Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Zongeláká makanisi ya ntina

Zongeláká makanisi ya ntina

Esilá kokóma ete outi koyekola, mpe ozali koyeba lisusu te makambo oyo oyekoli? Ekómelaka biso nyonso mbala na mbala. Nini ekoki kosalisa? Zongeláká makanisi ya ntina.

Ntango ozali koyekola, pemáká na bisika mosusu mpo na kokoma makanisi ya ntina mpenza. Talá ndenge ntoma Paulo alendisaki bandeko oyo bakotánga mokanda na ye básala yango, ntango akomaki: “Sikoyo likambo ya ntina mpenza oyo.” (Ebr. 8:1) Na maloba yango, asalisaki bayoki na ye bálanda lolenge wana ya kosala mpe básosola likanisi mokomoko oyo eyokani na motó ya likambo.

Osengeli kozwaka ntango, mbala mosusu miniti zomi na nsuka ya boyekoli na yo, mpo na kokanisa makanisi ya ntina na makambo oyo outi koyekola. Soki ozali lisusu koyeba makanisi yango te, talelá mitó ya makambo mike to fraze oyo esimbi lisolo—mbala mingi ezalaka bafraze ya liboso ya paragrafe moko—mpo esalisa yo oyeba lisusu makambo oyo outi kotánga. Soki oyekolaki likambo moko ya sika, meká kolimbola yango na maloba na yo moko. Soki ozali kozongela makanisi ya ntina, ekosalisa yo obosana yango te mpe okomona mpenza malamu ndenge ya kosalela yango na bomoi na yo.