Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 41

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

Tózwa mateya na mikolo 40 ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele

Tózwa mateya na mikolo 40 ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele

“Bamonaki ye mikolo 40 mpe azalaki koyebisa bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe.”—MIS. 1:3.

NA MOKUSE

Ndenge ya kolanda ndakisa oyo Yesu atikaki na mikolo 40 ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele.

1-2. Likambo nini esalemaki ntango bayekoli mibale ya Yesu bazalaki kokende na Emause?

 TOZALI na mokolo ya 16 Nisana ya mobu 33 T.B. Bayekoli ya Yesu bazali na mawa makasi mpe kobanga elati bango. Mibale kati na bango balongwe Yerusaleme mpe bazali kokende na Emause, mboka oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 11 longwa na Yerusaleme. Mibali yango balɛmbi nzoto mpo Yesu, moto oyo bazalaki kolanda, autaki kobomama. Emonanaki lokola ete elikya nyonso oyo bazalaki na yango mpo na Masiya ekei na mai. Kasi likambo oyo mibali yango bakomona mosika te ekokamwisa bango.

2 Moto moko oyo bayebi te apusani pene na bango mpe abandi kotambola elongo na bango. Bayekoli bayebisi mopaya yango ndenge balɛmbi nzoto mpe likambo oyo ekómelaki Yesu. Moto yango abandi sikoyo koyebisa bango makambo oyo ekobongola mpenza bomoi na bango. “Kobanda na Moize tii na Basakoli,” alimbolelaki bango ntina oyo Masiya asengelaki komona mpasi mpe kokufa. Ntango mibali yango misato bakómaki na Emause, mopaya yango amonisaki bango ete ye nde Yesu Kristo, autaki kosekwa! Kanisá ndenge bayekoli yango bazalaki na esengo ya koyoka ete Masiya azali na bomoi!—Luka 24:​13-35.

3-4. Nini ekómelaki bayekoli ya Yesu, mpe tokolobela nini na lisolo oyo? (Misala 1:3)

3 Yesu abimelaki bayekoli na ye mwa mbala mingi na boumeli ya mikolo 40 ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele. (Tángá Misala 1:3.) Na boumeli ya ntango yango, bayekoli ya Yesu oyo liboso bazalaki na mawa makasi mpe kobangabanga, bakómaki sikoyo limpinga ya basakoli mpe bateyi ya Bokonzi, oyo batondi na esengo, na elikya mpe na mpiko. a

4 Tokoki kozwa matomba soki toyekoli makambo oyo Yesu asalaki na mikolo ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele. Na lisolo oyo, tokomona ndenge Yesu asalelaki ntango yango (1) mpo na kolendisa bayekoli na ye, (2) mpo na kosalisa bango bákanga ntina malamumalamu ya Makomami, mpe (3) mpo na kopesa bango formasyo mpo bázwa mikumba minene. Na likambo mokomoko, tokomona ndenge oyo tokoki komekola Yesu.

LENDISÁKÁ BASUSU

5. Mpo na nini bayekoli ya Yesu basengelaki kolendisama?

5 Bayekoli ya Yesu bazalaki na mposa ya kolendisama. Mpo na nini? Basusu kati na bango batikaki bandako na bango, mabota na bango, mpe misala na bango mpo na kolanda Yesu ntango nyonso. (Mat. 19:27) Basusu bazalaki lisusu na esika te na kati ya bana-mboka mpo bakómaki bayekoli ya Yesu. (Yoa. 9:22) Basalaki makambo wana nyonso mpo bandimaki ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki. (Mat. 16:16) Kasi ntango babomaki Yesu, bilikya nyonso oyo bazalaki na yango ekendaki na mai mpe balɛmbaki nzoto.

6. Yesu asalaki nini nsima ya kosekwa?

6 Na ntembe te, Yesu amonaki ete mawa ya bayekoli na ye ezalaki bolɛmbu ya elimo te; ezalaki nde mpasi ya kobungisa Nkolo na bango. Na yango, kaka na mokolo oyo asekwaki, abandaki kolendisa baninga na ye. Na ndakisa, abimelaki Maria Magadalene ntango azalaki kolela na lilita na ye. (Yoa. 20:​11, 16) Abimelaki mpe bayekoli mosusu mibale ndenge tomonaki yango na ebandeli. Na nsima abimelaki mpe ntoma Petro. (Luka 24:34) Ndakisa ya Yesu ekoki koteya biso nini? Tótalela likambo oyo esalemaki mbala ya liboso oyo abimelaki moto.

7. Ndenge Yoane 20:​11-16 emonisi yango, na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo ya 16 Nisana, Yesu amonaki Maria azali kosala nini, mpe yango etindaki ye asala nini? (Talá mpe elilingi.)

7 Tángá Yoane 20:​11-16. Mokolo ya 16 Nisana na ntɔngɔ, basi ebele ya sembo bakendaki na esika oyo bakundaki Yesu. (Luka 24:​1, 10) Tólobela likambo oyo ekómelaki moko ya basi yango, Maria Magadalene. Ntango Maria akómaki na lilita, akutaki yango mpamba. Akendaki mbangu koyebisa Petro ná Yoane mpe na nsima alandaki bango ntango bazalaki kokima mbangu na lilita. Ntango mibali yango mpe bamonaki ete lilita etikali mpamba, bazongaki epai na bango. Kasi Maria azongaki te. Atikalaki wana, azali kolela. Ayebaki te ete Yesu azalaki wana. Yesu azalaki kotala ndenge mwasi yango ya sembo azalaki kolela mpe ayokelaki ye mawa makasi. Na yango abimelaki Maria, mpe asalaki likambo moko ya moke oyo elendisaki ye mingi. Asololaki na ye mpe apesaki ye mokumba moko ya ntina: akende koyebisa bandeko na ye nsango ya lisekwa na ye.—Yoa. 20:​17, 18.

Mekolá Yesu; tyáká likebi na makambo oyo bandeko bazali kokutana na yango mpe lukáká kobɔndisa bango (Talá paragrafe 7)


8. Ndenge nini tokoki komekola Yesu?

8 Ndenge nini tokoki komekola Yesu? Tokoki mpenza kosalisa bandeko na biso bákoba kosalela Yehova soki, lokola Yesu, tozali kotya likebi na mawa oyo bazali na yango mpe tozali koloba na bango na boboto. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi Jocelyn, oyo leki na ye ya mwasi akufaki na aksida moko ya nsɔmɔ. Alobi boye: “Na boumeli ya basanza mingi, nazalaki ntango nyonso na mawa makasi.” Kasi ndeko mobali moko ná mwasi na ye babengisaki ye na ndako na bango, bayokaki ye na boboto mpe bayebisaki ye ndenge azali na motuya na miso ya Nzambe. Jocelyn alobi boye: “Nayokaki lokola nde Yehova asalelaki bango mpo na kobimisa ngai na kati ya mbu oyo ezindisaki ngai mpe batyaki ngai na masuwa mpo na kobikisa ngai. Basalisaki ngai nazongela mposa na ngai ya kokoba kosalela Yehova.” Biso mpe tokoki kolendisa basusu soki tozali koyoka bango na likebi ntango bafungoleli biso motema na bango mpe soki tozali koloba na bango na boboto. Na ndenge yango tokobɔndisa bango mpe tokosalisa bango bákoba kosalela Nzambe.—Rom. 12:15.

SALISÁ BASUSU BÁKANGA NTINA YA MAKOMAMI

9. Mokakatano nini bayekoli ya Yesu bazalaki na yango mpe ndenge nini Yesu asalisaki bango?

9 Bayekoli ya Yesu bandimaki Liloba ya Nzambe mpe bazalaki kosala makasi básalela yango na bomoi na bango. (Yoa. 17:6) Atako bongo, bazalaki koyeba te ntina oyo Yesu akufaki lokola mosali-mabe na nzete ya mpasi. Yesu amonaki ete bantembe oyo bazalaki na yango, emonisaki te ete bazalaki motema mabe; kasi ezalaki nde mpo bakangaki ntina malamu te. (Luka 9:​44, 45; Yoa. 20:9) Na yango, asalisaki bango bákanga ntina ya Makomami. Tótala ndenge oyo asalaki yango ntango abimelaki bayekoli mibale na nzela ya Emause.

10. Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye bándima mpenza ete azalaki Masiya? (Luka 24:​18-27)

10 Tángá Luka 24:​18-27. Yesu ayebisaki mibali yango mbala moko te soki azali nani. Kasi, atunaki bango mituna. Mpo na nini? Mbala mosusu mpo alingaki bábimisa oyo bazalaki na yango na makanisi mpe na motema. Mpe basalaki yango. Bayebisaki ye ete bazalaki kolikya ete Yesu akosikola Yisraele na monyoko ya Roma. Ntango babimisaki makanisi na bango polele, Yesu asalelaki Makomami mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya likambo oyo esalemaki. b Na nsima kaka na mpokwa wana, Yesu alekisaki ntango elongo na bayekoli mosusu mpe alimbolelaki bango mateya wana ya solo. (Luka 24:​33-48) Lisolo yango ekoki koteya biso nini?

11-12. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yesu asalisaki basusu báyeba solo ya Biblia? (Talá mpe bililingi.) (b) Ndenge nini ndeko oyo azalaki koyekola na Nortey asalisaki ye?

11 Ndenge nini tokoki komekola Yesu? Ya liboso, ntango tozali koyekola na bato Biblia, tosengeli kotuna mituna ya malamu oyo ekosalisa bango bábimisa makambo oyo ezali na makanisi mpe na mitema na bango. (Mas. 20:5) Ntango okangi ntina ya mayoki oyo bazali na yango, monisá bango ndenge ya komona bavɛrsɛ oyo eyokani mpenza na likambo na bango. Na nsima, tɛmɛlá mposa ya koyebisa bango oyo basengeli kosala. Kasi, salisá bango bákanga ntina ya Makomami mpe bámona ndenge oyo bakoki kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango. Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko na Ghana na nkombo Nortey.

12 Nortey abandaki koyekola Biblia ntango azalaki na mbula 16. Kasi eumelaki te bato ya libota na ye batɛmɛlaki ye. Nini esalisaki Nortey akoba koyekola Biblia? Ndeko oyo azalaki koyekola na ye asalelaki Matai mokapo 10 mpo na komonisa ye ete bakristo ya solo bakokutana na botɛmɛli. Nortey alobi boye: “Ntango botɛmɛli yango ebandaki nasilaki komindimisa ete namoni solo.” Ndeko oyo azalaki koyekola na ye asalisaki ye mpe akanga ntina ya Matai 10:16 mpo azala ekɛngɛ mpe na limemya ntango azali kolobela makambo ya Nzambe epai ya bato ya libota. Nsima ya kozwa batisimo, Nortey alingaki kokóma mobongisi-nzela, kasi tata na ye alingaki ye akende na iniversite. Ndeko oyo ayekolaki na Nortey Biblia ayebisaki ye te oyo asengeli kosala; kasi atunaki ye mituna mpo na koyeba makanisi na ye mpe asalisaki ye akanga ntina ya mitinda ya Biblia. Esukaki ndenge nini? Nortey azwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela. Tata na ye abenganaki ye na ndako. Nortey ayokaki ndenge nini mpo na makambo yango? Alobi boye: “Nayebi mpenza ete naponi nzela ya malamu.” Soki biso mpe tozali kozwa ntango ya kosalisa basusu bákanga ntina ya Makomami, tokoki kosalisa bango bákóma bakristo oyo bapikami makasi.—Ef. 3:​16-19.

Mekolá Yesu; salisá basusu bákanga ntina ya Makomami (Talá paragrafe 11) e


SALISÁ BANDEKO MIBALI BÁKÓMA “MAKABO OYO EZALI BATO”

13. Yesu asalaki nini mpo ete mosala ya Tata na ye ekoba awa na mabele? (Baefese 4:8)

13 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, akokisaki malamu mpenza mosala oyo Tata na ye apesaki ye. (Yoa. 17:4) Kasi Yesu azalaki te na likanisi oyo elobaka ete, ‘Soki olingi likambo moko esalema malamu, yo moko salá yango.’ Na yango, na boumeli ya mbula misato ná ndambo ya mosala na ye, apesaki basusu formasyo. Liboso azonga na likoló, Yesu apesaki bayekoli na ye, oyo mosusu kati na bango bakokaki kozala na mbula mwa moke koleka 20, mokumba ya kobatela bampate ya Yehova mpe ya kokamba mosala ya kosakola mpe ya koteya. (Tángá Baefese 4:8.) Mibali yango basalaki mosala makasi elongo na Yesu mpe bazalaki sembo epai na ye. Ndenge nini Yesu asalelaki mikolo 40 ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele mpo na kopesa bango formasyo mpo bákóma “makabo oyo ezali bato”?

14. Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye bákola na elimo na mikolo 40 ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele? (Talá mpe elilingi.)

14 Yesu azalaki kopesa bayekoli na ye toli ya polelepolele kasi na bolingo. Na ndakisa, ntango amonaki ete basusu bazalaki na ezaleli ya kotya ntembe, apesaki bango toli. (Luka 24:​25-27; Yoa. 20:27) Ayebisaki bango mpe ete basengeli kotya likebi mingi na mosala ya kobatela bampate ya Yehova na esika ya komipesa na mosala na bango ya mosuni. (Yoa. 21:15) Akundwelaki bango ete basengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na mikumba oyo basusu bakoki kozwa na mosala ya Yehova. (Yoa. 21:​20-22) Lisusu, asembolaki mwa makanisi ya libunga oyo bazalaki na yango mpo na Bokonzi mpe asalisaki bango bámipesa na mosala ya kosakola nsango malamu. (Mis. 1:​6-8) Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu?

Mekolá Yesu; salisá mibali bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba mosusu (Talá paragrafe 14)


15-16. (a) Na makambo nini bankulutu bakoki komekola Yesu? Limbolá. (b) Ndenge nini Patrick azwaki litomba na toli oyo bapesaki ye?

15 Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu? Basengeli kopesa bandeko mibali formasyo, ata mpe baoyo bazali naino bilenge mpe kosalisa bango bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba minene. c Bankulutu bayebaka ete bandeko yango oyo bazali kozwa formasyo bazali bato ya kokoka te. Basengeli kopesa bandeko yango ya bilenge toli na bolingo mpo báyeba makambo mingi mpe bámona ntina ya kozala na komikitisa, sembo mpe kozala pene mpo na kosalela basusu.—1 Tim. 3:1; 2 Tim. 2:2; 1 Pe. 5:5.

16 Tótala ndenge ndeko moko na nkombo Patrick azwaki litomba na toli oyo bapesaki ye. Ntango azalaki elenge, azalaki na momeseno ya kokatela basusu mangala mpe azalaki na boboto te ata epai ya bandeko basi. Nkulutu moko oyo akɔmɛli amonaki bolɛmbu wana ya Patrick mpe apesaki ye toli na boboto kasi ya polelepolele. Patrick alobi boye: “Nasepelaka ndenge asalaki yango. Nazalaki kolɛmba nzoto ntango nazalaki komona bandeko mibali mosusu bazali kozwa mikumba oyo nazalaki kolinga. Kasi toli ya nkulutu wana esalisaki ngai namona ete nasengeli kosalela bandeko basi mpe bandeko mibali na komikitisa nyonso na esika ya koluka mikumba to esika ya lokumu na lisangá.” Litomba nini emonanaki? Patrick atyamaki nkulutu ntango azalaki na ebandeli ya bambula 20.—Mas. 27:9.

17. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kotyela bayekoli na ye motema?

17 Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba kaka ya kosakola te, kasi mpe ya koteya. (Mat. 28:20) Mbala mosusu bayekoli bamonaki ete bakokoka mokumba yango te. kasi, Yesu azalaki na ntembe te ete bakoki kosala mosala yango, mpe ayebisaki bango yango. Yesu amonisaki ete atyelaki bango motema mobimba, alobaki: “Kaka ndenge Tata atindi ngai, ngai mpe nazali kotinda bino.”—Yoa. 20:21.

18. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu?

18 Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu? Bankulutu ya bwanya bapesaka bandeko formasyo mpo bákokisa mikumba mosusu. (Flp. 2:​19-22) Na ndakisa, bankulutu bakoki kokɔtisa bilenge na mosala ya kopɛtola mpe kobatela Ndako ya Bokonzi. Nsima ya kotikela basusu básala mosala moko, bankulutu bakomonisa ete bazali na elikya ete bandeko oyo baponami bakosala yango malamu, soki bazali kopesa bango formasyo mpe na nsima kotyela bango motema ete bakosala mosala na ndenge ebongi. Matthew, ndeko mobali moko oyo atyami nkulutu sika, alobi ete asepelaka mpenza na bankulutu oyo balakisaka ye malamu ndenge ya kosala likambo moko mpe na nsima batyaka motema ete akosala yango malamu. Alobi boye: “Namiyokaki malamu ntango bamonaki ete mabunga oyo nasali ezali mpo na kosalisa ngai nayekola makambo malamu, mpe na nsima balakisaki ngai ndenge ya kobongisa.” d

19. Tosengeli kozala na ekateli nini?

19 Yesu asalelaki mikolo 40 ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele mpo na kolendisa, koteya, mpe kopesa basusu formasyo. Tiká ete tózala na ekateli ya kolanda ndakisa na ye malamumalamu. (1 Pe. 2:21) Akosalisa biso tósala yango. Kutu, alakaki biso ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.”—Mat. 28:20.

LOYEMBO 15 Tókumisa mwana ya liboso ya Yehova!

a Baevanzile mpe mikanda mosusu ya Biblia elobeli bato mosusu oyo Yesu abimelaki nsima ya lisekwa na ye, na ndakisa Maria Magadalene (Yoa. 20:​11-18); basi mosusu (Mat. 28:​8-10; Luka 24:​8-11); bayekoli 2 (Luka 24:​13-15); Petro (Luka 24:34); bantoma longolá Toma (Yoa. 20:​19-24); bantoma elongo na Toma (Yoa. 20:26); bayekoli 7 (Yoa. 21:​1, 2); bayekoli koleka 500 (Mat. 28:16; 1 Ko. 15:6); ndeko na ye Yakobo (1 Ko. 15:7); bantoma nyonso (Mis. 1:4); mpe bantoma pembeni ya Betani. (Luka 24:​50-52) Ekoki kozala mpe na mabaku mosusu oyo ekomami te.—Yoa. 21:25.

b Mpo na kozwa liste ya bisakweli etali Masiya, talá na jw.org lisolo “Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?

c Na kotalela makambo mosusu, mibali oyo bakokisi masɛngami bakoki kotyama bakɛngɛli ya zongazonga na bambula 25 tii liboso bákokisa mbula 30. Kasi, basengeli liboso kozala bandeko mibali oyo bameseni malamu na mokumba ya nkulutu.

d Mpo na kozwa makanisi mosusu na ndenge ya kosalisa bandeko mibali ya bilenge bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 08/2018, nk. 11-12, par. 15-17, mpe ya 15/04/2015, nk. 3-13.

e NDIMBOLA YA ELILINGI: Nsima ya kokanga ntina ya mitinda ya Biblia, moyekoli moko ya Biblia abwaki biloko oyo atyaki mpo na fɛti ya Noele.