Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 39

Ntango moto oyo olingaka atiki kosalela Yehova

Ntango moto oyo olingaka atiki kosalela Yehova

“Mbala boni . . . bayokisaki ye motema mpasi.”​—NZ. 78:40.

LOYEMBO 102 ‘Tósalisa bato oyo balɛmbi’

NA MOKUSE *

1. Tokoki koyoka ndenge nini ntango ndeko na biso ya libota alongolami na lisangá?

MOTO moko oyo olingaka alongolami na lisangá? Yango ekoki kopesa yo mpasi mpenza! Ndeko mwasi moko na nkombo Hilda alobi boye: “Ntango mobali na ngai akufaki nsima ya kolekisa mbula 41 elongo, namonaki ete ezalaki likambo ya mpasi oyo nakutaná na yango naino te. * Kasi ntango mwana na ngai ya mobali alongolamaki na lisangá mpe akimaki mwasi mpe bana na ye, ezalaki likambo moko ya mpasi koleka mpo na ngai.”

Yehova ayebi mpasi makasi oyo oyokaka ntango moto oyo olingaka atiki kosalela ye (Talá paragrafe 2-3) *

2-3. Na kotalela Nzembo 78:40, 41, Yehova ayokaka ndenge nini ntango bato oyo alingaka batiki kosalela ye?

2 Kanisá ndenge oyo Yehova ayokaki motema mpasi ntango baanzelu mosusu batikaki kosalela ye! (Yuda 6) Kanisá mpe ndenge oyo azalaki koyoka motema mpasi ntango Bayisraele, bato oyo azalaki kolinga mingi, bazalaki kotombokela ye mbala na mbala. (Tángá Nzembo 78:40, 41.) Yebá ete Tata na biso ya likoló ayokaka mpe mpasi ntango moto oyo olingaka mingi atiki kosalela ye. Ayebi mpasi oyo ozali koyoka. Lokola azali na motema mawa, akolendisa mpe akosalisa yo.

3 Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo tokoki kosala mpo Yehova asalisa biso ntango tokutani na likambo ya ndenge wana. Tokolobela mpe oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bandeko mosusu ya lisangá oyo bazali kokutana na likambo ya bongo. Kasi, tólobela naino makanisi mabe oyo tosengeli koboya.

KOMIPESAKA FOTI TE

4. Baboti mingi bakanisaka nini ntango mwana na bango atiki kosalela Yehova?

4 Soki mwana moko atiki kosalela Yehova, mbala mingi baboti na ye bamitunaka oyo bakokaki kosala mpo na kosalisa ye atikala na kati ya solo. Ndeko mobali moko na nkombo Luke alobi boye ntango mwana na ye alongolamaki na lisangá: “Namipesaki foti. Nazalaki kutu kolɔta bandɔtɔ ya mabe mpo na likambo yango. Na bantango mosusu nazalaki kolela mpe nazalaki koyoka motema mpasi.” Elizabeth, ndeko mwasi moko oyo akutanaki mpe na likambo ya bongo, azalaki kokanisa boye ntango nyonso: “Mbala mosusu nakokisaki malamu te mokumba na ngai ya kozala moboti malamu. Nazalaki kokanisa ete nalongaki te koteya mwana na ngai solo.”

5. Soki moto moko atiki kosalela Yehova, ezali foti ya nani?

5 Tosengeli kobosana te ete Yehova apesá mokomoko na biso bonsomi ya kopona. Yango elimboli ete tokoki kopona soki tokotosa ye to te. Bana mosusu bazalaki na baboti ya malamu te, kasi, baponá kosalela Yehova mpe kotikala sembo epai na ye. Nzokande bana mosusu oyo baboti na bango basalaki nyonso mpo na koteya bango solo ya Biblia, batikaki solo ntango bakómaki mikoló. Yango emonisi ete mokomoko na biso asengeli kopona soki akosalela Yehova to te. (Yos. 24:15) Yango wana, bino baboti oyo bozali na mawa mpo bana na bino batiki kosalela Yehova, bómipesaka foti te mpo na likambo yango!

6. Mwana akoki komiyoka ndenge nini soki moboti na ye atiki kosalela Yehova?

6 Na bantango mosusu, moboti akoki kopona kotika Yehova mpe kosundola ata libota na ye. (Nz. 27:10) Yango ekoki kozala mpasi mpo na bana oyo bazalaki kozwa moboti na bango lokola ndakisa. Esther, oyo tata na ye alongolamaki na lisangá, alobi boye: “Mbala mingi nazalaki kolela mpo nayebaki ete azalaki kotika solo mpe kopesa Yehova mokɔngɔ. Nalingaka tata na ngai, yango wana ntango alongolamaki na lisangá, nazalaki ntango nyonso komitungisa mpo na ye. Nakómaki kutu kobangabanga.”

7. Yehova ayokaka ndenge nini mpo na elenge oyo moboti na ye alongolami na lisangá?

7 Bino bilenge oyo baboti na bino balongolami na lisangá, bóyeba ete tozali mpenza koyokela bino mawa! Bóbosana te ete Yehova ayebi mpenza mpasi oyo bozali koyoka. Alingaka bino mpe asepelaka na bosembo na bino. Biso mpe bandeko na bino tosepelaka na bino mpe tolingaka bino mingi. Bóbosana mpe te ete soki baboti na bino balongolamá na lisangá, ezali foti na bino te. Ndenge touti komona yango, Yehova apesá mokomoko na biso bonsomi ya kopona. Mpe ndeko nyonso oyo amipesá na Yehova mpe azwá batisimo asengeli ‘komema mokumba na ye moko.’​—Gal. 6:5.

8. Bandeko ya libota bakoki kosala nini wana bazali kozela ete ndeko na bango oyo alongolamaki na lisangá azongela Yehova? (Talá mpe etanda “ Zongelá Yehova.”)

8 Ntango moto moko oyo olingaka mingi atiki kosalela Yehova, ezali mabe te ozala na elikya ete mokolo mosusu akozongela ye. Kasi okoki kosala nini wana ozali kozela ete moto yango azongela Yehova? Salá nyonso oyo okoki mpo na kobatela kondima na yo makasi. Soki osali bongo, okozala ndakisa malamu mpo na bandeko na yo ya libota, mbala mosusu mpe mpo na moto oyo alongolamaki na lisangá. Okozwa mpe makasi oyo osengeli na yango mpo na koyika mpiko na mpasi oyo ozali koyoka. Tólobela makambo ya sikisiki oyo okoki kosala.

OYO OKOKI KOSALA MPO NA KOBATELA KONDIMA NA YO MAKASI

9. Okoki kosala nini mpo obatela kondima na yo makasi? (Talá mpe etanda “ Bavɛrsɛ oyo ekoki kolendisa yo ntango moto moko oyo olingaka atiki kosalela Yehova.”)

9 Salá nyonso oyo okoki mpo na kobatela kondima na yo makasi. Ezali na ntina mingi ete okoba kobatela kondima na yo mpe oyo ya bato ya libota na bino. Ndenge nini okoki kosala yango? Tángáká Liloba ya Nzambe, manyoláká, mpe yanganáká na makita mpo na kopusana penepene na Yehova. Joanna, oyo tata mpe ndeko na ye ya mwasi batikaki solo, alobi boye: “Nayokaka mpenza kimya ya motema ntango natángaka masolo ya Biblia oyo elobeli Abigaile, Estere, Yobo, Yozefe, mpe Yesu. Bandakisa na bango elendisaka ngai mpe esalisaka ngai nazala na makanisi ya malamu oyo ekitisaka mpasi na ngai. Nazwaka mpe makasi ntango nayokaka banzembo mosusu oyo ebimaka na programɛ ya sanza na TV JW.”

10. Ndenge nini Nzembo 32:6-8 esalisaka biso tóyika mpiko na makambo oyo ezali kotungisa biso?

10 Yebisá Yehova makambo nyonso oyo ezali kotungisa yo. Ntango okutani na mikakatano, kotika te kobondela ye. Sɛngá Tata na biso ya bolingo asalisa yo otalela likambo yango ndenge ye atalelaka yango mpe apesa yo ‘mayele ya kososola mpe ateya yo nzela oyo osengeli kokende.’ (Tángá Nzembo 32:6-8.) Ya solo, ekoki kozala mpasi oyebisa Yehova ndenge oyo ozali mpenza komiyoka. Kasi Yehova ayebi mpenza mpasi oyo ozali koyoka na motema. Alingaka yo mingi mpe asɛngi yo oyebisa ye makambo nyonso oyo ezali na motema na yo.​—Kob. 34:6; Nz. 62:7, 8.

11. Na kotalela Baebre 12:11, mpo na nini tosengeli kondima disiplini oyo Yehova apesaka na bolingo nyonso? (Talá mpe etanda “ Kolongola moto na lisangá ezali disiplini oyo Yehova apesaka na bolingo nyonso.”)

11 Ndimá ekateli oyo bankulutu bazwi. Kolongola moto na lisangá ezali ebongiseli oyo Yehova atyá. Etumbu yango ezalaka mpo na bolamu ya moto nyonso, ata mpe ya moto oyo alongolami na lisangá. (Tángá Baebre 12:11.) Bandeko mosusu bakoki koloba ete ekateli oyo bankulutu bazwaki ya kolongola moto na lisangá ezalaki ya malamu te. Kasi kobosana te ete mbala mingi bato yango balobelaka te makambo ya mabe oyo moto yango asalaki. Toyebaka mpenza te ndenge makambo nyonso elekaki. Na yango, ekozala malamu tótya motema ete bankulutu oyo bakataki likambo yango basalaki nyonso oyo bakoki mpo bálanda mitinda ya Biblia mpe básambisa “mpo na Yehova.”​—2 Nt. 19:6.

12. Matomba nini bandeko mosusu bazwaki ndenge bandimaki disiplini ya Yehova?

12 Soki ondimi ekateli oyo bankulutu bazwi ya kolongola ndeko na yo na lisangá, okoki mpenza kosalisa ye mpo azongela Yehova. Ndeko Elizabeth, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ezalaki mpenza mpasi libota na biso eboya kosolola to kosala makambo elongo na mwana na biso ya mokoló oyo alongolamaki na lisangá. Kasi ntango azongelaki Yehova, alobaki ete ekateli oyo bazwaki ya kolongola ye na lisangá, ezalaki mpenza ya malamu. Na nsima, mwana yango alobaki ete asepelaki na mateya oyo azwaki.” Elizabeth abakisi boye: “Namonaki mpenza ete disiplini oyo Yehova apesaka, ezalaka ntango nyonso malamu.” Mobali na ye Mark abakisi boye: “Nsima ya ntango molai, mwana na biso ayebisaki ngai ete moko ya bantina oyo esalaki ete andima kozongela Yehova, ezali mpo tokataki boyokani nyonso ná ye. Nazali na esengo ndenge Yehova asalisaki biso tómonisa botosi.”

13. Nini ekoki kosalisa yo olonga makanisi ya mabe?

13 Sololá na baninga oyo bayebi ndenge oyo ozali komiyoka. Zaláká elongo na bandeko oyo bakɔmeli na elimo oyo bakoki kosalisa yo obatela makanisi malamu. (Mas. 12:25; 17:17) Joanna, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nazalaki komiyoka ete nazali ngai moko. Kasi kosolola na baninga oyo babongi kotyelama motema, esalisaki ngai nalonga makanisi yango.” Okosala nini soki na lisangá, bandeko mosusu balobi makambo oyo ebakiseli yo lisusu mpasi?

14. Mpo na nini tosengeli kokoba “kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko”?

14 Zaláká na motema molai epai ya bandeko na yo bakristo. Tokoki te kozela ete moto nyonso alobaka kaka makambo ya malamu. (Yak. 3:2) Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana kokamwa te soki moto moko azali koyeba te oyo asengeli koloba to mpe alobi likambo moko oyo epesi yo mpasi kozanga kokana. Kobosana te toli oyo ntoma Paulo apesaki: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Kol. 3:13) Ndeko mwasi moko oyo ndeko na ye ya libota alongolamaki na lisangá alobi boye: “Yehova asalisi ngai nalimbisa bandeko oyo bapesaki ngai mpasi atako bazalaki na makanisi ya kolendisa ngai.” Ndenge nini lisangá ekoki kosalisa bandeko ya libota oyo batikali sembo?

NDENGE OYO LISANGÁ EKOKI KOSALISA

15. Nini ekoki kosalisa bato ya libota oyo ndeko na bango auti kolongolama na lisangá?

15 Yambáká na esengo bandeko ya libota oyo batikali sembo. Ndeko mwasi moko na nkombo Miriam alobi ete azalaki kobanga mwa moke kokende makita ntango ndeko na ye ya mobali alongolamaki na lisangá. Alobi boye: “Nazalaki kobanga makambo oyo bato bakoloba. Kasi ezalaki na baninga ya malamu oyo bazalaki komitya na esika na ngai mpe oyo bazalaki koloba mabe te mpo na ndeko na ngai. Yango esalisaki ngai namiyoka te ete nazali ngai moko na ntango wana ya mpasi.” Ndeko mwasi mosusu alobi boye: “Ntango mwana na biso ya mobali alongolamaki na lisangá, baninga bayaki kolendisa biso. Basusu bayebisaki biso ete bazalaki koyeba te báloba nini. Basusu balelaki elongo na ngai mpe bakomelaki ngai mwa maloba ya kolendisa. Makambo oyo basalaki, esalisaki ngai mpenza!”

Lisangá ekoki kosalisa bandeko ya libota oyo batikali sembo (Talá paragrafe 17) *

16. Ndenge nini lisangá ekoki kokoba kosalisa mpe kolendisa bandeko ya libota ya moto oyo alongolami na lisangá?

16 Kobá kosalisa bandeko ya libota oyo batikali sembo. Bazali mpenza na mposa makasi ete osalisa mpe olendisa bango na ntango ya boye. (Ebr. 10:24, 25) Na bantango mosusu, bandeko ya libota oyo bazali sembo bamiyokaka ete bango mpe balongolami na lisangá mpo bandeko mosusu baboyaka kosolisa bango. Salá nyonso mpo bámiyokaka ndenge wana te! Bana oyo baboti na bango batiki solo bazalaka mpenza na mposa tópesaka bango longonya mpe tólendisaka bango! Ndeko mwasi Maria, oyo mobali na ye alongolamaki na lisangá mpe asundolaki ye ná bana, alobi boye: “Baninga na ngai mosusu bayaki na ndako, balambelaki ngai, mpe basalisaki ngai nayekola ná bana. Bamityaki na esika na ngai mpe balelaki elongo na ngai. Balobaki malamu mpo na ngai ntango bato mosusu bazalaki koloba mabe mpo na ngai. Balendisaki ngai mingi mpenza!”​—Rom. 12:13, 15.

17. Ndenge nini bankulutu bakoki kolendisa baoyo bazali na mawa makasi?

17 Bankulutu, bósalela mabaku nyonso mpo na kolendisa bandeko ya libota oyo batikali sembo. Bozali na mokumba monene ya kolendisa baoyo ndeko na bango ya libota atiki kosalela Yehova. (1 Tes. 5:14) Bózwaka bibongiseli mpo na kolendisa bango liboso mpe nsima ya makita. Bókendaka kotala bango mpe bóbondelaka mpo na bango. Bósakolaka elongo na bango, mpe na bantango mosusu, bóbengisaka bango na losambo na bino na kati ya libota. Bankulutu, bosengeli kotyelaka bampate ya Yehova oyo bazali na mawa makasi likebi, mpe komonisela bango motema mawa mpe bolingo oyo basengeli na yango.​—1 Tes. 2:7, 8.

KOBÁ KOBATELA ELIKYA MPE KOTYELA YEHOVA MOTEMA

18. Na kotalela 2 Petro 3:9, Nzambe alingi nini mpo na baoyo batiká kosalela ye?

18 Yehova “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (Tángá 2 Petro 3:9.) Atako moto akoki kosala lisumu ya monene, bomoi na ye ezali kaka na motuya na miso ya Nzambe. Kobosana te ete Yehova afutaki eloko eleki motuya, elingi koloba bomoi ya Mwana na ye oyo alingaka mingi, mpo na mokomoko na biso. Na motema mawa na ye, Yehova alukaka kosalisa baoyo batiki lisangá mpo bázongela ye. Azalaka na elikya ete bakozongela ye, ndenge Yesu amonisaki yango na ndakisa ya mwana oyo abungá. (Luka 15:11-32) Bandeko mingi oyo batikaki solo, bazongelaki Tata na bango ya bolingo, mpe lisangá eyambaki bango mabɔkɔ polele. Elizabeth, oyo tolobelaki liboso, asepelaki ntango mwana na ye azongisamaki na lisangá. Alobi boye: “Nazali mpenza na botɔndi mpo na bandeko nyonso oyo basalisaki biso tóbungisa elikya te.”

19. Mpo na nini tokoki kokoba kotyela Yehova motema?

19 Tokoki ntango nyonso kotyela Yehova motema. Toli oyo apesaka biso ezalaka kaka mpo na bolamu na biso. Azali Tata ya motema mawa mpe akabaka. Alingaka mpenza baoyo nyonso balingaka ye mpe basambelaka ye. Yebá ete Yehova akosundola yo te ntango ozali na mpasi. (Ebr. 13:5, 6) Mark, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Yehova asundolaka biso soki moke te. Azalaka ntango nyonso pene na biso ntango tozali kokutana na mikakatano.” Yehova akokoba kopesa yo “nguya oyo eleki makasi.” (2 Ko. 4:7) Ya solo, okoki kokoba kobatela bosembo mpe elikya na yo ata soki moto oyo olingaka atiki kosalela Yehova.

LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa

^ par. 5 Toyokaka mpasi mpenza ntango moto oyo tolingaka atiki kosalela Yehova! Lisolo oyo ekomonisa ndenge oyo Nzambe na biso ayokaka ntango likambo ya bongo esalemi. Tokoyekola makambo oyo bato ya libota ya moto oyo alongolami na lisangá bakoki kosala mpo báyika mpiko na likambo yango mpe bábatela kondima na bango makasi. Tokomona mpe ndenge oyo bandeko ya lisangá bakoki kolendisa mpe kosalisa bandeko ya libota ya moto oyo alongolami na lisangá.

^ par. 1 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 79 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ntango ndeko mobali moko atiki libota na ye mpe Yehova, mwasi mpe bana na ye banyokwamaka mpenza.

^ par. 81 NDIMBOLA YA BILILINGI: Bankulutu mibale bayei kolendisa libota moko.