Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elilingi oyo ezali komonisa estrade mpe elamba moko ya monene na likoló na yango

Mobu 1922—Eleki sikoyo mbula nkama moko

Mobu 1922—Eleki sikoyo mbula nkama moko

“NZAMBE . . . azali kopesa biso bolongi na nzela ya . . . Yesu Kristo.” (1 Ko. 15:57) Maloba wana eponamaki mpo ezala mokapo ya mobu 1922, endimisaki Bayekoli ya Biblia ete bosembo na bango ekofutama. Na mobu yango, Yehova apambolaki basakoli wana ya molende. Apambolaki bango wana babandaki konyata babuku na bango moko na masini, kokangisa yango mpe kosalela radio mpo na kopanza mateya ya solo oyo etali Bokonzi. Na nsima na mobu 1922, emonanaki lisusu polele ete Yehova azalaki kopambola basaleli na ye. Bayekoli ya Biblia bazalaki na likoki ya koyangana na liyangani oyo etiká nsango oyo esalemaki na Cedar Point, na Ohio, na États-Unis. Makambo oyo esalemaki na liyangani yango esalaki ete mosala ya ebongiseli ya Yehova ekende liboso tii lelo oyo.

“LIKANISI MOKO MALAMU MPENZA”

Lokola bandeko basi mpe mibali bazalaki kosakwela bato mingi, bato bakómaki na mposa ya mikanda mingi. Bandeko ya Betele ya Brooklyn bazalaki kobimisa bazulunalo, kasi bazalaki kaka kosalela bamasini ya bakompanyi mpo na kobimisa babuku yango. Na nsima, mpo na mwa basanza, bakompanyi yango ezalaki kobimisa mikanda mingi te mpo na kosalela na mosala ya kosakola. Yango wana, ndeko Rutherford atunaki ndeko Robert Martin, oyo azalaki kokamba mosala ya konyata mikanda na masini, soki bakoki kobanda konyata mikanda bango moko.

Izini ya Balabala ya Concord na Brooklyn, na New York

Ndeko Martin alobaki boye: “Ezalaki likanisi moko malamu mpenza, elingi koloba koluka mpe kosomba bamasini oyo ekobanda kobimisa mikanda.” Bandeko bazalaki kofutela esika moko na Balabala Concord, nimero 18 na Brooklyn mpe bazwaki bisaleli oyo bazalaki na yango mposa.

Bato nyonso te nde basepelaki na likanisi oyo bandeko bazwaki ya konyata mikanda bango moko. Mokambi ya kompanyi moko oyo ezalaki konyata mikanda na biso ayaki kotala bamasini yango ya sika, mpe alobaki boye: “Bozali na bisaleli ya malamu mpenza mpo na konyata mikanda, kasi moto moko te kati na bino ayebi kosalela yango malamumalamu. Nsima ya sanza motoba mpamba, bokobebisa bisaleli yango nyonso.”

Ndeko Martin alobaki boye: “Yango emonanaki lokola alobi solo, kasi toyebaki ete Yehova akosalisa biso mpe asalaki yango.” Ndeko Martin alobaki solo. Eumelaki te, bamasini yango ya sika ekómaki kobimisa mikanda 2 000 mokolo na mokolo.

Bato oyo basalelaka masini mpo na konyata mikanda batɛlɛmi pene na bamasini ya konyata mikanda

BANKÓTO YA BATO BAYOKAKI NSANGO MALAMU NA NZELA YA RADIO

Longola konyata mwa mikanda na bango moko na masini, basaleli ya Yehova babandaki kosalela mayele ya sika mpo na kopalanganisa nsango malamu, elingi koloba na nzela ya radio. Na mokolo ya lomingo, mwa 26/02/1922 na nsima ya midi, ndeko Rutherford asalaki emisyo na ye ya liboso na radio. Asalaki diskur moko oyo ezalaki na motó ya likambo: “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te” na shɛni ya radio KOG na engumba Los Angeles, na etúká ya Californie, na États-Unis.

Bato soki 25 000 balandaki diskur yango. Basusu kati na bango bakomaki mikanda mpo na kopesa ndeko Rutherford matɔndi mpo na diskur oyo asalaki. Willard Ashford, oyo azalaki kofanda na Santa Ana, na etúká ya Californie, azalaki moko ya bato oyo bakomaki mikanda yango. Apesaki ndeko Rutherford matɔndi mpo na diskur ya “kafukafu mpe ya kitoko” oyo asalaki. Alobaki lisusu boye: “Lokola tozalaki na bato misato na ndako oyo bakokaki kotambola te mpo bazalaki kobɛla, ata soki diskur yango esalemaka penepene na biso, tolingaki kozala na likoki ya koya te.”

Badiskur mingi ekómaki kosalema na radio na bapɔsɔ oyo elandaki. Na nsuka ya mobu 1922, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete “bato soki 300 000 bayokaki nsango malamu na nzela ya radio.”

Lokola mikanda mpe makambo oyo bato balobaki elendisaki Bayekoli ya Biblia, bazwaki ekateli ya kosala shɛni moko ya radio na esanga ya Staten, oyo ezalaki mosika te na Betele ya Brooklyn. Na bambula oyo elandaki, Bayekoli ya Biblia basalelaki shɛni oyo ya radio, WBBR, mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi.

“ADV”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/1922, epesaki liyebisi ete liyangani moko ekosalema na Cedar Point, na Ohio, kobanda na 05 tii 13/09/1922. Bayekoli ya Biblia bazalaki na esengo mingi ntango bakómaki na Cedar Point.

Na maloba na ye ya ebandeli, ndeko Rutherford ayebisaki bayangani boye: “Nazali mpenza na elikya ete Nkolo . . . akopambola liyangani oyo mpe akosala ete litatoli epesama na ndenge oyo esalemá naino te na mabele.” Balobi ya liyangani yango bazalaki mbala na mbala kolendisa bandeko basi mpe mibali básakolaka.

Ebele ya bato oyo bayanganaki na liyangani oyo esalemaki na Cedar Point, na Ohio, na mobu 1922

Na nsima na mokolo ya mitano, mwa 08/09/1922, bayangani soki 8 000 bakɔtaki na esika ya liyangani mpe bazalaki kozela na mposa makasi koyoka diskur ya ndeko Rutherford. Bazalaki kolikya ete akopesa bango ndimbola ya balɛtrɛ misato oyo “ADV,” oyo ekomamaki na nkasa ya libyangi na bango. Ntango bafandaki na bisika na bango, mingi na bango bazalaki komona makomi oyo etyamaki likoló ya estrade. Ndeko Arthur Claus, oyo ayaki na liyangani uta na engumba Tulsa, na etúká ya Oklahoma, na États-Unis, afandaki na esika oyo akokaki kolanda diskur yango malamu. Atako ezalaki mpenza mpasi, mpamba te na esika ya liyangani mikro to ekoliseli lolaka ezalaki te.

“Tozalaki kolandela liloba moko na moko na likebi mpenza”

Mpo moto moko te akoka kokata diskur yango, prezida apesaki liyebisi ete bato oyo bakoya na retare bakokɔta te na esika ya liyangani ntango ndeko Rutherford azali kosala diskur. Na ngonga ya 9:30, ndeko Rutherford abandaki kolobela maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 4:17: “Bokonzi ya likoló ekómi pene.” Ntango azalaki kolobela ndenge bato bakoyoka nsango ya Bokonzi yango, alobaki boye: “Yesu ye moko alobaki ete na ntango ya kozala na ye akotambwisa mosala ya kobuka mbuma ya basaleli na ye, na ntango yango akoyanganisa bato na ye ya solo mpe ya sembo.”

Ndeko Claus, oyo afandaki na esika ya liboso pene na estrade, alobaki boye: “Tozalaki kolanda liloba mokomoko na likebi mpenza.” Kasi na mbalakaka, abɛlaki mpe asengelaki kolongwa na esika oyo afandaki. Ndeko Arthur alongwaki na esika yango, atako ayebaki ete bakopesa ye nzela te ya kokɔta lisusu na esika ya liyangani ntango ndeko Rutherford azali kosala diskur na ye.

Mwa moke na nsima, akómaki komiyoka malamu. Alobaki, ntango azalaki kozonga na esika ya liyangani, ayokaki ete bato bazalaki kobɛta mabɔkɔ makasi. Yango esalaki ete azwa makasi! Azwaki mokano ete akolanda eteni oyo etikalaki ya liyangani wana ya kitoko, ata soki esɛngi ye amata tii na nsamba. Ndeko Claus, elenge mobali oyo azalaki na mbula 23 na ntango wana, azwaki likoki ya komata na nsamba. Pole oyo ezalaki kouta na likoló ekɔtaki na ndako ya liyangani, mpe wana azalaki kopusana penepene na yango, “akómaki koyoka diskur yango malamu.”

Kasi ndeko Arthur azalaki ye moko te. Baninga na ye mosusu mpe bazalaki likoló ya nsamba. Ndeko Frank Johnson, moko ya baninga na ye apusanaki mpe atunaki ye boye: “Ozali na mbeli ya moke ya mino makasi?”

Ndeko Arthur alobaki: “Ɛɛ, nazali na yango.”

Ndeko Frank alobaki: “Tozalaki kobondela soki ndeko moko akoki kozala na yango. Ozali komona elamba ya monene oyo elíngami? Ezali elembo, oyo bakakisaki na bansɛtɛ oyo. Landá zuzi na likebi mpenza. * Ntango akoloba: ‘Mpe bosengeli kosakola, kosakola,’ osengeli kokata bansinga yango minei.”

Na yango, ndeko Arthur asimbaki mbeli na lobɔkɔ, azalaki kozela baninga na ye báyebisa ye ntango ndeko Rutherford akoloba likambo yango. Eumelaki te, ndeko Rutherford akómaki na eteni ya ntina mingi ya diskur na ye. Azalaki na esengo mpenza mpe na mpiko mpe mbala mosusu agangaki makasi boye: “Bózala batatoli ya sembo mpe ya solo ya Nkolo. Bókende liboso na etumba tii ntango bisika nyonso ya Babilone ekotikala mpamba. Bósakola nsango tii na bamboka oyo ezali mosika mpenza. Mokili oyo esengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe mpe ete Yesu Kristo azali Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. Oyo ezali mokolo oyo eleki mikolo nyonso. Bótala, Mokonzi azali koyangela! Bino nde bapalanganisi ya nsango na ye. Na yango bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye!”

Ndeko Arthur alobaki ete ye ná bandeko mosusu bakataki bansinga yango, mpe elamba yango ya monene oyo elíngamaki efungwamaki mpe ekómaki kokita malɛmbɛmalɛmbɛ. Na boyokani na balɛtrɛ oyo misato “ADV” (balɛtrɛ misato ya liboso ya liloba ya Anglais oyo elimboli “bósakola”), ntango bakitisaki elamba yango ya monene, na elamba yango ekomamaki boye: “Bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.”

MOSALA MOKO YA NTINA

Liyangani oyo esalemaki na Cedar Point esalisaki bandeko bátya makanisi na bango na mosala ya ntina mingi ya kosakola Bokonzi, mpe baoyo bazalaki na elimo ya komipesa basepelaki kosala yango. Na Oklahoma, na États-Unis, ndeko moko oyo azalaki colporteur, ndenge bazalaki kobenga babongisi-nzela na ntango wana, akomaki boye: “Tozalaki kosakola na bisika oyo bato bazalaki koluka mabanga ya ntalo na nse ya mabele mpe bato yango bazalaki babola mpenza.” Alobaki ete mbala mingi ntango bato bazalaki koyoka nsango oyo ezalaki na zulunalo Âge d’or, “bazalaki kolela.” Lisusu, alobaki boye: “Tozalaki mpenza na esengo mpo tokokaki kobɔndisa bango.”

Bayekoli wana ya Biblia bayebaki ntina ya maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 10:2, oyo elobi: “Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.” Wana mobu yango ekómaki na nsuka, bazwaki ekateli ya kokóma lisusu na molende mingi mpo na kosakola nsango ya Bokonzi na bisika oyo ezali mosika mpenza mpe na mokili mobimba.

^ Ndeko Rutherford na bantango mosusu bazalaki kobenga ye “zuzi” mpo na ntango moko boye asalaki lokola zuzi na engumba Missouri, na États-Unis.