Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 41

Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimoEteni ya liboso

Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimoEteni ya liboso

“Bino bozali mokanda ya Kristo oyo ekomami na biso lokola basaleli.”​—2 KO. 3:3.

LOYEMBO 78 “Tóteya Liloba ya Nzambe”

NA MOKUSE *

Oyokaka ndenge nini ntango omoni moyekoli ya Biblia moko ya teritware ya lisangá na bino azwi batisimo? Na ntembe te, osepelaka mingi mpenza. (Talá paragrafe 1)

1. Ndenge nini 2 Bakorinti 3:1-3 ezali kosalisa biso tósepela na libaku malamu oyo tozali na yango ya koyekola na bato Biblia tii bakozwa batisimo? (Talá elilingi ya ezipeli.)

OYOKAKA ndenge nini ntango omoni moyekoli ya Biblia moko ya teritware ya lisangá na bino azwi batisimo? Na ntembe te, osepelaka mingi mpenza. (Mat. 28:19) Bongo soki yo nde moto oyekolaki na moyekoli yango ya sika Biblia, okosepela mpenza komona ye azali kozwa batisimo! (1 Tes. 2:19, 20) Bayekoli ya sika oyo bauti kozwa batisimo, bazali “mikanda” ya malamu kaka mpo na bato oyo bayekolaki na bango te, kasi mpe mpo na lisangá mobimba.​—Tángá 2 Bakorinti 3:1-3.

2. (a) Motuna nini ya ntina tosengeli kotalela, mpe mpo nini? (b) Boyekoli ya Biblia ezali nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

2 Ezali likambo ya esengo komona ete, na mbula minei oyo euti koleka, tozalaki koyekola Biblia * na bato soki milio 10 sanza na sanza na mokili mobimba. Mpe kaka na eleko yango, bato koleka 280 000 bazalaki kozwa batisimo mbula na mbula mpo na kokóma Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu Kristo. Ndenge nini tokoki kosalisa mingi na bango mpo bázwa batisimo? Lokola Yehova azali naino kopesa bato libaku ya kokóma bayekoli ya Kristo, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bákola tii bázwa batisimo noki mpenza. Tozali lisusu na ntango ya kolekisa te!​—1 Ko. 7:29a; 1 Pe. 4:7.

3. Na lisolo oyo, tokolobela makambo nini na oyo etali koyekola na bato Biblia?

3 Lokola tosengeli kokómisa bato ebele bayekoli sikoyo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etunaki Babetele ndenge oyo tokoki kosalisa ebele ya bayekoli ya Biblia bákola tii bázwa batisimo. Na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi, tokomona mateya oyo tokoki kozwa epai ya babongisi-nzela oyo bayebi mpenza kosakola, bamisionɛrɛ, mpe bakɛngɛli ya zongazonga. * (Mas. 11:14; 15:22) Bandeko yango bamonisi oyo basakoli ná bayekoli ya Biblia basengeli kosala mpo boyekoli eleka malamu. Na lisolo oyo, tokolobela makambo mitano oyo moyekoli ya Biblia mokomoko asengeli kosala mpo akola malamu kino azwa batisimo.

BÓYEKOLAKA PƆSƆ NA PƆSƆ

Tuná moyekoli soki bokoki kofanda mpo na kokoba masolo ya Biblia (Talá paragrafe 4-6)

4. Nini ekoki kosalema soki tozali koyekola Biblia na bato kaka ya kotɛlɛma liboso ya baporte na bango?

4 Bandeko na biso mingi bayekolaka Biblia na bato kaka ya kotɛlɛma liboso ya porte ya moto. Atako kosala bongo ezali malamu mpo na kopesa moto mposa ya koyeba Biblia, kasi mbala mingi, masolo yango ezalaka mikuse mpenza mpe esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ te. Mpo na kokolisa mposa ya moto, bandeko mosusu basɛngaka nimero ya telefone ya moto yango, na nsima babengaka ye to batindelaka ye mesaje oyo ezali na vɛrsɛ moko ya Biblia liboso bákende kotala ye. Bakoki kosolola na moto ndenge wana na boumeli ya basanza ebele kozanga ete akóma moyekoli ya Biblia oyo azali kokola. Kasi soki moyekoli ya Biblia azali koyekola Liloba ya Nzambe kaka mwa ngonga moke ndenge wana mpe azali kosala ata molende moko te, ekozala mpasi mpo akola tii amipesa na Nzambe mpe azwa batisimo.

5. Na Luka 14:27-33, Yesu alobaki nini mpo na kosalisa biso na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

5 Mokolo moko, Yesu apesaki ndakisa moko mpo na komonisa oyo moto asengeli kosala mpo na kokóma moyekoli na ye. Alobelaki moto oyo alingi kotonga ndako ya molai mpe mokonzi oyo alingi kokende etumba. Yesu alobaki ete motongi ndako asengeli ‘kofanda liboso mpo na koyeba mosolo boni ekosɛnga’ mpo na kosilisa ndako yango, mpe mokonzi asengeli ‘kofanda liboso mpo na kosala likita’ mpo na komona soki basoda na ye bazali na likoki ya kosala makambo oyo bazali na mposa ya kosala. (Tángá Luka 14:27-33.) Na yango, Yesu ayebaki ete moto oyo alingi kokóma moyekoli na ye asengeli komitalela malamumalamu mpo na koyeba oyo asengeli kosala mpo na kolanda ye. Yango wana, tosengeli kolendisa bayekoli ya Biblia ete tóyekolaka na bango pɔsɔ na pɔsɔ. Ndenge nini tokoki kosala yango?

6. Tosengeli kosala nini mpo na koyekola na bato Biblia na ndenge oyo ekosalisa bango bákola?

6 Mpo na kobanda, kómisá mwa molai boyekoli liboso ya porte. Ntango mosusu, bokoki kolobela ata bavɛrsɛ mibale mbala nyonso oyo okei kotala ye. Ntango moto yango akómi kosepela na masolo ya mwa molai, tuná ye soki ezali na esika oyo bokoki kofanda mpo bókoba kosolola malamu. Eyano oyo akopesa ekomonisa soki azwaka boyekoli ya Biblia na ntina mingi to te. Lisusu, mpo na kosalisa moyekoli akola malamu, okoki kotuna ye soki akolinga koyekola mbala mibale na pɔsɔ. Atako bongo, koyekola mbala moko to mbala mibale na pɔsɔ ekoki te, esɛngi mpe makambo mosusu.

BONGISÁKÁ BOYEKOLI NYONSO

Bongisá boyekoli ya Biblia malamu, mpe lakisá moyekoli ndenge ya kobongisa yango (Talá paragrafe 7-9)

7. Ndenge nini moteyi akoki komibongisa malamu mpo na koyekola na moto Biblia?

7 Lokola ozali moteyi, osengeli komibongisaka malamu liboso ya kokende koyekola na moto. Okoki kobanda kotánga makambo bokoyekola, mpe kotalela bavɛrsɛ. Simbá makanisi ya ntina malamu mpenza. Tyá likebi na motó ya likambo ya lisolo, mitó ya makambo mike, mituna ya boyekoli, bavɛrsɛ oyo bakomi “tángá,” bililingi, mpe bavideo oyo ekoki kosalisa mpo na kolimbola lisolo yango. Na nsima, kanisá moyekoli na yo ya Biblia. Manyolá ndenge okoki koteya ye makambo yango na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele mpo akanga ntina na yango malamu mpe asalela yango.​—Neh. 8:8; Mas. 15:28a.

8. Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Bakolose 1:9, 10 eteyi biso nini na likambo etali kobondela mpo na bayekoli na biso ya Biblia?

8 Ntango ozali komibongisa, bondelá Yehova mpo na moyekoli ya Biblia yango mpe makambo oyo asengeli na yango. Sɛngá Yehova asalisa yo oteya ye makambo oyo ezali na Biblia na ndenge oyo ekosimba motema na ye. (Tángá Bakolose 1:9, 10.) Luká koyeba liboso soki ezali na likambo moko oyo ekozala mpasi mpo moyekoli akanga ntina na yango to andima yango. Kobosana te, mokano na yo ezali ete osalisa ye akola tii azwa batisimo.

9. Ndenge nini moteyi akoki kosalisa moyekoli ya Biblia ayeba kobongisa boyekoli? Limbolá.

9 Tozali na elikya ete, soki tozali koyekola na moto Biblia mbala na mbala, akosepela na makambo oyo Yehova ná Yesu basalá mpe akokóma na mposa makasi ya koyekola makambo mosusu. (Mat. 5:3, 6) Mpo moyekoli ya Biblia azwa bolamu na makambo azali koyekola, asengeli kotya makanisi na ye nyonso na makambo yango. Yango wana, monisá ye ntina ya kobongisa boyekoli nyonso, elingi koloba, kotánga liboso makambo oyo bokoyekola, mpe kokanisa ndenge ya kosalela yango na bomoi na ye. Ndenge nini moteyi akoki kosalisa moyekoli? Bongisá liteya moko elongo na moyekoli mpo na kolakisa ye ndenge babongisaka boyekoli. * Lakisá ye ndenge ya kozwa biyano mbala moko na mituna oyo etunami, mpe monisá ye ete kotya mikɔlɔtɔ kaka na maloba ya ntina ekosalisa ye abosana eyano te. Na nsima, sɛngá ye apesa eyano na maloba na ye moko. Soki asali bongo, ekosalisa yo oyeba soki azali kokanga ntina ya mateya yango to te. Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo osengeli kolendisa moyekoli na yo asala.

TEYÁ YE ASOLOLAKA NA YEHOVA MOKOLO NA MOKOLO

Teyá moyekoli ndenge ya kosolola na Yehova (Talá paragrafe 10-11)

10. (a) Mpo na nini kotánga Biblia mokolo na mokolo ezali na ntina? (b) Moyekoli ya Biblia asengeli kosala nini mpo azwela botángi ya Biblia litomba mingi?

10 Longolá koyekola na moteyi na ye pɔsɔ na pɔsɔ, moyekoli ya Biblia asengeli mpe kosala makambo mosusu ye moko mokolo na mokolo mpo azwa bolamu mingi. Asengeli kosololaka na Yehova. Na ndenge nini? Ntango azali koyoka Yehova mpe koyebisa ye makambo. Akoki koyoka Nzambe soki azali kotánga Biblia mokolo na mokolo. (Yos. 1:8; Nz. 1:1-3) Lakisá ye ndenge ya kosalela “Programɛ ya botángi ya Biblia” oyo ezali na jw.org. * Kasi, mpo na kosalisa ye azwela botángi ya Biblia litomba mingi, lendisá ye akanisa na mozindo makambo oyo Biblia ezali koteya ye mpo na Yehova. Akanisa mpe ndenge oyo akoki kosalela makambo yango na bomoi na ye.​—Mis. 17:11; Yak. 1:25.

11. Ndenge nini moyekoli ya Biblia akoki koyeba kobondela malamu, mpe mpo na nini ezali na ntina ete abondelaka Yehova mbala na mbala?

11 Lendisá moyekoli na yo ya Biblia asololaka na Yehova na nzela ya libondeli mokolo na mokolo. Saláká libondeli na motema mobimba na ebandeli mpe na nsuka ya boyekoli mokomoko. Bondeláká elongo na moyekoli yango mpe mpo na ye. Lokola azali koyoka mabondeli na yo, akoyeba ndenge ya kobondela na motema mobimba mpe akobanda kobondelaka Yehova Nzambe na nkombo ya Yesu Kristo. (Mat. 6:9; Yoa. 15:16) Kanisá ndenge oyo kotánga Biblia mokolo na mokolo (koyoka Yehova) mpe kobondela (kosolola na Yehova) ekosalisa moyekoli na yo apusana penepene na Nzambe! (Yak. 4:8) Soki azali kosala bongo mokolo na mokolo, yango ekosalisa ye akola tii amipesa na Nzambe mpe azwa batisimo. Kasi likambo nini mosusu ekoki kosalisa ye?

SALISÁ YE AKÓMA NA BOYOKANI MALAMU NÁ YEHOVA

12. Ndenge nini moteyi akoki kosalisa moyekoli akóma na boyokani ya malamu na Yehova?

12 Makambo oyo moyekoli ya Biblia ayekolaka esengeli kosuka kaka te na bɔɔngɔ na ye kasi esengeli nde kokɔta na motema na ye. Mpo na nini? Motema na biso, oyo esangisi bamposa, mayoki mpe makanisi na biso, etindaka biso tózwa bikateli. Yesu ayebaki mpenza kosalela mayele ya koteya oyo ezalaki kosimba mitema ya bato. Kasi bato bazalaki mpe kolanda ye mpo azalaki kosimba mitema na bango. (Luka 24:15, 27, 32) Moyekoli na yo asengeli komona ete Yehova azali mpenza Moto ya solo, mpe akoki kokóma na boyokani malamu na ye. Asengeli mpe komona ete Yehova akoki kokóma Tata na ye, Nzambe na ye, mpe Moninga na ye. (Nz. 25:4, 5) Ntango bozali koyekola, salisá ye amona bizaleli malamu oyo Nzambe azalaka na yango. (Kob. 34:5, 6; 1 Pe. 5:6, 7) Ata soki bozali kolobela lisolo nini, bendáká likebi na ye na bomoto ya Yehova. Salisá moyekoli asepela na bizaleli malamu ya Yehova, na ndakisa bolingo, boboto, mpe motema mawa na ye. Yesu alobaki ete “kolinga Yehova Nzambe na yo,” nde “mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.” (Mat. 22:37, 38) Salisá moyekoli na yo akóma kolinga Nzambe mingi na motema na ye.

13. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge ya kosalisa moyekoli ya Biblia mpo ayeba bizaleli malamu ya Yehova.

13 Ntango ozali kosolola na moyekoli na yo, monisá ye ntina oyo olingaka Yehova mingi. Yango ekoki kosalisa moyekoli na yo amona ete ye mpe asengeli kokóma moninga ya Yehova, mpe ekosala ete alinga Yehova mingi. (Nz. 73:28) Na ndakisa, soki na vɛrsɛ moko ya Biblia to na mokanda oyo boyekolaka, omoni liloba moko oyo esimbaki motema na yo mpe oyo emonisi moko ya bizaleli ya Yehova, lokola bolingo, bwanya, bosembo to nguya, yebisá yango moyekoli na yo. Mpe monisá ye ete yango ezali moko ya bantina oyo etindaka yo olinga Tata na biso ya likoló. Kasi, ezali mpe na eloko mosusu oyo moyekoli nyonso ya Biblia asengeli kosala mpo akola tii azwa batisimo.

LENDISÁ YE AYANGANAKA NA MAKITA YA LISANGÁ

Lendisá moyekoli aumela te mpo na kobanda koyangana na makita ya lisangá! (Talá paragrafe 14-15)

14. Na likambo etali koyanganaka na makita, ndenge nini Baebre 10:24, 25 ekoki kosalisa bayekoli na biso ya Biblia bákola na elimo?

14 Biso nyonso tolingaka ete bayekoli na biso ya Biblia bákola mpe bázwa batisimo. Moko ya makambo ya ntina oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bango ezali ya kolendisa bango báyanganaka na makita ya lisangá. Bateyi ya malamu balobi ete bayekoli oyo baumelaka te mpo na koyangana na makita bakolaka mbangu na elimo. (Nz. 111:1) Bateyi mosusu bayebisaka bayekoli na bango ete bakoyeba ndambo ya makambo na boyekoli na bango ya Biblia, kasi ndambo mosusu bakoyeba yango na makita ya lisangá. Tángá Baebre 10:24, 25 elongo na moyekoli na yo, mpe monisá ye bolamu oyo akozwa soki abandi koyangana na makita. Lakisá ye video, Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? * Salisá moyekoli na yo amityela mokano ya koyanganaka na makita nyonso pɔsɔ na pɔsɔ.

15. Tokoki kosala nini mpo tólendisa moyekoli ya Biblia ayanganaka na makita?

15 Okoki kosala nini soki moyekoli na yo abandi naino te koyangana na makita, to mpe ayanganaka na makita nyonso te? Na esengo mpenza, yebisá ye likambo moko oyo oyekolaki na likita oyo eleki. Ntango akomona ete olingaka makita mingi, yango ekopesa mpe ye mposa ya koyangana na makita. Pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala oyo bozali koyekola na makita. Lakisá ye makambo oyo bokotalela na makita oyo elandi, mpe tuná ye eteni nini esepelisi ye mingi. Makambo oyo akomona na likita ya liboso oyo akoyangana, ekoleka mosika makambo oyo amoná mpe ayoká na mangomba mosusu. (1 Ko. 14:24, 25) Akokutana na bato oyo bazali ndakisa malamu oyo ye akoki komekola mpe oyo bakosalisa ye akola tii azwa batisimo.

16. Tosengeli kosala nini mpo na koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

16 Ndenge nini tokoki koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo? Tokoki kosalisa moyekoli mokomoko amona ete boyekoli na ye ezali na ntina mingi soki tozali kolendisa ye ayekolaka pɔsɔ na pɔsɔ, mpe abongisaka boyekoli nyonso. Tosengeli kolendisa ye mpe asololaka na Yehova mokolo na mokolo mpo akóma na boyokani malamu ná ye. Tosengeli mpe kosalisa moyekoli ya Biblia ayanganaka na makita nyonso ya lisangá. (Talá etanda “ Oyo bayekoli ya Biblia basengeli kosala mpo bákola tii bázwa batisimo.” Nzokande, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, ezali na makambo mosusu mitano oyo tosengeli kosala mpo na kosalisa bayekoli bázwa batisimo.

LOYEMBO 76 Oyokaka nini?

^ par. 5 Koteya moto likambo elimboli kosalisa ye ‘akanisa, ayoka, to asala likambo na ndenge ya sika to na ndenge mosusu.’ Matai 28:19, mokapo na biso ya mobu 2020, ezali kokundwela biso ntina ya koyekola na bato Biblia, mpe ya koteya bango ndenge oyo bakoki kokóma bayekoli ya Yesu Kristo oyo bazwi batisimo. Na lisolo oyo mpe na oyo ekolanda, tokomona ndenge oyo tokoki kobongisa lisusu malamu koleka mosala yango ya ntina mingi.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Soki ozali kosolola na moto masolo ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na molɔngɔ mpenza, wana elakisi ete bozali koyekola Biblia. Soki olakisi moto ndenge ya koyekola Biblia, mpe na nsima oyekoli na ye mbala mibale, mpe soki omoni ete boyekoli yango ekoki kokoba, wana okoki kotánga moto yango ete azali moyekoli ya Biblia.

^ par. 3 Masolo oyo ezali na makanisi oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya 07/2004 tii na 05/2005 oyo elobaki: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola.”

^ par. 9 Talá video ya miniti minei oyo elobi Kolakisa bayekoli ndenge ya kobongisa boyekoli. Na jw.org®, kende na BIBLIOTƐKƐ > BAVIDEO > MAKITA MPE MOSALA NA BISO > TÓKOLISA MAKOKI NA BISO YA KOSAKOLA.

^ par. 10 Kende na BIBLIOTƐKƐ > BABUKU MPE MWA BABUKU.

^ par. 14 Na JW Library®, kende na MULTIMÉDIA > NOS RÉUNIONS ET NOTRE MINISTÈRE > OUTILS POUR LA PRÉDICATION.