Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 43

Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi

Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi

“Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi na balabala. Ezali se kobimisa mongongo na yango na bisika minene ya bato nyonso.”​—MAS. 1:20.

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

NA MOKUSE *

1. Na kotalela Masese 1:20, 21, bato mingi basalaka nini mpo na toli ya bwanya oyo ezali na Biblia?

 NA BIKÓLO mingi, tomonaka bandeko na biso ya basi mpe ya mibali batɛlɛmi na bisika oyo bato balelaka mingi. Bazalaka na esengo mpe bapesaka bato mikanda ya kotánga. Tokanisi ete yo mpe osilá kosala yango. Soki osilá kosala yango, kozanga ntembe okanisaki liloba ya elilingi oyo ezali na mokanda ya Masese, elingi koloba, bwanya oyo ezali koganga na bisika ya bato nyonso mpo bato báyoka toli na yango. (Tángá Masese 1:20, 21.) Biblia mpe mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia ezali na “bwanya ya solosolo,” elingi koloba, bwanya ya Yehova. Yango ezali na nsango oyo bato basengeli na yango mpo na kozwa bomoi ya seko. Tosepelaka ntango moto moko andimi kozwa moko ya mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Kasi bato nyonso te nde bandimaka yango. Bato mosusu basepelaka te koyeba makambo oyo Biblia eteyaka. Basusu basɛkaka biso. Bakanisaka ete Biblia esilá ngala. Kutu bamosusu batyolaka mateya ya Biblia na oyo etali bizaleli ya bato, balobaka ete baoyo batosaka yango bazalaka makambo makasimakasi mpe basambisaka basusu. Atako bongo, na bolingo nyonso Yehova azali kokoba kopesa bwanya ya solosolo na moto nyonso. Na ndenge nini?

2. (a) Epai wapi tokoki kozwa bwanya ya solosolo lelo oyo? (b) Bato mingi baponaka kosala nini?

2 Yehova asalelaka Biblia, Liloba na ye mpo na kopesa bwanya ya solosolo. Moto nyonso akoki kozala na Biblia. Kasi ezali boni mpo na mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia? Na lisalisi ya Yehova, mikanda yango ebimaka na minɔkɔ koleka 1 000. Baoyo bayokaka yango, elingi koloba, baoyo batángaka mpe basalelaka makambo oyo bayekolaka, bazwelaka yango matomba. Kasi, bato mingi balingaka te koyoka bwanya ya solosolo. Ntango bazwaka bikateli, bazwaka yango na kotalela makanisi na bango moko to balandaka makanisi ya baninga na bango bato. Na bantango mosusu, batyolaka biso mpo tolandaka makambo oyo Biblia elobi. Lisolo oyo ekolobela ntina oyo bato basalaka bongo. Na yango, tiká tólobela naino ndenge tokoki kozwa bwanya oyo euti na Yehova .

BOYEBI YA YEHOVA EPESAKA BWANYA

3. Bwanya ya solosolo esɛngaka nini?

3 Bwanya ekoki kozala likoki ya kosalela makambo oyo toyebi mpo na kozwa bikateli ya malamu. Kasi, bwanya ya solosolo esuki kaka wana te. Yango wana, Biblia elobi: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya, mpe boyebi ya Oyo Aleki Bosantu, yango nde mayele.” (Mas. 9:10) Na yango, soki tolingi kozwa ekateli moko ya ntina, tosengeli kolanda makanisi ya Yehova to “boyebi ya Oyo Aleki Bosantu.” Tokoki kosala yango soki tozali kotánga Biblia mpe mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Ntango tosalaka yango, tomonisaka bwanya ya solosolo.​—Mas. 2:5-7.

4. Mpo na nini bwanya ya solosolo ekoki kaka kouta epai ya Yehova?

4 Bwanya ya solosolo ekoki kaka kouta epai ya Yehova. (Rom. 16:27) Mpo na nini tokoki koloba ete bwanya eutaka epai ya Yehova? Ya liboso, mpo azali Mozalisi mpe ayebi makambo nyonso etali bozalisi. (Nz. 104:24) Ya mibale, makambo nyonso oyo Yehova asalaka emonisaka ete azali na bwanya. (Rom. 11:33) Ya misato, baoyo nyonso basalelaka toli ya bwanya ya Yehova, bazwelaka yango matomba. (Mas. 2:10-12) Soki tolingi kozala na bwanya ya solosolo, tosengeli kondima makambo wana misato ya moboko mpe kotika yango etambwisa biso ntango tolingi kozwa bikateli to kosala likambo moko.

5. Lokola bato baboyi kondima ete bwanya ya solosolo eutaka epai ya Yehova, yango ebimisi makambo nini?

5 Bato mingi oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola bandimaka ete biloko oyo bamonaka zingazinga na bango na mokili ezalaka kitoko. Kasi balobaka ete Mozalisi azali te mpe balobaka ete biloko nyonso ebimá kaka yango moko. Basusu oyo tokutanaka na bango balobaka ete bandimelaka Nzambe, kasi balobaka ete Biblia esilá ngala mpe baponaka kosala makambo na ndenge na bango moko. Yango ebimisi makambo nini? Mokili ezali esika eleki malamu lokola bato bazali kotyela bwanya na bango moko motema na esika ya kotyela bwanya ya Nzambe motema? Basili kozwa esengo to elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya? Makambo oyo tozali komona zingazinga na biso endimisi biso bosolo ya maloba oyo: “Bwanya ezali te, bososoli ezali te, toli mpe te wana ezali kotɛmɛla Yehova.” (Mas. 21:30) Yango ezali kolendisa biso tókoba kosɛnga Yehova apesa biso bwanya ya solosolo. Kasi, likambo ya mawa, bato mingi bazali kosala bongo te. Mpo na nini?

NTINA OYO BATO BABOYI BWANYA YA SOLOSOLO

6. Na kotalela Masese 1:22-25, banani balingaka te koyoka mongongo ya bwanya ya solosolo?

6 Bato mingi balingaka te koyoka ntango bwanya ya solosolo “ezali se koganga makasi na balabala.” Biblia elobi ete ezali na bituluku misato ya bato oyo baboyi kozala na bwanya, elingi koloba, ‘bato oyo bazangi mayele,’ “basɛki,” mpe “bazoba.” (Tángá Masese 1:22-25.) Tiká tótalela malamumalamu bizaleli oyo esalaka ete bato yango báboya bwanya oyo euti epai ya Nzambe mpe ndenge oyo tokoki koboya komonisa bizaleli yango.

7. Mpo na nini bato mosusu baponaka kotikala “bato oyo bazangi mayele”?

7 ‘Bato oyo bazangi mayele’ ezali bato oyo bandimaka makambo nyonso oyo bayoki mpe bakosamaka na pɛtɛɛ nyonso. (Mas. 14:15.) Bato ya ndenge wana tokutanaka na bango mbala na mbala na mosala ya kosakola. Na ndakisa, kanisá bamilio ya bato oyo bakosamaka na bakonzi ya mangomba mpe ya politiki. Basusu bayokaka mpasi na motema ntango bayebaka ete bakonzi yango bakosaki bango. Kasi, baoyo mokanda ya Masese 1:22 elobeli baponaka kotikala bato oyo bazangi mayele mpo balingaka kozala bongo. (Yir. 5:31) Basalaka makambo oyo balingaka mpe balingaka te koyekola makambo oyo Biblia elobi to kotosa mibeko na yango. Bato mingi bamiyokaka lokola mwasi moko oyo amipesá na makambo ya losambo na engumba Québec, na Canada, oyo alobaki na Batatoli mibale oyo bayaki kotala ye boye: “Soki sango azali kokosa biso, ekozala foti na ye, kasi ya biso te!” Na ntembe te, tolingaka te komekola baoyo balingaka kotikala bato oyo bazangi mayele!​—Mas. 1:32; 27:12.

8. Nini ekosalisa biso tókóma na bwanya?

8 Yango wana, Biblia elendisi biso tótikala te bato oyo bazangi mayele, kasi “[tókóma] mikóló na makoki [na biso] ya kososola.” (1 Ko. 14:20) Tokómaka na bwanya ntango tosalelaka mitinda ya Biblia na bomoi na biso. Mokemoke, toyekolaka naino ndenge mitinda yango esalisaka biso tókima mikakatano mpe tózwa bikateli ya malamu. Ezali malamu kokanisa mpo na bikateli oyo tozwaka. Soki toyekolaka Biblia mpe toyanganaka na makita eleki mwa bantango, tokoki komituna ntina oyo tozali kaka te komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Soki tosili kozwa batisimo, tosalaka milende mpo na kokolisa makoki na biso ya kosakola mpe ya koteya nsango malamu? Bikateli oyo tozwaka emonisaka ete mitinda ya Biblia nde etambwisaka biso? Tomonisaka bizaleli ya bokristo na boyokani na biso ná bato mosusu? Soki esɛngi tósala mbongwana, tosengeli kotya likebi na makundweli ya Yehova, oyo ‘ekómisaka bato oyo bazangi mayele bato ya bwanya.’​—Nz. 19:7.

9. Ndenge nini “basɛki” bamonisaka ete baboyi kozala na bwanya?

9 Etuluku ya mibale ya bato oyo balingaka te bwanya oyo euti na Nzambe ezali “basɛki.” Na bantango mosusu, tokutanaka na bato ya ndenge wana na mosala ya kosakola. Batyolaka biso. (Nz. 123:4) Biblia esakolaki ete na mikolo ya nsuka, ekozala na ebele ya basɛki. (2 Pe. 3:3, 4) Lokola mibali ya bana ya moyengebene Lota, lelo oyo bato mosusu batyaka te likebi na makebisi ya Nzambe. (Eba. 19:14) Bato mingi basɛkaka baoyo basalelaka mitinda ya Biblia na bomoi na bango. Basɛki yango batambwisamaka na “bamposa na bango ya makambo ya kotyola Nzambe.” (Yuda 7, 17, 18) Ndenge Biblia elobeli basɛki yango ekokani na makambo oyo bapɛngwi basalaka mpe bato mosusu oyo baboyá na bango Yehova!

10. Ndenge Nzembo 1:1 emonisi yango, tokoki kosala nini mpo tókóma basɛki te?

10 Tokoki kosala nini mpo tókóma basɛki te? Tosengeli koboya kosala boninga na bato oyo bamilelalelaka mpo na likambo nyonso. (Tángá Nzembo 1:1.) Yango elimboli ete toyokaka te to totángaka te makambo nyonso ya bapɛngwi. Soki tozali ekɛngɛ te, tokoki na pɛtɛɛ nyonso kokóma na makanisi ya mabe mpe kobanda kotɛmɛla Yehova mpe malako oyo tozwaka na ebongiseli na ye. Mpo na koboya makanisi wana, tokoki komituna boye: ‘Namilelalelaka ntango nyonso ntango tozwaka malako ya sika to ndimbola ya sika ya mateya? Nalukaka mabunga ya baoyo bazali kokamba biso?’ Soki tosali nokinoki mpe totiki kosala bongo, Yehova akosepela na biso.​—Mas. 3:34, 35.

11. Ndenge nini “bazoba” batalelaka mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe?

11 Etuluku ya misato ya bato oyo balingaka te bwanya oyo euti na Nzambe ezali “bazoba.” Bazali bazoba mpo baboyaka kozala na bomoi oyo eyokani na mibeko ya Nzambe na oyo etali malamu ná mabe. Basalaka makambo oyo bamonaka ete ezali malamu na miso na bango moko. (Mas. 12:15) Bato yango baboyaka Yehova, Ye oyo apesaka bwanya. (Nz. 53:1) Ntango tokutanaka na bango na mosala ya kosakola, bazalaka na nkanda mpe batyolaka biso ntango nyonso mpo totosaka mibeko ya Nzambe. Kasi bakoki te kopesa biso bomoi ya malamu. Yango wana, Biblia elobi: “Bwanya ya solo ezali likoló mingi; akofungola monɔkɔ na ye na porte te.” (Mas. 24:7) Bazoba yango bazalaka ata na toli moko te ya malamu ya kopesa. Yango wana, Yehova asɛngi biso ete ‘tólongwa liboso ya bazoba’!​—Mas. 14:7.

12. Nini ekosalisa biso tósala te makambo lokola bazoba?

12 Na kokesana na baoyo bayinaka bwanya oyo euti na Nzambe, tolingaka banzela ya Nzambe, oyo esangisi mibeko na ye na oyo etali malamu ná mabe. Tokoki lisusu kolinga mibeko yango soki tozali kokokanisa mbuma oyo kotosa mibeko yango ebimisaka ná mbuma oyo koboya kotosa yango ebimisaka. Taláká mikakatano ndenge na ndenge oyo ekómelaka bato mpo baboyaka na bozoba nyonso toli ya bwanya oyo Yehova apesaka. Na nsima, talelá bomoi malamu oyo ozali na yango mpo ozali kotosa Nzambe.​—Nz. 32:8, 10.

13. Yehova atindikaka biso na makasi tótosa toli ya bwanya oyo apesaka biso?

13 Yehova apesi moto nyonso likoki ya kozala na bwanya na ye, kasi atindikaka bato na makasi te bándima yango. Nzokande, amonisi mbuma mabe oyo eutaka na koboya koyoka bwanya na ye. (Mas. 1:29-32) Baoyo baboyaka kotosa Yehova “bakolya mbuma ya nzela na bango.” Kendekende, lolenge ya bomoi na bango ekomemela bango eloko moko ya malonga te kasi nde mitungisi, bampasi, mpe nsukansuka liwa. Nzokande, baoyo bayokaka toli ya bwanya oyo Yehova apesaka mpe basalelaka makambo oyo toli yango elobaka, Yehova alaki bango boye: “Moto oyo azali koyokela ngai, akofanda na kimya mpe akotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.”​—Mas. 1:33.

BWANYA YA SOLOSOLO EPESAKA BISO MATOMBA

Kopesaka biyano na makita ekómisaka biso makasi na elimo (Talá paragrafe 15)

14-15. Mateya nini tozwi na Masese 4:23?

14 Ntango tosalelaka bwanya ya Nzambe, tozwelaka yango matomba ntango nyonso. Ndenge touti koyekola yango, Yehova apesi moto nyonso likoki ya kozwa ofele bwanya na ye. Na ndakisa, na mokanda mobimba ya Masese, apesi ebele ya batoli oyo ekosala ete bomoi na biso ekóma lisusu malamu soki tosaleli yango. Tiká tótalela bandakisa minei mpamba ya toli yango ya bwanya.

15 Batelá motema na yo ya elilingi. Biblia elobi: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.” (Mas. 4:23) Kanisá makambo oyo tosengeli na yango mpo na kobatela motema na biso ya solosolo. Tosengeli kolyaka bilei ya malamu, kosalaka ngalasisi mbala na mbala, mpe koboya bizaleli ya mabe. Ezali mpe bongo mpo na kobatela motema na biso ya elilingi. Mokolo na mokolo totángaka Liloba ya Nzambe mpo na kolya na elimo. Tomibongisaka mpo na koyanganaka mpe kosanganaka na makita ya lisangá. Tokolisaka mbala na mbala makoki na biso na mosala ya kosakola. Mpe toboyaka kozala na mimeseno ya mabe ntango tozalaka ekɛngɛ na makambo nyonso oyo ekoki kobebisa makanisi na biso, na ndakisa, kominanola ya mbindo mpe baninga mabe.

Kotalela mbongo na ndenge ebongi esalisaka biso tósepela na biloko oyo tozali na yango (Talá paragrafe 16)

16. Mpo nini Masese 23:4, 5 esalisaka biso mingi mpenza lelo oyo?

16 Sepeláká na biloko oyo ozali na yango. Biblia epesi toli oyo: “Koboma nzoto te mpo na kozwa bomɛngo. . . . Obwaki miso na yo kuna, nzokande ezali eloko te? Mpo ya solo, emisalelaka mapapu lokola oyo ya mpongo mpe epumbwaka mosika na likoló.” (Mas. 23:4, 5) Bato bakoki kobungisa mbongo to biloko na bango na pɛtɛɛ nyonso. Kasi, ezala bazwi mpe babola bamitungisaka mingi mpo na koluka mbongo. Yango wana, mbala mingi basalaka makambo oyo ebebisaka lokumu na bango, boyokani na bango, ata mpe bokolɔngɔnɔ na bango ya nzoto. (Mas. 28:20; 1 Tim. 6:9, 10) Nzokande, bwanya esalisaka biso tótalelaka mbongo na bokatikati. Kotalela mbongo bongo ebatelaka biso na lokoso mpe esalisaka biso tósepela na biloko oyo tozali na yango mpe tózala na esengo.​—Mos. 7:12.

Kokanisa liboso ya koloba esalisaka biso tóboya kozokisa basusu na maloba na biso (Talá paragrafe 17)

17. Ndenge Masese 12:18 emonisi yango, ndenge nini tokoki kozwa “lolemo ya bato ya bwanya”?

17 Kanisáká liboso ya koloba. Soki tokebi te, tokoki kozokisa basusu na maloba na biso. Biblia elobi: “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.” (Mas. 12:18) Tobatelaka kimya ntango baboyaka kolobela mabe ya basusu. (Mas. 20:19) Mpo maloba na biso ebikisa na esika ya kozokisa basusu, tosengeli kotondisa motema na biso na boyebi ya Liloba ya Nzambe. (Luka 6:45) Ntango tomanyolaka makambo oyo Biblia elobi, maloba na biso ekoki kozala lokola “liziba ya bwanya” oyo ebɔndisaka to elendisaka basusu.​—Mas. 18:4.

Kotosa malako ya ebongiseli ya Yehova ekoki kosalisa biso tóbongisa lisusu lolenge na biso ya kosakola (Talá paragrafe 18)

18. Ndenge nini kosalela Masese 24:6 esalisaka biso na mosala ya kosakola?

18 Tosáká malako. Biblia epesi toli oyo ebongi: “Mpo okosala etumba na yo na likoki ya koyeba kotambwisa makambo, mpe soki bapesi-toli bazali ebele lobiko ezali.” (Mas. 24:6) Tótalela ndenge kosalela etinda yango esalisaka biso tólonga na mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya. Na esika ya kosakola mpe koteya na lolenge na biso moko, tomekaka kolanda mayele oyo bapesaka biso. Tozwaka malako ya bwanya na makita ya lisangá, epai bapesi-toli ya malamu basalaka badiskur oyo eutaka na Biblia mpe basalaka badevuare mpo na kopesa biso formasyo. Longola yango, ebongiseli ya Yehova epesaka bisaleli oyo ebongi, elingi koloba, mikanda mpe bavideo, oyo ekoki kosalisa bato báyeba makambo oyo ezali na Biblia. Osalaka makasi mpo na koyeba kosalela bisaleli yango malamumalamu?

19. Na kotalela Masese 3:13-18, oyokaka ndenge nini mpo na bwanya oyo Yehova apesaka?

19 Tángá Masese 3:13-18. Tozali na botɔndi mpo na toli wana ya malamu oyo ezali na Liloba ya Nzambe! Tokoki kozala na bomoi ya esengo te kozanga toli ya Nzambe! Na lisolo oyo, tozongeli mwa bandakisa ya toli ya bwanya oyo ezwami na mokanda ya Masese. Ya solo, Biblia mobimba etondi na batoli oyo euti na Yehova. Tiká tózala na ekateli ya kosalela ntango nyonso toli ya bwanya oyo Yehova apesaka biso. Ndenge oyo mokili etalelaka bwanya ya ndenge wana ezali na ntina te mpo na biso; tondimisami ete “baoyo bakangi [bwanya] makasi bakobengama bato ya esengo.”

LOYEMBO 36 Batelá motema na yo

^ Bwanya oyo Yehova apesaka eleki mosika eloko nyonso oyo mokili elaki kopesa. Na lisolo oyo, tokotalela liloba oyo ezali kobenda likebi na mokanda ya Masese, elingi koloba, bwanya oyo ezali se koganga na mongongo makasi na bisika ya bato nyonso. Tokolobela ndenge oyo tokoki kokóma na bwanya, ntina oyo bato mosusu balingaka te koyoka bwanya ya Yehova, mpe matomba oyo tozwaka ntango toyokaka bwanya na ye.