Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

1924​—⁠Eleki sikoyo mbula nkama

1924​—⁠Eleki sikoyo mbula nkama

NIMERO ya Bulletin a ya sanza ya 01/1924 elobaki boye: “Lokola tozali na ebandeli ya mbula, ezali ntango ya malamu mpo mwana mokomoko oyo amipesá na Nkolo . . . aluka mabaku ya kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova.” Na ebandeli ya mbula yango, Bayekoli ya Biblia basalelaki toli yango na ndenge mibale: bamekaki makambo minene ya sika mpe basakolaki kozanga kobanga.

BAMEKI KOSALELA RADIO

Elekaki mbula mobimba banda bandeko ya Betele bazalaki kotonga ndako ya radio WBBR na Esanga Staten, na engumba New York. Babongisaki naino esika, na nsima batongaki ndako moko monene mpo na baoyo bakosala mosala mpe ndako mosusu mpo na bisaleli ya radio. Ntango mosala yango esilaki, bandeko babandaki kokangisa bisaleli oyo esengeli mpo na kolekisa makambo na radio. Kasi mikakatano ezalaki ebele.

Bandeko bamonaki ete kotya antɛnɛ monene ya radio yango ezalaki mpasi mingi. Lokola ezalaki molai ya mɛtrɛ 91, esengelaki kokangisa yango na biteni mibale ya nzete oyo mokomoko ezalaki molai ya mɛtrɛ 61. Ntango bamekaki mbala ya liboso esimbaki te. Lokola batyelaki Yehova motema, nsukansuka bandeko yango balongaki. Calvin Prosser, oyo apesaki mabɔkɔ na mosala yango, alobaki boye: “Soki tolongaki kaka na mbala ya liboso, tolingaki komibɛtɛla mabɔkɔ mpe koloba, ‘Talá mosala oyo tosali!’” Bandeko bapesaki lokumu nyonso epai ya Yehova, kasi mikakatano esukaki wana te.

Bazali kotɛlɛmisa antɛnɛ moko ya WBBR

Mayele ya kosalela radio ezalaki naino na ebandeli, mpe bisaleli oyo ebongi mpo na radio ezalaki mpenza te na bazando. Na yango, bandeko basombaki masini moko ya 500-watt mpo na kotinda maloba; ezalaki ya kala mpe moto moko ya mboka nde asalaki yango. Na esika básomba mikro, basalelaki mikro ya telefone. Na sanza ya mibale, mokolo moko na butu, bandeko bazwaki ekateli ya komeka mwa bisaleli yango. Lokola basengelaki kolekisa programɛ moko na radio yango, bandeko yango bayembaki kaka banzembo ya Bokonzi. Moko ya bandeko yango, Ernest Lowe alobaki na kosɛka ete ntango bandeko bazalaki koyemba, Zuzi Rutherford b abengaki bango na telefone ntango ayokaki banzembo yango na radio na ye na Brooklyn, na kilomɛtrɛ soki 25.

Ndeko Rutherford alobaki: “Bótika makɛlɛlɛ wana. Ezali koyokana lokola bato bazali koganga!” Bandeko bayokaki mwa nsɔni mpe bakangaki bamasini nokinoki, kasi bandimaki ete bazali sikoyo na makoki ya kolekisa baemisyo na radio.

Na mokolo ya 24/02/1924, mokolo oyo bafungolaki radio na ndenge oyo endimamaki, ndeko Rutherford alobaki ete radio yango esalemi mpo na “matomba ya bokonzi ya Masiya.” Alobaki ete mokano ya radio yango ezali ya “kosalisa bato bákanga ntina ya pole oyo ezali na Biblia mpe eleko oyo tozali na yango, ata soki bazali na bindimeli nini.”

Na lobɔkɔ ya mwasi: Ndeko Rutherford na ndako ya radio ya liboso

Na lobɔkɔ ya mobali: Masini mpe bisaleli mpo na radio

Emisyo wana ya liboso esimbaki mpenza. Na mbula 33 oyo elandaki, radio WBBR esalisaki mingi mpo na kolekisa baemisyo ya ebongiseli ya Yehova.

BATƐMƐLI BAKONZI YA MANGOMBA NA MPIKO NYONSO

Na sanza ya 07/1924, Bayekoli ya Biblia basalaki liyangani monene na Columbus, na Ohio. Bandeko bautaki na mikili ndenge na ndenge mpe bayokaki badiskur na monɔkɔ ya Arabe, Anglais, Allemand, Français, Grec, Italien, Hongrois, Lituanien, Polonais, Russe, minɔkɔ ya Scandinavie, mpe Ukrainien. Badiskur mosusu elekaki na radio, mpe bazwaki bibongiseli mpo zulunalo Ohio State epesaka lapolo ya mokolo mokomoko ya liyangani.

Liyangani ya 1924 na Columbus, Ohio

Na mwaminei, 24/07, bato koleka 5000 oyo bayaki na liyangani babimaki mosala ya kosakola. Bakabolaki babuku koleka 30000 mpe babandaki boyekoli ya Biblia na bato ebele mpenza. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebengaki mokolo yango “eteni oyo epesaki esengo koleka na liyangani.”

Likambo mosusu ya monene ezalaki na mwamitano 25/07, ntango Ndeko Rutherford atángaki mokanda moko oyo ezalaki na nsango oyo etɛmɛlaki bakonzi ya mangomba. Mokanda yango oyo ekomamaki lokola mokanda ya bato ya mibeko ezalaki kofunda bakonzi ya politiki, ya mangomba, mpe ya makambo ya mombongo ete “bazali kopekisa bato báyeba bibongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kopambola bango mpe kopesa bango bomoi.” Longola yango, mokanda yango emonisaki ete bato yango “bandimaki Société des Nations mpe balobaki ete ezali ‘ebongiseli ya politiki oyo emonisi Bokonzi ya Nzambe awa na mabele.’” Bayekoli ya Biblia basengelaki kozala na mpiko mpenza mpo na koyebisa bato nsango yango.

Mpo na liyangani yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki: “Na nsuka, mwa limpinga moke ya Nkolo oyo bayanganaki na liyangani ya Columbus bakómaki na kondima makasi . . . , bazwaki nguya mpo na kotɛmɛla nguya to mbanzi nyonso oyo monguna akokaki kobwakela bango.” Leo Claus, oyo azalaki na liyangani yango, alobaki boye: “Na nsuka ya liyangani, biso nyonso tozalaki na esengo ya kokende kopanza nsango yango na bateritware na biso.”

Trakte Tofundi bakonzi ya mangomba na makambo oyo

Na sanza ya 10, Bayekoli ya Biblia babandaki kokabola bamilio ya trakte Tofundi bakonzi ya mangomba na makambo oyo, oyo ezongelaki makambo oyo Ndeko Rutherford asalaki na diskur. Na mwa mboka Cleveland, na Oklahoma, Frank Johnson asilisaki kokabola batrakte miniti 20 liboso ya ngonga oyo basakoli mosusu basengelaki koya kozwa ye. Akokaki te kozela bango na esika ya polele mpo bato ya mboka oyo basilikaki mpo na makambo oyo asakolaki bazalaki koluka ye. Ndeko Johnson amonaki malamu akende kobombana na ndako-nzambe moko oyo ezalaki pembeni wana. Lokola moto azalaki na kati te, atyaki batrakte Tofundi bakonzi ya mangomba na makambo oyo na kati ya Biblia ya pastɛrɛ mpe na kiti mokomoko. Asalaki makambo nokinoki mpe abimaki. Lokola azalaki naino na mwa miniti, akendaki na bandako-nzambe mosusu mibale, mpe asalaki kaka bongo.

Ndeko Frank akendaki noki na esika oyo bandeko basengelaki kozwa ye. Abatamaki nsima ya esika oyo batɛkaka esansi, azali kotala mibali oyo bazalaki kolanda ye. Mibali yango balekaki wana, kasi bamonaki ye te. Ntango kaka bakendaki, bandeko oyo bazalaki kosakola zingazinga bayaki, bazwaki Frank mpe bango nyonso bakendaki.

Ndeko moko alobaki boye: “Ntango tozalaki kolongwa na mboka yango, tolekaki bandako-nzambe yango misato. Bato ata 50 bazalaki liboso ya ndako-nzambe mokomoko. Bato mosusu bazalaki kotánga trakte yango, bamosusu bazalaki kozela pastɛrɛ amona yango. Tolongwaki na ntango oyo ebongi mpenza! Kasi, topesaki Yehova Nzambe na biso matɔndi ndenge abatelaki biso mpe apesaki biso mayele mpo na kokima banguna wana ya Bokonzi ya Nzambe.”

MOSALA YA KOSAKOLA NA MIKILI MOSUSU

Józef Krett

Na mikili mosusu mpe Bayekoli ya Biblia basakolaki na mpiko. Na nɔrdi ya France, Józef Krett ateyaki bato ya Pologne oyo bazalaki kosala esika batimolaka mabanga ya ntalo. Azwaki bibongiseli mpo na kosala diskur oyo elobaki “Lisekwa ya bakufi ekozala mosika te.” Ntango bapesaki bato ya mboka yango nkasa ya libyangi, sango moko alobaki na bandimi na ye ete bákende te. Likambo oyo aboyaki, yango nde esalemaki. Bato koleka 5000 bakendaki kolanda diskur yango, ata mpe sango yango! Ndeko Krett asɛngaki sango yango aya kokɔtela bindimeli na ye, kasi aboyaki. Ndeko Krett akabolaki mikanda nyonso oyo azalaki na yango, mpe amonaki ete bato oyo asakwelaki bazalaki mpenza na mposa ya Liloba ya Nzambe.—Amo. 8:11.

Claude Brown

Na Afrika, Claude Brown amemaki nsango malamu na Gold Coast, lelo oyo Ghana. Badiskur oyo asalaki mpe mikanda oyo akabolaki esalisaki na kopanza solo nokinoki na ekólo yango. John Blankson, oyo azalaki kotánga mpo ayeba malamu makambo etali nkisi ya monganga, ayaki koyoka diskur moko ya Ndeko Brown. Andimaki mbala moko ete amoni solo. John alobaki boye: “Solo epesaki ngai esengo mingi, mpe nayebisaki yango epai ya bato mosusu na eteyelo na biso.”

John Blankson

Mokolo moko, John akendaki na ndako-nzambe moko ya Lingomba ya Anglican mpo na kotuna sango mituna oyo etali Bosato, mpo John amonaki polele ete liteya yango euti na Biblia te. Sango abenganaki ye, mpe agangaki: “Ozali mokristo te; ozali moto ya Zabolo. Bimá awa!”

Ntango azongaki ndako, John akomelaki sango yango mokanda, asɛngaki ye báyanganisa bato mpo akɔtela liteya ya Bosato. Na eyano oyo sango yango azongisaki, ayebisaki John akende na biro ya mokambi ya eteyelo ya makambo etali nkisi ya monganga, mpe kuna mokambi yango atunaki John soki ya solo akomelaki sango mokanda.

John ayanolaki: “Ɛɛ, ezali solo.”

Mokambi yango ayebisaki John akomela sango mpo na kosɛnga bolimbisi. Na yango John akomaki boye:

“Tata, molakisi asɛngi ngai nakomela yo mpo na kosɛnga bolimbisi mpe nakoki kosɛnga yo bolimbisi soki ondimi ete oteyaka makambo ya lokuta.”

Molakisi akamwaki makasi mpe atunaki: “Blankson, makambo okomaki yango oyo?”

John: “Ɛɛ. Kaka yango nde nakokaki kokoma.”

Molakisi: “Bakolongola yo na kelasi. Ndenge nini ozali koloba mabe epai ya sango ya lingomba ya guvɛrnema mpe ozali kokanisa ete okokoba kotánga awa?”

John: “Kasi, tata, . . . ntango otángisaka biso, soki ezali na makambo oyo tokangi ntina te, totunaka yo mituna te?”

Molakisi: “Bosalaka bongo.”

John: “Tata, kasi yango nde esalemaki. Sango azalaki koteya biso Biblia mpe natunaki ye motuna moko. Soki akoki koyanola motuna yango te, mpo na nini nasengeli kokoma mpo na kosɛnga ye bolimbisi?”

Balongolaki Blankson na kelasi te. Akomaki mpe mokanda te mpo na kosɛnga bolimbisi.

BAYEKOLI YA BIBLIA BAZALI KOTALA LIBOSO

Mpo na mosala ya 1924, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki: “Tokoki mpenza koloba elongo na Davidi ete: ‘Okopesa ngai makasi mpo na etumba.’ (Nzembo 18:39) Tolendisami mingi na mbula oyo, mpo tomoni lobɔkɔ ya Nkolo . . . Bato na ye oyo bamipesá . . . bapesi litatoli na esengo mpenza.”

Na nsuka ya mbula yango, bandeko bazwaki bibongiseli mpo na kokoba kosakola na nzela ya radio. Babandaki mosala na ndako ya radio mosusu pene na Chicago. Na esika yango, batyaki elembo oyo ebongi, LILOBA. Na LILOBA, bazalaki kosalela masini moko ya 5000-watt mpo na kotinda nsango ya Bokonzi mosika mpenza, ata tii na nɔrdi, na Canada.

Mosika te na mobu 1925, Bayekoli ya Biblia bakozwa bingɛngiseli ya elimo, bakokanga malamu ntina ya Emoniseli mokapo 12. Yango ekobɛtisa bato mosusu libaku. Kasi, bato mosusu mingi bakondima mateya yango oyo eyokani na makambo oyo emonisaki makambo oyo esalemaki na likoló mpe ntina na yango mpo na basaleli ya Nzambe awa na mabele.

a Lelo Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo.

b J. F. Rutherford, oyo azalaki kokamba mosala ya Bayekoli ya Biblia na ntango wana, ayebanaki lokola Zuzi Rutherford. Liboso akɔta Betele, azalaki kosala mbala na mbala lokola zuzi monene na Tribinale ya mwambe ya zongazonga na Missouri.