpe basaleli na misala mpo na masolo oyo basalaka na makita ya lisangá.

^ par. 64 ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo akokisa mokano oyo amityeli ya kokóma moteyi malamu.

^ par. 66 ELILINGI: Nsima ya komityela mokano ya kopesa litatoli ya libaku malamu, ndeko mwasi moko azali kopesa Karte ya viziti na ye ya telefone epai ya mwasi oyo atyelaki ye biloko ya kolya na restora.

^ par. 68 ELILINGI:Mposa makasi ya komonisa bizaleli ya bokristo etindi ndeko mwasi moko apesa ndeko mwasi mosusu kado.