Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bayisraele ya ntango ya kala bazalaki kokende na bitumba—Mpo na nini biso tokendaka na bitumba te?

Bayisraele ya ntango ya kala bazalaki kokende na bitumba—Mpo na nini biso tokendaka na bitumba te?

MOKONZI moko ya basoda ya Banazi agangelaki etuluku moko ya Batatoli ya Yehova na Etumba ya Mibale na mokili mobimba boye: “Soki moto moko kati na bino aboyi kokende kobunda na France to na Angleterre, bino nyonso bosengeli kokufa!” Atako basoda ya Banazi batɛlɛmaki pene na bango, kasi ata ndeko na biso moko te andimaki kobuka mibeko ya Yehova. Esɛngaki mpenza kozala na mpiko mpo na kosala bongo! Ndakisa oyo emonisi polele ndenge oyo biso Batatoli ya Yehova totalelaka bitumba: Toboyaka kokende na bitumba ya mokili oyo. Ata ntango bato balobaka ete bakoboma biso soki toboyi kokende kobunda, toboyaka kokɔta na kowelana ya mokili oyo.

Nzokande, bato nyonso te oyo bamibengaka bakristo nde bandimaka likambo yango. Mingi na bango bandimaka ete mokristo akoki mpe asengeli kobundela ekólo na ye. Bakoki kokanisa boye: ‘Bayisraele ya kala bazalaki basaleli ya Nzambe mpe bazalaki kobunda; kasi mpo na nini lelo oyo bakristo bakendaka na bitumba te?’ Okopesa eyano nini? Okoki kolimbwela bango ete makambo ya Bayisraele ya kala ekesanaki mpenza na oyo ya basaleli ya Nzambe lelo oyo. Tokolobela makambo mitano oyo emonisi bokeseni yango.

1. BASALELI NYONSO YA NZAMBE BAZALAKI NA KATI YA EKÓLO MOKO

Na ntango ya kala, Yehova aponaki ekólo Yisraele mpo ezala bato na ye. Abengaki Bayisraele “eloko [na ye] moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso.” (Kob. 19:5) Nzambe apesaki mpe bango teritware moko. Yango wana, ntango Nzambe apesaki Bayisraele mitindo ya kobunda na bikólo mosusu, bazalaki kobundisa to koboma te basaleli mosusu ya Yehova. *

Lelo oyo, basaleli ya Yehova bauti na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Em. 7:9) Soki basaleli ya Nzambe basengelaki kokende na bitumba, bakokaki kobundisa to koboma bandeko na bango bakristo.

2. YEHOVA AZALAKI KOPESA BAYISRAELE MITINDO ETE BÁKENDE NA BITUMBA

Na ntango ya kala, Yehova nde azalaki kokata ntango nini mpe mpo na nini Bayisraele basengelaki kokende kobunda. Na ndakisa, Nzambe apesaki Yisraele mitindo ya kobunda na Bakanana mpo na kopesa bango etumbu, mpo Bakanana bayebanaki lokola bato oyo bamipesá na losambo ya bademo, pite, mpe bazalaki kopesa bana na bango mbeka na mɔtɔ. Yehova apesaki Bayisraele mitindo ya koboma bato oyo bazalaki kosala makambo wana ya mabe na Mokili ya Ndaka, mpo bango mpe básala makambo yango te. (Lev. 18:24, 25) Nsima ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, na bantango mosusu Nzambe azalaki kopesa bango nzela ya kobunda na banguna na bango mpo na kobatela Yisraele. (2 Sa. 5:17-25) Kasi, Yehova atikaki soki moke te ete Bayisraele bango moko bázwaka ekateli ya kokende kobunda. Ntango bazalaki kosala makambo oyo Nzambe apesaki bango mitindo te, mbala mingi makambo ya mabe ezalaki kokómela bango.​—Mit. 14:41-45; 2 Nt. 35:20-24.

Lelo oyo, Yehova apesi bato nzela te ya kokende na bitumba. Bato ya bikólo babundaka mpo na koluka matomba na bango moko, kasi ya Nzambe te. Babundaka mpo balingaka kozwa bateritware, mbongo, to kolendisa makambo ya politiki. Kasi, ezali boni mpo na baoyo balobaka ete babundaka mpo na nkombo ya Nzambe, mpe mpo na kobatela losambo na bango to koboma banguna ya Nzambe? Yehova akobatela basaleli na ye ya sembo mpe akoboma banguna na ye na mikolo ezali koya, elingi koloba, na etumba ya Armagedone. (Em. 16:14, 16) Na etumba yango, limpinga ya Nzambe ekosalema na baanzelu, kasi te na basaleli na ye oyo bazali bato.​—Em. 19:11-15.

3. BAYISRAELE BAZALAKI TE KOBOMA BATO OYO BAZALAKI KONDIMELA YEHOVA

Nzambe abundelaka ekólo moko lelo oyo ndenge abundelaki Yisraele na Yeriko?

Na ntango ya kala, na bantango mosusu, limpinga ya basoda ya Bayisraele bazalaki koyokela baoyo bazalaki kondimela Nzambe mawa mpe bazalaki koboma kaka baoyo Yehova amonaki malamu bábomama. Tózwa bandakisa mibale. Atako Yehova apesaki mitindo ya kobebisa Yeriko, Bayisraele babatelaki Rahaba mpe bato ya ndako na ye na bomoi mpo na kondima na ye. (Yos. 2:9-16; 6:16, 17) Na nsima, engumba mobimba ya Gibeone ebatelamaki ntango Bagibeone bamonisaki ete bazalaki kobanga Nzambe.​—Yos. 9:3-9, 17-19.

Lelo oyo, bikólo oyo ebundaka emonisaka te motema mawa epai ya baoyo bamonisaka kondima. Lisusu, na bantango mosusu, bato oyo basali likambo te nde babomamaka ntango bikólo oyo ezali koyokana te ezali kobunda.

4. BAYISRAELE BASENGELAKI KOTOSA MIBEKO YA NZAMBE NA OYO ETALI BITUMBA

Na ntango ya kala, Yehova azalaki kosɛnga basoda ya Yisraele bátosa mibeko na ye na oyo etali bitumba. Na ndakisa, na bantango mosusu Nzambe azalaki kosɛnga bango báyebisa banguna na bango makambo oyo basengeli kosala mpo “kimya ezala.” (Mib. 20:10) Yehova azalaki mpe kosɛnga basoda ya Yisraele bámibatela mpe bábatela kaa na bango pɛto na kolanda mibeko na ye. (Mib. 23:9-14) Atako bikólo oyo ezalaki zingazinga ezalaki ntango nyonso kobebisa basi oyo bazalaki kokanga na bitumba, Yehova azalaki kopesa Bayisraele nzela te ya kosala bongo. Kutu, bakokaki te kobala mwasi oyo bakangaki na etumba tii sanza moko ekosila, nsima ya kobɔtɔla engumba moko.​—Mib. 21:10-13.

Lelo oyo, bikólo mingi endimá kotosa mibeko ya boyokani oyo bikólo mingi esalá na mokili mobimba na oyo etali bitumba. Atako ezalaka na makanisi ya kobatela bana-mboka, likambo ya mawa, mbala mingi bakonzi babukaka mibeko yango.

5. NZAMBE AZALAKI KOBUNDELA EKÓLO NA YE

Bitumba oyo bato ya bikólo babundaka lelo oyo ebatelaka na bomoi baoyo bazali sembo ndenge etumba ya Yehova na Yeriko ebatelaki Rahaba ná libota na ye na bomoi?

Na ntango ya kala, Yehova azalaki kobundela Bayisraele, mpe mbala mingi azalaki kosala ete bálonga banguna na bango na ndenge ya likamwisi. Na ndakisa, ndenge nini Yehova asalisaki Bayisraele mpo bálonga kokweisa engumba Yeriko? Na litambwisi ya Yehova, ntango kaka Bayisraele “babandaki kobɛta ntangwa makasi ya etumba, efelo yango ebandaki kokwea mobimba na nse,” yango esalaki ete ezala pɛtɛɛ mpo bázwa engumba yango. (Yos. 6:20) Kasi ndenge nini balongaki Baamore na etumba? “Yehova akweiselaki bango mabanga minene uta na likoló . . . Baoyo bakufaki na mbula ya mabanga bazalaki mingi koleka baoyo bana ya Yisraele babomaki na mopanga.”​—Yos. 10:6-11.

Lelo oyo, Yehova abundelaka te ekólo moko awa na mabele. Bokonzi na ye oyo Yesu azali Mokonzi, “ezali ya mokili oyo te.” (Yoa. 18:36) Nzokande, Satana nde azali na bokonzi likoló ya baguvɛrnema nyonso ya bato. Bitumba ya nsɔmɔ oyo esalemaka na mokili emonisaka elimo mabe ya Satana.​—Luka 4:5, 6; 1 Yoa. 5:19.

BAKRISTO YA SOLO BAZALI BATO OYO BATYAKA KIMYA

Ndenge tomoni yango, makambo na biso lelo oyo ekeseni mpenza na oyo ya Bayisraele ya kala. Kasi, bokeseni yango ezali kaka te bantina oyo tokendaka na bitumba te. Na ndakisa, Nzambe asakolaki ete na mikolo ya nsuka, baoyo bakoteyama na ye “bakoyekola mpe etumba lisusu te,” yango wana basengeli mpe te kopesa yango mabɔkɔ. (Yis. 2:2-4) Longola yango, Kristo alobaki ete bayekoli na ye basengeli “[kozala] bato ya mokili te”; basengeli koboya kokɔta na kowelana ya mokili oyo.​—Yoa. 15:19.

Kristo asɛngaki mpe bayekoli na ye básuka kaka wana te. Ateyaki bango ete báboya ezaleli ya kobomba mabe na motema, nkanda, mpe bitumba. (Mat. 5:21, 22) Longola yango, ateyaki bayekoli na ye bázala “bato oyo batyaka kimya” mpe bálingaka banguna na bango.​—Mat. 5:9, 44.

Kasi ezali boni mpo na mokomoko na biso? Atako tozalaka na mposa te ya kobunda bitumba, kasi tomonaka ete ndeko moko na lisangá azali monguna na biso? Tiká tókoba kosala makasi mpo na kolongola bizaleli ya ndenge wana na motema na biso.​—Yak. 4:1, 11.

Tomikɔtisaka te na kowelana ya bikólo. Kasi tosalaka makasi tózala na kimya mpe tózala na bolingo na kati na biso. (Yoa. 13:34, 35) Tiká tózala na ekateli ya koboya kokɔta na makambo ya mokili, wana tozali kozela na mposa makasi mokolo oyo Yehova akosilisa bitumba nyonso mpo na libela.​—Nz. 46:9.

^ Na bantango mosusu, mabota ya Bayisraele bazalaki kobunda bango na bango, atako bitumba yango ezalaki kosepelisa Yehova te. (1 Bak. 12:24) Kasi, na bantango mosusu, Nzambe azalaki kotika bango báwelana bongo mpo mabota mosusu bazalaki kopesa ye mokɔngɔ, to kosala masumu ya minene.​—Bas. 20:3-35; 2 Nt. 13:3-18; 25:14-22; 28:1-8.