Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 35

Zwáká na motuya bandeko oyo bakómi mibange

Zwáká na motuya bandeko oyo bakómi mibange

“Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko.”​—MAS. 16:31.

LOYEMBO 138 Kitoko ya nsuki mpɛmbɛ

NA MOKUSE *

1-2. (a) Nakotalela Masese 16:31, ndenge nini tosengeli kotalela bandeko oyo bakómi mibange? (b) Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna nini?

NA PARKƐ moko na Arkansas, na États-Unis, okoki kokuta badiama esopani boye na mabele. Kasi, lokola badiama yango epetolamá te, bato mingi oyo bakendaka na parkɛ yango bayebaka te ete ezali badiama. Yango wana, balekaka yango kaka boye kozanga báyeba ete ezali biloko ya motuya.

2 Bandeko na biso oyo bakómi mibange bazali lokola badiama wana; bazali na motuya mingi. Liloba ya Nzambe ekokanisi nsuki mpɛmbɛ na bango na motole to ekɔti ya mikonzi. (Tángá Masese 16:31; 20:29) Kasi, ekoki kosalema ete tózanga kotyela bandeko yango likebi. Bilenge oyo bayebaka ete bandeko oyo bakómi mibange bazali na valɛrɛ, bazwaka eloko ya motuya mingi koleka bomɛngo. Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna misato oyo elandi: Mpo na nini Yehova azwaka na motuya bandeko oyo bakómi mibange? Mpo na nini bandeko oyo bakómi mibange bazali na motuya na ebongiseli ya Yehova? Tokoki kosala nini mpo tózwa mpenza matomba na ndakisa na bango?

NTINA OYO YEHOVA AZWAKA NA MOTUYA BANDEKO OYO BAKÓMI MIBANGE

Bandeko oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi na miso ya Yehova mpe epai ya basaleli na ye (Talá paragrafe 3)

3. Na kotalela Nzembo 92:12-15, mpo na nini bandeko oyo bakómi mibange bazali na motuya na miso ya Yehova?

3 Bandeko oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi na miso ya Yehova. Ayebi mpenza soki bazali bato ya lolenge nini, mpe azwaka na motuya bizaleli na bango. Asepelaka ntango mibange bayebisaka bilenge bwanya oyo bazwá na mosala na ye. (Yobo 12:12; Mas. 1:1-4) Azwaka mpe na motuya ezaleli na bango ya koyika mpiko. (Mal. 3:16) Atako bakutanaki na mikakatano na bomoi na bango, babatelaki kondima na bango makasi epai ya Yehova. Elikya na bango mpo na bomoi na mikolo ezali koya ekómá makasi koleka ndenge ezalaki ntango babandaki koyekola solo. Mpe Yehova alingaka bango mpo bakobaka kosakola nkombo na ye ata “na ntango ya nsuki pɛmbɛ.”​—Tángá Nzembo 92:12-15.

4. Nini ekoki kolendisa bandeko na biso oyo bakómi mibange?

4 Soki ozali kokóma mobange, yebá ete Yehova abosani te oyo osalá mpo na ye. (Ebr. 6:10) Mbala mosusu ozalaki kosakola na molende, mpe yango esepelisaka Tata na biso ya likoló. Oyikaki mpiko na mikakatano, ata mpe oyo epesaki yo mawa makasi. Otosaki mpe olongisaki mitinda ya sembo ya Yehova. Okokisaki na bosembo mikumba ya ntina mingi na ebongiseli na ye, mpe opesaki basusu formasyo. Osalaka makasi olanda mbongwana oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova. Osalisaki mpe olendisaki bandeko mosusu oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Yehova Nzambe alingaka yo mingi ndenge ozali sembo epai na ye. Alaki ete “akotika te bato na ye ya sembo”! (Nz. 37:28) Apesi yo elaka oyo: ‘Kino okokóma na nsuki mpɛmbɛ, akokoba komema yo.’ (Yis. 46:4) Na yango, kokanisa te ete lokola ozali kokóma mobange, ozali lisusu na ntina te na ebongiseli ya Yehova. Ozali na motuya mingi!

MIBANGE BAZALI NA MOTUYA MINGI NA EBONGISELI YA YEHOVA

5. Likambo nini bandeko oyo bakómi mibange basengeli kobosana te?

5 Bandeko oyo bakómi mibange bakoki kosalisa ebongiseli ya Yehova na makambo mingi. Ata soki bazali lisusu na makasi oyo bazalaki na yango liboso te, bayebi makambo mingi oyo bayekolá na boumeli ya bambula. Yehova akoki kokoba kosalela bango na balolenge mingi, ndenge bandakisa ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso emonisi yango.

6-7. Pesá bandakisa ya Biblia ya mibange oyo Yehova apambolaki mpo na mosala na bango ya sembo.

6 Na Biblia, ezali na bandakisa mingi ya bato ya sembo oyo bakobaki kosalela Yehova tii na bobange na bango. Na ndakisa, Moize azalaki na mbula soki 80 ntango akómaki mosakoli ya Yehova mpe momonisi ya ekólo Yisraele. Yehova akobaki kosalela Danyele lokola molobeli na ye ata ntango akómaki na mbula mwa moke koleka 90. Mpe ekoki kozala ete ntoma Yoane akómaki na mbula mwa moke koleka 90 ntango azwaki emonaneli ya kokoma mokanda ya Emoniseli.

7 Ezali na mibange mosusu ya sembo oyo bayebanaki mingi te; yango wana ekokaki kozala pɛtɛɛ mpo bato mingi bátyela bango likebi te. Atako bongo, Yehova amonaki bango mpe apambolaki bango mpo na bosembo na bango. Na ndakisa, Biblia elobeli makambo mingi te mpo na Simeone, mobali moko oyo azalaki “moyengebene mpe abangaka Nzambe.” Kasi Yehova ayebaki ye malamu mpe apesaki ye libaku ya komona Yesu ntango azalaki naino mwana. Apesaki ye mpe libaku ya kosakola mpo na mwana yango mpe mama na ye, Maria. (Luka 2:22, 25-35) Kanisá mpe mosakoli-mwasi Ana; mwasi oyo mobali akufá. Akómaki na mbula 84, kasi “azalaki kozanga te na tempelo.” Yehova apambolaki ye mpo azalaki kokende mbala na mbala na tempelo mpe apesaki ye libaku ya komona Yesu ntango azalaki naino mwana. Simeone mpe Ana bazalaki na motuya mingi na miso ya Yehova.​—Luka 2:36-38.

Ndeko mwasi Didur, oyo azali sikoyo na mbula koleka 80, azali kokoba kosalela Yehova na bosembo (Talá paragrafe 8)

8-9. Ndeko Lois azali kokoba kosala nini atako mobali na ye akufá?

8 Na mikolo na biso, mibange mingi ya sembo bazali ndakisa malamu mpo na bilenge. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi Lois Didur. Azalaki kaka na mbula 21 ntango akómaki mobongisi-nzela monene na Canada. Na nsima, ye ná mobali na ye John balekisaki bambula mingi na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Na nsima, basalaki na Betele ya Canada na boumeli ya bambula koleka 20. Ntango Lois akómaki na mbula 58, basɛngaki ye ná John bákende kosala na ekólo Ukraine. Basalaki nini? Balobaki nde ete bakokoka kosala na ekólo mosusu te mpo bakómaki mibange? Te. Bandimaki mokumba yango, mpe John akómaki kosala na komite ya filiale ya ekólo yango. Nsima ya kolekisa mbula nsambo na mokumba yango, John akufaki. Kasi Lois azwaki ekateli ya kotikala kuna mpo na kokoba na mosala na ye. Sikoyo, lokola akómi na mbula 81, Lois azali kokoba kosalela Yehova na molende, mpe bandeko ya Ukraine balingaka ye mingi mpenza.

9 Bato mingi bakipaka mpenza te basi oyo mibali bakufá, lokola ndeko Lois. Batyelaka bango likebi moke koleka ndenge oyo bazalaki kosala yango ntango mibali na bango bazalaki na bomoi. Atako bongo, kozala basi oyo mibali bakufá ekitisi lokumu na bango te. Yehova azwaka na motuya mingi bandeko basi oyo bapesaki mibali na bango mabɔkɔ na boumeli ya bambula mingi mpe oyo bazali sikoyo kokoba kosalela ye na bosembo. (1 Tim. 5:3) Longola yango, bandeko basi yango balendisaka mpenza bandeko oyo bazali bilenge.

10. Ndakisa nini ya malamu ndeko Tony atiki?

10 Bandeko mingi ya mibange oyo bafandaka na bandako ya mibange bazali mpe na motuya. Na ndakisa, ndeko mobali moko na nkombo Tony afandaka na bandako yango. Azwaki batisimo na sanza ya 08/1942 na etúká ya Pennsylvanie, na États-unis. Na ntango yango azalaki na mbula 20. Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, basɛngaki ye akɔta mosala ya soda. Lokola aboyaki, bapesaki ye etumbu ya mbula mibale na ndambo ya bolɔkɔ. Ye ná mwasi na ye, Hilda, babotaki bana mibale mpe babɔkɔlaki bango na solo. Na boumeli ya bambula, Tony azalaki mokɛngɛli-mokambi (sikoyo ekómá kobengama, mokambi misala ya bankulutu) na masangá misato ekeseni mpe asalaki lokola mokɛngɛli na liyangani ya zongazonga. Azalaki kokende na babolɔkɔ mpo na kotambwisa makita mpe koyekola na bato Biblia. Sikoyo ndeko Tony azali na mbula 98, mpe azali kokoba kaka kosalela Yehova. Azali kokoba kosala oyo akoki na mosala ya Yehova elongo na bandeko ya lisangá na ye!

11. Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka baoyo bafandaka na bandako ya mibange likebi?

11 Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka na motuya bandeko oyo bafandaka na bandako ya mibange? Soki likoki ezali, bankulutu bakoki kosalisa bango mpo báyanganaka to bálandaka programɛ ya makita mpe básakolaka. Tokoki komonisa ete totyelaka bango likebi soki tokei kotala bango to mpe tosololi na bango na nzela ya video. Tosengeli mpenza kotya likebi mingi epai ya mibange oyo bafandaka na bandako ya mibange oyo ezali mosika na masangá na bango. Soki tokebi te, tokoki kobosana bandeko yango. Ya solo, bamosusu kati na bango bakoki komona ete ezali mpasi to mpe ebongi te bálobela makambo na bango moko. Kasi, soki tozwi ntango ya kopusana penepene na bango, kotuna bango mwa mituna mpe koyoka bango ntango bazali koyebisa biso makambo ya malamu oyo bakutaná na yango na mosala ya Yehova, tokozwa mpenza matomba.

12. Bandeko ya ndenge nini bakoki kozala na lisangá na biso?

12 Tokoki kokamwa koyeba ete na lisangá na biso ezali na mibange ya sembo oyo bazali ndakisa malamu. Ndeko mwasi moko na nkombo Harriette asalelaki Yehova na bosembo na boumeli ya bambula mingi na lisangá na ye na New Jersey, na États-unis. Na nsima, akendaki kofanda elongo na mwana na ye ya mwasi. Bandeko ya lisangá na ye ya sika basalaki makasi mpo báyeba ye malamu, mpe bayaki komona ete azalaki na motuya mingi. Ndeko mwasi Harriette abɛtelaki bango masolo ya kolendisa ya makambo oyo akutanaki na yango na mosala ya kosakola ntango abandaki koyekola solo na bambula ya 1920. Na eleko yango, azalaki ntango nyonso kokende na mosala ya kosakola ná brɔsi na ye ya konika mino mpo mbala mosusu bakokaki kokanga ye mpe kotya ye na bolɔkɔ. Kutu, bakangaki ye mbala mibale mobimba na 1933, mpe alekisaki pɔsɔ mobimba na bolɔkɔ. Ntango azalaki na bolɔkɔ, mobali na ye oyo azalaki Motatoli te asalisaki ye mpenza. Azalaki kobatela bana na bango misato ya mike. Tosengeli mpenza kozwa na motuya mingi bandeko na biso ya sembo oyo bakómi mibange lokola ndeko Harriette!

13. Makambo nini toyekoli mpo na esika oyo mibange bazali na yango na ebongiseli ya Yehova?

13 Bandeko na biso oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi na miso ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Bamoná ndenge oyo Yehova apambolaka ebongiseli na ye na balolenge mingi. Bamoná mpe ndenge oyo apambolaka bango. Bazwá mateya mingi ya ntina na mabunga oyo basalá. Na yango, taleláká bango lokola “liziba ya bwanya,” mpe yekolá epai na bango. (Mas. 18:4) Soki osali makasi oyeba bango malamu, kondima na yo ekokóma makasi mpe okoyekola makambo mingi!

YEKOLÁ MAKAMBO MINGI EPAI YA MIBANGE

Ndenge kaka Elisha azwaki matomba mpo azalaki elongo na Eliya, bandeko mosusu bazwaka matomba ntango bazali kosolola na bandeko oyo basaleli Yehova bambula mingi (Talá paragrafe 14-15)

14. Kolimbola Mibeko 32:7 ezali kolendisa bilenge básala nini?

14 Sololáká na bandeko oyo bakómi mibange. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:7.) Ekoki kozala ete bamonaka lisusu malamu te, bakokaka lisusu kotambola mpe koloba malamu te. Kasi bazalaka kaka na mposa makasi ya kosala mingi, mpe bamisalelá “nkombo malamu” epai ya Yehova. (Mos. 7:1) Kobosana te ntina oyo Yehova azwaka bango na motuya. Kobá kopesa bango lokumu. Zalá lokola Elisha oyo atingamaki kaka kozala penepene na Eliya na mokolo ya nsuka oyo balekisaki elongo. Mbala misato mobimba, Elisha alobaki: “Nakotika yo te.”​—2 Bak. 2:2, 4, 6.

15. Mituna nini tokoki kotuna bandeko oyo bakómi mibange?

15 Tunáká mibange mituna na boboto mpo na komonisa ete otyelaka bango likebi. (Mas. 1:5; 20:5; 1 Tim. 5:1, 2) Na ndakisa, okoki kotuna bango boye: “Ntango ozalaki elenge, nini endimisaki yo ete ozwaki solo?” “Ndenge nini makambo oyo okutaná na yango na bomoi esalisi yo opusana penepene na Yehova?” “Nini esalisaka yo obatela esengo na yo na mosala ya Yehova?” (1 Tim. 6:6-8) Na nsima, yoká bango ntango bazali kobɛtela yo masolo na bango.

16. Matomba nini bilenge mpe mibange bakoki kozwa ntango bazali kosolola?

16 Ntango mibange bazali kosolola na bilenge, bango nyonso bazwaka matomba. (Rom. 1:12) Bino bilenge, bokomindimisa lisusu ete Yehova atyelaka basaleli na ye likebi, mpe mibange bakomona ete bozali kopesa bango lokumu. Bakosepela koyebisa bino ndenge oyo Yehova apambolá bango.

17. Mpo na nini tokoki koloba ete bandeko na biso oyo bakómi mibange bakómaka lisusu kitoko mingi nsima ya bambula?

17 Mbala mingi, kitoko ya moto esilaka ntango mbula na ye ezali kopusana. Kasi baoyo bazalaka sembo epai ya Yehova, bakómaka lisusu kitoko mingi na miso na ye wana mbula na bango ezali kopusana. (1 Tes. 1:2, 3) Mpo na nini? Mpo na boumeli ya bambula, batikaki ete elimo ya Nzambe ebongisa bango mpe esalisa bango bákólisa bizaleli malamu. Wana tozali koyeba malamu bandeko na biso oyo bakómi mibange, tozali kopesa bango lokumu, mpe tozali koyekola epai na bango, yango ekosalisa biso tózwaka bango na motuya mingi!

18. Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?

18 Lisangá ekómaka makasi kaka te soki bilenge bazali kotalela mibange ete bazali na motuya, kasi mpe ntango mibange bazali kotalela bilenge ete bazali na motuya. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo mibange bakoki komonisa ete bazwaka bilenge na motuya.

LOYEMBO 144 Tyá miso na yo na mbano!

^ par. 5 Bandeko oyo bakómi mibange bazalaka na motuya mingi. Lisolo oyo ekolendisa biso tóbakisa bolingo na biso mpo na bango. Tokomona mateya oyo tokoki kozwa na bwanya oyo bazali na yango mpe na makambo oyo bakutaná na yango. Ekosalisa mpe bandeko oyo bakómi mibange báyeba ete bazali na motuya na ebongiseli ya Yehova.