LISOLO YA BOYEKOLI 41
Okoki kozwa esengo ya solosolo
“Esengo na moto nyonso oyo azali kobanga Yehova, oyo azali kotambola na banzela na ye.”—NZ. 128:1.
LOYEMBO 110 “Esengo ya Yehova”
NA MOKUSE *
1. (a) ‘Bobola na biso ya elimo’ ezali nini? (b) Na ndenge nini kozala na esengo etaleli bobola na biso ya elimo?
ESENGO ya solosolo ezali kaka te mayoki ya mpamba oyo eyaka mpe ekendaka. Esengo yango ya solosolo ekoki koumela bomoi mobimba ya moto. Na ndenge nini? Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Mat. 5:3) Yesu ayebaki ete bato bakelamá na mposa makasi ya koyeba mpe ya kosambela Mozalisi na bango, Yehova Nzambe. Yango nde ‘bobola na biso ya elimo.’ Na yango, lokola Yehova azali “Nzambe ya esengo,” baoyo basambelaka ye bakoki mpe kozala na esengo.—1 Tim. 1:11.
2-3. (a) Mpo na Yesu, banani mosusu bakoki kozala na esengo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo, mpe mpo na nini ezali na ntina?
2 Tokoki kozala na esengo kaka soki tozali na mikakatano te? Te. Na lisolo na ye, Yesu alobaki likambo moko ya kokamwa. Ezala “baoyo bazali na mawa,” elingi koloba, mbala mosusu mpo bazali komona ete bamemi ngambo mpo na masumu na bango to mpo bazali na mikakatano ya makasi, bakoki kozala na esengo. Yesu alobaki mpe bongo mpo na “baoyo banyokwami mpo na boyengebene” to baoyo bazali “kolobela [bango] mabe” mpo bazali bayekoli ya Kristo. (Mat. 5:4, 10, 11) Ndenge nini ekoki kosalema ete moto azala mpenza na esengo ntango azali kokutana na makambo ya ndenge wana?
3 Yesu azalaki koteya biso ete esengo ya solosolo eutaka te ntango makambo ezali kotambola malamu na bomoi, kasi eutaka nde na kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe kopusana penepene na Nzambe. (Yak. 4:8) Ndenge nini tokoki kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe kopusana penepene na Nzambe? Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato ya ntina oyo epesaka esengo ya solosolo.
LYÁKÁ BILEI YA ELIMO
4. Na kotalela Nzembo 1:1-3, wapi likambo ya liboso ya kosala mpo na kozala na esengo ya solosolo?
4 LIKAMBO 1: Mpo tózala na esengo ya solosolo, tosengeli kolyaka bilei ya elimo. Ezala bato mpe banyama bazalaka na mposa ya bilei ya mosuni mpo bázala na bomoi. Kasi kaka bato nde bakoki kolya bilei ya elimo. Mpo bazalaka na mposa na yango. Yango wana, Yesu alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Mat. 4:4) Na yango, tosengeli te kolekisa mokolo moko kozanga kolya bilei ya elimo oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe oyo ezali na motuya mingi. Mokomi moko ya nzembo akomaki boye: ‘Esengo na moto oyo asepelaka na mobeko ya Yehova mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.’—Tángá Nzembo 1:1-3.
5-6. (a) Makambo nini tokoki koyekola na Biblia? (b) Na ndenge nini kotánga Biblia ekoki kosalisa biso?
5 Lokola Yehova alingaka biso, amonisi biso na Biblia makambo oyo tosengeli kosala mpo tózala na bomoi ya esengo. Toyekolaka soki mokano na ye mpo na bomoi na biso ezali nini. Toyekolaka ndenge tokoki kopusana penepene na ye mpe makambo oyo tosengeli kosala mpo alimbisa masumu na biso. Mpe toyekolaka elikya kitoko oyo alaki biso mpo na mikolo ezali koya. (Yir. 29:11) Mateya wana ya solo oyo tozwaka na botángi ya Biblia esalaka ete motema na biso etonda na esengo!
6 Toyebi ete Biblia etondi na toli oyo ekoki kosalisa biso na bomoi ya mokolo na mokolo. Ntango totosaka toli yango, tozwaka esengo. Na yango, ntango nyonso oyo oyoki ete olɛmbi nzoto mpo na mikakatano ya bomoi, zwáká ntango mingi mpo na kotánga Liloba ya Yehova mpe komanyola yango. Yango wana, Yesu alobaki: “Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”—Luka 11:28.
7. Ndenge nini okoki kozwa matomba na ntango oyo ozwaka mpo na kotánga Liloba ya Nzambe?
7 Ntango ozali kotánga Liloba ya Nzambe, zwáká ntango ya kosepela na makambo oyo ozali kotánga. Na ndakisa, likambo lokola oyo esí ekómelá yo? Moto moko alambeli yo biloko oyo olingaka mingi. Kasi mbala mosusu ozali na ntango mingi te mpo na kolya yango to makanisi ezali wana te mpo ozali kokanisa makambo mingi, mpe olei mbangumbangu kozanga komeka bilei nyonso malamumalamu. Ntango osilisi kolya, oyei komona ete olyaki mbangumbangu mpe omoni ete osengelaki kolya malɛmbɛ mpe kosepela na bilei nyonso. Ekoki kozala mpe bongo ntango tozali kotánga Biblia, mbala mosusu totángaka mbangumbangu mpe tosepelaka te na nsango na yango. Tózwaka ntango mpo na kosepela na botángi ya Liloba ya Nzambe; tósalaka lokola tozali komona makambo yango na makanisi, tozali koyoka mongongo, mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga. Soki tosali bongo, tokozala lisusu na esengo mingi.
8. Ndenge nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kokokisa mokumba na ye? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
8 Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi, mpe tozali koleisama malamu na elimo. * (Mat. 24:45) Biblia ezali esaleli ya libosoliboso oyo moombo ya sembo asalelaka mpo na kopesa bilei ya elimo. (1 Tes. 2:13) Na yango, bilei yango ya elimo esalisaka biso tóyeba makanisi ya Yehova ndenge emonisami na Biblia. Yango wana, totángaka bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe masolo ndenge na ndenge na jw.org. Tobongisaka makita ya lisangá ya katikati ya pɔsɔ mpe ya nsuka ya pɔsɔ. Mpe tolandaka programɛ ya TV JW sanza nyonso soki ezali. Soki tozali kosala makasi na kokoba kotánga mpe koyekola Biblia, yango ekosalisa biso tósala likambo ya mibale oyo tosengeli kosala mpo tózala na esengo ya solosolo.
TOSÁKÁ MIBEKO YA YEHOVA
9. Wapi likambo ya mibale oyo epesaka esengo ya solosolo?
9 LIKAMBO 2: Mpo tózala na esengo ya solosolo, tosengeli kotosaka mibeko ya Yehova. Mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Esengo na moto nyonso oyo azali kobanga Yehova, oyo azali kotambola na banzela na ye.” (Nz. 128:1) Kobanga Yehova elimboli komemya ye mpe koboya kosala makambo nyonso oyo esepelisaka ye te. (Mas. 16:6) Yango wana, tokobaka kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyokanisa bomoi na biso na mibeko ya Nzambe na oyo etali malamu ná mabe, ndenge Biblia elimboli yango. (2 Ko. 7:1) Tokozala na esengo soki tozali kosala makambo oyo Yehova alingaka mpe koboya makambo oyo ayinaka.—Nz. 37:27; 97:10; Rom. 12:9.
10. Na kotalela Baroma 12:2, mokumba nini tozali na yango?
10 Tángá Baroma 12:2. Moto akoki koyeba ete Yehova azali na bokonzi ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, kasi asengeli kozwa ekateli ya kotosa mibeko ya Nzambe. Na ndakisa, moto akoki koyeba ete guvɛrnema ezali na lotomo ya kokata vitɛsi nini moto asengeli kotambwisa motuka na nzela, kasi mbala mosusu alingaka te kotosa mobeko yango. Yango wana, atambwisaka motuka na vitɛsi makasi koleka vitɛsi oyo basɛngi ye atambwisa yango. Tomonisaka na etamboli na biso ete tondimaka mpenza ete kotosa mibeko ya Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. (Mas. 12:28) Davidi azalaki koyoka ndenge wana, yango wana alobaki na Yehova boye: “Okoyebisa ngai nzela ya bomoi. Liboso ya elongi na yo, bato batondaka na esengo; makambo oyo epesaka esengo ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na seko.”—Nz. 16:11.
11-12. (a) Ntango tozali komitungisa to tolɛmbi nzoto, tosengeli kokeba na nini? (b) Ndenge nini maloba oyo ezali na Bafilipi 4:8 ekoki kosalisa biso ntango tozali kopona kominanola?
11 Ntango tozali komitungisa to tolɛmbi nzoto, tokoki kozala na mposa ya kosala likambo oyo ekosalisa biso tókima mikakatano na biso. Ezali na yango mabe te, kasi tosengeli kokeba mpo tóbendama te na kosala likambo oyo Yehova ayinaka.—Ef. 5:10-12, 15-17.
12 Na mokanda na ye epai ya Bafilipi, ntoma Paulo asɛngaki bakristo yango bákoba kokanisa makambo oyo ezali “boyengebene, . . . pɛto, . . . oyo ekoki kolingama, [mpe] oyo elobelami malamu.” (Tángá Bafilipi 4:8.) Atako ntoma Paulo azalaki kokoma na bosikisiki te makambo etali kominanola, makambo oyo akomaki esengeli kozala na bopusi na kominanola oyo toponaka. Na yango meká kosala boye: Bisika nyonso okokuta liloba “makambo” na vɛrsɛ yango, tyá na bisika yango liloba “banzembo,” “bafilme,” “babuku,” to “masano ya video.” Kosala bongo ekoki kosalisa yo oyeba kominanola nini eyokani na makanisi ya Nzambe mpe oyo eyokani na yango te. Tolingaka koyokanisa bomoi na biso na mibeko ya Yehova oyo eleki nyonso. (Nz. 119:1-3) Yango wana na lisosoli ya pɛto, tokoki kolobela likambo ya misato oyo epesaka esengo ya solosolo.—Mis. 23:1.
TYÁKÁ LOSAMBO YA YEHOVA NA ESIKA YA LIBOSO
13. Na kotalela Yoane 4:23, 24, wapi likambo ya misato oyo epesaka esengo ya solosolo?
13 LIKAMBO 3: Omindimisa ete losambo ya Yehova ezali na esika ya liboso na bomoi na yo. Lokola Yehova azali Mozalisi na biso, yango wana tosengeli kosambela ye. (Em. 4:11; 14:6, 7) Na yango, kosambela Yehova na ndenge oyo alingaka tósambela ye, elingi koloba, “na elimo mpe na solo,” esengeli kozala likambo eleki ntina na bomoi na biso. (Tángá Yoane 4:23, 24.) Tozalaka na mposa ya elimo ya Nzambe etambwisa losambo na biso mpo ezala na boyokani na mateya ya solo oyo ezali na Liloba na ye. Losambo na biso esengeli kozala na esika ya liboso ata soki tofandi na ekólo oyo mosala na biso epekisami to endimami na mibeko ya Leta te. Lelo oyo, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali koleka 100 bazali na bolɔkɔ kaka mpo bazali Batatoli ya Yehova. * Atako bongo, bazali na esengo ya kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobondela, koyekola mpe koyebisa basusu makambo etali Nzambe mpe Bokonzi na ye! Ntango bazali kolobela biso mabe to konyokola biso, tokoki kozala na esengo ya koyeba ete Yehova azali elongo na biso mpe ete akopesa biso mbano.—Yak. 1:12; 1 Pe. 4:14.
NDAKISA YA LIKAMBO OYO ESALEMAKI MPENZA
14. Nini ekómelaki ndeko mobali moko ya elenge na Tadjikistan, mpe mpo na nini?
14 Bandeko na biso mosusu ya basi mpe ya mibali bakutanaki na mikakatano ya makasi, kasi bazalaki mpenza na esengo mpo bazalaki kosala makambo misato oyo touti kolobela. Tótalela likambo moko oyo ekómelaki ndeko mobali moko ya elenge ya mbula 19 na nkombo Jovidon Bobojonov, na ekólo Tadjikistan, mpo aboyaki kokɔta na mosala ya soda. Na mokolo ya 04/10/2019, bakangaki ye na makasi uta na ndako na ye, batyaki ye na bolɔkɔ mpo na mwa basanza, mpe bazalaki kosalela makambo lokola mosali mabe. Likambo wana ya kozanga bosembo ebendaki likebi ya bato mingi na mokili mobimba. Lapolo emonisi ete abɛtamaki mpenza, mpe batyaki mbamba mpo alapa ndai ya bosembo mpo na mosala ya soda, mpe alata bilamba ya basoda. Nsima na yango, tribinale ekweisaki ye na likambo mpe batindaki ye na kaa oyo basalisaka bato misala na makasi tii nsukansuka mokonzi ya mboka alimbisaki ye mpe apesaki motindo ete bálongola ye na bolɔkɔ. Na ntango wana nyonso, Jovidon abatelaki bosembo na ye mpe esengo na ye. Nini esalisaki ye? Azalaki ntango nyonso kokokisa mposa na ye ya elimo.
15. Ndenge nini Jovidon azalaki kolya bilei ya elimo ntango azalaki na bolɔkɔ?
15 Ntango azalaki na bolɔkɔ, Jovidon azalaki kolya bilei ya elimo, ata ntango azangaki Biblia to mokanda na biso moko oyo elimbolaka Biblia. Ndenge nini ekokaki kosalema? Bandeko basi mpe mibali ya esika oyo azalaki kofanda, bazalaki koya kotikela ye bilei ya mosuni, bazalaki kokoma mokapo ya mokolo, mpe kobomba yango na kati ya bakitunga ya bilei. Na yango, azalaki na likoki ya kotánga Biblia mpe komanyola yango mokolo na mokolo. Ntango alongwaki na bolɔkɔ, apesaki toli oyo epai ya bato nyonso oyo bakutaná naino te na mikakatano ya makasi: “Esengeli kosalela bonsomi oyo ozali na yango malamumalamu mpo na koyekola makambo mingi etali Yehova na nzela ya Liloba na ye mpe mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia.”
16. Jovidon azalaki kotya makanisi na ye na makambo nini?
16 Ndeko na biso azalaki kotosa mibeko ya Yehova. Na esika ya kofandisa makanisi na ye na bamposa ya mabe, mpe kosala makambo ya mabe, azalaki kotya makanisi na ye epai ya Yehova mpe na makambo oyo Yehova alingaka. Jovidon azalaki kosepela na biloko kitoko oyo Nzambe akelá. Ntɔngɔ nyonso azalaki koyoka ndenge bandɛkɛ ezalaki koyemba mpe yango ezalaki kolamusa ye. Na butu azalaki kotala sanza mpe minzoto. Alobaki boye: “Makabo yango oyo euti epai ya Yehova ezalaki kolendisa ngai mpe kopesa ngai esengo.” Ntango tozali na botɔndi mpo na bilei nyonso ya mosuni mpe ya elimo oyo Yehova apesaka biso, tozalaka na esengo, mpe esengo yango ekoki kosalisa biso tóyika mpiko.
17. Na kotalela 1 Petro 1:6, 7, ntango tokutani na likambo moko oyo ekokani na oyo ya Jovidon, matomba nini ekomonana soki tokobi koyika mpiko?
17 Longola yango, Jovidon atyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso. Ayebaki ntina ya kobatela bosembo na ye epai ya Nzambe ya solo. Yango wana, Yesu alobaki boye: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Luka 4:8) Bakomanda ya basoda mpe basoda balingaki ete Jovidon awangana kondima na ye. Na esika ayokela bango, azalaki kobondela na etingya mpo na kosɛnga Yehova asalisa ye alɛmba te mpe awangana kondima na ye te. Atako akutanaki na likambo ya kozanga bosembo, Jovidon awanganaki kondima na ye te. Yango wana, akoki sikoyo kozala na esengo monene mpo azali na eloko moko oyo azalaki na yango te liboso bákanga ye uta na ndako na ye, bábɛta ye, mpe bátya ye na bolɔkɔ, elingi koloba, azali na kondima makasi mpo kondima na ye emekamaki.—Tángá 1 Petro 1:6, 7.
18. Ndenge nini tokoki kobatela esengo na biso?
18 Yehova ayebi oyo tosengeli na yango mpo tózala na esengo ya solosolo. Soki ozali kosala makambo misato oyo epesaka esengo ya solosolo, okoki kobatela esengo na yo atako ozali kokutana na mikakatano. Na yango, yo mpe okoki koloba boye: “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”—Nz. 144:15.
LOYEMBO 89 Yoká, tosá mpe pambwamá
^ Bato mingi bamonaka ete kozwa esengo ya solosolo ezali mpasi, mpamba te balukaka yango na ndenge oyo ebongi te na nzela ya bisɛngo, konduka bomɛngo, koluka lokumu to nguya. Kasi, ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayebisaki bato makambo oyo basengeli kosala mpo bázwa esengo ya solosolo. Na lisolo oyo, tokotalela makambo misato ya ntina oyo ekoki kosalisa biso tózwa esengo ya solosolo.
^ Talá lisolo “Ozwaka ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi’?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2014.
^ Mpo na koyeba makambo mosusu, kende na jw.org na esika bakomi “Bakangami mpo na kondima na bango.”
^ ELILINGI: Elilingi oyo ezali komonisa ndenge bakangi ndeko mobali moko mpe bamemi ye na tribinale mpo na kosambisa ye wana bandeko na ye Batatoli bayei kopesa ye mabɔkɔ.