Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 42

Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale

Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale

“Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.”​—1 TIM. 4:16.

LOYEMBO 77 Pole na mokili ya molili

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini toyebi ete mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato?

MOSALA ya kokómisa bato bayekoli ezali mosala ya kobikisa bomoi ya bato! Ndenge nini toyebi yango? Ntango Yesu apesaki mitindo oyo ezali na Matai 28:19, 20, alobaki boye: “Bókende, . . . bókómisa bato bayekoli . . . , bóbatisa bango.” Kozwa batisimo ezali na ntina nini? Ezali lisɛngami mpo na kozwa bomoi ya seko. Moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli kondima ete akoki kozwa bomoi ya seko kaka mpo Yesu akufelaki biso mpe asekwisamaki. Yango wana, ntoma Petro ayebisaki bandeko na ye bakristo ete: ‘Batisimo ezali sikoyo kobikisa bino . . . na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo.’ (1 Pe. 3:21) Na yango, ntango moyekoli ya sika azwi batisimo, akoki kozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko.

2. Na kotalela 2 Timote 4:1, 2, tosengeli kozala bateyi ya lolenge nini?

2 Mpo na kokómisa bato bayekoli, tosengeli kokolisa “mayele ya koteya.” (Tángá 2 Timote 4:1, 2.) Mpo na nini? Mpo Yesu apesaki biso mitindo ete: “Bókende, . . . bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango.” Ntoma Paulo alobaki ete ‘tókangama’ na mosala yango, ‘mpo soki tosali bongo tokomibikisa, mpe tokobikisa bato oyo bazali koyoka biso.’ Yango wana, ntoma Paulo alobaki ete: ‘Tókeba na mateya na biso ntango nyonso.’ (1 Tim. 4:16) Lokola tosengeli koteya bato mpo na kokómisa bango bayekoli, mateya na biso esengeli kozala malamu mpenza.

3. Na lisolo oyo, tokolobela nini na likambo etali koyekola na bato Biblia?

3 Na mokili mobimba, toyekolaka na bamilio ya bato Biblia mbala na mbala. Kasi ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, tosengeli koyeba ndenge ya kosalisa mingi na bango bákóma bayekoli ya Yesu Kristo oyo bazwi batisimo. Na lisolo oyo, tokolobela makambo mosusu mitano oyo moteyi nyonso asengeli kosala mpo na kosalisa moyekoli akola tii azwa batisimo.

SALELÁKÁ BIBLIA NTANGO OZALI KOTEYA

Tuná ndeko moko oyo ayebi koteya malamu alakisa yo ndenge ya kosalela Biblia malamumalamu ntango ozali koteya (Talá paragrafe 4-6) *

4. Mpo nini moteyi asengeli kolobaka mingi te ntango azali koyekola na moto Biblia? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

4 Lokola tolingaka makambo oyo toteyaka, tokoki kokwea na motambo ya koloba mingi. Nzokande, kaka ndenge ezalaka mpo na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to mpe boyekoli ya Biblia na lisangá, mosakoli oyo azali koyekola na moto Biblia mpe asengeli kolobaka mingi te. Moteyi nyonso asengeli kosalela Biblia malamumalamu ntango azali koteya, yango wana, asengeli kokeba ete alobaka mingi te ata ntango bazali kolobela makambo oyo ayebi malamu mpenza. * (Yoa. 16:12) Kanisá naino, boyebi ya Biblia oyo ozalaki na yango ntango ozwaki batisimo ná oyo ozali na yango lelo, ekokani? Na ntango wana, oyebaki kaka mwa mateya oyo moto asengeli koyeba na ebandeli. (Ebr. 6:1) Esɛngaki bambula ebele mpo oyeba makambo oyo oyebi lelo, yango wana koluka te koteya moyekoli ya sika makambo nyonso na mbala moko.

5. (a) Na kotalela 1 Batesaloniki 2:13, makambo nini tolingi ete moyekoli ya Biblia akanga ntina na yango? (b) Ndenge nini tokoki kolendisa moyekoli ya Biblia alobelaka makambo oyo azali koyekola?

5 Tolingi moyekoli ayeba ete makambo oyo azali koyekola euti na Biblia. (Tángá 1 Batesaloniki 2:13.) Ndenge nini tokoki kosala yango? Lendisá moyekoli ayebisaka bato makambo azali koyekola. Na esika olimbwelaka ye bavɛrsɛ ya Biblia ntango nyonso, sɛngáká ye mpe alimbwela yo bavɛrsɛ mosusu. Salisá moyekoli amona ndenge akoki kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi na ye. Tuná ye mituna oyo ekosalisa ye abimisa makanisi mpe mayoki na ye mpo na bavɛrsɛ ya Biblia oyo azali kotánga. (Luka 10:25-28) Na ndakisa, tuná ye boye: “Ndenge nini vɛrsɛ oyo esalisi yo omona moko ya bizaleli ya Yehova?” “Ndenge nini makambo oyo oyekoli ezali kosalisa yo?” “Ndenge nini ozali komiyoka mpo na makambo outi koyekola?” (Mas. 20:5) Likambo ya ntina mingi ezali te ete moyekoli ayeba makambo mingi kasi nde alinga makambo oyo ayebi mpe asalela yango.

6. Mpo na nini ezali malamu tókendaka ná bandeko oyo bayebi koteya malamu ntango tokei koyekola na bato Biblia?

6 Ntango okendaka koyekola na bato Biblia, okendaka elongo na basakoli oyo bazali bateyi malamu? Soki okei na bango, okoki kotuna bango báyebisa yo soki oyekolaka na bato Biblia malamu, mpe soki oyebi kosalela Biblia malamu mpenza. Osengeli kozala na komikitisa soki olingi ete okóma moteyi malamu. (Talá mpe Misala 18:24-26.) Na nsima, tuná mosakoli yango oyo ayebi koteya malamu ayebisa yo soki moyekoli azali mpenza kokanga ntina ya mateya ya Biblia. Okoki mpe kosɛnga mosakoli yango akende koyekola na moto yango soki okozala te na boumeli ya pɔsɔ moko to mibale. Yango ekosala ete boyekoli ekoba kosalema mpe ekosalisa moyekoli amona ntina ya koyekola Biblia. Kokanisa ata moke te ete azali moyekoli na “yo,” mpe ete kaka yo nde osengeli koyekolaka na ye. Kutu, lokola ozali koluka bolamu ya moyekoli yango, akoki kokoba koyekola makambo mingi oyo etali solo.

MONISÁ ETE OLINGAKA MPE ONDIMAKA MAKAMBO OYO OZALI KOTEYA

Lobelá bandakisa ya bandeko oyo ekosalisa moyekoli ayeba ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na ye (Talá paragrafe 7-9) *

7. Nini ekosalisa moyekoli ya Biblia alinga makambo oyo azali koyekola?

7 Moyekoli asengeli komona ete olingaka mateya ya Biblia oyo ozali koteya mpe ondimaka yango. (1 Tes. 1:5) Na nsima, ye mpe akolinga makambo oyo azali koyekola. Ntango mosusu okoki mpe koyebisa ye ndenge mitinda ya Biblia esalisaki yo na bomoi. Na ndenge yango, akomona ete Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa mpe ye.

8. Wapi likambo mosusu oyo okoki kosala mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia, mpe mpo na nini kosala bongo ezali na ntina?

8 Ntango bozali koyekola, lobelá bandakisa ya bandeko oyo bakutanaki na mikakatano lokola oyo ya ye mpe balongaki yango. Okoki kokende elongo na ndeko moko ya lisangá oyo ndakisa na ye ekoki kosalisa moyekoli yango. Okoki mpe kotala masolo mosusu ya kolendisa na jw.org na molɔngɔ ya masolo “Biblia ebongolaka bato.” * Masolo ya ndenge wana ná bavideo ekosalisa moyekoli amona ete kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na ye ezali malamu mingi mpenza.

9. Ndenge nini okoki kolendisa moyekoli ayebisaka bandeko mpe baninga na ye makambo oyo azali koyekola?

9 Soki moyekoli na yo abalá, molongani na ye mpe ayekolaka Biblia? Soki ayekolaka te, sɛngá ye mpe aya kosangana na boyekoli. Lendisá moyekoli na yo ya Biblia ayebisaka bandeko ya libota mpe baninga na ye makambo oyo azali koyekola. (Yoa. 1:40-45) Ndenge nini okoki kosala yango? Okoki kotuna ye boye: “Ndenge nini okoki kolimbwela bandeko na yo likambo oyo?” to “Vɛrsɛ nini okoki kosalela mpo na kondimisa moninga na yo likambo oyo?” Soki osali bongo, okopesa moyekoli formasyo mpo akóma moteyi. Na nsima, soki akokisi masɛngami, akoki kobanda kobima na mosala ya kosakola lokola mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Okoki kotuna moyekoli ya Biblia soki ayebi moto moko oyo akosepela koyekola Biblia. Soki ezali bongo, sololá mbala moko na moto yango mpe yebisá ye ete olingi koyekola na ye Biblia. Lakisá ye video Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini? *

LENDISÁ MOYEKOLI AZWA BANINGA NA KATI YA LISANGÁ

Lendisá moyekoli aluka baninga na kati ya lisangá (Talá paragrafe 10-11) *

10. Ndenge 1 Batesaloniki 2:7, 8 emonisi yango, ndenge nini moteyi akoki kolanda ndakisa ya ntoma Paulo?

10 Bateyi basengeli komonisa ete bazali kolinga mpe kotyela bayekoli na bango ya Biblia likebi. Taleláká bango lokola bato oyo bakokóma bandeko na yo ya elimo na mikolo ezali koya. (Tángá 1 Batesaloniki 2:7, 8.) Ezali pɛtɛɛ te ete bátika baninga na bango ya mokili mpe básala mbongwana nyonso oyo esengeli mpo na kosalela Yehova. Tosengeli kosalisa bango bázwa baninga ya malamu na kati ya lisangá. Salá boninga ná moyekoli na yo ya Biblia. Kolekisaka ntango elongo na ye kaka te na ntango ya boyekoli kasi mpe na bantango mosusu. Kobenga ye na telefone, kotindela ye mwa mesaje, to kokende kotala ye mwa moke liboso ya mokolo oyo boyekolaka, ekomonisa ete otyelaka ye mpenza likebi.

11. Tolingi bayekoli na biso ya Biblia bázwa nini na kati ya lisangá, mpe mpo na nini?

11 Lisese moko elobaka ete: “Mosapi moko elɔkɔtaka nsili te.” Na yango, tokoki koloba ete: “Mpo moyekoli akola na elimo, bandeko ya lisangá basengeli kopesa mabɔkɔ.” Yango wana, bandeko oyo bayebi koteya malamu balakisaka bayekoli na bango epai ya bandeko mosusu ya lisangá, oyo bakoki mpe kosalisa bango bápusana penepene na Yehova. Bayekoli ya Biblia bakoki kosepela kozala esika moko na bandeko oyo bakoki kosalisa bango bálonga mikakatano mosusu mpe bákola na elimo. Tolingi moyekoli mokomoko ayoka ete azali moto ya lisangá na biso, mpe akɔti na kati ya libota ya Nzambe. Tolingi ete akɔta na libota ya bandeko na biso ya mokili mobimba oyo bamoniselanaka mpenza bolingo. Na ndenge yango, ekozala mpasi te akata boninga ná bato oyo bakoki kosalisa ye te mpo alinga Yehova. (Mas. 13:20) Soki baninga na ye ya kala baboyi ye, akoyeba ete akoki kozwa baninga ya malamu na kati ya ebongiseli ya Yehova.​—Mrk. 10:29, 30; 1 Pe. 4:4.

LOBELÁKÁ MINGI LIKAMBO ETALI KOMIPESA NA NZAMBE MPE KOZWA BATISIMO

Ezali na makambo mingi oyo moyekoli ya Biblia asengeli kosala mpo na kozwa batisimo! (Talá paragrafe 12-13)

12. Mpo na nini tosengeli koyebisaka moyekoli ya Biblia ntina ya komipesa na Nzambe mpe ya kozwa batisimo?

12 Sololáká na ye polelepolele ete asengeli komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Ntina oyo toyekolaka na moto ezali ya kosalisa ye akóma moyekoli oyo azwi batisimo. Nsima ya koyekola na moto Biblia mbala na mbala na boumeli ya mwa basanza, mpe mingimingi soki moyekoli yango abandi koyangana na makita, asengeli koyeba ete ntina ya koyekola Biblia ezali mpo na kosalisa ye akóma Motatoli ya Yehova.

13. Makambo nini moyekoli asengeli kosala mpo azwa batisimo?

13 Ezali na makambo mingi oyo moyekoli ya Biblia oyo alingi kozwa batisimo asengeli kosala! Ya liboso, moyekoli asengeli koyeba Yehova, kolinga ye, mpe komonisa kondima epai na ye. (Yoa. 3:16; 17:3) Na nsima, akokóma moninga ya Yehova mpe ya bandeko ya lisangá. (Ebr. 10:24, 25; Yak. 4:8) Nsukansuka, moyekoli asengeli koyoka mawa mpo na makambo ya mabe oyo azalaki kosala mpe kotika yango. (Mis. 3:19) Na ntango yango, kondima ekotinda ye ayebisa basusu mateya ya Biblia. (2 Ko. 4:13) Na nsima, akomipesa na Yehova mpe akomonisa yango soki azwi batisimo. (1 Pe. 3:21; 4:2) Mpe yango ezalaka mokolo ya esengo mpo na moto nyonso! Ntango moyekoli asali makambo oyo nyonso mpo na kozwa batisimo, pesá ye longonya mpe lendisá ye akoba kosala makambo ya malamu.

NSIMA YA MWA BASANZA, TALELÁKÁ BOKOLI NA YE

14. Ndenge nini moteyi akoki koluka koyeba soki moyekoli azali kokola to te?

14 Tosengeli komonisa motema molai ntango tozali kosalisa moyekoli ya Biblia mpo amipesa na Yehova mpe azwa batisimo. Kasi na bantango mosusu, tosengeli mpe koluka koyeba soki alingi kosalela Yehova Nzambe to te. Ezali na makambo oyo emonisi ete moyekoli yango azali kosala makasi atosa mitindo ya Yesu? To alingi kaka koyekola makambo ya kosepelisa oyo ezali na Biblia?

15. Makambo nini ekosalisa moteyi ayeba soki moyekoli azali kokola na elimo?

15 Mbala na mbala, taleláká bokoli oyo moyekoli azali kosala. Na ndakisa, alingaka Yehova? Abondelaka Ye? (Nz. 116:1, 2) Asepelaka kotánga Biblia? (Nz. 119:97) Ayanganaka na makita nyonso ya lisangá? (Nz. 22:22) Asali mbongwana oyo esengeli na bomoi na ye mpo na komonisa ete azali kosalela makambo oyo azali koyekola? (Nz. 119:112) Abandá koyebisa bandeko mpe baninga na ye makambo oyo azali koyekola? (Nz. 9:1) Likambo eleki ntina, alingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova? (Nz. 40:8) Soki moyekoli azali kokola na elimo te ata na moko ya makambo oyo tolobeli awa, na mayele mpenza, luká koyeba ntina oyo azali kokola te, mpe na nsima sololá na ye polelepolele kasi na boboto mpenza. *

16. Ntango nini ekoki kosɛnga ete tókata koyekola Biblia na moto?

16 Nsima ya mwa basanza, talá soki osengeli kokoba koyekola na moto to te. Omituna boye: ‘Moyekoli yango aboyaka kobongisa boyekoli? Aboyaka koyangana na makita? Aboyaka kotika mimeseno ya mabe? Azali kaka mondimi ya lingomba ya lokuta?’ Soki biyano na mituna yango ezali ɛɛ, kokoba koyekola na moto ya ndenge wana ezali lokola koluka kolakisa ndenge ya kobɛta mai na moto oyo alingaka ata litangá ya mai ezwa ye te! Soki moyekoli azali mpenza kolinga te makambo oyo azali koyekola, mpe soki azali kolinga kosala mbongwana te, mpo na nini kokoba koyekola na ye?

17. Na kotalela 1 Timote 4:16, bateyi nyonso ya Biblia basengeli kosala nini?

17 Tozwaka mokumba na biso ya kokómisa bato bayekoli na lisɛki te, mpe tolingi kosalisa bayekoli ya Biblia bákola tii bázwa batisimo. Yango wana, tosengeli kosalela Biblia ntango tozali koteya, mpe komonisa ete tozali kolinga mpe kondima makambo oyo tozali koteya. Tosengeli mpe kolendisa moyekoli ya Biblia aluka baninga na kati ya lisangá. Mpe tosengeli koyebisa ye ntina oyo asengeli komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, mpe nsima ya mwa basanza, tosengeli kotalela bokoli na ye. (Talá etanda “ Oyo bateyi basengeli kosala mpo na kosalisa bayekoli bákokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.”) Tozali na esengo ndenge tozali kopesa mabɔkɔ na mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato! Tiká ete tózwa ekateli ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyekola na bato Biblia tii bázwa batisimo.

LOYEMBO 79 Tóteya bango bátɛlɛma ngwi

^ par. 5 Ntango tozali koyekola na bato Biblia, tozali na libaku ya kosalisa bayekoli báyeba ndenge oyo Yehova alingi ete bákóma kokanisa, koyoka, mpe kosala makambo. Lisolo oyo ekolimbola malamumalamu ndenge oyo tokoki kobongisa lisusu makoki na biso ya koteya.

^ par. 4 Talá lisolo “Mitambo ya kokima ntango ozali koyekola Biblia na moto” oyo ebimaki na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala, ya sanza ya 09/2016.

^ par. 8 Kende na MAKAMBO ETALI BISO > MAKAMBO OYO BATATOLI YA YEHOVA BAKUTANAKI NA YANGO.

^ par. 9 Na jw.org®, kende na OLINGI KOYEBA BISO > SƐNGA MOTO MOKO AYA KOTALA YO.

^ par. 15 Talá masolo “Bolingo mpe botɔndi mpo na Yehova ekotinda yo ozwa batisimo” mpe “Okoki mpo na kozwa batisimo?” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 03/2020.

^ par. 77 NDIMBOLA YA ELILINGI: Nsima ya boyekoli, ndeko mwasi oyo ayebi koteya malamu azali kosalisa ndeko mwasi oyo ayekolaka na moto yango Biblia ete alobaka mingi te na ntango ya boyekoli.

^ par. 79 NDIMBOLA YA ELILINGI: Na ntango ya boyekoli, bateyi moyekoli ndenge akoki kozala mwasi malamu. Na nsima, mwasi yango azali koyebisa mobali na ye makambo oyo ayekolaki.

^ par. 81 NDIMBOLA YA ELILINGI: Moyekoli yango ná mobali na ye bazali na ndako ya moninga moko oyo bakutanaki na ye na Ndako ya Bokonzi.