Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndeko Joseph Rutherford ná bandeko mosusu na mobembo na Mpoto

1920—Eleki sikoyo mbula nkama moko

1920—Eleki sikoyo mbula nkama moko

NA EBANDELI ya mobu 1920, basaleli ya Nzambe bazalaki na esengo ya kosala mosala oyo ezalaki kozela bango. Yango wana na 1920, baponaki mokapo ya mobu oyo: “NKOLO azali makasi na ngai mpe loyembo na ngai.”​—Nz. 118:14, King James Version.

Yehova apesaki basakoli yango ya molende makasi mpenza. Na mobu yango, motángo ya babongisi-nzela ya sanza na sanza oyo ezalaki 225, ekómaki 350. Mpe mpo na mbala ya liboso, basali to basakoli koleka 8 000 batindaki lapolo na bango ya mosala ya kosakola na biro monene. Yehova apesaki eyano na mabondeli na bango na ndenge oyo bakanisaki te.

BAMONISI MOLENDE MPENZA

Na mokolo ya 21/03/1920, ndeko Joseph Rutherford, oyo na ntango wana azalaki kotambwisa mosala ya Bayekoli ya Biblia, asalaki diskur moko oyo elobaki: “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te.” Bayekoli ya Biblia basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kobenga bato oyo basepeli báya kolanda diskur yango. Bafutelaki moko ya bandako ya teyatre oyo eleki monene na engumba New York, mpe bakabolaki nkasa ya libyangi soki 320 000.

Zulunalo oyo ezali kolobela diskur “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te”

Bato bayaki ebele koleka ndenge Bayekoli ya Biblia bakanisaki. Ndako yango oyo ezalaki na bisika ya kofanda 5 000 etondaki, mpe bato soki 7 000 bazangaki bisika ya kofanda. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete, yango ezalaki “moko ya makita minene ya Bayekoli ya Biblia oyo elongaki mpenza.”

Bayekoli ya Biblia bayebanaki malamu mpo babandaki kosakola ete “bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te.” Na ntango wana, bayebaki te ete nsango ya Bokonzi esengelaki lisusu kosakolama mingi koleka. Atako bongo, milende na bango emonanaki polele mpenza. Ndeko mwasi Ida Olmstead, oyo abandaki koyangana na makita na 1902 alobaki boye: “Toyebaki ete Nzambe abombeli bato mapamboli ebele na mikolo ezali koya, mpe tolɛmbaki te koyebisa nsango yango epai ya baoyo tozalaki kokutana na bango na mosala ya kosakola.”

TOKÓMI KOBIMISA MIKANDA BISO MOKO

Mpo bilei ya elimo ezanga te, bandeko ya Betele bakómaki kobimisa mikanda mosusu bango moko. Basombaki bamasini ya konyata mikanda mpe batyaki yango na ndako moko oyo ezalaki pene na ndako ya Betele, na 35 Myrtle Avenue, na Brooklyn, na New York.

Ndeko Leo Pelle ná Walter Kessler bakendaki kosala na Betele na sanza ya 01/1920. Ndeko Walter alobi boye: “Ntango tokómaki na Betele, ndeko oyo azalaki kokamba mosala na imprimerie atalaki biso mpe alobaki: ‘Etikali ngonga moko na ndambo mpo tókende kolya.’ Ayebisaki biso tózwa bakartɔ ya babuku oyo ezalaki na nse mpe tómata na yango likoló.”

Ndeko Leo abosanaka te makambo oyo esalemaki mokolo oyo elandaki. Alobi boye: “Bapesaki biso mosala ya kosukola bifelo ya etaje ya liboso ya ndako yango. Ezalaki mosala ya salite oyo nasalá naino te. Kasi lokola tozalaki kosala mpo na Nkolo, ekómaki mosala ya lokumu.”

Masini ya kobimisa bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli

Kaka nsima ya mwa bapɔsɔ, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekómaki konyatama na bandeko ya molende oyo bamipesaki na bolingo na bango moko. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 60 000 ya 01/02/1920 enyatamaki na etaje ya mibale. Na ntango yango, bandeko batyaki masini ya konyata mikanda na eteni oyo ezalaki na nse ya mabele, mpe bapesaki masini yango nkombo Battleship. Banda na nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 14/04/1920, bakómaki mpe konyata zulunalo L’Âge d’Or na masini yango. Na ntembe te, Yehova apambolaki mpenza milende ya bandeko yango oyo bamipesaki na bolingo na bango moko.

“Lokola ezalaki mosala ya Nkolo, ekómaki mosala ya lokumu”

“TÓFANDA NA KIMYA”

Basaleli ya Yehova ya sembo, bamonaki ndenge mosala ebongisamaki lisusu mpe ndenge bondeko ezongaki lisusu. Nzokande, bayekoli mosusu ya Biblia batikaki ebongiseli ya Nzambe na eleko ya yikiyiki oyo ebandaki na 1917 tii na 1919. Esengelaki kosala nini mpo na kosalisa bango?

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/1920 (na Anglais) ezalaki na lisolo oyo elobaki: “Tófanda na kimya.” Lisolo yango elobaki boye: “Tondimi mpenza ete . . . moto nyonso oyo alingi kotosa Yehova . . . asengeli kobosana mabunga oyo asalá kala, . . . kofanda na bomoko mpe kosangana na basaleli ya Nzambe mpo na kosala mosala na ye.”

Bandeko mingi batosaki maloba yango. Ndeko mwasi moko ná mobali na ye bakomaki boye: “Atako tosalaki libunga ya kotika mosala ya kosakola, tosepeli mingi ndenge, na bambula oyo eleki, bandeko na biso bakobaki na mosala yango. . . . Tozali na elikya ete ata mokolo moko te tokosala lisusu libunga ya ndenge wana.” Mosala monene ezalaki kozela bandeko yango oyo bazongelaki mosala ya kosakola.

BAKABOLI “ZG”

Na mokolo ya 21/06/1920, bayekoli ya Biblia babandaki kampanye moko monene ya kokabola “ZG,” oyo ebimaki nzela moko ná buku Le mystère accompli. * Babombaki babuku yango ebele ntango epekisamaki na 1918.

Babengaki basakoli nyonso mpe babongisi-nzela, mpo na kokabola yango. Libyangi yango elobaki boye: “Moto nyonso oyo azwá batisimo na lisangá mokomoko, oyo akoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango, asengeli kosala yango na motema na ye mobimba.” Bandeko bakómaki koloba boye: ‘Nasengeli kosala kaka likambo oyo; kokabola ZG.’ Ndeko Edmund Hooper alobi boye: “Mpo na bandeko mingi, yango ezalaki kampanye ya liboso ya kosakola ndako na ndako oyo basalaki.” Abakisi boye: “Tokómaki komona ete mosala yango esengelaki kopalangana mosika mpenza koleka ndenge tozalaki kokanisa.”

KOBONGISA LISUSU MOSALA NA MPOTO

Lokola ezalaki mpasi kozwa nsango ya bayekoli ya Biblia oyo bazalaki na bamboka mosusu na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ndeko Rutherford azalaki na mposa ya kolendisa bandeko yango mpe kobongisa lisusu mosala ya kosakola. Yango wana, na mokolo ya 12/08/1920, ye ná bandeko mosusu minei basalaki mobembo na Grande-Bretagne, na mikili mosusu ya Mpoto, mpe na Moyen-Orient.

Ndeko Rutherford na Égypte

Ntango ndeko Rutherford akómaki na Grande-Bretagne, bayekoli ya Biblia basalaki mayangani misato mpe makita 12 mpo na bato nyonso. Bato soki 50 000 bayaki na mayangani mpe na makita yango. Mpo na kolobela na mokuse mobembo yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Bandeko babɔndisamaki mpe balendisamaki. Bakómaki mpenza na bomoko, basalaki elongo, mpe bakómaki bato ya esengo mpenza.” Na engumba Paris, ndeko Rutherford asalaki lisusu diskur oyo elobaki: “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te.” Ntango diskur ebandaki, ndako yango etondaki. Bato nkama misato batunaki mituna mosusu ya Biblia.

Lokasa ya kobenga bato na diskur oyo esalemaki na Royal Albert Hall, na Londres

Na bapɔsɔ oyo elandaki, bandeko mosusu bakendaki kotala engumba Athènes, Caire, mpe Jérusalem. Mpo na kolandela mposa oyo bato bamonisaki na bamboka wana, ndeko Rutherford atyaki depo ya mikanda na engumba Ramallah, pene na Jérusalem. Na nsima, azongaki na Mpoto, mpe atyaki biro ya Europe centrale, mpe azwaki bibongiseli mpo mikanda ebanda konyatama kuna.

BANGƐNGISI POLE NA MOKILI OYO EZANGI BOSEMBO

Na sanza ya 09/1920, bayekoli ya Biblia babimisaki nimero 27 ya zulunalo L’Âge d’Or. Ezalaki nimero moko sipesiale, oyo emonisaki polele minyoko oyo bayekoli ya Biblia bakutanaki na yango na mobu 1918. Battleship, masini ya konyata mikanda oyo tolobelaki liboso, ezalaki kosala butu moi mpo na kobimisa bazulunalo yango koleka milio minei.

Fɔtɔ ya ndeko mwasi Emma Martin

Batángi ya zulunalo yango batángaki likambo ya nsɔmɔ oyo ekómelaki ndeko mwasi Emma Martin. Ndeko Martin azalaki mobongisi-nzela na engumba San Bernardino, na etúká ya Californie. Na mokolo ya 17/03/1918, ye ná bandeko mibali misato, Hamm, Sonnenburg, mpe Stevens, bayanganaki na mwa likita moke ya bayekoli ya Biblia.

Moko kati na mibali oyo bayaki na likita yango ayaki te mpo na koyekola Biblia. Na nsima, mobali yango alobaki boye: “Nakendaki na likita wana . . . nde mpo biro ya prokirɛrɛ etindaki ngai. Nakendaki kuna nde mpo na koluka bilembeteli ya solosolo.” Azwaki mpe “elembeteli” oyo azalaki koluka, ezalaki nde buku Le mystère accompli. Mwa mikolo na nsima, bakangaki ndeko mwasi Martin ná bandeko mibali misato yango. Balobaki na bango ete babuki mobeko mpo bazalaki kokabola buku oyo epekisamaki.

Ndeko mwasi Emma ná bandeko mibali misato yango bakweaki na likambo mpe bakatelaki bango etumbu ya mbula misato ya bolɔkɔ. Na mokolo ya 17/05/1920, bazuzi baboyaki kotalela lisusu likambo na bango ndenge basɛngaki, mpe bandeko yango babandaki etumbu na bango ya bolɔkɔ. Kasi eumelaki te, makambo ebongwanaki.

Na mokolo ya 20/06/1920, ndeko Rutherford alobelaki likambo na bango na liyangani oyo esalemaki na San Francisco. Bandeko oyo bazalaki na liyangani yango bayokaki mabe mpo na makambo oyo basalelaki bandeko wana, mpe batindelaki prezida ya États-Unis mokanda. Bakomaki boye: “Totaleli bindimeli . . . ya ndeko mwasi Martin . . . na ndenge balobi ete abuki mobeko, yango ezali sembo te . . . Bakonzi ya Leta basaleli bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpo na . . . kotyela . . . ndeko mwasi Martin motambo . . . mpe na nsima, kosalela ye likita mpo na kobimisa likambo oyo bakokanga ye mpo na yango mpe kobwaka ye na bolɔkɔ. Bakoseli ye likambo . . . ezali mabe mpenza.”

Kaka na mokolo oyo elandaki, Prezida Woodrow Wilson alongolaki mbala moko bitumbu oyo bakatelaki ndeko mwasi Martin ná bandeko mibali misato wana. Etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki bango mpo na makambo ya lokuta oyo bakoselaki bango esilaki.

Na nsuka ya 1920, ezalaki na makambo mingi oyo esepelisaki bayekoli ya Biblia. Mosala na biro monene ezalaki se kokóma mingi, mpe Bayekoli ya Biblia bakómaki kosakola na molende mpenza koleka ndenge babandaki kosala yango liboso. Bakómaki kosakola ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano nyonso ya bato. (Mat. 24:14) Kasi mbula oyo elandaki, elingi koloba 1921, ezalaki mobu moko ya ntina mingi mpo na kosakola solo ya Bokonzi.

^ par. 18 Le mystère accompli ezalaki volimi ya nsambo ya buku Études des Écritures. “ZG” ezalaki mwa eteni ya buku Le mystère accompli oyo babimisaki lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1918. “Z” elimboli Zion’s Watch Tower, mpe “G” ezali lɛtrɛ ya nsambo na alfabɛ ya Anglais, yango emonisi volimi ya nsambo.