Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 30

Zwá na motuya esika oyo ozali na yango na libota ya Yehova

Zwá na motuya esika oyo ozali na yango na libota ya Yehova

“Osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu, mpe olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu.”​—NZ. 8:5.

LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

NA MOKUSE *

1. Mituna nini tokoki komituna ntango tokanisaka na mozindo na biloko oyo Yehova akelá?

NTANGO tokanisaka na mozindo na biloko nyonso oyo Yehova akelá na molɔ́ngɔ́ mobimba, tomiyokaka lokola mokomi ya nzembo Davidi, oyo abondelaki ete: “Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo, sanza ná minzoto oyo obongisá, moto​—mowei mpamba​—azali nani mpo okanisa ye, mpe mwana ya moto ya mabele mpo obatela ye?” (Nz. 8:3, 4) Ndenge moko na Davidi, tokoki komona ete tozali moke mpenza soki tomikokanisi na minzoto oyo Yehova akelá. Tokoki mpe kokamwa ndenge atyelaka biso likebi. Ndenge tokomona yango, Yehova atyelaki Adama ná Eva, bato ya liboso oyo akelaki, likebi mpenza. Longola yango, akómisaki bango mpe bato ya libota na ye.

2. Mokano ya Yehova mpo na Adama ná Eva ezalaki nini?

2 Adama ná Eva bazalaki bana ya liboso ya Yehova awa na mabele, mpe Yehova azalaki Tata na bango ya bolingo. Mposa na ye ezalaki ete bábota bana ebele. Nzambe ayebisaki bango boye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Eba. 1:28) Alingaki ete bábota bana mpe bábatela mabele. Soki bátosaka Nzambe mpe básalaka makambo oyo ayebisaki bango, Adama ná Eva mpe bana na bango balingaki kotikala na kati ya libota na ye mpo na libela.

3. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova apesaki Adama ná Eva esika ya lokumu na libota na ye?

3 Yehova apesaki Adama ná Eva esika ya lokumu na libota na ye. Na Nzembo 8:5, Davidi alobaki boye mpo na ndenge oyo Nzambe akelaki moto: “Osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu, mpe olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu.” Ya solo, Yehova apesá bato mayele, makasi, mpe makoki ndenge moko te na baanzelu. (Nz. 103:20) Kasi bato bazali kaka “mwa moke na nse” ya baanzelu yango ya nguya. Ezali mpenza kokamwisa! Ntango Yehova akelaki baboti na biso ya liboso, apesaki bango bomoi ya malamu mpenza.

4. (a) Lokola Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova, babungisaki eloko nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

 4 Likambo ya mawa, Adama ná Eva babungisaki esika oyo bazalaki na yango na libota ya Yehova. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo, likambo yango ebimiselá bakitani na bango mikakatano mingi. Kasi mokano ya Yehova ebongwani te. Alingi ete bato ya botosi bázala bana na ye mpo na libela. Tólobela naino ndenge Yehova apesá biso lokumu. Na nsima, tokolobela oyo tokoki kosala sikoyo mpo na komonisa ete tolingi kozala na libota ya Nzambe. Na nsuka, tokolobela mapamboli oyo bana ya Yehova awa na mabele bakozwa mpo na libela.

NDENGE OYO YEHOVA APESÁ BATO LOKUMU

Ndenge nini Yehova apesá biso lokumu? (Talá paragrafe 5-11) *

5. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi epai ya Nzambe ndenge asalá biso na elilingi na ye?

5 Yehova apesá biso lokumu na ndenge asalá biso na elilingi na ye. (Eba. 1:26, 27) Lokola Nzambe asalá biso na elilingi na ye, tokoki kokolisa mpe komonisa bizaleli mingi oyo azalaka na yango; na ndakisa bolingo, motema mawa, bosembo mpe boyengebene. (Nz. 86:15; 145:17) Ntango tokolisaka bizaleli wana, topesaka Yehova lokumu mpe tomonisaka ete tozali na botɔndi mpo na oyo asalá. (1 Pe. 1:14-16) Ntango tosalaka makambo oyo esepelisaka Tata na biso ya likoló, yango epesaka biso esengo. Mpe lokola Yehova asalá biso na elilingi na ye, tokoki kozala lolenge ya bato oyo alingaka bázala na libota na ye.

6. Ntango Yehova abongisaki mabele, ndenge nini apesaki bato lokumu?

6 Yehova abongiselá biso esika moko ya malamu mpenza. Bambula mingi liboso akela mobali ya liboso, Yehova abongisaki mabele mpo na bato. (Yobo 38:4-6; Yir. 10:12) Lokola azali na boboto mpe akabaka, apesá biso biloko mingi ya kitoko mpo tózala na esengo. (Nz. 104:14,15, 24) Na ntango moko boye, atalaki na likebi biloko oyo akelaki mpe “amonaki ete ezali malamu.” (Eba. 1:10,12, 31) Apesaki mpe bato lokumu na ndenge ayebisaki bango ‘báyangela’ biloko nyonso oyo ezali awa na mabele. (Nz. 8:6) Mokano ya Nzambe ezali ete bato ya kokoka bábatela na esengo biloko yango ya kitoko mpo na libela. Opesaka Yehova matɔndi mpo na elaka yango ya kitoko?

7. Ndenge nini Yosua 24:15 emonisi ete moto azali na bonsomi ya kopona?

7 Yehova apesá biso bonsomi ya kopona. Tokoki kopona makambo oyo tokosala na bomoi na biso. (Tángá Yosua 24:15.) Tata na biso ya bolingo asepelaka ntango toponaka kosalela ye. (Nz. 84:11; Mas. 27:11) Tokoki kosalela bonsomi na biso ya kopona mpo na kozwa bikateli mingi ya malamu. Tótalela ndakisa oyo Yesu atiká na likambo yango.

8. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo Yesu asalelaki bonsomi na ye ya kopona.

8 Tokoki komekola Yesu soki toponi kotya matomba ya basusu na esika ya liboso. Mokolo moko ntango Yesu ná bantoma na ye balɛmbaki makasi, bakendaki na esika moko oyo bakanisaki ete bakopema mwa moke. Kasi esalemaki bongo te. Ebele ya bato bamonaki bango, mpe bazalaki na mposa ete Yesu ateya bango. Kasi Yesu asilikaki te. Kutu ayokelaki bato yango mawa. Na yango, asalaki nini? “Abandaki koteya bango makambo mingi.” (Mrk. 6:30-34) Ntango tosalelaka makasi mpe ntango na biso mpo na kosalisa basusu, topesaka Tata na biso ya likoló nkembo. (Mat. 5:14-16) Tomonisaka mpe Yehova ete tolingi kozala na libota na ye.

9. Likambo nini baboti basengeli kobosana te?

9 Yehova apesá bato likoki ya kobota bana, mpe mokumba ya koteya bango bálinga mpe básalela ye. Soki ozali moboti, ozwaka likabo yango ya ntina mingi na motuya? Atako Yehova apesá baanzelu makoki mingi mpenza, apesá bango te likoki ya kobota bana. Yango wana soki ozali moboti, osengeli kozwa mokumba ya kobɔkɔla bana na motuya mingi. Baboti bazwá mokumba ya ntina mingi ya kobɔkɔla bana na bango na “disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4; Mib. 6:5-7; Nz. 127:3) Mpo na kosalisa baboti, ebongiseli ya Yehova ebimisá bisaleli mingi oyo elimbolaka Biblia, na ndakisa mikanda, bavideo, miziki, mpe biloko mosusu na Internet. Na ntembe te, Tata na biso ya likoló mpe Mwana na ye balingaka bana na biso mingi. (Luka 18:15-17) Yehova asepelaka ntango amonaka baboti bazali kotyela ye motema, mpe kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobatela bana na bango. Baboti yango basalisaka bana na bango bázwa elikya ya kokɔta na libota ya Yehova mpo na libela.

10-11. Lokola Yehova apesá lisiko, yango ememeli biso mapamboli nini?

10 Yehova apesá Mwana na ye oyo aleki motuya mpo tókoka kokóma lisusu bato ya libota na ye. Ndenge tomonaki yango na  paragrafe 4, Adama ná Eva babungisaki esika na bango na libota ya Yehova, ezala mpe mpo na bana na bango. (Rom. 5:12) Lokola Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova na nko, babongaki lisusu te kozala na kati ya libota na ye. Bongo bakitani na bango? Yehova alingaka biso mingi mpenza, yango wana azwá bibongiseli mpo bakitani ya Adama ná Eva oyo bakozala na botosi bákɔta na libota na ye. Asalaki yango na nzela ya mbeka ya Mwana na ye se moko oyo abotamaki, Yesu Kristo. (Yoa. 3:16; Rom. 5:19) Na nzela ya mbeka ya Yesu, Yehova andimá bato ya sembo 144 000 lokola bana na ye.​—Rom. 8:15-17; Em. 14:1.

11 Longola yango, bamilio mosusu ya bato ya sembo bazali kosalela Nzambe. Bazali na elikya ya kokɔta na libota na ye na nsuka ya Boyangeli ya mbula Nkoto. (Nz. 25:14; Rom. 8:20, 21) Lokola bazali na elikya yango, babengaka Yehova, “Tata.” (Mat. 6:9) Baoyo bakosekwa bakozala mpe na libaku ya koyekola makambo oyo Yehova akosɛnga bango. Nsukansuka, baoyo bakolanda litambwisi na ye bakokɔta mpe na libota na ye.

12. Tokoyanola na motuna nini?

12 Ndenge touti komona yango, Yehova asalá makambo mingi mpo na kopesa bato lokumu. Andimá bakristo oyo batyami mafuta na elimo bákóma bana na ye, mpe apesi “ebele ya bato” elikya ya kokóma bana na ye na mokili ya sika. (Em. 7:9) Sikoyo, tokoki kosala nini mpo na komonisa Yehova ete tolingi kozala na kati ya libota na ye mpo na seko?

MONISÁ YEHOVA ETE OLINGI KOZALA NA KATI YA LIBOTA NA YE

13. Tokoki kosala nini mpo tókɔta na libota ya Nzambe? (Marko 12:30)

13 Salelá Yehova na motema na yo mobimba mpo na komonisa ete olingaka ye. (Tángá Marko 12:30.) Na makabo nyonso oyo Nzambe apesá biso, likoki ya kosambela ye ezali moko ya makabo oyo eleki monene. Tomonisaka Yehova ete tolingaka ye soki ‘tozali kotosa mibeko na ye.’ (1 Yoa. 5:3) Moko ya mibeko oyo Yesu alobaki tótosa mpo na komonisa ete tolingaka Tata na ye, ezali ya kokómisa bato bayekoli mpe kobatisa bango. (Mat. 28:19) Apesá biso mpe mobeko ete tólinganaka. (Yoa. 13:35) Yehova akosala ete bayo batosaka mibeko na ye bákɔta na libota ya basambeli na ye ya mokili mobimba.​—Nz. 15:1, 2.

14. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka basusu? (Matai 9:36-38; Baroma 12:10)

14 Moniselá basusu bolingo. Bolingo ezali ezaleli ya Yehova oyo eleki monene. (1 Yoa. 4:8) Yehova amonisaki ete alingaka biso liboso kutu tóyeba ye. (1 Yoa. 4:9, 10) Tomekolaka ye ntango tomoniselaka basusu bolingo. (Ef. 5:1) Lolenge moko oyo eleki malamu ya komonisela basusu bolingo ezali ya kosalisa bango báyekola makambo etali Yehova wana ntango ezali naino. (Tángá Matai 9:36-38.) Ntango tosalaka bongo, topesaka bango libaku ya kokɔta na libota ya Nzambe. Tosengeli kokoba kolinga bandeko mpe komonisela bango limemya ata nsima ya batisimo na bango. (1 Yoa. 4:20, 21) Ndenge nini tosalaka yango? Lolenge moko oyo tosalaka yango ezali ndenge tondimaka ete bandeko na biso basalaka makambo na makanisi ya malamu. Na ndakisa, soki toyebi mpenza te ntina oyo ndeko moko asali likambo boye to boye, tosengeli te kokanisela ye mabe mpe koloba ete asali likambo yango mpo na koluka matomba na ye moko. Kasi tokomonisa ete tozali kopesa ndeko na biso lokumu soki tozali kotalela ye ete aleki biso.​—Tángá Baroma 12:10; Flp. 2:3.

15. Tosengeli komonisa motema mawa mpe kozala na boboto epai ya banani?

15 Monisá motema mawa mpe zalá na boboto epai ya moto nyonso. Soki tolingi kozala na kati ya bato oyo bakobenga Yehova Tata na bango mpo na seko, tosengeli kosalela toli ya Liloba na ye na bomoi na biso. Na ndakisa, Yesu ateyaki ete tosengeli komonisa motema mawa mpe kozala na boboto epai ya moto nyonso, ata mpe epai ya banguna na biso. (Luka 6:32-36) Na bantango mosusu tokoki komona ete ezali mpasi kosala bongo. Soki ezali bongo, tosengeli koyekola kokanisa mpe kosala makambo lokola Yesu. Ntango tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kotosa Yehova mpe komekola Yesu, tomonisaka Tata na biso ya likoló ete tolingi kozala na libota na ye mpo na seko.

16. Ndenge nini tokoki kobatela lokumu ya libota ya Yehova?

16 Batelá lokumu ya libota ya Yehova. Mbala mingi na kati ya libota, ezalaka mpasi te mpo leki amekola yaya na ye. Soki yaya azali kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na ye, akozala ndakisa malamu mpo na leki na ye. Kasi soki yaya azali kosala makambo ya mabe, leki akoki kolanda lokolo na ye. Ezali mpe bongo na libota ya Yehova. Soki mokristo moko ya sembo akómi mopɛngwi to akómi na bomoi oyo eyokani te na mitinda ya Biblia, yango ekoki kotinda basusu básala makambo ya mabe. Baoyo basalaka bongo babebisaka lokumu ya libota ya basambeli ya Yehova. (1 Tes. 4:3-8) Tosengeli koboya kolanda bandakisa mabe, mpe kotika te ete eloko moko ekómisa biso mosika na Tata na biso ya likoló.

17. Makanisi ya ndenge nini tosengeli koboya, mpe mpo na nini?

17 Tyelá Yehova motema kasi biloko ya mosuni te. Yehova alaki ete akopesa biso bilei, bilamba, mpe esika ya kolala soki toluki liboso Bokonzi na ye, mpe totosi mibeko na ye ya sembo. (Nz. 55:22; Mat. 6:33) Lokola totyelaka elaka yango motema, tokanisaka te ete biloko ya mokili oyo ekobatela biso to ekopesa biso esengo ya solosolo. Toyebi ete lolenge kaka moko oyo tokoki kozwa kimya ya makanisi ezali ya kosala mokano ya Yehova. (Flp. 4:6, 7) Ata soki tozali na mbongo ya kosomba biloko mingi, tosengeli kotala soki tokozala mpenza na ntango to makasi ya kosalela mpe kobatela biloko yango. Ekoki kotinda biso te tókóma kokangama mingi na biloko na biso ya mosuni? Tosengeli kobosana te ete Yehova apesá biso mosala na kati ya libota na ye. Yango wana, tosengeli kotika te ete eloko moko elongola likebi na biso na mosala yango. Tokolinga soki moke te kozala lokola elenge mobali oyo akangamaki mingi na biloko ya mokili mpe aboyaki kolanda Yesu. Na yango, azangaki libaku ya kosalela Yehova mpe ya kokóma moko ya bana na ye!​—Mrk. 10:17-22.

MAPAMBOLI OYO BANA YA YEHOVA BAKOSEPELA NA YANGO MPO NA LIBELA

18. Lokumu nini monene mpe mapamboli nini baoyo batosaka Nzambe bakozwa mpo na seko?

18 Bato ya botosi bakozwa lokumu oyo eleki monene, elingi koloba, kolinga mpe kosambela Yehova mpo na libela! Baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na nse, bakosepela kobatela mabele, esika kitoko oyo Yehova abongisá mpo na bango. Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekosala ete mabele mpe biloko nyonso oyo ezali awa na nse ezonga lisusu ya sika. Yesu akobongisa makambo nyonso ya mpasi oyo ekómelá mokili mpo Adama ná Eva baponaki kotika libota ya Nzambe. Yehova akosekwisa bamilio ya bato, mpe akopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradiso, mpe bakozala na nzoto ya kokoka. (Luka 23:42, 43) Ntango bato oyo basalelaka Yehova bakokóma na nzoto ya kokoka, bakozwa ‘nkembo mpe lokumu’ oyo Davidi alobelaki.​—Nz. 8:5.

19. Nini tosengeli kobatela na makanisi na biso?

19 Soki ozali na etuluku ya “ebele mpenza ya bato,” ozali na elikya moko kitoko. Nzambe alingaka yo mpe alingi ete ozala na kati ya libota na ye. Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo na kosepelisa ye. Mokolo na mokolo, bateláká bilaka ya Nzambe na motema mpe na makanisi na yo. Sepelá na libaku oyo ozali na yango ya kosambela Tata na biso ya likoló, mpe zwáká na motuya libaku oyo ozali na yango ya kokumisa ye mpo na seko!

LOYEMBO 107 Ndakisa ya bolingo ya Nzambe

^ par. 5 Mpo libota etambola malamu, mosangani mokomoko asengeli koyeba mokumba oyo azali na yango mpe kosala na bomoko elongo na basangani mosusu ya libota. Tata asengeli kokamba libota na ye na bolingo, mama asengeli kopesa ye mabɔkɔ, mpe bana basengeli kotosa baboti na bango. Ezali mpe bongo mpo na libota ya Yehova. Nzambe na biso azalaka na mokano moko mpo na biso, mpe soki tosali na boyokani na mokano yango, tokotikala na libota na ye mpo na libela.

^ par. 55 ELILINGI: Lokola bakelamá na elilingi ya Nzambe, yango wana mwasi moko ná mobali na ye bazali komoniselana bolingo mpe motema mawa, mpe bazali komonisela bana na bango bizaleli yango. Babalani yango balingaka Yehova. Likabo oyo bazwi ya kozala na bana epesi bango libaku ya kosalisa bana yango bálinga Yehova mpe básalela ye. Baboti yango bazali kosalela video mpo na koteya bana na bango ntina oyo Yehova apesaki Yesu lokola lisiko. Bazali mpe koteya bana na bango ete na Paradiso, tokobatela mabele mpe banyama mpo na libela.