Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 42

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate—Makabo oyo ezali bato

Monisá botɔndi mpo na “makabo oyo ezali bato”

Monisá botɔndi mpo na “makabo oyo ezali bato”

“Ntango amataki na likoló . . . , apesaki makabo oyo ezali bato.”EF. 4:8.

NA MOKUSE

Ndenge basaleli na misala, bankulutu, mpe bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka biso mpe ndenge ya komonisa botɔndi mpo na mosala ya bandeko yango ya sembo.

1. Makabo nini Yesu apesi biso?

 MOTO moko te akokani na Yesu na oyo etali kokaba. Ntango azalaki awa na mabele, asalelaki mingi nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na kosalisa basusu. (Luka 9:​12-17) Apesaki likabo oyo eleki monene ntango akabaki bomoi na ye mpo na biso. (Yoa. 15:13) Banda lisekwa na ye, Yesu azali kaka kokaba. Kaka ndenge alakaki, asɛngi Yehova asopa elimo santu na ye mpo na koteya mpe kobɔndisa biso. (Yoa. 14:​16, 17, msl.; 16:13) Mpe na nzela ya makita, Yesu azali kokoba kopesa biso oyo esengeli mpo tókómisa bato bayekoli na mabele mobimba—Mat. 28:​18-20.

2. Banani bazali “makabo oyo ezali bato” oyo Baefese 4:​7, 8 elobeli?

2 Tólobela likabo mosusu ya Yesu. Ntoma Paulo akomaki ete ntango Yesu azongaki na likoló, “apesaki makabo oyo ezali bato.” (Tángá Baefese 4:​7, 8.) Paulo amonisaki ete Yesu apesaki makabo yango mpo na kosalisa lisangá na makambo ndenge na ndenge. (Ef. 1:​22, 23; 4:​11-13) Lelo oyo, “makabo oyo ezali bato” esangisi basaleli na misala, bankulutu ya masangá, mpe bakɛngɛli ya zongazonga. a Nzokande, lokola mibali yango bazali bato ya kozanga kokoka, basalaka mabunga. (Yak. 3:2) Kasi, Nkolo na biso Yesu Kristo asalelaka bango mpo na kosalisa biso; bazali makabo mpo na biso.

3. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki kopesa “makabo oyo ezali bato” mabɔkɔ.

3 Yesu atyaki “makabo oyo ezali bato” mpo na kolendisa lisangá. (Ef. 4:12) Kasi biso nyonso tokoki kosalisa bango bákokisa mokumba yango ya ntina. Tózwa ndakisa: Ekipi moko ya bandeko ezali kotonga Ndako ya Bokonzi. Bandeko mosusu bazali kopesa mabɔkɔ na mosala yango na ndenge mosusu, na ndakisa, bazali kobongisa biloko ya kolya, komema biloko mpe bisaleli, mpe kosala makambo mosusu. Ndenge moko mpe, biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya basaleli na misala, bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga na nzela ya maloba mpe misala na biso. Tótalela matomba oyo tozwaka na mosala makasi na bango mpe ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi epai na bango mpe epai ya Yesu, oyo apesaki biso “makabo [yango] oyo ezali bato.”

BASALELI NA MISALA “BALISAKA BASUSU”

4. Makambo nini basaleli na misala bazalaki kosala mpo na “kosalisa basusu” na siɛklɛ ya liboso?

4 Na siɛklɛ ya liboso, bandeko mibali mosusu batyamaki basaleli na misala. (1 Tim. 3:8) Emonani ete bango nde Paulo abengaki “baoyo basalisaka basusu.” (1 Ko. 12:28) Na ntembe te basaleli na misala bazalaki kosala misala ndenge na ndenge mpo na kosalisa basusu mpo bankulutu bákoka komipesa na koteya mpe kobatela bampate. Na ndakisa, mbala mosusu basaleli na misala bazalaki kosalisa na kosala bakopi ya Makomami to kosomba biloko oyo esengeli mpo na kosala bakopi.

5. Makambo nini basaleli na misala basalaka lelo oyo mpo na kosalisa basusu?

5 Kanisá makambo oyo basaleli na misala ya lisangá na bino basalaka mpo na kosalisa basusu. (1 Pe. 4:10) Basalaka makambo mingi: kotalela makambo ya mbongo ya lisangá, ya bateritware, mikanda mpe kokabolela yango basakoli, kosala na sono mpe kolakisa bavideo, kopesa bandeko bisika ya kofanda, to mpe kosalisa na kobatela Ndako ya Bokonzi. Nyonso wana ezali na ntina mpo makambo etambola malamu na lisangá. (1 Ko. 14:40) Basaleli na misala mosusu basalaka masolo na likita Bomoi mpe mosala mpe basalaka badiskur ya bato nyonso. Mosaleli na misala akoki mpe kotyama mosungi ya mokɛngɛli ya etuluku moko. Na bantango mosusu, basaleli na misala bakendaka elongo na bankulutu kolendisa bandeko.

6. Mpo na bantina nini tozalaka na botɔndi mpo na mosala makasi ya basaleli na misala?

6 Ndenge nini mosala ya basaleli na misala esalisaka lisangá? Ndeko moko ya Bolivie na nkombo Beberly b alobi boye: “Mosala ya basaleli na misala esalisaka ngai nasepela na makita. Nakoki koyemba, kopesa biyano, koyoka badiskur, kotala bavideo mpe bililingi. Basalaka ete bandeko báyoka ete babatelami mpe basalisaka baoyo bazali kolanda makita na mosika na nzela ya video. Nsima ya makita, bazwaka bibongiseli mpo na kopɛtola, kotalela mbongo ya makabo, mpe batalaka soki tozali na mikanda oyo tosengeli na yango. Tozalaka na botɔndi mpo na bango!” Leslie, oyo afandaka na Colombie mpe mobali na ye azali nkulutu, alobi boye: “Mobali na ngai azalaka mpenza na mposa ya basaleli na misala mpo na kokokisa mikumba ndenge na ndenge. Soki bazalaki te, alingaki kozala na makambo mingi koleka, yango wana nazali na botɔndi mpo na molende na bango mpe mposa na bango ya kosalisa.” Na ntembe te yo mpe oyokaka bongo.—1 Tim. 3:13.

7. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na basaleli na misala? (Talá mpe elilingi.)

7 Atako tokoki koyoka ete tozali na botɔndi mpo na basaleli na misala, Biblia elendisi biso boye: Bómonisa  botɔndi.” (Kol. 3:15) Kristofer, nkulutu moko na Finlande, alobeli ndenge amonisaka botɔndi na ye: “Nakomaka karte to mesaje mpe natyaka mokapo moko to nalobelaka likambo moko ya sikisiki oyo emonisi ndenge oyo mosaleli na misala alendisaki ngai to ntina oyo nasepelaki na mosala na ye.” Pascal ná Jael, oyo bafandaka na Nouvelle-Calédonie, babondelaka mingi mpo na basaleli na misala. Pascal alobi boye: “Mikolo eleki, mabondeli, malɔmbɔ, mpe makambo oyo tozalaki kosɛnga na mabondeli na biso mpo na kopesa matɔndi, ezalaki mpo na basaleli na misala ya lisangá na biso.” Yehova ayokaka mabondeli ya ndenge wana, mpe lisangá mobimba ezwaka matomba.—2 Ko. 1:11.

BANKULUTU YA LISANGÁ “BAZALI KOSALA MOSALA MAKASI NA KATI NA BINO”

8. Mpo na nini Paulo akokaki kokoma ete bankulutu ya siɛklɛ ya liboso bazalaki “kosala mosala makasi”? (1 Batesaloniki 5:​12, 13)

8 Bankulutu ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala mosala makasi mpo na lisangá. (Tángá 1 Batesaloniki 5:​12, 13; 1 Tim. 5:17) Bazalaki “kokamba” lisangá, elingi koloba kotambwisa makita mpe kozwa bikateli na kati ya lisangani ya bankulutu. Bazalaki “kokebisa” bandeko, elingi koloba kopesa bango toli ya sikisiki kasi na bolingo mpo na kobatela lisangá. (1 Tes. 2:​11, 12; 2 Tim. 4:2) Nzokande, mibali yango bazalaki kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango mpe kosalisa bango bázala makasi na elimo.—1 Tim. 3:​2, 4; Tito 1:​6-9.

9. Wapi mwa mikumba oyo bankulutu bakokisaka lelo oyo?

9 Bankulutu lelo oyo mpe bazalaka na makambo mingi ya kosala. Bazali bapalanganisi ya nsango malamu. (2 Tim. 4:5) Bamipesaka na molende na mosala ya kosakola, babongisaka mosala ya kosakola na teritware na bango, mpe bapesaka biso formasyo na oyo etali kosakola mpe koteya malamu. Basalaka mpe mosala ya kosambisa na motema mawa mpe kozanga kopona bilongi. Ntango mokristo moko asali lisumu ya monene, bankulutu basalaka makasi mpo na kosalisa ye abongisa boyokani na ye na Yehova. Nzokande, balukaka mpe kobatela bopɛto ya lisangá. (1 Ko. 5:​12, 13; Gal. 6:1) Bankulutu bazalaka libosoliboso babateli ya mpate. (1 Pe. 5:​1-3) Babongisaka malamu badiskur oyo euti na Biblia, basalaka makasi báyeba ndeko mokomoko na lisangá, mpe bakendaka kotala bandeko mpo na kolendisa bango. Longola mikumba na bango, bankulutu mosusu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi, kobongisa mayangani ya etúká, basusu basalaka na Komite ya boyokani na minganga mpe na bituluku ya bandeko mpo na kotala bato ya maladi. Bankulutu basalaka mosala makasi mpo na biso!

10. Wapi mwa bantina oyo tozalaka na botɔndi na mosala makasi ya bankulutu na biso?

10 Yehova asakolaki ete babateli ya mpate bakokɛngɛla biso malamu mpe ete bampate “ekobanga lisusu te [mpe] ekolɛnga na nsɔmɔ te.” (Yir. 23:4) Johanna, ndeko mwasi moko ya Finlande, amonaki bosolo ya maloba yango ntango mama na ye abɛlaki maladi moko ya makasi. Alobi boye: “Atako nazalaki kokoka mpenza te koyebisa basusu ndenge oyo nazalaki komiyoka, nkulutu moko oyo nayebaki kutu malamu te amoniselaki ngai motema molai, abondelaki elongo na ngai mpe asalisaki ngai namona ete Yehova alingaka ngai. Nayebi lisusu mpenza te makambo oyo alobaki, kasi nayebi ete nayokaki ete nabatelami. Nandimi ete Yehova nde atindaki ye aya kosalisa ngai na ntango oyo ebongi mpenza.” Ndenge nini bankulutu ya lisangá na yo basalisá yo?

11. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi epai ya bankulutu? (Talá mpe elilingi.)

11 Yehova alingi ete tózalaka na botɔndi epai ya bankulutu “mpo na mosala na bango.” (1 Tes. 5:​12, 13) Henrietta, oyo afandaka mpe na Finlande, alobi boye: “Bankulutu basepelaka kosalisa basusu, kasi yango elingi koloba te ete bazalaka na ntango to makasi koleka basusu to bazalaka na mikakatano te na bomoi na bango. Na bantango mosusu nalobaka na bango kaka: ‘Oyebi? Ozali nkulutu moko malamu mpenza. Nalingi ete oyeba yango.’” Ndeko mwasi moko na Turquie c na nkombo Sera alobi: “Bankulutu bazalaka na mposa ya ‘esansi’ mpo bákoba kokende liboso. Na yango, tokoki kokomela bango karte moko, kobengisa bango mpo na kolya mwa eloko, to kobima na bango na mosala ya kosakola.” Ezali na nkulutu moko oyo osepelaka mpenza na molende na ye? Luká mabaku ya komonisa botɔndi yango.—1 Ko. 16:18.

Okoki kotya “esansi” oyo ekosalisa bandeko oyo bazali na mikumba bákoba na mosala na bango (Talá paragrafe 7, 11, 15)


BAKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA BALENDISAKA BISO

12. Ebongiseli nini ezalaki kolendisa bakristo na siɛklɛ ya liboso? (1 Batesaloniki 2:​7, 8)

12 Yesu Kristo apesá “makabo oyo ezali bato,” oyo basalelaka lisangá na ndenge mosusu. Na litambwisi na ye, bankulutu na Yerusaleme batindaki Paulo, Barnabasi, mpe basusu lokola bakɛngɛli ya zongazonga. (Mis. 11:22) Mpo na nini? Mpo na ntina moko kaka oyo basaleli na misala mpe bankulutu batyamaka: mpo na kolendisa masangá. (Mis. 15:​40, 41) Mibali yango bazalaki komipimela makambo mosusu mpe kotya ata bomoi na bango na likama mpo na koteya mpe kolendisa basusu.—Tángá 1 Batesaloniki 2:​7, 8.

13. Wapi mwa mikumba ya bakɛngɛli ya zongazonga?

13 Lelo oyo, bakɛngɛli ya zongazonga bafandaka esika moko te. Basusu basalaka mibembo ya bakilomɛtrɛ mingi mpo na kotala masangá. Pɔsɔ na pɔsɔ, mokɛngɛli ya zongazonga asalaka badiskur ebele, akendaka kotala bandeko, mpe atambwisaka likita ya babongisi-nzela, ya bankulutu, mpe makita mpo na mosala ya kosakola. Abongisaka badiskur mpe programɛ mpo na mayangani ya zongazonga ná mayangani ya etúká. Ateyaka na eteyelo ya babongisi-nzela, abongisaka likita moko ya ntina elongo na babongisi-nzela ya zongazonga na ye, mpe asalaka makambo mosusu, na bantango mosusu mikumba mosusu ya lombangu, oyo Betele epesi ye.

14. Wapi mwa bantina oyo tozalaka na botɔndi mpo na mosala makasi ya bakɛngɛli ya zongazonga?

14 Matomba nini masangá ezwaka mpo na mosala ya bakɛngɛli ya zongazonga? Mpo na viziti ya bakɛngɛli ya zongazonga, ndeko mobali moko na Turquie alobi boye: “Ntango nyonso oyo bayaka elendisaka ngai nalekisa lisusu ntango mingi na kosalisa bandeko basi mpe mibali. Nakutaná na bakɛngɛli ya zongazonga mingi; kasi, ata moko te amonisá ete likoki ya kosolola na ye ezali te to azali na makambo mingi ya kosala.” Johanna, oyo tolobelaki liboso, abimaki na mosala ya kosakola elongo na mokɛngɛli ya zongazonga, kasi bazwaki moto te. Alobi boye: “Atako bongo, nabosanaka yango te. Bandeko na ngai ya basi bautaki kokende esika mosusu, mpe nazalaki kokanisa bango mingi. Mokɛngɛli ya zongazonga alendisaki ngai mingi mpe asalisaki ngai namona ete kokabwana na bato oyo tolingaka mpo na mosala ya Yehova lelo oyo ezali mpo na ntango mokuse, kasi na mokili ya sika, tokozala na mabaku oyo ezangi nsuka ya kolekisa ntango elongo.” Bandeko mingi balingaka bakɛngɛli ya zongazonga mingi mpo basalisaka bango ndenge wana.—Mis. 20:37–21:1.

15. (a) Na boyokani na 3 Yoane 5-8, ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na bakɛngɛli ya zongazonga? (Talá mpe elilingi.) (b) Mpo na nini tosengeli komonisa botɔndi epai ya basi ya bandeko oyo bazali na mikumba, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? (Talá etanda “ Kobosana basi na bango te.”)

15 Ntoma Yoane alendisaki Gayusi amonisaka ezaleli ya koyamba bapaya epai ya bandeko oyo bazalaki koya kolendisa lisangá mpe ‘azongisa bango na nzela na bango na ndenge oyo ebongi na Nzambe.’ (Tángá 3 Yoane 5-8.) Lolenge moko mpo na biso ya kosala yango ezali ya kobengisa mokɛngɛli ya zongazonga mpo na kolya. Lolenge mosusu ezali ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola ntango ayei kotala lisangá. Leslie, oyo tolobelaki liboso, amonisaka botɔndi na ye mpe na lolenge mosusu. Alobi boye: “Nabondelaka ete Yehova akokisa bamposa na bango. Ngai ná mobali na ngai tokomelaka bango mpe mikanda, toyebisaka bango ndenge oyo viziti na bango esalisi biso mpenza.” Kobosana te ete bakɛngɛli ya zongazonga bazali bato lokola biso. Na bantango mosusu, babɛlaka, bazalaka na mitungisi, mpe balɛmbaka ata nzoto. Mbala mosusu maloba na yo ya boboto to likabo na yo ya moke ekoki kozala eyano na libondeli na bango epai ya Yehova mpo na kosɛnga lisalisi!—Mas. 12:25.

TOZALI NA MPOSA YA “MAKABO OYO EZALI BATO”

16. Na boyokani na Masese 3:​27, mituna nini bandeko mibali bakoki komituna?

16 Na mokili mobimba, tozali na bosɛnga ya bandeko mibali mpo básala lokola “makabo oyo ezali bato.” Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, ozali “na likoki ya kosala yango”? (Tángá Masese 3:27.) Okolinga kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala? To okoki kosala makasi okokisa masɛngami mpo osalela bandeko na yo lokola nkulutu? d Okoki kosala bambongwana na bomoi na yo mpo okɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? Eteyelo yango ekopesa yo formasyo oyo ekosala ete Yesu asalela yo lisusu mingi koleka. Soki ozali komona ete okokoka te, bondelá Yehova. Sɛngá ye apesa yo elimo santu mpo okoka kosala mokumba nyonso oyo okozwa.—Luka 11:13; Mis. 20:28.

17. “Makabo oyo ezali bato” ezali komonisa nini mpo na Mokonzi na biso, Yesu Kristo?

17 Bandeko mibali oyo Yesu atye “makabo oyo ezali bato” bamonisi ete Yesu azali kokoba kokamba biso mikolo oyo ya nsuka. (Mat. 28:20) Tozali mpenza na botɔndi ndenge tozali na Mokonzi ya bolingo, oyo azali mokabi, atyelaka biso likebi mpe apesaka bandeko mibali ya makoki mpo na kokokisa bamposa na biso. Na yango, luká mabaku ya komonisa botɔndi na yo mpo na mibali yango oyo basalaka mosala makasi. Mpe kobosanaka te kopesa Yehova matɔndi, mpo ye nde Mopesi monene ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.”—Yak. 1:17.

LOYEMBO 99 Tozali na bandeko ebele

a “Makabo oyo ezali bato” esangisi mpe bankulutu oyo bazali bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, basungi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, bandeko ya Bakomite ya filiale, mpe baoyo bazali na mikumba mosusu.

b Topesi bango bankombo mosusu.

c To Türkiye.

d Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na ndenge ya kokóma mosaleli na misala to nkulutu, talá masolo “Ndeko mobali—Ozali koluka kokóma mosaleli na misala?” mpe “Ndeko mobali—Ozali koluka kokóma nkulutu?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 11/2024.