Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 44

Ntango bakokola bakosalela Nzambe?

Ntango bakokola bakosalela Nzambe?

“Yesu akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.”​—LUKA 2:52.

LOYEMBO 134 Bana bazali mokumba Nzambe apesi

NA MOKUSE *

1. Ekateli nini oyo eleki malamu moto nyonso asengeli kozwa?

MBALA mingi, bikateli oyo baboti bazwaka ebongisaka to ebebisaka bomoi ya bana na bango mpo na ntango molai. Soki baboti bazwi bikateli ya mabe, ekoki kobimisela bana na bango mikakatano. Kasi soki bazwi bikateli ya malamu, ekosalisa bana na bango bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Nzokande, bana bango moko mpe basengeli kozwa bikateli ya malamu. Ekateli oyo eleki malamu oyo moto nyonso asengeli kozwa, ezali ya kosalela Yehova, Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo.​—Nz. 73:28.

2. Bikateli nini ya malamu Yesu ná baboti na ye bazwaki?

2 Baboti ya Yesu bazalaki na ekateli ya kosalisa bana na bango básalela Yehova. Makambo oyo baboti yango basalaki emonisaki ete kosalela Yehova nde ezalaki likambo eleki ntina na bomoi na bango. (Luka 2:40, 41, 52) Yesu mpe azwaki bikateli ya malamu oyo esalisaki ye akokisa mokumba oyo Yehova apesaki ye. (Mat. 4:1-10) Ntango Yesu akolaki, azalaki na boboto, na bosembo mpe na mpiko; bizaleli oyo moboti nyonso oyo abangaka Nzambe asepelaka komona epai ya mwana na ye.

3. Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna nini?

3 Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo elandi: Bikateli nini ya malamu Yehova azwaki mpo na Yesu? Baboti oyo bazali bakristo bakoki kozwa mateya nini na bikateli oyo Maria ná Yozefe bazwaki? Mpe mateya nini bilenge bakristo bakoki kozwa na bikateli oyo Yesu azwaki?

ZWÁ MATEYA NA NDAKISA YA YEHOVA

4. Ekateli nini ya ntina mingi Yehova azwaki mpo na Mwana na ye?

4 Yehova aponelaki Yesu baboti ya malamu mpenza. (Mat. 1:18-23; Luka 1:26-38) Maloba ya Maria oyo eutaki mpenza na motema, mpe oyo ekomami na Biblia, emonisi ete azalaki kolinga Yehova mpe Liloba na ye mingi mpenza. (Luka 1:46-55) Mpe ndenge oyo Yozefe atosaki makambo oyo Yehova asɛngaki ye, emonisi ete azalaki kolinga Nzambe, mpe azalaki na mposa ya kosepelisa ye.​—Mat. 1:24.

5-6. Makambo nini Yehova atikaki nzela ete ekómela Mwana na ye?

5 Kobosana te ete Yehova aponelaki Yesu te baboti oyo bazalaki na bozwi. Mbeka oyo Maria ná Yozefe bapesaki nsima ya kobotama ya Yesu, emonisi ete bazalaki babola. (Luka 2:24) Ekoki kozala ete Yozefe azalaki na mwa esika moko ya moke pembeni ya ndako na ye na Nazarete mpo na kosala mosala na ye ya mabaya. Emonani ete bazalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, mingimingi lokola bakómaki na bana nsambo to koleka.​—Mat. 13:55, 56.

6 Yehova abatelaki Yesu na makama mosusu, kasi abatelaki ye te na mikakatano nyonso. (Mat. 2:13-15) Na ndakisa, Yesu azalaki na bandeko oyo bazalaki kondimela ye te. Kanisá mpasi oyo ayokaki ntango, na ebandeli, bandeko na ye ya libota bazalaki kondima te ete azali Masiya. (Mrk. 3:21; Yoa. 7:5) Ekoki mpe kozala ete Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, akufaki ntango Yesu azalaki naino elenge. Kanisá ndenge likambo yango epesaki ye mpasi! Lokola Yesu azalaki mwana ya liboso, ntango Yozefe akufaki, ye nde asengelaki kosala mosala oyo tata na ye azalaki kosala. (Mrk. 6:3) Ntango Yesu akolaki, ayekolaki ndenge ya kobatela libota na bango. Ekoki kozala ete azalaki kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na bango. Na yango, ayebaki malamu ndenge moto alɛmbaka soki asali mosala mokolo mobimba.

Baboti, bóyebisa bana na bino makambo oyo bakoki kokutana na yango na bomoi, mpe na bolingo nyonso bóteya bango ndenge ya kotyela Biblia motema (Talá paragrafe 7) *

7. (a) Mituna nini ekosalisa babalani mpo bábɔkɔla bana na bango malamu? (b) Ndenge nini Masese 2:1-6 ekoki kosalisa baboti bábɔkɔla bana na bango malamu?

7 Soki babalani balingi kobota bana, basengeli komituna boye: ‘Tozali mpenza bato ya komikitisa, oyo balingaka Yehova mpe Liloba na ye? Yehova akoki mpenza kopona biso mpo tóbatela mwana oyo tokobota?’ (Nz. 127:3, 4) Soki ozali moboti, omituna boye: ‘Nateyaka bana na ngai báyeba ntina ya kosala mosala makasi?’ (Mos. 3:12, 13) ‘Nasalaka nyonso mpo nabatela bana na ngai na makambo oyo bakoki kokutana na yango na mokili ya Satana, oyo ekoki kobebisa nzoto mpe bizaleli na bango?’ (Mas. 22:3) Okoki te kobatela bana na yo na makama nyonso oyo bakoki kokutana na yango. Yango ekoki kosalema te. Kasi, okoki koyebisa bango makambo oyo bakoki kokutana na yango na bomoi, mpe na bolingo nyonso koteya bango ndenge ya kotyela Biblia motema. (Tángá Masese 2:1-6.) Na ndakisa, soki moto moko ya libota na bino atiki kosalela Yehova, salisá bana na yo, na nzela ya Liloba ya Nzambe, báyeba ntina oyo basengeli kotikala sembo epai ya Yehova. (Nz. 31:23) To soki moto moko oyo bolingaka mingi akufi, lakisá bana na yo bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kosalisa bango báyikela likambo yango mpiko mpe bázwa kimya.​—2 Ko. 1:3, 4; 2 Tim. 3:16.

ZWÁ MATEYA NA NDAKISA YA MARIA NÁ YOZEFE

8. Na kotalela Kolimbola Mibeko 6:6, 7, malako nini Maria ná Yozefe balandaki?

8 Lokola Maria ná Yozefe balandaki malako oyo Yehova apesá baboti, yango esalisaki bango bábɔkɔla Yesu na ndenge oyo esalaki ete Nzambe andima ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 6:6, 7.) Maria ná Yozefe bazalaki kolinga Yehova mingi, mpe mokano na bango ya libosoliboso ezalaki ya kosalisa bana na bango básala mpe bongo.

9. Bikateli nini ya ntina mingi Maria ná Yozefe bazwaki?

9 Maria ná Yozefe bazalaki na momeseno ya kosambela Yehova elongo na bana na bango. Na ntembe te, bazalaki kokende makita pɔsɔ na pɔsɔ na sinagoga ya Nazarete, mpe mbula na mbula bazalaki kokende kosala fɛti ya Elekeli na Yerusaleme. (Luka 2:41; 4:16) Ekoki kozala ete na mibembo yango, bazalaki kobɛtela Yesu ná baleki na ye lisolo ya basaleli ya Yehova. Ntango mosusu nzelanzela, bazalaki kolakisa bango bisika to bamboka oyo Makomami elobeli. Na ntembe te, ntango Maria ná Yozefe bakómaki na bana mingi, ekómaki mpasi mpo básambela Yehova mbala na mbala ndenge bamesanaki. Kasi, kanisá mapamboli oyo bazwaki ndenge balɛmbaki te! Lokola batyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso, libota na bango ezalaki makasi na elimo.

10. Mateya nini baboti oyo bazali bakristo bakoki kozwa na ndakisa ya Maria ná Yozefe?

10 Mateya nini baboti oyo babangaka Nzambe bakoki kozwa epai ya Maria ná Yozefe? Likambo eleki ntina, bómonisa bana na bino ete bolingaka Yehova mingi mpenza, ezala na maloba to na misala. Bóbosana te: likabo eleki monene oyo bokoki kopesa bana na bino ezali ya kosalisa bango bálinga Yehova. Mpe moko ya makambo ya ntina mingi oyo bokoki koteya bana ezali ya kosalisa bango báyeba ndenge ya koyekola Biblia, ya kobondela, ya kosakola, mpe ntina ya kokendaka makita. (1 Tim. 6:6) Toboyi te, bosengeli mpe kokokisaka bamposa na bango ya mosuni. (1 Tim. 5:8) Kasi bóbosana te ete, mpo bana na bino bábika ntango mokili oyo ya Satana ekobomama mpe bákɔta na mokili ya sika ya Nzambe, basengeli kozala na boyokani ya malamu ná Yehova. Kasi mbongo mpe biloko ya mosuni te nde ekobikisa bango. *​—Ezk. 7:19; 1 Tim. 4:8.

Komona ndenge ebele ya baboti oyo bazali bakristo bazali kozwa bikateli ya malamu mpo na mabota na bango, ezali mpenza kolendisa! (Talá paragrafe 11) *

11. (a) Ndenge nini toli oyo ezali na 1 Timote 6:17-19 ekoki kosalisa baboti bázwa bikateli ya malamu ntango bazali kobɔkɔla bana na bango? (b) Mikano nini libota na bino ekoki komityela mpe mapamboli nini bokoki kozwa? (Talá etanda “ Bokomityela mikano nini?”)

11 Komona ndenge ebele ya baboti oyo bazali bakristo bazali kozwa bikateli ya malamu mpo mabota na bango etikala penepene na Yehova, ezali mpenza kolendisa! Mabota yango basambelaka Yehova elongo ntango nyonso. Bakendaka na makita mpe na mayangani. Mpe basakolaka nsango malamu. Kutu, mabota mosusu bakendaka kosakola na bateritware oyo basakolá mingi te. Bamosusu mpe bakendaka kotala Babetele ya mboka na bango to bapesaka mabɔkɔ na misala ya kotonga bandako ya losambo. Mabota oyo baponaka kopesa mabɔkɔ na misala yango, basalelaka mbongo na bango moko, mpe na bantango mosusu bakutanaka na mikakatano. Atako bongo, Yehova azangaka te kopambola bango. (Tángá 1 Timote 6:17-19.) Mbala mingi, bana oyo babɔkwami na mabota ya ndenge wana bakobaka kosala makambo yango ata ntango bakómi mikóló, mpe basepelaka ndenge baboti na bango babɔkɔlaki bango ndenge wana! *​—Mas. 10:22.

ZWÁ MATEYA NA NDAKISA YA YESU

12. Makambo nini Yesu asengelaki kosala ntango azalaki kokola?

12 Yehova, Tata ya Yesu, azwaka ntango nyonso bikateli ya malamu. Baboti ya Yesu mpe awa na mabele bazwaki bikateli ya malamu. Nzokande, ntango Yesu akómaki mokóló asengelaki kozwa bikateli na ye moko. (Gal. 6:5) Ndenge moko na biso, azalaki na bonsomi ya kopona kosala oyo alingi. Akokaki kopona koluka matomba na ye moko. Kasi, aponaki nde kosala makambo oyo ekosalisa ye azala na boyokani malamu ná Yehova. (Yoa. 8:29) Ndenge nini ndakisa na ye ekoki kosalisa bilenge lelo oyo?

Bilenge, bóboya ata mokolo moko te kotosa baboti na bino (Talá paragrafe 13) *

13. Ekateli nini ya malamu Yesu azwaki ntango azalaki naino elenge?

13 Ntango Yesu azalaki mwana moke, azalaki kotosa baboti na ye. Ata mokolo moko te aboyaki kotosa baboti na ye, mpe akanisaki te ete ayebaki makambo mingi koleka bango. Kasi, akobaki “kaka komikitisa liboso na bango.” (Luka 2:51) Na ntembe te, lokola Yesu azalaki mwana ya liboso, azalaki kozwa mokumba na ye na lisɛki te. Emonani ete, ayekolaki mosala ya mabaya epai ya Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, mpo akoka kosalisa libota.

14. Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki moyekoli malamu ya Liloba ya Nzambe?

14 Ekoki kozala ete baboti ya Yesu bayebisaki ye ete abotamaki na ndenge ya likamwisi, mpe mbala mosusu bayebisaki ye makambo oyo baanzelu mpe basaleli mosusu ya Yehova balobaki mpo na ye. (Luka 2:8-19, 25-38) Yesu asukaki kaka te na makambo oyo bayebisaki ye, kasi ye moko mpe ayekolaki Makomami. Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki moyekoli malamu ya Liloba ya Nzambe? Mpo ntango azalaki naino elenge, bateyi na Yerusaleme bazalaki “se kokamwa na mayele na ye mpe na biyano na ye.” (Luka 2:46, 47) Mpe ntango Yesu akómaki na mbula 12, amonisaki polele ete Tata na ye nde Yehova.​—Luka 2:42, 43, 49.

15. Ndenge nini Yesu amonisaki ete aponaki kosala mokano ya Yehova?

15 Lokola Yesu ayebaki mokumba na ye na kati ya mokano ya Yehova, aponaki kosala oyo Yehova alingi. (Yoa. 6:38) Ayebaki ete bato mingi bakoyina ye, mpe na ntembe te, azwaki ntango ya kokanisa likambo yango malamumalamu mpenza. Atako bongo, aponaki komikitisa liboso ya Yehova. Ntango Yesu azwaki batisimo na mobu 29 ya ntango na biso, likambo ya ntina na bomoi na ye ezalaki ya kosala mokano ya Yehova. (Ebr. 10:5-7) Ata ntango Yesu azalaki konyokwama likoló ya nzete ya mpasi, azalaki kaka na ekateli makasi ya kosala mokano ya Tata na ye.​—Yoa. 19:30.

16. Liteya nini bana bakoki kozwa epai ya Yesu?

16 Tosáká baboti na yo. Ndenge moko na Maria ná Yozefe, baboti na yo mpe bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi, Yehova apesá bango mokumba ya kobatela, ya koteya, mpe ya kokamba yo. Soki ozali koyoka toli na bango mpe kotosa bokonzi na bango ndenge Yesu asalaki, ‘makambo na yo ekotambola malamu.’​—Ef. 6:1-4.

17. Na kotalela Yosua 24:15, ekateli nini bilenge basengeli kozwa?

17 Poná moto oyo okosalela. Osengeli komindimisa soki Yehova azali nani, mokano na ye ezali nini, mpe ndenge nini okoki kosala mokano na ye na bomoi na yo. (Rom. 12:2) Soki osali bongo, okozala na likoki ya kozwa ekateli oyo eleki ntina na bomoi na yo: kosalela Yehova. (Tángá Yosua 24:15; Mos. 12:1) Soki ozali kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala, okolinga Yehova lisusu mingi koleka, mpe kondima na yo epai na ye ekokóma makasi mpenza.

18. Ekateli nini bilenge basengeli kozwa, mpe ekomemela bango matomba nini?

18 Poná kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na yo. Mokili ya Satana ezali kokosa bato ete, soki basaleli makoki na bango mpo na bolamu na bango moko, bakozala na esengo. Kasi toyebi ete, baoyo bamipesaka na konduka biloko ya mokili, bamitɔbɔlaka na “ebele ya bampasi.” (1 Tim. 6:9, 10) Nzokande, soki otosi Yehova mpe oponi kotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na yo, okolonga na banzela na yo nyonso mpe “okosala makambo na bwanya.”​—Yos. 1:8.

OKOPONA KOSALA NINI?

19. Likambo nini baboti basengeli kobosana te?

19 Baboti, bósala nyonso oyo bokoki mpo na kosalisa bana na bino básalela Yehova. Bótyela ye motema, akosalisa bino bózwa bikateli ya malamu. (Mas. 3:5, 6) Bóbosana likambo oyo te: bana na bino bakolanda mingi makambo oyo bozali kosala, kasi te oyo bozali koloba. Yango wana, bózwaka bikateli oyo ekosalisa bana na bino mpo Yehova andima bango.

20. Mapamboli nini bilenge bakozwa soki baponi kosalela Yehova?

20 Bilenge, baboti na bino bakoki kosalisa bino bózwa bikateli ya malamu. Kasi bino moko nde bosengeli kozwa bikateli ya malamu mpo na kosepelisa Nzambe. Na yango, bólanda ndakisa ya Yesu, mpe bópona kosalela Tata na bino ya likoló, oyo atondi na bolingo. Soki bosali bongo, bokosala makambo mingi ya malamu na bomoi na bino mpe ekopesa bino esengo sikoyo. (1 Tim. 4:16) Mpe na mikolo ezali koya, bokozala na bomoi ya esengo mpenza!

LOYEMBO 133 Tósalela Yehova na bolenge na biso

^ par. 5 Baboti oyo bazali bakristo balingaka ete ntango bana na bango bakokola bázala na esengo mpe básalela Yehova. Baboti basengeli kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bákokisa mokano yango? Bikateli nini bilenge bakristo basengeli kozwa mpo bálonga mpenza na bomoi na bango? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango.

^ par. 10 Talá buku Le culte pur de Jéhovah​—enfin rétabli!, nk. 69-70, par. 17-18.

^ par. 11 Talá etanda “Nandimaki te ete nakokaki kozala na baboti ya malamu boye” na Lamuká! ya 10/2011, lok. 20; mpe lisolo “Mokanda ya ntina mingi oyo bana bakomeli baboti na bango” na Lamuká! ya 08/03/1999, lok. 25, na Français.

^ par. 66 NDIMBOLA YA BILILINGI: Na ntembe te, ntango Yesu azalaki naino elenge, Maria asalisaki ye alinga Yehova na motema mobimba. Lelo oyo mpe, bamama bakoki kosalisa bana na bango bálinga Yehova na motema na bango mobimba.

^ par. 68 NDIMBOLA YA BILILINGI: Yozefe azalaki kosepela kokende na sinagoga ná libota na ye. Lelo oyo mpe, batata basepelaka kokende makita elongo na mabota na bango.

^ par. 70 NDIMBOLA YA BILILINGI: Yesu ayekolaki mosala ya mabɔkɔ epai ya tata na ye. Lelo oyo mpe, bilenge bakoki koyekola misala ndenge na ndenge epai ya batata na bango.