Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 40

“Batelá eloko oyo ebombami epai na yo”

“Batelá eloko oyo ebombami epai na yo”

“Timote, batelá eloko oyo ebombami epai na yo.”​—1 TIM. 6:20.

LOYEMBO 29 Tófingisa nkombo na biso te

NA MOKUSE *

1-2. Na kotalela 1 Timote 6:20, eloko nini ebombamaki epai ya Timote?

MBALA mingi, tosɛngaka basusu bábombela biso biloko na biso ya motuya. Na ndakisa, tokoki kobomba mbongo na biso na banki. Totyaka yango kuna na elikya ete ekobatelama malamu, ekobunga te, mpe bakoyiba yango te. Na yango, toyebi mpenza soki kobombisa eloko ya motuya epai ya moto mosusu elimboli nini.

2 Tángá 1 Timote 6:20. Ntoma Paulo akundwelaki Timote ete azwaki eloko moko ya motuya: boyebi ya sikisiki ya mokano ya Nzambe mpo na bato. Yehova apesaki mpe Timote mokumba ya ‘kosakola liloba’ mpe ya kosala “mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.” (2 Tim. 4:2, 5) Paulo ayebisaki Timote abatela eloko oyo ebombami epai na ye. Lokola Timote, tozali na biloko ya motuya oyo ebombami epai na biso. Biloko nini? Mpe mpo na nini tosengeli kobatela yango?

MATEYA YA SOLO

3-4. Wapi mwa bantina oyo emonisi ete mateya ya Biblia ezali na motuya mingi?

3 Na boboto na ye, Yehova apesá biso boyebi ya sikisiki ya mateya ya solo oyo ezali na Biblia, Liloba na ye. Mateya yango ezali na motuya mingi mpo eteyaka biso ndenge ya kozala na boyokani malamu na Yehova, mpe emonisaka biso makambo oyo epesaka esengo ya solosolo na bomoi. Ntango tondimi mateya yango mpe tozali kosalela yango, tolongwaka na boombo ya mateya ya lokuta mpe totikaka bizaleli ya mbindo.​—1 Ko. 6:9-11.

4 Ntina mosusu oyo esali ete mateya ya solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe ezala na motuya mingi, ezali ete Yehova amonisaka yango kaka na bato ya komikitisa oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi.” (Mis. 13:48) Bato yango bandimaka ete moombo ya sembo mpe ya mayele nde nzela oyo Yehova azali kosalela mpo na koteya biso mateya ya solo lelo oyo. (Mat. 11:25; 24:45) Tokoki te koyeba mateya yango na ndenge na biso moko, mpe koyeba mateya yango ezali na motuya koleka eloko mosusu nyonso.​—Mas. 3:13, 15.

5. Mokumba nini mosusu Yehova apesá biso?

5 Yehova apesá biso mpe mokumba ya koteya basusu solo na ntina etali ye mpe mikano na ye. (Mat. 24:14) Nsango oyo toteyaka ezali na motuya mingi mpo esalisaka bato bákɔta na libota ya Yehova, mpe epesaka bango libaku ya kozwa bomoi ya seko. (1 Tim. 4:16) Ata soki tozali na likoki ya kosakola mingi to te, tóyeba ete tozali kopesa mabɔkɔ na mosala ya ntina mingi oyo ezali kosalema na mikolo na biso. (1 Tim. 2:3, 4) Kozala bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe, ezali mpenza lokumu monene!​—1 Ko. 3:9.

BATELÁ ELOKO OYO EBOMBAMI EPAI NA YO

Timote akangamaki na solo atako bato mosusu batikaki yango (Talá paragrafe 6)

6. Nini ekómelaki bakristo mosusu oyo bazalaki ekɛngɛ te?

6 Na mikolo ya Timote, bakristo mosusu bazwaki na motuya te libaku oyo bazalaki na yango ya kozala bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe. Na ndakisa, lokola Demasi alingaki mokili mingi, asundolaki mokumba na ye ya kosala elongo na Paulo. (2 Tim. 4:10) Ekoki kozala mpe ete Figele ná Hermogene basundolaki mosala ya kosakola mpo bakanisaki ete bakokutana na minyoko oyo Paulo akutanaki na yango. (2 Tim. 1:15) Himene, Alezandre, mpe Filete bakómaki bapɛngwi mpe batikaki solo. (1 Tim. 1:19, 20; 2 Tim. 2:16-18) Emonani ete liboso, mibali yango nyonso bazalaki makasi na elimo, kasi na nsima bazalaki lisusu kozwa na motuya te biloko oyo Yehova apesaki bango.

7. Mayele nini ya mabe Satana asalelaka mpo na kotinda biso tósala mokano na ye?

7 Ndenge nini Satana alukaka kotinda biso tósundola biloko ya motuya oyo Yehova abombá epai na biso? Tótalela ndambo ya mayele mabe oyo Satana asalelaka. Mpo na kotinda biso tókanisa mpe tósala makambo oyo ekotinda biso mokemoke tótika kolinga mpe kotosa mibeko ya Yehova, Satana asalelaka televizyo, bafilme, Internet, babuku, mpe bansango oyo ebimaka na bazulunalo. Asalelaka mpe minyoko to baninga mpo bábangisa biso mpo tótika kosakola. Alukaka mpe kotinda biso tólanda “‘boyebi’ ya lokuta” ya bapɛngwi mpo tótika solo.​—1 Tim. 6:20, 21.

8. Ndakisa ya ndeko Daniel eteyi yo nini?

8 Soki tozali ekɛngɛ te, tokoki kobanda kotika solo mokemoke. Tólobela ndakisa ya Daniel, * ndeko mobali moko oyo azalaki kolinga mingi kobɛta masano ya video. Alobi boye: “Nabandaki kobɛta masano ya video ntango nazalaki na mbula soki 10. Na ebandeli, nazalaki kobɛta masano oyo ezalaki mpenza mabe te. Kasi mokemoke, nakómaki kobɛta masano ya mobulu mpe oyo ezalaki kolakisa misala ya bademo.” Nsukansuka, akómaki kolekisa ngonga 15 na mokolo mpo na kobɛta masano yango. Alobi boye: “Mpo na koloba solo, nayebaki ete lolenge ya masano oyo nazalaki kobɛta, mpe ntango oyo nazalaki kolekisa na masano yango ekómaki kobebisa mokemoke boyokani na ngai na Yehova. Kasi, nakómaki motema makasi mpe nakómaki komona ete batoli ya Biblia etali ngai te.” Biso mpe soki tokebi te, masano ekoki kotinda biso tótika solo mokemoke. Soki esalemi bongo, tokoki kobungisa biloko ya motuya oyo Yehova abombá epai na biso.

NDENGE OYO TOKOKI KOKANGAMA MAKASI NA SOLO

9. Na kotalela 1 Timote 1:18, 19, Paulo akokanisaki Timote na nani?

9 Tángá 1 Timote 1:18, 19. Ntoma Paulo akokanisaki Timote na soda, mpe alendisaki ye akoba “kobunda etumba ya malamu.” Etumba yango ezalaki nde ya elimo. Na ndenge nini bakristo bazali lokola basoda oyo bazali na etumba? Lokola tozali basoda ya Kristo, bizaleli nini tosengeli kokolisa? Tólobela mateya mitano oyo tokoki kozwa na ndakisa oyo Paulo asalelaki. Mateya yango ekoki kosalisa biso tókangama makasi na solo.

10. Ezaleli ya kokangama na Nzambe elimboli nini, mpe ezali na ntina nini mpo na biso?

10 Kolisá ezaleli ya kokangama na Nzambe. Soda ya malamu azalaka sembo. Abundaka makasi mpo na kobatela moto oyo ye alingaka to eloko oyo azwaka na motuya. Paulo alendisaki Timote akolisa ezaleli ya kokangama na Nzambe, elingi koloba, atikala sembo epai ya Nzambe. (1 Tim. 4:7) Soki tolingi Nzambe mingi mpe tokangami na ye, yango ekosala ete tótika solo te.​—1 Tim. 4:8-10; 6:6.

Nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala, ekoki kosɛnga tómipesa disiplini mpo na kokende makita. Kasi kosala bongo ememelaka biso mapamboli! (Talá paragrafe 11)

11. Mpo na nini tosengeli komipesa disiplini?

11 Kolisá ezaleli ya komipesa disiplini. Soda asengeli komipesa disiplini mpo azala ntango nyonso pene mpo na kokende etumba. Timote abundisaki makanisi mabe ya Satana mpo alandaki toli oyo ntoma Paulo apesaki ye ete asala makasi mpo na kobundisa bamposa mabe, kokolisa bizaleli malamu, mpe kolekisaka ntango elongo na baninga na ye bakristo. (2 Tim. 2:22) Yango esɛngaki ete Timote amipesa disiplini. Biso mpe, tosengeli komipesa disiplini mpo tólonga kobundisa bamposa na biso ya kosala masumu. (Rom. 7:21-25) Longola yango, tosengeli komipesa disiplini mpo tólongola bomoto ya kala mpe tólata oyo ya sika. (Ef. 4:22, 24) Lisusu, nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala, ekoki kosɛnga tómipesa disiplini mpo na kokende makita.​—Ebr. 10:24, 25.

12. Nini ekoki kosalisa biso tókóma bateyi malamu ya Liloba ya Nzambe?

12 Soda asengeli ntango nyonso komekameka bibundeli na ye mpo ayeba kosalela yango malamumalamu. Ndenge moko mpe, tosengeli kosala makasi tóyeba kosalela malamu Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 2:15) Makita ekoki kosalisa biso tóyeba kosalela Liloba ya Nzambe malamu. Kasi, mpo tóndimisa bato mosusu ete mateya ya Biblia ezali na motuya, biso moko tosengeli kozala na momeseno ya koyekolaka Biblia mbala na mbala. Tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kokómisa kondima na biso makasi. Yango esuki kaka te na kotánga Biblia. Tosengeli mpe kokanisa na mozindo na makambo oyo tozali kotánga, mpe kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo tókanga malamu ntina ya Makomami mpe tósalela yango. (1 Tim. 4:13-15) Soki tosali bongo, tokoyeba kosalela Liloba ya Nzambe mpo na koteya basusu. Yango elimboli kaka te kotángela bango bavɛrsɛ ya Biblia. Tosengeli kosalisa bayoki na biso bákanga ntina ya bavɛrsɛ yango mpe bámona ndenge oyo ekoki kosalisa bango. Na yango, soki tozali koyekola Biblia mbala na mbala, tokokóma bateyi malamu ya Liloba ya Nzambe.​—2 Tim. 3:16, 17.

13. Na kotalela Baebre 5:14, mpo na nini tosengeli kozala na bososoli?

13 Zalá na bososoli. Soda asengeli komona likama na mosika mpe kokima yango. Biso mpe tosengeli koyekola koyeba makambo oyo ekoki komemela biso likama mpe kokima yango. (Mas. 22:3; tángá Baebre 5:14.) Na ndakisa, tosengeli kopona masano mpe kominanola na biso na mayele. Mbala mingi, bafilme mpe baemisyo ya televizyo elakisaka makambo ya kosangisa nzoto. Bizaleli yango esepelisaka Nzambe te mpe ememelaka bato mpasi. Yango wana, toboyaka kominanola ya ndenge wana mpo ekoki kolɛmbisa mokemoke bolingo na biso mpo na Nzambe.​—Ef. 5:5, 6.

14. Ndenge nini bososoli esalisaki ndeko Daniel?

14 Daniel oyo tolobelaki liboso, akómaki komona ete kobɛta masano ya mobulu mpe oyo elendisaka misala ya bademo, ekómaki likama mpo na ye. Asalaki bolukiluki na Watchtower Library mpo amona masolo oyo ekokaki kosalisa ye alonga mokakatano yango. Ndenge nini yango esalisaki ye? Atikaki kobɛta masano ya video oyo ebongi te. Atikaki mpe kosɛnga na Internet ete bátindelaka ye masano oyo ebimi sika, mpe akataki boyokani ná bato oyo azalaki kobɛta na bango elongo. Daniel alobi boye: “Na esika nabɛtaka masano ya video, nakómaki nde kolekisa ntango ná bandeko ya lisangá mpe kosala makambo elongo na bango.” Lelo oyo, ndeko Daniel azali mobongisi-nzela mpe nkulutu.

15. Mpo na nini koyoka bansango ya lokuta ezali likama?

15 Ndenge moko na Timote, tosengeli kozala na bososoli mpo tómona ete bansango ya lokuta oyo bapɛngwi bapanzaka ezali mpenza likama. (1 Tim. 4:1, 7; 2 Tim. 2:16) Na ndakisa, bakoki kopanza bansango ya lokuta mpo na bandeko na biso, to kotinda biso tótika kotyela ebongiseli ya Yehova motema. Bansango ya ndenge wana ekoki kolɛmbisa kondima na biso. Tosengeli koboya kondima yango. Mpo na nini? Mpo bansango yango eutaka epai ya “bato babebá makanisi mpe bazali na solo te.” Mokano na bango ezalaka ya kobimisa “ntembe mpe kowelana na maloba.” (1 Tim. 6:4, 5) Balukaka kotinda biso tóndima lokuta na bango mpe tótika kotyela bandeko na biso motema.

16. Makambo nini oyo ekoki kolongola likebi na biso tosengeli koboya?

16 Boyá makambo oyo ekoki kolongola likebi na yo. Lokola Timote azalaki “soda ya solosolo ya Kristo Yesu,” asengelaki kotya makanisi na ye nyonso na mosala ya Nzambe na esika ya kotya makanisi na biloko ya mosuni to mikano mosusu na bomoi. (2 Tim. 2:3, 4) Lokola Timote, tosengeli kotika te ete mposa ya biloko mingi ya mosuni elongola likebi na biso na makambo ya elimo. “Nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekoki kosala ete tótika kolinga Yehova, tótika kosepela na Liloba na ye, mpe tóbungisa mposa na biso ya koteya basusu. (Mat. 13:22) Tosengeli kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe kosalela ntango mpe makasi na biso mpo na ‘kokoba . . . koluka liboso Bokonzi.’​—Mat. 6:22-25, 33.

17-18. Makambo nini tokoki kosala mpo tóbatela boninga na biso ná Yehova?

17 Omibongisa mpo olonga komekama kozanga koumela. Soda abongisaka liboso makambo oyo akosala mpo na komibatela. Soki tolingi kobatela biloko oyo Yehova abombá epai na biso, tosengeli kosala nokinoki ntango tomoni likama. Nini ekoki kosalisa biso? Tosengeli kobongisa liboso makambo oyo tokosala soki likama ebimi.

18 Tózwa ndakisa moko. Mosali-bilanga ya mayele atongaka mwa ndako na elanga na ye liboso mbula ebanda kobɛta. Mpo na nini? Mpo azala na esika ya komibatela soki mbula ebɛti na mbalakaka. Ndenge moko mpe, tosengeli kobongisa liboso makambo oyo tokosala soki masolo ya bapɛngwi, mpe bililingi ya mbindo to oyo elakisaka mobulu ebimeli biso na mbalakaka ntango tozali kosalela Internet to kotala televizyo. Soki tomibongisi liboso, tokokima mbala moko eloko nyonso oyo ekoki kobebisa boninga na biso ná Yehova mpe tokotikala pɛto na miso na ye.​—Nz. 101:3; 1 Tim. 4:12.

19. Mapamboli nini tokozwa soki tobateli biloko ya motuya oyo Yehova abombá epai na biso?

19 Tosengeli kobatela biloko ya motuya oyo Yehova abombá epai na biso, elingi koloba, mateya ya solo oyo ezali na Biblia mpe libaku oyo tozali na yango ya koteya basusu. Yango ekosalisa biso tóbatela lisosoli ya pɛto, tózala na bomoi ya esengo, mpe tóyoka esengo ya kosalisa basusu báyeba Yehova. Na lisalisi ya Yehova, tokobatela biloko oyo abombá epai na biso.​—1 Tim. 6:12, 19.

LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala

^ par. 5 Koyeba solo mpe koteya yango basusu ezali mpenza lokumu monene. Lisolo oyo ekosalisa biso tósimba makasi libaku yango mpe tóbungisa yango te.

^ par. 8 Topesi ye nkombo mosusu.